Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/8 nk. 27-30
  • Lolenge baklisto bakoki kosalisa mibangé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge baklisto bakoki kosalisa mibangé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosungi oyo amipesi
  • Komibongisa ezali na motuya mingi
  • Ntango emonani ete moto na maladi akobika te
  • Mokumba ya bato nyonso
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Jéhovah azali kokanisela bato na maladi mpe mibangé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tómonisa bolingo ya boklisto epai na mibangé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/8 nk. 27-30

Lolenge baklisto bakoki kosalisa mibangé

“BONGO tozali kotika motema te. Ata ndambo na biso na libanda ezali kolemba, nde ndambo na biso na kati ekobongwanaka eloko na sika mokolo na mokolo. . . . Biso tokotalaka te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana. Mpo ete makambo mamonani mazali bobele na ntango oyo nde makambo mamonani te makoumela seko.” Oyo ezali lolenge ntoma Paulo alobaki kati na mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti.​—2 Bakolinti 4:16-18.

Na ntango na kala, mibali mpe basi ya kondima batyaki miso na bango na makambo mazangi komonana, oyo esangisaki makambo oyo Nzambe na bango Jéhovah asilaki kolaka ete akosala yango na elaka na yango. Kati na mokanda na ye epai na Baebele, Paulo alobeli mingi bato motindo yango, baoyo babatelaki kondima kino na ntango na liwa na bango​—mpe basusu kati na bango bakómaki mibange mpenza. Alakisi bango lokola ndakisa mpo na biso, ntango alobaki ete: “Bango nyonso bakufaki kati na kondima, bazangi kozwa biloko bilakami, kasi bamonaki yango mosika mpe bapesaki yango losako.”​—Baebele 11:13.

Lelo oyo tobelemi mpenza na kokokisama ya bilaka yango. Kasi tozali na bato na maladi mpe na mibange kati na biso baoyo bayebi te soki bakokoka mpenza komona nsuka na biloko mabe oyo. Mbala mosusu ndambo kati na bango bakoki mpe kokufa na kondima kozanga ete bamona kokokisama ya bilaka wana nyonso kati na bomoi na bango ya mikolo oyo. Mpo na bato yango maloba ya Paulo na 2 Bakolinti 4:16-18 makoki kozala elendiseli monene.

Jéhovah azali kokanisa basaleli na ye nyonso ya sembo, ata baoyo bazali na maladi to mibange. (Baebele 6:10) Na bisika mingi ya Biblia, balobeli na lokumu nyonso mibange ya sembo, mpe kati na Mibeko ya Moize, balobeli sikisiki lokumu oyo esengelaki kopesama na mikóló. (Levitike 19:32; Nzembo 92:12-15; Masese 16:31) Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki komonisa bosepeli mpe limemya epai na mibange. (1 Timoté 5:1-3; 1 Petelo 5:5) Mokanda moko ya Biblia mozali kolobela libateli ya bolingo mpe komipimela ya monene oyo elenge mwasi moko amonisaki epai na bokilo na ye oyo azalaki mobange. Mokanda yango ezwaki na motindo mobongi nkombo ya elenge mwasi yango, Luta.

Mosungi oyo amipesi

Bomoi ezalaki bololo mpo na mobange Naomi. Nzala makasi epusaki ye, elongo na libota na ye ya moke, na kotika baninga mpe libula na bango na Yuda mpe na kokende kofanda na Est ya ebale Yaladene na mokili ya Moaba. Wana, mobali na Naomi akufaki, atikaki ye moko elongo na bana na ye mibale ya mibali. Bana bango bakolaki mpe babalaki, kasi na nsima yango mibale mpe bakufaki. Naomi atikalaki na bakitani te baoyo basengelaki kobatela ye.

Lokola asilaki kokóma mobange azalaki lisusu na likoki te ya kobanda libota mosusu ya sika, mpe azalaki bobele na elikya moke kati na bomoi. Na kozanga moimi, alingaki kozongisa epai na bamama na bango Luta mpe Orpa, basi oyo bana na ye batikaki, mpo ete bakoka kozwa mibali misusu. Alingaki kozonga ye moko na ekolo na ye. Bobele bongo, lelo oyo mibange misusu bazali kobela na makanisi, mingi mpenza soki basili kobungisa balingami na bango. Lokola Naomi, bakoki kozala na mposa ya bato mpo na kobatela bango, kasi balingi te kozala mokumba.

Nzokande, Luta atikaki bokilo na ye te. Alingaki mobange mwasi wana, mpe alingaki Jéhovah, Nzambe oyo Naomi azalaki kosambela. (Luta 1:16) Yango wana, bango nyonso basalaki mobembo ya bozongi na Yuda. Na mokili wana, ezalaki na bibongiseli ya bolingo na nse ya Mibeko ya Jéhovah ete babola bakoki kolokota, to koyanganisa nyonso oyo etikalaki na bilanga nsima ya kobuka mbuma. Luta, oyo azalaki elenge amipesaki na bolingo nyonso mpo na kosala yango, alobaki ete: “Tika nakenda na elanga.” Asalaki mosala na molende nyonso mpo na matomba na bango mibale.​—Luta 2:2, 17, 18.

Bosembo mpe bolingo na Luta mpo na Jéhovah ezalaki elendiseli monene mpo na Naomi, oyo akómaki bongo na makanisi ya malamu mpe ya elikya. Sikawa boyebi na ye ya Mibeko mpe ya mimeseno ya ekolo ezalaki na ntina mingi. Apesaki toli ya mayele epai na mosungi na ye oyo amipesi ete, na nzela ya libala mpo na kobotela mowei mwana, Luta oyo azalaki elenge akoka kozongisa libula ya libota mpe kozwa mwana mpo na kolandana ya libota. (Luta, mokapo 3) Luta azali ndakisa kitoko mpo na baoyo bazali komipesa mpo na kobatela bato na maladi mpe mibange. (Luta 2:10-12) Kati na lisangá ya boklisto na mikolo na biso, makambo mingi makoki mpe kosalema mpo na bato na maladi mpe mibange. Lolenge nini?

Komibongisa ezali na motuya mingi

Kati na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, bazalaki kokoma nkombo ya basi bakufeli mibali oyo bazalaki na bosenga ya lisungi ya mosuni. (1 Timoté 5:9, 10) Bobele bongo lelo oyo, bankulutu bakoki kokoma nkombo na bato na maladi mpe mibange oyo basengeli kozwa lisalisi. Kati na masangá mosusu, basengaki na nkulutu moko atalela yango lokola mokumba na ye ya sikisiki. Mpo ete mibange mingi, lokola Naomi, balingaka te kosenga lisalisi, ndeko motindo wana asengeli na mayele nyonso kotalela mpe​—na mayele mpe na bososoli—​komindimisa ete makambo ya ntina masalemi. Na ndakisa, akoki kotala soki na Salle du Royaume ezali na biloko bisengeli mpo na bato na maladi mpe mibange. Soki ebongi, akoki kokanisa mpo na biloko lokola ebuteli mpo na kiti ya bandikapé, kabiné oyo ebongi, eyokeli mpo na baoyo bayokaka malamu te, mpe bisika mpo na bakiti ya spesiale. Ndeko yango asengeli lisusu kosenzela ete baoyo bakoki te koya na Salle du Royaume bakoka kozwa bakasete ya makambo malekaki na makita mpo na koyoka yango to kolanda makita na telefone.

Mposa ekoki kozala ete bazwa bango na motuka mpo na komema bango na makita to na ba assemblées. Ndeko mwasi moko ya mobange akutanaki na mikakatano mpamba te ndeko oyo azalaki komema ye ntango nyonso na makita azalaki te. Asengelaki kobenga bandeko mingi na telefone liboso ete moto akoka komema ye mpe na nsima amiokaki ete azali mokumba. Soki nkulutu moko azalaki kotalela makambo nyonso wana, mbɛlɛ ekitisaki mitungisi na ye.

Nkulutu wana akoki mpe kosenga na mabota mingi ete ekoka kokitana na kotala mibange. Na motindo yango bilenge bakoki koyekola ete kobatela mibange ezali eteni ya bomoi ya moklisto. Ezali malamu mpo na bana bayekola komema mokumba wana. (1 Timoté 5:4) Mokengeli moko ya zongazonga alobi ete: “Na lolenge nayebi, bana to bilenge mingi te bakendeke na bolingo na bango moko kotala mibange to bato na maladi.” Ekoki kozala ete bazali kokanisa yango te, to bazali koyeba mpenza te nini bakoki kosala to koloba; baboti bakoki koteya bango yango.

Omikundola ete mibange mingi bakosepela koyeba liboso ntango oyo moninga moko akoya. Likambo yango lizali kobakisela bango esengo ya kozela mopaya. Soki bato oyo bayei bamemi mwa biloko ya kolya lokola kafé mpe gato, mpe basukoli bakopo nokinoki, bakopengola kobakisa mokumba epai na mobange. Ndeko moko mpe mwasi na ye, baoyo bazali mibange kasi bazali naino na nzoto makasi, bazali na mokolo moko kati na poso wana batyaka bilei na kitunga na bango ya moke mpe babimaka mpo na kotala mibange ya lisangá. Boyei na bango ezali kosepelisa mingi.

Mpo na kosalisa mibange, masangá mingi masalaka boyekoli ya mokanda na moi. Na lisangá moko, batunaki na mabota mpe basakoli minzemba soki bakokaki kolinga mpe kozala na makoki ya kosimba etuluku lolenge yango, mpe litomba ezalaki ete etuluku moko ya Boyekoli esalemaki epai bilenge mpe mibange bazali kobatelana moko na mosusu.

Esengeli te kotika bobele bankulutu bango moko bazwa bibongiseli na likambo yango. Biso nyonso tosengeli koyeba bamposa na bato na maladi mpe mibange. Tokoki kopesa bango mbote na Salle du Royaume mpe kozwa ntango ya kosolola elongo na bango. Libyangi na bokutani kati na baninga ekoki kosepelisa bango mingi. Tokoki kosenga bango ete bakende elongo na biso na botamboli moke ya kominanola to bakende elongo na biso na bopemi. Temwe moko azalaki mbala mingi kokamata basakoli ya mibange elongo na ye na motuka wana azalaki kokende kosomba biloko na bamboka. Ezali na ntina mingi kosalisa mibange na komona ntango nyonso ete tozali na mposa na bango. Bopesa bango nzela te ya komibenda bango moko, lokola Naomi alingaki kosala yango, likambo oyo elingaki koyeisa bobange na ye makasi mpenza.

Bilenge oyo bazali bibosono to na maladi basengeli kozwa likebi na biso. Ndeko moko oyo azalaki na bana mibali misato oyo bazwaki bokono moko oyo bokosilaka te, mpe mibale basili kokufa na bokono yango, alobaki ete: “Ekoki kozala mpasi mpo na lisangá kolanda komonisa libateli ntango moto azali na bokono oyo ezali koumela ntango molai. Mpo na nini bakoki te kopona mwa bilenge basakoli oyo bakoki kotyela bango motema mpo bakoka kotalela texte ya mokolo na mokolo mpe kotanga mokapo ya Biblia elongo na moninga na bango oyo azali na bokono na mbeto? Bilenge ba pionniers bakoki kotyama na molongo mpo na kokitana.”

Ntango emonani ete moto na maladi akobika te

Basaleli ya Jéhovah bamonisaka ntango nyonso mpiko liboso na kufa, ezala euti na maladi to na monyoko. Wana bato na maladi bamoni ete liwa ekómi pene, bakoki na ntembe te kozala na maoki ndenge na ndenge. Nsima na liwa na bango, bandeko na bango basengeli kolekisa ntango moko ya kobongisa makanisi, ya mawa, mpe na nsuka bakobondisama. Mpo na yango, ezali mbala mingi malamu ete moto na maladi aloba polele na ntina ya liwa lokola Yakobo, Davidi, mpe Paulo basalaki yango.​—Genese, mikapo 48 mpe 49; 1 Mikonzi 2:1-10; 2 Timoté 4:6-8.

Temwe moko oyo azali monganga akomi ete: “Tosengeli kozala polele na likambo yango. Na boumeli ya mosala na ngai namoni naino te ete ezali na litomba ya kobombela moto na maladi ete akobika te na maladi na ye.” Nzokande, tosengeli kososola oyo moto na maladi ye moko alingi koyeba mpe ntango nini alingi koyeba yango. Bato na maladi mosusu balobaka polele ete bamoni ete liwa ekómi pene, mpe balingaka kolobela makanisi mpe maoki na bango na ntina yango. Basusu bakangamaka na elikya, mpe baninga na bango basengeli kolikya elongo na bango.​—Tala Baloma 12:12-15.

Moto oyo azali pene ya liwa akoki kolemba mingi to kobulungana mingi na boye ete akozanga ata makoki ya kobondela. Moto na maladi lolenge yango akoki kobondisama na koyoka engebene Baloma 8:26, 27 ete Nzambe akososolaka “bileli biyokami te.” Jéhovah ayebi ete kati na makambo lolenge yango moto akoki kozala na nkaka mpo na kozwa maloba ya kosala libondeli.

Soki ekoki kosalema, ezali na ntina mingi kobondela elongo na moto na maladi. Ndeko moko ayebisi ete: “Ntango mama azalaki pene ya kokufa mpe azalaki lisusu na nguya ya koloba te, amonisaki wana akangaki maboko na ye ete alingaki ete tobondela elongo na ye. Nsima na libondeli, toyembaki moko na banzembo ya Bokonzi, mpo ete mama na ngai azalaki kosepela mingi na miziki. Liboso, tomekolaki banote na yango, mpe nsima toyembaki maloba na yango na mongongo ya kokita. Amonisaki polele ete asepelaki na yango. Na ntembe te, banzembo oyo tomeseni koyemba na bomoi na biso ya ba Témoins de Jéhovah ezali na maoki oyo makoki te kolimbolama na motindo mosusu.”

Kosolola elongo na moto oyo azali pene na kokufa ezali kosenga bolingo, mayele mpe maoki. Moto oyo ayei kotala ye akoki kobongisa makambo ya kolendisa mpe ya koyikisa kondima mpiko oyo akolobela, mpe asengeli kozala na bososoli ete apengola masolo ya mabe na ntina na bato mosusu mpe mikakatano na bango. Lisusu, boumeli na yango esengeli kozwa ntango mingi te. Ata emonani ete moto na maladi azali kooka eloko te, ezali malamu komikundola ete akoki naino koyoka makambo oyo bazali koloba. Na yango, esengeli kokeba na oyo bozali koloba.

Mokumba ya bato nyonso

Kobatela bato na maladi to mibange ezali mokumba monene. Mpo na basangani ya libota na moto na maladi, ezali mosala makasi, na mosuni mpe na maoki. Ebongi ete bandeko mosusu ya lisangá basosola mpe basalisa bango. Baoyo bazali kobatela basangani ya libota na bango to baninga na bango baklisto oyo bazali na maladi bazali kosala malamu, ata soki ezali kosenga ete bazangisa mbala mosusu makita to mpe mosala na bango ya kosakola mokiti mpo na mwa ntango. (Tala 1 Timoté 5:8.) Bakoki kozwa makasi na ezaleli ya basangani ya lisangá. Mbala mosusu ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko akoki kokitana mpo na mwa ntango ye oyo azali na mokumba ya kobatela mobeli, mpo ete akoka kokende na makita to akoka kosepela mpo na mwa bangonga na mosala ya kosakola.

Ya solo, soki ozali moto na maladi osengeli mpe kosala eloko. Kozanga elikya mpe maoki ya kozanga lisalisi mpo na maladi na yo ekoki kosilikisa yo, kasi nkanda etangolaka moto mpe ekobengana bato mosusu. Osengeli bongo komonisa botondi mpe kosala elongo na basusu. (1 Batesaloniki 5:18) Bondela mpo na basusu oyo bazali na mpasi. (Bakolose 4:12) Kanisa mozindo likoló na solo ya Biblia mpe solola yango elongo na bato oyo bayei kotala yo. (Nzembo 71:17, 18) Sala makasi oyeba ntango nyonso bokoli ya libota ya Nzambe, oyo ezali kolendisa kondima. (Nzembo 48:12-14) Pesa botondi epai na Jéhovah mpo na bokoli wana ya esengo. Kokanisa likoló na makambo oyo ekoki kopesa na mikolo na biso ya nsuka kitoko mingi, lokola kolala ya moi epesaka pole ya mozindo mpe mɔ́tɔ koleka moi na ntango na midi.

Tosengeli biso nyonso kobunda mpo na kobatela elikya oyo, mingi mpenza na ntango ya mpasi, ekobatela makanisi na biso lokola ekoti. (1 Batesaloniki 5:8) Ezali malamu kokanisa na ntina na elikya ya lisekwa mpe moboko na yango makasi. Tokoki kotala liboso na elikya nyonso mpe na motema mɔ́tɔ mpo na mokolo oyo maladi ekozala lisusu te mpe botau ya konuna bokozala lisusu te. Bongo, moto nyonso akooka malamu. Ata bakufi bakosekwa. (Yoane 5:28, 29) Tozali komona “makambo [wana] mamonani te” na miso na biso ya kondima mpe ya motema. Tika ete tobosana yango te.​—Yisaya 25:8; 33:24; Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto