Libula ya boklisto oyo ekomonanaka mingi te
LISOLÓ YA BLOSSOM BRANDT
Nabotamaki na le 17 Janvier 1923, na mokolo ya mbula mpɛmbɛ na engumba San Antonio, na etúka ya Texas. Libandá lizalaki na malili makasi, kasi nayambamaki na mabɔkɔ na mɔ́tɔ ya baboti na ngai baklisto oyo batondi na bolingo, Judge mpe Helen Norris. Kobanda bomwana na ngai, bomoi mobimba ya baboti na ngai etóngamaki likoló ya losambo na bango mpo na Jéhovah Nzambe.
NA MOBU 1910, ntango mama na ngai azalaki na mibu mwambe, baboti na ye balongwaki na engumba Pittsburgh, na etúka ya Pennsylvanie, mpo na kofanda na ferme moko penepene ya engumba Alvin, na Texas. Ezali kuna nde bazalaki koyekola solo ya Biblia epai na moto moko oyo afandaki penepene na bango. Mama alekisaki bomoi na ye mobimba na koluka kolamwisa mposa ya bato na ntina na elikya ya Bokonzi. Azwaki batisimo na 1912, nsima wana libota na ye ekendeki kofanda na engumba Houston, na Texas.
Mama na ngai mpe baboti na ye bakutanaki mpo na mbala ya liboso elongo na Charles Russell, prezidá ya liboso ya la Société Watch Tower, ntango akendaki kotala lisangá na bango na engumba Houston. Mbala mingi, libota wana lizalaki koyamba na ndako na bango bamonisi ya la Société baoyo bazalaki kosala mibembo, bamonisi oyo babengamaki na ntango wana ba pèlerins. Mwa bambula na nsima, mama akendaki kofanda elongo na baboti na ye na engumba Chicago, na Illinois, mpe ndeko Russell alekaki lisusu kotala lisangá wana.
Na 1918, nkɔ́kɔ ya mwasi azwaki maladi babengi grippe espagnole, mpe lokola yango ezalaki kolɛmbisa nzoto na ye, minganga basɛngaki ete akende kofanda na mokili ya molungé. Lokola nkɔ́kɔ ya mobali azalaki kosala na kompanyi ya engbunduka Pullman, na 1919, batindaki ye mpo na kosala na Texas. Ezali kuna, na engumba San Antonio, nde mama akutanaki na elenge mobali moko, mosangani ya molende ya lisangá, na nkombo Judge Norris. Nokinoki, balinganaki, mpe na nsima babalanaki, mpe Judge akómaki tata na ngai.
Tata na ngai ayekoli solo ya Biblia
Judge (Zúzi) azwaki nkombo na ye uta kobotama, oyo bato mingi te bazali na yango. Ntango tata na ye amonaki ye mpo na mbala ya liboso, alobaki ete: “Mwana oyo azali lokola zúzi,” mpe yango ekómaki nkombo na ye. Na 1917, ntango tata na ngai azalaki na mibu 16, bapesaki ye trakte Où sont les morts? mpe trakte Qu’est-ce que l’âme? oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower. Nkɔ́kɔ na ngai ya mobali oyo abota tata akufaki mbula mibale liboso, mpe batrakte wana epesaki papa eyano na ntina na ezalela ya bakufi. Mokemoke, abandaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo ba Témoins de Jéhovah bayebanaki na ntango wana.
Nokinoki, tata amonisaki mposa ya kosangana na misala ya lisangá. Azwaki teritware epai akokaki kosakola, mpe nsima ya kelasi, azalaki kokenda kuna na vélo na ye mpo na kokabola batrakte. Amipesaki mingi mpenza mpo na kopalanganisa elikya ya Bokonzi mpe, na le 24 Mars 1918, amonisaki komipesa ya bomoto na ye epai na Jéhovah na nzela na batisimo ya mai.
Na mbula elandaki, wana mama ayaki kofanda na engumba San Antonio, nokinoki papa asepelaki na ye mpe alobaki na ye ete azalaki “na mwa kosɛka kitoko mpe na miso ya bulé” oyo amona naino te. Kozanga koumela, bayebisaki ete balingi kobalana, kasi ezalaki mpasi mpo na kolónga baboti ya mama na ngai. Atako bongo, na le 15 Avril 1921, libala lisalemaki. Bango nyonso mibale bazalaki na mokano ya kosala mosala ya pionnier.
Nabandi kosakola na bomwana mpenza
Ntango mama na ngai mpe tata na ngai bazalaki komibongisa mpo na kokende na assemblée ya Cedar Point, na Ohio, na 1922, bayaki koyeba ete mama azalaki na zemi na ngai. Mwa moke nsima ya kobotama na ngai, ntango tata azalaki bobele na mibu 22, aponamaki motambwisi ya mosala na lisangá. Yango elimboli ete asengelaki kosala bibongiseli nyonso mpo na mosala ya kosakola. Bobele mwa baposo nsima na kobotama na ngai, mama abimaki na ngai kati na mosala ya ndako na ndako. Na ntango wana, bankɔ́kɔ na ngai bazalaki mpe kosepela kobima na ngai kati na mosala ya kosakola.
Wana nazalaki na mibu mibale, baboti na ngai bakendaki kofanda na engumba Dallas, na Texas, mpe babandaki mosala ya pionnier mbula misato na nsima. Na butu, bazalaki kolala na mbeto ya mobembo pembeni na nzela mpe bazalaki kotya ngai na kiti ya nsima na motuka. Na yango, nakanisaki ete ezalaki lisano, kasi eyaki komonana ete bamibongisaki naino malamu te mpo na bomoi ya pionnier. Bongo tata na ngai afungolaki mwa kompanyi moke. Na nsima, asalaki remorque moko ya moke wana azalaki komibongisa mpo na kobanda mosala ya pionnier.
Liboso ya kokɔta kelasi, mama na ngai ayekolisaki ngai kotanga mpe kokoma, mpe nayebaki koyikitanya mwa mituya ya ebandeli. Mokano na ye ezalaki ete nakoka koyekola makambo. Azalaki kotelemisa ngai likoló na kiti moko penepene na ye mpo ete napangwisa basani wana azalaki kosukola yango, mpe azalaki koyekolisa ngai kokanga mikapo ya Makomami mpe nzembo ya Bokonzi, to hymnes lokola tozalaki kobenga yango kala.
Nasaleli Nzambe elongo na baboti na ngai
Na 1931, biso nyonso tokendeki na assemblée ya esengo mingi oyo esalemaki na engumba Columbus, na etúka ya Ohio, epai tozwaki nkombo ya Témoins de Jéhovah. Atako nazalaki bobele na mibu mwambe, nakanisaki ete ezalaki nkombo eleki kitoko oyo nayokaki naino te. Mwa moke nsima ya kozonga na biso, mwa kompanyi ya tata na ngai ezikaki nyonso, mpe tata mpe mama batalelaki yango lokola ete ezalaki “mokano ya Nkolo” mpo ete bakoka kozongela lisusu mosala ya pionnier. Na yango, kobanda eleko ya moi makasi ya mobu 1932, tozalaki na esengo ya kolekisa mibu mingi kati na mosala ya pionnier.
Baboti na ngai basalaki mosala ya pionnier na etúka ya Texas ya katikati mpo ete bakoka kozala penepene na baboti ya mama baoyo bazalaki na San Antonio. Kotambola na bisika nyonso epai bazalaki kotinda biso elimbolaki kobongola biteyelo mbala na mbala. Na bantango mosusu, bandeko bazalaki koloba kozanga kokanisa ete: “Mpo na nini bokofanda na esika moko te mpo na kobongisela mwana oyo ndako?”, lokola nde baboti na ngai bazalaki kobatela ngai malamu te. Kasi nazalaki kokanisa ete bomoi na biso ezalaki kopesa biso esengo mingi mpe nazalaki kosunga tata mpe mama kati na mosala na bango. Ya solo, nazalaki kobongisama mpo na oyo esengelaki kokóma na nsima lolenge ya bomoi na ngai.
Na boumeli ya basanza mingi natikaki te koyebisa tata mpe mama ete nalingaki kozwa batisimo, mpe mbala na mbala balobelaki ngai yango. Balingaki komindimisa ete nayebi mpenza bonene ya ekateli na ngai. Na mokolo ya le 31 Décembre 1934, ezalaki mokolo ya likambo wana monene ya bomoi na ngai. Bongo, na mpokwa liboso na likambo yango, tata asalaki nyonso mpo na komindimisa ete nasili komipesa kati na libondeli epai na Jéhovah. Na nsima asalaki likambo moko kitoko. Asalaki ete tofukama biso nyonso na mabolongo, mpe asalaki libondeli. Alobaki na Jéhovah ete azalaki na esengo mingi na ntina na likatami na mwana na ye moke ya mwasi ndenge amipesi epai na Ye. Na ntembe te, na bambula nyonso oyo elandaki, nasengelaki te kobosana butu wana!
Bankɔ́kɔ na ngai babongisi ngai
Katikati na mobu 1928 mpe mobu 1938, nazalaki mingimingi epai ya bankɔ́kɔ na ngai na San Antonio. Momeseno na bango mozalaki mpenza lokola oyo ya baboti na ngai. Nkɔ́kɔ ya mwasi azalaki colporteur, nkombo oyo bazalaki kobenga ba pionniers, mpe akómaki bongo kosala lokola pionnier mpo na ndambo ya mokolo. Nkɔ́kɔ mobali andimamaki lokola pionnier na Décembre 1929; bazalaki bongo kati na mosala ya kosakola mikolo nyonso.
Na mpokwa, nkɔ́kɔ ya mobali azalaki komema ngai na maboko na ye mpe azalaki koteya ngai nkombo ya minzoto. Azalaki kotangela ngai maloba kitoko oyo akangaki na motó. Nasalaki mibembo mingi elongo na ye kati na engbunduka mpo ete azalaki mosali na nzela ya engbunduka. Azalaki ntango nyonso moto oyo nazalaki kokima epai na ye na ntango na mikakatano; azalaki kobondisa ngai mpe kopangwisa mai na miso na ngai. Nzokande, wana nazalaki kozwa etumbu mpo na etamboli moko ya mabe mpe nazalaki koluka kobondisama epai na ye, azalaki koloba bobele (maloba oyo nazalaki kokanga ntina te na ntango wana, kasi ezalaki na elobeli ya polele): “Molingami na ngai, kozanga botosi ezali nzela ya mpasi.”
Mibu ya minyoko
Na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe basaleli ya Jéhovah bamonaki mpasi na minyoko mpe mobulu eutaki na bibele. Na nsuka ya mobu 1939, mama azalaki na mpasi makasi mpe esengelaki ete basala ye lipaso, yango wana tozongaki na San Antonio.
Bibele na bato na nkanda bazalaki koyangana ntango tozalaki kolakisa bazulunalo na balabala na San Antonio. Kasi, poso nyonso libota na biso lizalaki wana, moto na moto na esika asengeli kozala. Mbala mingi nazalaki komona na mosika lolenge bazalaki komema tata na ngai na biro ya bapolisi.
Tata na ngai alandaki kosala mosala ya pionnier, ata ntango mama atikaki mosala yango. Nzokande, azalaki te kozwa mosolo mokoki na kosaláká bobele mosala ya ndambo ya mokolo; na yango, ye mpe atikaki. Nasilisaki kelasi na 1939, mpe ngai nabandaki kosala.
Nkombo ya tata na ngai Judge (to Zúzi) ezalaki solo na ntina na boumeli ya mibu wana. Na ndakisa, etuluku moko ya bandeko na biso bakendeki kopesa litatoli na engumba oyo ezali na nord ya San Antonio, mpe mokonzi ya bapolisi atyaki bango nyonso na boloko. Akangaki bandeko soko 35, elongo na bankɔ́kɔ na ngai. Tata ayokaki nsango yango mpe akendaki kuna. Akotaki na biro ya mokonzi na bapolisi mpe alobaki ete: “Nazali Judge Norris, ya mboka San Antonio.”
Mokonzi na bapolisi atunaki ye ete: “Ee, Monsieur le juge, olingi nasala nini mpo na yo?”
Tata na ngai azongisaki ete: “Nayei mpo na kobimisa bato oyo bazali awa na boloko.” Na maloba wana, mokonzi na bapolisi atikaki bango kozanga kosenga mosolo, mpe atunaki mituna misusu te!
Tata na ngai alingaki mingi kosakola na babiro ya bandako minene ya engumba, mpe alingaki mpenza mingi kosolola na bazuzi mpe na ba avocats. Azalaki koloba na moto oyo azalaki koyamba bato ete: “Nazali Judge (Zúzi) Norris, mpe nayei kotala zúzi Songolo.”
Na nsima, ntango na bokutani elongo na zúzi yango, azalaki koloba liboso ete: “Sikawa, liboso ete nayebisa ntina ya boyei na ngai, nalingi kolimbola yo ete nazali zúzi ntango molai koleka yo. Nazali zúzi bomoi na ngai mobimba.” Mpe na nsima azalaki kolimbola lolenge oyo bapesaki ye nkombo na ye. Likambo yango lizalaki kopesa nzela na bokutani ya boninga mpe akólisaki boyokani malamu elongo na bazúzi mingi na mikolo wana.
Botɔndi na ngai mpo na litambwisi epesamaki na baboti na ngai
Nazalaki na mibu ya yikiyiki ya bolenge, mpe nayebi ete tata mpe mama bazalaki mbala mingi komitungisa wana bazalaki kotalatala ngai mpe komituna soki nakosala nini na nsima. Lokola bana nyonso basalaka yango, mbala mingi natyaki baboti na ngai na komekama, ntango nazalaki kosenga bango nzela ya kosala likambo moko to ya kokende na esika moko nzokande nayebaki malamu ete bakoboya. Mbala mosusu nazalaki kolela. Ya solo, mbele nabebaki soki balobelaki ngai ata mbala moko ete: “Kende, sala lokola olingi. Etali biso te.”
Likambo ya koyeba ete nakokaki te kopusa bango na kobongola mitinda na bango lizalaki kopesa ngai libateli. Ya solo, ezalaki koyeisela ngai makambo petee; wana bilenge mosusu bazalaki kopesa ngai makanisi ya kominanola na motindo mobongi te, nazalaki koloba ete: “Tata na ngai akolinga te.” Ntango nakómaki na mibu 16, tata asalaki nyonso mpo nayekola kokumba motuka mpe nazwa permis de conduire na ngai. Lisusu, bobele na ntango yango apesaki ngai fungola moko ya ndako. Nakamwaki mpenza mingi ete azalaki kotyela ngai motema. Nayokaki ete nakóli, mpe epesaki ngai mposa ya kokokisa mikumba mpe nayebaki ete esengeli na ngai komonisa na baboti na ngai ete nakoki ete batyela ngai motema.
Na mikolo wana pole mingi te epesamaki na makambo matali libala, kasi tata na ngai ayebaki Biblia mpe oyo Biblia ezali koloba na ntina na kobala “bobele kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Alimbolaki ngai polele ete akotungisama mingi soki nayeli bango elenge mobali ya mokili, to soki nabandi kobima elongo na elenge mobali ya mokili. Nayebaki ete azalaki na elónga, mpamba te nasilaki komona esengo mpe bomoko oyo ezalaki kati na libala na bango mpo ete babalanaki “kati na Nkolo.”
Na 1941, ntango nazalaki na mibu 18, nakanisaki ete nalingi elenge mobali moko kati na lisangá. Azalaki pionnier mpe azalaki koyekola mosala ya avocat. Nazalaki na esengo. Ntango toyebisaki baboti na ngai ete tolingi kobalana, na esika ete baboya to batungisama, balobaki bobele ete: “Blossom, tolingi kosenga yo likambo moko. Tozali komona ete ozali naino mwana, mpe tolingi ete ozela naino mbula moko. Soki olingi ye solo, mbula moko ekobongola eloko moko te.”
Nazali na esengo ete nayokaki toli wana ya mayele. Kati na mbula yango nakólaki mpe nabandaki komona ete elenge mobali yango azalaki na bizaleli kitoko te mpo na kozala mobali malamu. Na nsima atikaki lisangá ya Jéhovah, mpe nabikaki na oyo mbele ekokaki kozala likámá kati na bomoi na ngai. Oyo nde likambo ya esengo kozala na baboti ya bwanya oyo okoki kotyela mayele na bango motema!
Libala mpe mosala ya zongazonga
Na eleko ya malili makasi ya mobu 1946, nsima ya kolekisa mibu motoba ya kosala mosala ya pionnier mpe ndambo na mokolo na mosala ya mosuni, elenge mobali moko kitoko oyo namona naino na ye te ayaki na Salle du Royaume na biso. Gene Brandt aponamaki lokola moninga ya mosala ya mosaleli ya bandeko epai na biso, lokola bazalaki kobenga mokɛngɛli ya zongazonga na ntango wana. Tolinganaki, mpe na le 5 Août 1947, tobalanaki.
Mwa moke na nsima, tata mpe Gene bafungolaki biro moko ya mosala ya comptabilité. Kasi tata alobaki na Gene ete: “Mokolo biro oyo ekopekisa biso koyangana na makita to kokokisa mokumba mosusu ya teokratike, nakokanga yango mpe nakobwaka fungola na yango mosika.” Jéhovah apambolaki ezaleli wana ya elimo, mpe mosala yango ezwelaki biso mosolo mosengelaki na biso kobikela mpe etikelaki biso ntango mpo na mosala ya pionnier. Tata mpe Gene bazalaki bato bayebi malamu kosala mombongo, mpe mbele tokokaki nokinoki kokóma bazwi, kasi yango ezalaki mokano na bango te.
Na 1954, Gene abyangamaki na mosala ya zongazonga, oyo elimbolaki mbongwana monene kati na bomoi na biso. Baboti na ngai balingaki kosala nini? Na mbala oyo lisusu, bamonisaki ete bazali komitungisa mpo na bango moko te kasi mpo na matomba ya Bokonzi na Nzambe mpe mpo na bolamu ya elimo ya bana na bango. Balobaki na biso ata mokolo moko te ete: “Mpo na nini boboteli biso bankɔ́kɔ te?” Na esika na yango, ezalaki ntango nyonso: “Tokoki kosala nini mpo na kosunga bino kati na mosala ya pionnier?”
Yango wana ntango ekómaki mokolo ya kolongwa, bazalaki bobele na maloba ya kolendisa mpe ya kosepela mpo na libaku monene ya mosala na biso. Bamonisaki na biso mokolo moko te ete tozali kotika bango, kasi basimbaki biso na motema moko. Nsima na kolongwa na biso, bango moko bakangamaki na mosala ya pionnier na boumeli ya mibu zomi mosusu. Tata aponamaki lokola surveillant de ville na San Antonio, mokumba oyo akokisaki yango na boumeli ya mibu 30. Asepelaki na komona bokóli kobanda lisangá moko kati na engumba yango na bambula 1920 kino masangá 70 liboso ete akufa na 1991.
Mpo na Gene mpe ngai, bomoi etondaki na makambo kitoko. Tozalaki na esengo mingi ya kosalela bandeko na biso balingami basi mpe mibali kati na bitúka koleka 31, mpe libaku oyo lileki lizalaki na ntembe te kokota na kelasi ya 29 na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, na 1957. Na nsima tozongaki lisusu na mosala ya zongazonga. Na 1984, nsima na mibu 30 kati na mosala ya circonscription mpe ya district, la Société apesaki biso na bolingo nyonso mokumba ya circonscription moko na San Antonio, mpamba te baboti na ngai bazalaki na mibu koleka 80 ya bomoi na bango mpe kolongono ya nzoto na bango ezalaki malamu te.
Nazali kobatela baboti na ngai
Bobele nsima na mobu moko na ndambo ya bozongi na biso na San Antonio mama akómaki komiyoka lisusu malamu mpenza te mpe akufaki na maladi ya mansɛ́lɛ. Ekómaki mpenza noki na boye ete nazwaki ntango te ya kolobela ye makambo nyonso oyo nalingaki kosolola na ye. Yango eteyaki ngai kosolola mingi elongo na tata na ngai. Nsima na mibu 65 ya libala, ayokaki mpasi mingi mpo na liwa ya mama, kasi tozalaki wana mpo na komonisela ye bolingo mpe lisungi.
Tata na ngai alandaki kopesa kino liwa na ye ndakisa kitoko mpo na oyo etali koyangana na makita, koyekola mpe kosakola. Alingaki kotanga mingi. Lokola azalaki kotikala ye moko wana biso tozalaki na mosala, na bozongi na ndako, nazalaki kotuna ye: “Omiyokaki yo moko?” Amipesaki mpenza na kotanga mpe koyekola mingi ete azalaki ata na likanisi yango te.
Ezali mpe na momeseno mosusu oyo tobatelaki yango bomoi na biso mobimba. Tata na ngai azalaki ntango nyonso kosala makasi mpo ete libota mobimba likoka kolya esika moko, mingi mpenza na bolei ya ntongo mpo na botangi ya texte ya mokolo na mokolo. Napesamelaki nzela te ya kotika ndako kozanga kosala yango. Mbala mosusu nazalaki koloba ete: “Kasi tata, nakokóma na retard na kelasi (to na mosala)!”
Azalaki koloba ete: “Ezali texte te nde epesi yo retard; olamukaki na ntango malamu te.” Mpe nasengelaki kofanda mpe koyoka yango. Asalaki makasi ete ndakisa wana malamu etikala kino mikolo ya nsuka ya bomoi na ye. Yango ezali libula mosusu oyo atikelaki ngai.
Tata na ngai abatelaki mayele na ye kino na liwa na ye. Kobatela ye ezalaki na mpasi te mpamba te azalaki na mindondo te mpe azalaki koimaima te. Ya solo, ntango mosusu azalaki kolobela mpasi na ye ya misisa, kasi nazalaki kokundwela ye ete azalaki nde kobela “maladi ya Adam,” mpe azalaki koseka. Wana Gene mpe ngai tofandaki pembeni na ye, tata akufaki na kimya nyonso na ntongo ya le 30 Novembre 1991.
Sikawa nasili koleka mibu 70 mpe nazali naino kozwa matomba na ndakisa malamu ya baboti na ngai baklisto oyo bazalaki na bolingo mingi. Mpe libondeli na ngai ya molende ezali ete nasala makasi namonisa botɔndi mpo na libula wana na motindo ebongi kino na bikeke nyonso oyo bizali koya.—Nzembo 71:17, 18.
[Elilingi na lokasa 5]
Mama mpe ngai
[Bililingi na lokasa 7]
1. Assemblée na ngai ya liboso: San Marcos, Texas, Septembre 1923
2. Assemblée ya nsuka ya tata na ngai: Fort Worth, Texas, Juin 1991 (Tata afandi)
[Elilingi na lokasa 9]
Gene mpe Blossom Brandt