Lolenge nini kolendisa bikanganeli ya libala
“EBONGI nde kolongola mwasi mpo na ntina nyonso?” ezali motuna etunamaki na Bafalisai oyo balukaki komeka Yesu Klisto, Moteyi Monene. Ayanolaki bango na kolobeláká babalani ya liboso mpe apesaki etinda likoló na yango ete: “Oyo ekangisami na Nzambe, tika te ete moto akangola yango.”
Bafalisai bazalaki koloba ete Moize apesaki malako mpo na koboma libala wana apesaki etinda ya kosala “mokanda ya koboma libala.” Yesu ayanolaki bango ete: “Moize atikaki bino kolongola basi na bino mpo na makasi na mitema na bino, nde longwa na ebandeli ezalaki bongo te. Nazali koloba na bino ete ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite te, mpe akobala mwasi mosusu, azali kosala ekobo.”—Matai 19:3-9.
Na ebandeli, libala lisalemaki mpo na kozala ekanganeli ya seko. Ata liwa ekokaki te kokabola babalani ya liboso, mpamba te bango bazalisamaki bato ya kokoka na likanisi ya kozala na bomoi ya seko. Kasi, basalaki lisumu. Lisumu na bango libebisaki libala. Monguna liwa abandaki kokabola babalani. Nzambe azali kotalela liwa lokola nsuka ya libala, ndenge tozali kotanga yango na Biblia ete: “Mwasi akangani na mobali na ye bobele na ntango ye [mobali] azali na bomoi. Kasi soki mobali na ye alali [na kufa], akoki kobalana na oyo ye alingi, nde bobele kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39, MN) Yango ekeseni mpenza na makanisi ya mangomba lokola oyo ebengami ete suttie, oyo elobi ete soki mwasi akufeli mobali, asengeli to asɛngisami na komitumba na mɔ́tɔ ye moko na elikya ete bikanganeli ya libala bikolandana kino nsima ya liwa.
Ebongiseli na Mibeko ya Moize
Na ntango oyo Mibeko ya Moize mipesamaki, boyokani na libala esilaki kobeba mingi mpenza, kino Jéhovah asalaki ebongiseli mpo na koboma libala na ntina na mitema makasi ya Bayisraele. (Deteronome 24:1) Mokano ya Nzambe ezalaki te ete Bayisraele basalela mobeko wana na lolenge mabe mpo na koboma libala elongo na basi na bango mpo na mabunga mikemike, lokola yango emonisami na etinda oyo ete basengelaki kolinga bazalani na bango lokola bango moko. (Levitike 19:18) Ata likambo ya koluka mokanda ya koboma libala etalelamaki lokola eloko oyo ezalaki kolɛmbisa, mpamba te mpo na kokomisa mokanda yango, mobali oyo alingaki koboma libala asengelaki kokende epai na bato na mayele babongi, baoyo bazalaki komeka kozongisa boyokani. Nzambe apesaki bango mobeko wana te mpo ete moto na moto azwa lotómo ya koboma libala na mwasi na ye “na ntina nyonso.”—Matai 19:3.
Nzokande, Bayisraele babosanaki ndimbola ya mobeko wana mpe basalelaki yango mpo na koboma libala mpo na makambo nyonso oyo bango balingaki. Na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso, bazangaki bosembo epai na basi ya bolenge na bango, na kobomáká libala elongo na bango mpo na ntina nyonso. Jéhovah alobaki na makasi nyonso ete ye ayini koboma libala. (Malaki 2:14-16) Ezalaki mpo na ntina wana nde Yesu akweisaki koboma libala lokola Bayisraele bazalaki kosala yango na eleko na ye.
Bobele likambo moko lindimami mpo na koboma libala
Nzokande, Yesu alobelaki ntina moko mpo na yango libala ekoki kobomama: pite. (Matai 5:31, 32; 19:8, 9) Liloba oyo libongolami na “pite” elimboli lolenge nyonso ya kosangisa nzoto oyo ezali kosalema libandá ya libala oyo lindimami na Makomami te, ezala elongo na mobali moko to na mwasi moko soko mpe elongo na nyama.
Atako bongo, Yesu apesaki etinda te mpo na koboma libala na ntina na kozanga bosembo ya babalani. Yango etali mobalani oyo asali eloko te na kotalela makambo oyo makoki kobima na nsima mpe kozwa ekateli soki alingi koboma libala to mpe akoboma yango te. Basi oyo bandimi koboma libala mpo na likambo oyo lindimami na Makomami bakoki lisusu kotalela maloba oyo Nzambe alobaki ntango apesaki etumbu epai na mwasi ya liboso mpo na lisumu na ye. Longola etumbu ya liwa, Nzambe alobaki mpenza na Eva ete: “Mposa na yo ekozala epai na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Mokanda Commentary on the Old Testament, ya C. F. Keil mpe F. Delitzsch, elobeli “mposa” yango lokola “mposa oyo ekokani na maladi.” Ya solo, mposa makasi wana ezwami te epai na basi nyonso, kasi ntango mwasi oyo asali mabe te azali kokanisa mpo na koboma libala, asengeli komonisa mayele mpo na kotalela lisusu mayoki oyo basi nyonso basili kosangola yango epai na Eva. Nzokande, soki mobalani moko asali mobulu na kosangisa nzoto libandá ya libala, yango ekoki komema maladi ekeseni oyo euti na kosangisa nzoto, kati na yango mpe SIDA, epai na mobalani oyo asali mabe te; mpo na yango, basusu bazali kozwa ekateli ya koluka koboma libala lokola yango elimbolami na Yesu.
Mbotó ya mikakatano elonami kati na libota
Mitema makasi ya bato euti na lisumu oyo babalani ya liboso basalelaki Nzambe. (Baloma 5:12) Mbotó ya mikakatano kati na libota elónamaki ntango babalani ya liboso basalaki lisumu epai na Tata na bango ya likoló. Ndenge nini bongo? Ntango Eva, mwasi ya liboso, alengolamaki na nyoka ete alya nzeté oyo epekisamaki, akakatanaki te mpe alyaki mbuma yango. Bobele nsima na kokamata ekateli wana monene nde akendaki koyebisa na mobali na ye makambo oyo nyoka alobaki na ye. (Genese 3:6) Ya solo, asalaki yango kozanga kotuna mobali na ye. Yango ezali elakiseli ya mikakatano oyo mabota mingi ya ntango na biso mazali kokutana na yango—kozanga kosolola na motema moko.
Na nsima, ntango bazwaki matomba mabe ya lisumu na bango, Adam mpe Eva basalelaki mwango oyo mozali kosalelama na ebele ya babalani ya ntango na biso wana bazwi mikakatano: kobwaka mabe likoló ya bato mosusu. Adam, mobali ya liboso, abwakaki mabe likoló ya mwasi na ye mpe Jéhovah, wana alobaki ete: “Mwasi oyo yo opesaki ete azala na ngai, apesaki ngai mbuma ya nzeté yango. Ngai mpe nalei.” Na ngala na ye, mwasi alobaki ete: “Nyoka akosi ngai, mpe nalei.”—Genese 3:12, 13.
Etumbu oyo Jéhovah apesaki na Adam mpe Eva esakolaki likambo mosusu oyo lisengelaki kobimisa matáta. Na ntina na boyokani na ye elongo na mobali na ye, Jéhovah alobaki na Eva ete: “Akozala na bokonzi likoló na yo.” Mibali mingi lelo, lokola Isao oyo alobelamaki kati na lisoló na biso ya liboso, bazali na bokonzi likoló na basi na bango na lolenge ya mabe kozanga kotalela mayoki ya basi na bango. Nzokande, basi mingi bazali ntango nyonso na mposa ete mibali na bango batyela bango likebi. Wana mposa yango ekokisami te, basi bakoki kosɛnga likebi yango na makasi mpe bazali komitambwisa na moimi nyonso. Lokola mibali mingi bazali na bokonzi mpe basi mingi bazali kosɛnga likebi ya mibali na bango na makasi, ezalela ya moimi ezali kozwa esika na yango mpe kimya ezali kolongwa. Na lisoló moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Lolenge nini koyeba bantina ya koboma libala na mikolo na biso,” Shunsuke Serizawa alobaki ete: “Soki tobosani mokakatano ya liboso mozwami kati na likambo oyo ete, bato bazalaka na mposa ya kotalela bobele matomba na bango moko, ekozala mpasi mingi mpo na koyeba bantina ya koboma libala na mikolo na biso.”
Atako bongo, Jéhovah apesaki litambwisi kati na Liloba na ye mpo ete babalani oyo bakotosa yango bakoka kozala na esengo kati na libala atako ezaleli na bango ya kozanga kokoka. Isao alandaki litambwisi ya Nzambe mpe azali sikawa na bomoi ya libota ya esengo. Totala lolenge nini mitinda ya Biblia mizali kosalisa bato na kolendisa bikanganeli ya libala.
Kolobana makambo polele
Kati na mabala mingi, kozanga kosolola, ezaleli ya kobwaka mabe likoló ya bato mosusu, mpe ezaleli ya moimi ezali kopesa mpasi mpo na mobali mpe mwasi ete bayebana mayoki na bango. Mwasi molukiluki moko, Caryl S. Avery, alobaki ete: “Lokola komonisana mayoki ezali na ntina mingi mpo na kozala na boyokani malamu, boyokani malamu esɛngi kotyelana motema. Nzokande, na mikolo na biso, kotyelana motema ezali komonana mingi te.” Soki koyebana mayoki ya mozindo ebakisami, kotyelana motema mpe ekokóla. Yango esɛngi ete mobali mpe mwasi basolola na motema moko.
Mokanda ya Masese esaleli ndakisa moko mpo na kolendisa likambo ya koyebisana makanisi ya mozindo, ete: “Toli kati na motema ya moto ezali lokola mai na bozindo, nde moto na mayele akotoka yango.” (Masese 20:5) Babalani basengeli kososola mpe kotóka makanisi ya mozindo mazwami na mitema ya babalani na bango. Kanisa ete mobalani na yo atungisami na makanisi. Na esika na koloba ete: “Ngai mpe nalekisi mokolo malamu te,” mpo na nini te koloba na boboto nyonso ete: “Olekisi mokolo malamu te? Nini ekómeli yo?” Koyokamela mobalani na yo ekoki kosɛnga ntango mpe milende, kasi mbala na mbala yango ezali kosepelisa, ezali kopesa esengo, mpe ezali kozwa ntango moke, na esika ya koboya kotyela mobalani na yo likebi mpe na nsima, kotungisama na mayoki mpo na makambo oyo makoki kobima.
Soki olingi ete mobalani na yo atyela yo motema, osengeli kozala na bosembo mpe komeka komonisa mayoki na yo ete akoka kokanga ntina na yango. Liloba ya Nzambe lipesi toli ete: “Bolobaka solo, moto na mozalani na ye, mpamba te biso tozali biteni na nzoto moko.” (Baefese 4:25, MN) Koloba solo esɛngi kozala na bososoli. Kanisa mpo na mwasi oyo azali na mayoki ete ayokamelami te. Liboso na koloba, asengeli kokanisa na lisese oyo ete: “Ye oyo azali na mayele azali na maloba mingi te, mpe moto na boyebi azali na motema mpiɔ.” (Masese 17:27) Na esika na kofunda mobali na ye ete, “Yo oyokamelaka ngai te!” eleki malamu ete amonisa mayoki na ye na kimya nyonso liboso ete nkanda mpe nsɔni ekóla kati na motema na ye. Mbala mosusu akoki komonisa mayoki na ye na kolobáká lolenge oyo ete: “Nayebi ete ozali na mosala mingi, kasi nakosepela mingi soki olekisi mwa ntango mingi elongo na ngai.”
Ya solo, “myango mikobeba wana bato na toli bazali te.” (Masese 15:22) Mobalani na yo alingaka yo, kasi yango elimboli te ete ayebi makambo mazali yo kokanisa. Osengeli komonisa mayoki na yo epai na mobalani na yo na mayele nyonso. Yango ekosalisa bino, lokola babalani baklisto, na kosala mbongwana na bolingo nyonso mpo na kolanda etinda “ya kobatela bomoko na elimo kati na ekanganeli na kimya.”—Baefese 4:2, 3.
Tozwa ndakisa ya Kazuo, oyo azalaki mpenza kobanga mwasi na ye mpe azalaki na mposa makasi ya kobɛta masano ya mbongo. Atondaki na banyongo ya milió mingi ya badolare. Kodefáká mbongo mpo na kofuta yango na nsima, akɔtaki mpenza kati na pɔtɔpɔtɔ. Abandaki bongo koyekola Biblia mpe na nsuka, azwaki makasi ya koloba na mwasi na ye na ntina na mikakatano wana. Amizelaki kopamelama. Kasi, akamwaki wana mwasi na ye, oyo azalaki koyekola Biblia uta ntango molai koleka ye, ayanolaki na kimya nyonso ete: “Tokomeka kotala lolenge nini tokofuta banyongo wana.”
Kobanda mokolo molandaki, bakendaki kotala bato oyo badefisaki bango mbongo mpe babandaki kofuta banyongo na bango, mpe batɛkaki nkutu ndako na bango. Yango ezwaki soko mbula mobimba mpo na kosilisa banyongo wana. Nini ebongolaki Kimie, mwasi na ye? Alobi ete: “Maloba oyo mazwami na Bafilipi mokapo 4, verset 6 mpe verset 7, ezali mpenza solo. ‘Bomitungisa mpo na likambo moko te, nde kati na makambo nyonso, tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbo mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe bikaniseli na bino kati na Klisto Yesu.’” Abakisaki ete: “Kokamwáká na lolenge nazalaki na esengo atako mimekamo, moninga na ngai abandaki koyekola Biblia elongo na ngai.” Kazuo mpe mwasi na ye bazwaki batisimo mpe bazali sikawa na bomoi ya libota ya esengo.
Longola kotyelana motema moko na mosusu na kolobáká solo, mibali mpe basi baoyo bakutanaki na makambo oyo tolobeli awa, basalaki likambo moko oyo likoki kosalisa babalani ete basilisa mikakatano kati na libala na bango. Basololaki elongo na Jéhovah Nzambe, Mobandisi ya libala. Atako masɛnginya mpe mikakatano oyo babalani bazali kokutana na yango, akopambola bango na kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso soki bazali kosala oyo ekoki na bango mpo na kosalela mitinda na ye mpe soki bazali kotya motema epai na ye. Kobondela elongo ezali na ntina mingi. Mobali asengeli kozwa esika ya liboso mpe ‘kozipola motema na ye’ liboso na Nzambe, kolandáká nzela na ye mpe litambwisi na ye kati na mikakatano nyonso oyo ye mpe mwasi na ye bazali kokutana na yango. (Nzembo 62:8) Jéhovah Nzambe akoyokaka ntango nyonso mabondeli ya motindo wana.
Ya solo, likoki ezali mpo na kolendisa bikanganeli ya libala. Atako tozali sikawa na bizaleli na biso ya kozanga kokoka kati na mokili oyo ya yikiyiki, babalani bakoki mpenza kozala na esengo kati na boyokani na bango. Okoki kozwa makanisi mosusu ya ntina mpe batoli ya malamu kati na mokanda Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo, oyo ebimisami na la Société Watchtower. Epai mosusu, babalani baoyo bazali mpenza kosala makasi mpo na kosalela mitinda ya Biblia bazali na elikya ya kozala ntango nyonso na bomoko kati na bolingo na mokili ya sika molakami na Nzambe, oyo ekoya mosika te.