Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/8 nk. 27-30
  • Tómonisa bolingo ya boklisto epai na mibangé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómonisa bolingo ya boklisto epai na mibangé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Babombi ya boyebi”
  • “Bómonisa bizaleli ya moto na Nzambe”
  • Kotya likebi mbala na mbala na bamposa ya elimo
  • Oyo lisangá ekoki kosala
  • “Bakómaki mibangé mpe bazalaki na esengo”
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Lolenge baklisto bakoki kosalisa mibangé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Pesáká mibange lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/8 nk. 27-30

Tómonisa bolingo ya boklisto epai na mibangé

SAMUEL JOHNSON, mokomi moko ya ekeke ya 18, ayebisaki lisoló na ntina na elenge mobali moko oyo, na ntango azalaki kokende kotala baninga, abosanaki epai atyaki ekoti na ye. Likambo yango elobelamaki te. Johnson akóbi na koloba ete: “Kasi soki kozanga bokengi motindo wana emonani epai na mobangé moko, mbele bato balingaki kotombola mapeka na bango mpe koloba ete: ‘Makoki na ye ya kosimba makambo esili kobunga.’”

Lisoló ya Johnson ezali komonisa ete mibangé, mbala mosusu na bituluku mike mosusu ya bato, batalelamaka na lolenge ya bosembo te. Atako kotalela bamposa ya mibangé esengaka milende mingi, matomba mazwamaka mingi epai na ngambo nyonso mibale. Wapi mikakatano mpe mbano, mpe mpo na nini motuya ya bato oyo batalelami na likambo yango ezali sé kokóla?

Engebene mitango, 6% ya motuya ya bato na mokili mobimba, bazali na mibu ya kobotama 65 to koleka, mpe na mikili ya bozwi bonene ya motuya yango ezali mbala mibale koleka. Kati na lisangani ya mikili ya bozwi ya mpoto, oyo ebengaki 1993 ete “Mobu ya mibangé mpe ya boyokani kati na mabota na mikili ya Mpótó,” moto 1 katikati na bato 3 azali na mibu koleka 50. Kuna, lokola mpe kati na mikili mingi ya bozwi, kokita ya motuya ya kobotama ya bana mpe bokóli ya elikya ya kozala na bomoi ezali kosala ete eteni monene ya bato bakóma mibangé. Kobatela baoyo bapusani na bambula ya kobotama kati na ezalela motindo wana ezali mokumba monene mpenza. Makambo makeseni na lolenge ezalaki kosalema kala na Orient!

“Babombi ya boyebi”

Das Handwörterbuch des Biblischen Altertums für gebildete Bibelleser (Búku mpo na lisoló ya kala ya Biblia mpo na batangi ya Biblia oyo bakotá kelasi molai) elobi ete kati na lisoló ya kala ya mikili ya Orient “mibangé bazalaki kotalelama lokola babáteli ya makambo ya motuya ya bonkɔ́kɔ, elingi koloba, bwanya mpe boyebi boleki likoló, ezali mpo na ntina wana nde bilenge balendisamaki ete basala boninga elongo na bango mpe báyekola makambo epai na bango.” Smith’s Bible Dictionary epesi ndimbola oyo ete: “Kati na mabota, [mibangé] batalelamaki lokola babómbi ya boyebi . . . [Bilenge] bazalaki kotikela bango nzela ete bábimisa liboso makanisi na bango.”

Botosi mozindo epai na mibangé emonanaki kati na Mibeko ya Mose na Lewitiko 19:32: “Okotɛlɛma liboso na nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali anuni.” Na yango, mibangé bazalaki na etelemelo ya monene kati na mboka mpe batalelamaki lokola bato ya ntina. Na ntembe te, ezali na motindo wana nde Luta, mobotama ya Moaba, azalaki kotalela bokilo na ye Moyisraele, Naomi.

Luta azwaki ekateli ya ngwi ya kolanda Naomi longwa Moaba kino na Yisraele, mpe alandaki batoli ya Naomi na likebi nyonso. Na ntango bakómaki na Beteleme, Naomi amonaki ete lobɔkɔ ya Yehova ezalaki kotambolisa makambo mpe na nsima, ye nde apesaki Luta malako mpo na lolenge ya komitambolisa. (Luta 2:20; 3:3, 4, 18) Bomoi ya Luta etambolisamaki na lolenge ya teokrasi wana azalaki koyekola makambo epai na Naomi. Emonanaki ete bokilo na ye ya mwasi azalaki mobómbi ya boyebi.

Lolenge moko, lelo oyo, bilenge basi baklisto bakoki kozwa litomba na kosaláká boninga na basi mibangé kati na lisangá. Mbala mosusu, na ntango elenge mwasi moko azali kokana kobala to azali kobundana na likambo moko ya mpasi oyo ezali kotungisa ye. Koluka toli mpe lisungi ya ndeko mwasi mobangé oyo ateli, oyo azali na boyebi mingi na likambo yango ekozala mpenza likambo ya mayele!

Lisusu, lisangani ya bankulutu ekoki kozwa litomba na kondima kosalela boyebi ya mibangé oyo bazali kati na bango. Tokoki kozwa liteya na libunga oyo Lota asalaki. Kowelana kati na bakɛngɛli ya bibwele ya Abalayama mpe ya Lota esengaki bango ete bakamata ekateli oyo esengelaki kotalela moko moko na bango. Lota asalaki liponi ya bozoba. Elingaki mpenza kozala malamu soki asengaki liboso toli epai na Abalayama! Lota alingaki kozwa litambwisi oyo ebongi mpe akokaki kobatela libota na ye na mpasi oyo ebimaki mpo na liponi na ye ya nokinoki. (Genese 13:7-13; 14:12; 19:4, 5, 9, 26, 29) Olandaka na likebi nyonso oyo bankulutu bateli balobaka liboso ya kobimisa likanisi na yo na ntina na likambo moko?

Ebele ya mibangé bazali na molende uta kala kati na mosala ya Yehova, lokola Simeona mpe Ana na ekeke ya liboso. (Luka 2:25, 36, 37) Kokotisa mibangé kati na misala ya lisangá, na meko oyo makasi na bango epesi bango nzela, ezali komonisa ete tozali na limemya epai na bango mpe tozali komibanzabanza mpo na bango, ata soki banuni mpenza mingi. Mbala mosusu elenge moko azali na mposa ya lisungi mpo na kobongisa mokumba na ye kati na eteyelo ya mosala ya teokrasi. Nkulutu ya mayele akoki koloba ete mopesi na toli oyo abongi ekoki kozala mosangani moko ya lisangá oyo apusani mingi na mbula ya kobotama, ye oyo akomeli, azali na bwanya, na boboto, mpe azali na ntango.

Nzokande, komibanzabanza mpo na bamposa ya sikisiki ya mibangé esengaka makambo mingi lisusu. Mingi bazali komitungisa mpo ete bazali bobele bango moko, bazali kobanga mobulu mpe mikakatano ya mosolo. Lisusu, soki mibangé balembi mingi, mikakatano wana miyeisamaka makasi mpo na kobeba ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe mpo na kooka mawa wana makasi na bango ezali kosila. Na ntango wana, bazali na mposa ete bátyela bango likebi mingi koleka. Lolenge nini moto mokomoko mpe lisangá mobimba bakoki kosala?

“Bómonisa bizaleli ya moto na Nzambe”

Na ekeke ya liboso, Paulo akomaki na kopemama ya Nzambe kati na 1 Timɔtɛ 5:4, 16 ete: “Nde sɔkɔ mwasi akufeli-mobali ajali na bana to bana na bana na ye, bango [báyekola komonisa bizaleli ya moto na Nzambe, NW] kati na ndako na bango mpenja liboso mpe bajongisa mwa makabo epai na baboti. Jambi oyo ekosepelisa Njambe. Sɔkɔ mondimi mwasi mɔkɔ ajali na basi-bakufeli-mibali, tika ete aleisa bango, mpe [lisangá, NW] ekojua bojito tɛ, ete [lisangá, NW] abatela bango bajali basi-bakufeli-mibali na sembo.” Kotalela mibangé ezalaki mokumba ya libota. Soki mosangani moko ya lisangá oyo azali mobangé azali na mposa ya lisungi, nsima wana libota na ye basali nyonso ekokaki na bango kosala, mokumba ezalaki kopesama na lisangá. Malako wana mabongwani te.

Nini esungaka baklisto na komonisa bolingo ya boklisto epai na mibangé na komonisáká bizaleli ya moto na Nzambe kati na ndako na bango? Talá maloba malandi ya Batatoli basilá kobatela bato oyo bapusani na mbula.

Kotya likebi mbala na mbala na bamposa ya elimo

Felix, ye oyo asungaki mwasi na ye mpo na kobatela baboti na ye amikundoli ete: “Kotalela mokapo ya mokolo na mokolo elongo ezalaki lisungi moko monene. Makambo oyo ngai moko nakutanaki na yango mpe bamposa na ngai esangisamaki na malako ya Yehova.” Ya solo, kati na likambo litali kosunga mibangé, likambo ya liboso mpenza ezali bongo kotya likebi oyo ekoki mpo na kolendisama na bango ya elimo. Yango ezali na boyokani na maloba ya Yesu oyo mazwami na Matai 5:3, (NW): “Esengo na baoyo bazali komibanzabanza mpo na bamposa na bango ya elimo.” Mokapo ya mokolo na mokolo ekoki kobakisama likoló na manaka ya botangi ya Biblia, na boyekoli mikanda mikolimbolaka Biblia, mpe na libondeli. Peter alobi: “Emonani lokola ete mibangé basepelaka na makambo oyo masalemaka mbala na mbala.”

Ee, kosala makambo mbala na mbala ezali na ntina mingi mpo na makambo ya elimo. Mibange basepelaka na yango te bobele na makambo ya elimo, kasi lisusu mpo na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Ata baoyo bazali bobele na bolembu ya moke bakoki kolendisama na esengo nyonso na “kolamuka na mbeto mpe na kolata malamu mikolo nyonso,” wana ezali maloba ya Ursula. Ya solo, tosengeli kopɛngola ezaleli ya komonisa lokola ete tozali na bokonzi likoló na makambo na bango. Doris alobi ete na mawa nyonso, milende na ye ya bolingo malamu ezali koyebana te. “Nasalaki mabunga mingi. Mokolo moko nasengaki tata na ngai ete asanzaka simisi na ye mokolo na mokolo. Na nsima, mama na ngai akundwelaki ngai ete: ‘Azali naino mobali na ngai!’”

Mibange bazalaki mpe bilenge, kasi mpo ete bilenge bámitya na esika ya mibangé ezalaka likambo mpasi mingi. Nzokande, wana ezali nzela bobele moko mpo na kososola bamposa na bango ya sikisiki. Kopusana na mbula ememaka na kosilika. Gerhard alobi ete: “Bokilo na ngai ya mobali amitungisaki mingi mpamba te akokaki lisusu te kosala makambo oyo azalaki kosala yango liboso. Ezalaki mpenza mpasi mpo na ye kondima bosolo ya likambo yango. Bomoto na ye ebongwanaki.”

Wana makambo mazali kobongwana, emonanaka mingi ete mobangé amonisaka kosilika na ye na kotɔngáká basusu, mingimingi baoyo bazali kobatela ye. Ntina na yango ezali mpasi te. Likebi litondi na bolingo ezali kokundwela ye ete nguya na ye ekiti. Okosala nini liboso na matongi mpe koimaima wana?

Omikundola ete, mayoki ya mabe motindo wana ezali komonisa te likanisi ya Yehova likoló na milende na yo. Landá ntango nyonso kosala malamu, mpe zala na lisosoli malamu ata soki ezali mbala mosusu kobimisela yo matongi oyo elongobani te. (Kokanisá na 1 Pɛtɛlɔ 2:19.) Lisangá ekoki kopesa lisungi monene.

Oyo lisangá ekoki kosala

Masangá mazali na bantina malamu ya kozala na botondi mozindo mpo na milende oyo bandeko balingami mibangé mibali mpe basi bamonisaki na bambula eleki. Ekoki kozala ete bango nde batyaki moboko na kosalema ya lisangá wana, oyo ebandaki bobele na mwa ndambo moke ya basakoli esili koleka ebele ya bambula. Lisangá elingaki kozala lolenge nini soki milende na bango te, mpe mbala mosusu, lisungi ya mosolo oyo bazali kopesa lelo oyo?

Na ntango mposa ya lisungi makasi ezali, mpo na mosakoli moko oyo akómi mobangé, bandeko na ye ya mosuni basengeli komema mokumba wana bango moko te. Basusu bakoki kopesa lisungi na kosaleláká bango misala, kolamba, kosokola, kotambolisa mobangé mwa moke, komema ye na likita ya boklisto, to bobele kosolola na kati na Ndako ya Bokonzi. Banso bakoki kosangana na yango, kosala mosala malamu mpe kozongela yango mbala na mbala epesaka matomba soki milende misangisami.

Kosangisama ya milende ezali likambo oyo bankulutu basengeli kobosana yango te na ntango bazali kobongisa mosala ya kotala bampate. Masangá mosusu mazali ndakisa malamu mpo na likambo oyo; bankulutu bazali kosenzela ete mosala ya kotala bampate ekoka kosalemaka ntango nyonso, epai na mibangé mpe baoyo bazali na bolembu na nzoto, ata mpe baoyo babatelami malamu na mabota na bango. Nzokande, emonani ete masangá mosusu basengeli kosenzela lisusu mingi na ntina na masɛngisi na bango epai na mibangé.

Ndeko mobali moko ya sembo, oyo akómaki pene na mibu na 90, abatelamaki na mwana na ye ya mwasi mpe mobali ya mwana na ye, oyo batikaki mosala na Betele mpo na kokende kobatela ye. Nzokande, koya ya basangani mosusu ya lisangá ezalaki mpe na ntina mpo na ye. Ndeko mobali yango amilelaki ete: “Ntango nazalaki kokende kotala bato ya maladi, nazalaki kosambela elongo na bango. Kasi ata moto moko te asili kosambela elongo na ngai.” Likebi ya bolingo ya bandeko ya mosuni ezali kolongola te bankulutu na mokumba ya ‘kobatela etɔnga na Njambe na mitema malamu.’ (1 Pɛtɛlɔ 5:2) Lisusu, baoyo bazali kobatelama mibangé bazali na mposa ya kolendisama mpo na kokokisa mosala oyo ya malamu.

“Bakómaki mibangé mpe bazalaki na esengo”

Alexander von Humboldt, ye oyo azalaki moto ya zébi na Allemagne na ekeke ya 19, apusanaki mingi na mibu ya kobotama na ntango elenge mwasi moko atunaki ye soki azalaki komona te ete kokóma mobangé ezalaki kookisa ye mpii. Moto wana ya mayele ayanolaki ete: “Olobi solo. Kasi kokóma mobangé ezali nzela bobele moko mpo na koumela mingi na bomoi.” Bobele bongo lelo, bandeko mingi, mibali mpe basi, bazali kopesa ndakisa malamu mpo na oyo etali bongo kondima mikakatano ya bobange mpo na libaku malamu ya kozala moto oyo azali na bomoi molai. Bazali komonisa ezaleli oyo Abalayama, Yisaka, Davidi, mpe Yobo bamonisaki, baoyo “bakómaki mibangé mpe bazalaki na esengo.”​—Genese 25:8; 35:29; 1 Ntango 23:1; Yobo 42:17, NW.

Kokóma mobangé ememaka mokumba ya kondima lisalisi na botondi nyonso mpe komonisa matondi na bosembo nyonso. Bwanya ezali kosenga ete moto nyonso ayeba epai wapi makoki na ye esuki. Nzokande, yango ezali te kokanga mobangé kati na ezalela ya kozanga mosala. Maria azali na mibu ya kobotama koleka 90, kasi azali naino koyangana na makita ya lisangá mpe apesaka biyano. Ndenge nini asalaka yango? “Nakoki lisusu kotanga te, kasi nayokaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na kaseti. Nabosanaka makambo mingi, kasi nasalaka ntango nyonso makasi mpo ete nápesa eyano.” Lokola Maria, komipesa na komanyola likoló na makambo oyo makoki kotonga esalisaka moto átikala ntango nyonso makasi mpe ábatela bomoto ya boklisto.

Na nsé ya bokonzi ya Nzambe, bompaka ekozala te. Na ntango yango, bato oyo bakómaki mibangé na ebongiseli oyo mpe mbala mosusu bakokufa, na ntango bakosekwa, bakozala na makanisi kitoko mpo na libateli mpe likebi litondi na bolingo oyo bamoniselaki bango. Wana mibangé yango bakozonga na bomoi mpe bakozongela nguya, na ntembe te, bakozala na bolingo makasi mpo na Yehova mpe botondi mozindo epai na baoyo basungaki bango na boumeli ya mimekamo na bango kati na ebongiseli oyo.​—Kokanisá na Luke 22:28.

Ezali boni mpo na baoyo bazali kobatela mibangé lelo oyo? Mosika te, na ntango Bokonzi ekotalela makambo ya mabelé na mobimba na yango, bakomikundola na esengo nyonso mpe na kobondisama ete basundolaki te mikumba na bango kasi bamonisaki ezalela ya kobanga Nzambe na komonisáká bolingo ya boklisto epai na mibangé.​—1 Timɔtɛ 5:4.

[Etanda na lokasa 30]

Mibangé bakosepela soki bokei kotala bango

Okoki kosala malamu mingi na kokana kokende kotala ye oyo akómi mobangé, mbala mosusu mpo na miniti 15, na nsima ya mosala ya kosakola. Kasi ekozala malamu ete esalema te bobele na mbalakaka, lokola lisoló oyo etyami awa na nsé ekomonisa yango.

Brigitte mpe Hannelore bazalaki elongo kati na mosala ya kosakola, basololaki na mobangé mobali moko na ekuke ya ndako na ye. Bandeko basi wana basololaki na ye na boumeli ya miniti mitano, na nsima bayaki koyeba ete ye mpe azalaki Motatoli ya Yehova, mosangani ya lisangá moko na bango. Oyo nde nsoni! Kasi makambo malekaki na lolenge malamu. Nokinoki, Hannelore akamataki bibongiseli mpo na kozonga kotalaka ndeko mobali wana mpe kosalisa ye na koyangana na makita ya lisangá.

Oyebi nkombo mpe baadresi ya mosakoli mokomoko mobangé oyo afandaka na teritware epai kuna osakolaka? Okoki komibongisa mpo na kokende kotala ye mpo na miniti moke? Na ntembe te, akosepela na yango mpenza.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto