Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/10 nk. 19-24
  • Nalandaki matambe ya baboti na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalandaki matambe ya baboti na ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Molende ya tata mpo na Bokonzi
  • Mosala ya sembo ya mama
  • Mosala na bolenge
  • Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandi
  • Mosala ya ntango nyonso ya esengo
  • Libula na biso ya bozwi ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Libula ya boklisto oyo ekomonanaka mingi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baboti na biso bateyaki biso kolinga Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Nakolinga kobongola ata eloko moko te!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/10 nk. 19-24

Nalandaki matambe ya baboti na ngai

LISOLÓ YA HILDA PADGETT

Zulunalo moko ezongelaki maloba oyo ete: “Bomoi na ngai nasili kopesa yango epai na Yehova, mpe nakoki te kosalela bankóló mibale.” Maloba wana mautaki kati na biyano oyo napesaki epai na bakonzi ya ministère du travail mpe bakonzi ya mosala ya sodá na 1941 mpo na komonisa ntina oyo naboyaki kokokisa lisɛngisi na bango ya kosala na makasi kati na lopitalo na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mwa moke na nsima, bakweisaki ngai na esambiseli mpe bakatelaki ngai etumbu ya bolɔ́kɔ ya sanza misato mpo ete naboyaki kokokisa lisɛngisi na bango.

ELOKO nini ememaki ngai kati na ezalela wana ya mpasi? Ezalaki te mpo na bipale to ezaleli ya botomboki ya bolenge. Nzokande, ezalaki mpo na bantina oyo ebandaki uta kala na ntango nazalaki naino mwana moke.

Molende ya tata mpo na Bokonzi

Nabotamaki mokolo ya 5 Yúni 1914, na Horsforth pene na Leeds, na nɔ́rdi ya Angleterre. Baboti na ngai, Atkinson mpe Pattie Padgett, bazalaki balakisi kati na Eteyelo ya Lomingo, bazalaki mpe basangani ya etuluku ya bayembi na lingomba ya ba Méthodistes epai kuna tata azalaki kobɛta ebɛtɛlo miziki oyo ebéngami orgue. Na ntango nazalaki mwana moke, libota na biso lizalaki ya esengo, longolá bobele likambo moko. Ezalela ya makambo ya mokili ezalaki kotungisa tata. Azalaki kolinga etumba mpe mobulu te mpe azalaki kondimela etindá ya Biblia oyo ete: “Okoboma te.”​—Exode 20:13.

Na 1915, Leta elendisaki bilenge mibali nyonso ete bákɔta na mosala ya sodá na bolingo malamu na bango moko mpe na yango baboyaki kokɔtisa bato na makasi. Na kokakatana nyonso, tata atɛlɛmaki na boumeli ya mokolo mobimba na nsé ya mbula mpo na kozela ngala na ye ete bákoma nkombo na ye na mosala ya sodá. Bobele na mokolo oyo molandaki, bomoi na ye mobimba ebongwanaki!

Wana azalaki kosala mosala ya mobongisi-mpopi kati na ndako moko ya monene, asololaki elongo na basáli mosusu na ntina na makambo oyo mazalaki koleka na mokili. Molóni moko ya bafololo apesaki ye trakte moko ya moke oyo ezalaki na motó ya likambo, Gathering the Lord’s Jewels (Koyanganisama ya mpauni ya Nkólo). Tata amemaki yango na ndako, atángaki yango, mpe azongelaki kotánga yango lisusu. Alobaki ete: “Soki yango ezali solo, boye makambo mosusu nyonso mazali lokuta.” Na mokolo molandaki, alukaki koyeba makambo mosusu, mpe na boumeli ya pɔ́sɔ misato azalaki koyekola Biblia kino pene na kotána ya ntɔ́ngɔ́. Asosolaki ete asilaki komona solo! Na mokolo ya Lomingo 2 Yanuáli 1916, akomaki na agenda na ye ete: “Nakendaki na Ndako-nzambe na ntɔ́ngɔ́, nakendaki na I.B.S.A. [Lisangani ya Bayekoli ya Biblia ya mikili mingi] na butu​—nayekolaki Baebele 6:9-20​—mbala na ngai ya liboso ya kokende kotala bandeko.”

Nokinoki, botɛmɛli ebimaki. Bandeko na biso ya mosuni mpe baninga ya losambo bakanisaki ete tata azwaki ligboma. Kasi asilaki kozwa nde ekateli na ye. Makita mpe boyekoli ezalaki makambo ya ntina mingi mpo na ye, mpe pene na sanza ya Mársi amonisaki komipesa na ye epai na Yehova na nzela ya batisimo. Nsima ya mwa bapɔ́sɔ wana tata azalaki kokende ye moko na makita, mama atikaki kotɛmɛla ye. Atyaki ngai kati na pusupúsu, mpe atambolaki bakilomɛtɛlɛ mwambe kino na Leeds, akómaki bobele na ntango oyo makita masilaki. Kanisá naino esengo oyo tata azalaki na yango. Kobanda ntango wana, libota na biso likómaki na bomoko kati na mosala ya Yehova.

Tata azalaki na mokakatano mpenza mpo na etɛlɛmɛlo na ye​—ye oyo autaki komipesa na bolingo malamu na ye moko na mosala ya sodá mpe na nsima ya mwa bapɔ́sɔ aboyaki kokɔta na bitumba mpo na bantina ya lingomba. Na ntango babyangaki ye aboyaki kosimba mondóki, mpe pene na sanza ya Yulí 1916 asambisamaki na moko na bisambiselo mitano ya basodá, akatelamaki etumbu ya bolɔ́kɔ ya mikolo 90. Nsima ya kosilisa etumbu ya liboso, tata azwaki bonsomi na boumeli ya pɔ́sɔ mibale, na nsima asambisamaki na esambiselo mosusu ya basodá mpe akatelamaki etumbu ya mikolo 90 lisusu na bolɔ́kɔ. Na nsima ya etumbu na ye ya mibale ya bolɔ́kɔ, atindamaki na limpinga ya mosala ya monganga, mpe na mokolo ya 12 Febwáli 1917, akɔtaki na masúwa ya basodá mpo na kokende na Rouen, na France. Agenda na ye eyebisi ete kuna, mokolo na mokolo azalaki kotungisama lisusu mingi koleka mpo na etɛlɛmɛlo na ye. Amonaki ete azalaki bobele kosalisa basodá oyo bazalaki kozoka bampota ete bákoka kozongela lisusu etumba.

Lisusu, aboyaki kotosa. Na mbala oyo esambiselo ya basodá ekatelaki ye etumbu ya mbula mitano na bolɔ́kɔ ya basodá ya Grande-Bretagne na Rouen. Wana tata alandaki ntango nyonso kosɛnga ete bátinda ye na bolɔ́kɔ ya basivili lokola moto oyo aboyi mosala ya sodá mpo na bantina ya lingomba, bapesaki ye etumbu ya kozwa bobele limpa mpe mai moke na boumeli ya sanza misato, na nsima bapesaki ye lisusu bilei na lolenge bato nyonso ya bolɔ́kɔ bazalaki kozwa kino nzoto na ye ezongaki mwa moke; mpe na nsima bazongelaki lisusu mwango yango. Bazalaki kokanga mabɔ́kɔ na ye na minyɔlɔlɔ na mokongo na ntango ya moi mpe bazalaki kobalola yango na liboso na butu mpe na ntango ya bolei. Na boumeli ya bomoi na ye mobimba, azalaki na bilembo ya bampota na mabɔ́kɔ na ye, esika oyo minyɔlɔlɔ mike mizalaki kofina ye na misuni, yango ezalaki kobimisa bampota oyo ezalaki kopola. Azalaki mpe na minyɔlɔlɔ na makolo oyo ekangisamaki kino na loketo na ye.

Bakonzi ya basodá basalaki nyonso oyo ekokaki na bango mpo na kobebisa elimo na ye ete ezala ngwi te kasi balóngaki te. Babotolaki ye Biblia mpe mikanda na ye. Azalaki kozwa nkomá ya libota na ye te, akokaki mpe kotinda nkomá te. Na nsima ya bambula mibale azwaki ekateli ya komonisa bosembo na ye na koboyáká kolya. Akangamaki na ekateli na ye ya kozanga kolya mpe ya kozanga komela na boumeli ya mikolo nsambo, yango esalaki ete bátinda ye na lopitalo ya bolɔ́kɔ, na maladi makasi. Amonisaki ete azalaki sembo, kasi etikalaki mpenza moke ete akufa. Na bambula oyo elandaki na nsima andimaki ete asalaki libúngá na kondima kotya bomoi na ye na likámá na lolenge wana, mpe alobaki ete akozongela yango lisusu te.

Etumba esilaki na sanza ya Novɛ́mbɛ 1918 wana tata azalaki naino na bolɔ́kɔ na Rouen, kasi na ebandeli ya mbula oyo elandaki, atindamaki na bolɔ́kɔ moko ya basivili na Angleterre. Kanisá naino esengo azalaki na yango ya kozwa nkomá nyonso ya mama mpe maboke oyo mayikanaki, elongo na Biblia mpe babúku na ye, oyo azalaki kolinga mingi! Bamemaki ye na bolɔ́kɔ ya engumba Winchester, epai kuna akutanaki na elenge ndeko mobali moko oyo azwaki mpasi motindo moko na ye na boumeli ya eleko ya bitumba. Nkombo na ye ezalaki bongo Frank Platt, oyo na nsima akómaki kosala na Betele ya Londres na boumeli ya bambula mingi. Bayokanaki ete bákutana na mokolo ya nsima, kasi na ntango yango Frank atindamaki epai mosusu.

Na mokolo ya 12 Apríli 1919, mama azwaki telegrame: “Haleluya! Nazali koya na ndako​—bóbénga na Betele ya Londres.” Oyo nde ntango ya kosepela nsima ya mbula misato ya komekama, mpe ya kokabwana! Tata akanisaki liboso ete asengelaki kobénga na telefone mpe kokutana na bandeko ya Betele ya Londres. Ayambamaki malamu kuna na balabála Craven Terrace, No. 34. Nsima ya kosukola mpe kokata mandefu mpe kolata bilamba mpe ekoti oyo badefisaki ye, tata azongaki na ndako. Okoki kokanisa mayoki nini tozalaki na yango mpo na kozongisama ya bomoko ya libota na biso? Na ntango wana nazalaki pene na mibu mitano, mpe nayebaki ye lisusu te.

Likita ya liboso oyo tata ayanganaki na yango nsima ya kozwa bonsomi ezalaki bongo Ekaniseli. Wana azalaki komata na esikalié mpo na kokende na Ndako ya Bokonzi, moto ya liboso amonaki ezalaki bongo Frank Platt, ye oyo atindamaki na lopitalo moko ya bolɔ́kɔ ya basodá na Leeds. Oyo nde esengo bazalaki na yango wana bazalaki koyebisana makambo bakutanaki na yango! Kobanda na ntango wana kino abimaki na lopitalo, Frank amesanaki mingi mpenza koya epai na biso.

Mosala ya sembo ya mama

Mbala mingi tata abandaki kozala na ndako te, mama azalaki kosala mosala ya kosukolela bato bilamba mpo na kobakisa mwa mosolo likoló na mosolo oyo azalaki kozwa na Leta. Bandeko bamonisaki mpenza boboto epai na biso. Mbala na mbala, nsima ya mwa bapɔ́sɔ, bankulutu ya lisangá bazalaki kopesa mama mwa liboke lokola likabo ya bolingo oyo motindi na yango ayebisi nkombo te. Mama azalaki ntango nyonso koloba ete ezalaki bolingo ya bandeko nde epusaki ye mpenza pene na Yehova mpe esalisaki ye ete ayika mpiko na boumeli ya bantango wana ya komekama. Azalaki koyangana na makita na lisangá na bosembo nyonso wana tata azalaki te. Komekama na ye eleki makasi eyaki na ntango, mpo na boumeli ya koleka mbula moko, ayebaki te soki tata azalaki na bomoi to asilaki kokufa. Mpasi mosusu ebakisamaki ntango biso mibale tobɛlaki grippe espagnole na 1918. Bato bazalaki kokufa na zingazinga. Bato ya pembeni oyo bazalaki kokende kosalisa bazalani na bango bazalaki kozwa maladi wana mpe bazalaki kokufa. Na ntembe te kozanga ya bilei na eleko wana esalaki ete nzoto ya bato ezala makasi te mpo na kobundisa maladi yango.

Maloba ya ntoma Petelo mamonanaki mpenza ya solo mpo na libota na biso: “Nzambe . . . akolendisa bino, akopesa bino makasi, esili bino koyoka mpasi mwa ntango moke”! (1 Petelo 5:10) Konyokwama oyo baboti na ngai banyokwamaki esalisaki bango ete bákolisa kondima makasi kati na Yehova, mpe elikya mobimba ete amibanzabanzaka mpo na biso mpe ete eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Yehova. Napambolamaki mpenza na kokóla na lolenge wana kati na kondima.​—Baloma 8:38, 39; 1 Petelo 5:7.

Mosala na bolenge

Nsima ya kobima ya tata na bolɔ́kɔ, mosala ya Bokonzi ekómaki likambo ya ntina mingi na bomoi na biso. Nakoki te komikundola soki nazangisaki makita ata mokolo moko, longola bobele mpo na maladi. Mwa moke nsima ya kozonga na ye na ndako, tata atekisaki masini na ye ya fotó mpe mama atekaki ekɔ́mɔ na ye ya wolo mpo na kozwa mosolo ya kokende na liyangani moko. Atako tozalaki na likoki ya kokende mibembo ya lói te, tozangisaki mayangani te, ata oyo ezalaki kosalema na Londres.

Bambula mibale to misato oyo elandaki nsima ya etumba ezalaki bantango ya bopemi. Tata mpe mama bazwaki litomba ya kosala boninga na mabaku nyonso. Nazali komikundola lolenge tozalaki kokende kotala bandeko mibali mpe bandeko basi, mpe ngai, elenge moke ya mwasi, nazalaki koyema wana bakóló bazalaki kosolola na ntina na bososoli ya sika ya makambo ya solo. Wana bazalaki kosolola elongo, bazalaki koyemba na kobɛtáká orgue, kosepeláká na boninga kitoko, yango esalaki ete báyoka esengo mpe bázwa bopemi.

Baboti na ngai bazalaki kotalela kelasi na ngai na bopɔtu soko moke te. Na eteyelo nakesanaki mpenza na bana mosusu, ata na ntango nazalaki na mibu mitano, nazalaki kobimisa “Kondimana ya Sika” na ngai wana kelasi mobimba ezalaki koyekola katekisimo. Na nsima bazalaki kolakisa ngai liboso ya eteyelo mobimba lokola “mwana oyo aboyi kobebisa lisosoli” mpamba te nazalaki kolinga te kosangana na milulu ya Mokolo ya bokundoli nsuka ya bitumba.a Nazali na mawa te mpo na lolenge nabɔkwamaki. Ya solo, ezalaki libateli mpe esalisaki ngai ete nátikala ntango nyonso kati na ‘nzela ya moke.’ Epai nyonso oyo baboti na ngai bazalaki kokende, na makita to na mosala ya kosakola, ngai mpe nabandaki kozala elongo na bango.​—Matai 7:13, 14.

Nazali komikundola mingi mpenza mokolo ya lomingo oyo nabimaki na mosala ya kosakola ngai moko mpo na mbala ya liboso. Nazalaki na mibu 12. Nazali komikundola wana nazalaki elenge, mokolo moko ya lomingo nalobaki ete nakobima te. Moto moko te alobelaki ngai mabe to apusaki ngai na makasi ete nábima, na yango nafandaki na jardin kotánga Biblia kasi nasepelaki te. Nsima ya pɔ́sɔ moko to pɔ́sɔ mibale, nayebisaki tata ete: “Nabanzi ete lelo nakobima elongo na yo!” Kobanda mokolo wana, nazongaki lisusu nsima te.

Mobu 1931 ezalaki mpenza mobu kitoko! Bobele te mpo ete tozwaki nkombo ya sika, Batatoli ya Yehova, kasi mpo ete nazwaki batisimo na mai na boumeli ya liyangani ya ekólo mobimba oyo lisalemaki na Alexandra Palace, na Londres. Nakobosana mokolo wana soko moke te. Tolataki banzambala milai, ya moindo, mpe oyo ya ngai esilaki kopola na mai mpamba te kandidá mosusu autaki kosalela yango liboso!

Wana nazalaki mwana moke, mposa na ngai monene ezalaki ntango nyonso ya kokóma colporteur, lolenge bazalaki kobénga basakoli ya ntango nyonso na eleko wana. Wana nazalaki kokóla, namiyokaki ete nasengelaki kosala mingi kati na mosala ya Yehova. Na yango na Mársi 1933, wana nakómaki na mibu 18, nakɔtaki na molɔngɔ́ ya basaleli ya ntango nyonso.

Esengo monene mpo na biso ezalaki bongo “Pɔ́sɔ ya babongisi-nzela” na bingumba mosusu ya minene, wana pene na basaleli ya ntango nyonso 12 bazalaki kosangana esika moko, bazalaki kofanda elongo na bandeko ya lisangá wana, mpe kosala elongo kati na etuluku. Tokabolaki mwa babúku epai na bakonzi ya mangomba mpe bato minene mosusu. Ezalaki kosɛnga kozala na mpiko mpo na kosolola na bango. Mbala mingi tozalaki kotyolama, mingi bazalaki kokangela biso ekuke. Yango elɛmbisaki biso te, mpamba te molende na biso ezalaki monene na boye ete tozalaki kosepela kotyolama mpo na nkombo ya Klisto.​—Matai 5:11, 12.

Na Leeds tobongolaki motuka moko ya bana mike, tukutuku moko ya bapiné misato, tukutuku moko ya bapiné mibale mpe pusupúsu ya tata, mpe na nsima tobongolaki motuka na ye mpo na komema na yango bisaleli ya fonó. Bandeko mibale bazalaki kokende na balabála na fonó yango, bazalaki kotya miziki mpo na kobenda likebi ya bato mpe bazalaki kobyangama kati na bandako ya bato yango, mpe na nsima bazalaki koyokisa lisoló ya miniti mitano ya ndeko Rutherford. Na nsima bazalaki kokende na balabála mosusu wana biso, basakoli, tozalaki kolanda na nsima mpe kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia.

Na boumeli ya bambula mingi, mokolo ya Lomingo nyonso na mpokwa nsima ya likita, tozalaki kokende na libandá ya Hotêl de ville epai kuna ezalaki na esika ebongisamaki mpo na balobi mpe tozalaki kosimba ebongiseli yango na koyanganáká moko na masukúlu ya ndeko Rutherford oyo mazalaki koumela ntango molai, mpe tozalaki kokabola batrakte mpe kosolola na bato nyonso oyo basepelaki. Bayebaki biso malamu na esika wana. Ata bapolísi mpe bazalaki kopesa biso limemya. Mokolo moko na mpokwa toyanganaki lokola momeseno na ntango yango, toyokaki makelele ya bambunda mpe ya miziki kobɛta na mwa mosika. Mwa moke na nsima, tomonaki etuluku moko ya bato soko nkámá, oyo bazalaki bakumisi-ekólo, kotambola na nzela. Batambolaki na kozingeláká biso na nsima mpe bayaki kotɛlɛma wana batombolaki babendele na bango na likoló. Batikaki kobɛta miziki, bato nyonso bafandaki kimya mpe bobele na ntango yango mongongo ya ndeko Rutherford eyokanaki makasi: “Tiká bango bápesa losako na bendele na bango mpe bápesa losako epai na bato soki balingi. Biso tokosambela mpe tokopesa losako bobele epai na Yehova Nzambe!” Tozalaki komituna soki likambo nini mpenza elingaki kobima! Likambo moko te lisalemaki, bobele ete bazwaki litatoli malamu, mpe bapolisi bapekisaki bango ete básala mobulu te mpo ete tókoba kolanda eteni oyo etikalaki ya lisukúlu ya bato banso.

Sikawa fonó ebandaki kosalelama mpo na kosunga biso ete tópesa litatoli monene. Liboso na bandako ya bato, tozalaki kotya likebi na biso likoló na disike mpo na kolendisa bato ete bálanda masoló ya Biblia ya miniti mitano oyo etyami na disike. Bankoló bandako bazalaki kokɔtisa biso mpe bazalaki na esengo ete tókoka kozongela bango mpe koyokisa bango badisike mosusu.

Mobu 1939 mozalaki na makambo mingi ya kosala mpe mozalaki mobu ya mpasi, ya botɛmɛli mpe ya mobulu mingi. Liboso ya moko na mayangani na biso, bandeko bakutanaki na bituluku ya bato oyo batungisaki bango na balabála. Na yango, na boumeli ya liyangani, balɛngɛlaki ete bituluku bibongisami malamu ya bandeko oyo bazalaki na mituka ete bákende kosakola kati na bisika mobulu mozalaki, wana bandeko basi mpe bandeko mibali mosusu bakendeki na bisika bizalaki kimya. Ngai nazalaki kosala elongo na etuluku moko kati na balabála moko, nakendaki na nzela moko ya moke mpo na kokende kosakola na bandako oyo ezalaki na nsima ya nzela yango. Wana natɛlɛmaki liboso na ekuke moko, nayokaki makelele ya bato ya mobulu​—bazalaki konganga na balabála. Nakóbaki bobele koloba na moto yango liboso na ekuke, nayeisaki lisoló molai kino ntango nayokaki ete makelele mazalaki lisusu te. Na nsima, nazongaki na nzela yango mpe nabimaki na balabála mpe nakutanaki na bandeko mibali mpe bandeko basi mosusu oyo bazalaki kobanga mpamba te bayebaki te soki nazalaki wapi! Nzokande na nsima, bobele na mokolo yango, bato ya mobulu balingaki kopanza makita na biso, kasi bandeko mibali babimisaki bango.

Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandi

Sikawa bazalaki kokamata bato na makasi na mosala ya sodá, mpe bilenge bandeko mibali mingi batyamaki na bolɔ́kɔ mpo na etumbu ya sanza 3 kino sanza 12. Tata abakiselamaki libaku mosusu, ya kokende kotaláká bandeko kati na bolɔ́kɔ. Mikolo nyonso ya Lomingo azalaki kokende kotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli kati na bolɔ́kɔ. Na mikolo nyonso ya misato azalaki kokende kotala bandeko mibali kati na bisika mike bipai batyaki bango. Lokola ye moko mpe asilaki kolekisa ntango molai mpe ya mpasi kati na bolɔ́kɔ na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, azalaki mpenza na esengo mingi ya kosunga baoyo bazalaki kokutana na komekama motindo wana. Asalaki bongo na boumeli ya mbula 20, kino ntango akufaki na 1959.

Na 1941 tokómaki komesana na mpasi mpe botɛmɛli oyo bato mingi bazalaki kobimisa mpo na etɛlɛmɛlo na biso ya kozanga kokɔta na ngambo moko to na ngámbo mosusu. Tozalaki kokutana na botɛmɛli yango ntango tozalaki kotɛlɛma na balabála mpo na kolakisa bazulunalo. Bobele na ntango yango, tozalaki na esengo ya kosalisa bato bakimá mboka na bango oyo bazalaki kofanda na kartyé na biso. Ba lettons, ba polonais, mpe ba estoniens, mpe ba allemands​—oyo nde esengo ya komona miso na bango kongɛnga na nsai na ntango bamonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Consolation (oyo ekómá lelo Lamuká!) na nkótá na bango mpenza!

Na nsima ekómaki ngala na ngai ya kozwa komekama mpo na etɛlɛmɛlo na ngai ya kozanga kokɔta na ngámbo moko to na ngámbo mosusu na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bazalaki kokanga ngai kati na esika moko moke na boumeli ya bangonga 19 kati na bangonga 24 na mokolo, namonaki ete bomoi kati na bolɔ́kɔ ezalaki mpasi. Mikolo misato ya liboso ezalaki mpenza ya mpasi mingi koleka, mpamba te nazalaki ngai moko. Na mokolo ya minei, babéngaki ngai na biro ya moyangeli epai kuna namonaki bilenge mosusu mibale ya basi batɛlɛmi. Moko na bilenge basi yango atunaki ngai na mongongo ya nsé ete: “Otyami na bolɔ́kɔ mpo na nini?” Nalobaki ete: “Okokamwa soki oyoki ntina yango.” Atunaki na mongongo ya nsé ete: “Ozali moko na ba TY?” Elenge mwasi mosusu ayokaki ye mpe atunaki biso mibale ete: “Bozali ba TY?” mpe biso misato toyambanaki. Nayokaki lisusu mawa te mpo na kozala ngai moko!

Mosala ya ntango nyonso ya esengo

Nsima ya kobima na bolɔ́kɔ, nakóbaki mosala na ngai ya ntango nyonso, mpe nasalaki elongo na elenge mwasi moko ya mibu 16 oyo akómaki mpe mosaleli ya ntango nyonso bobele nsima ya kotika eteyelo. Tokómaki kofanda na Ilkley, engumba moko kitoko pene na bangomba mpe bisobe ya etúká ya Yorkshire. Na boumeli ya sanza motoba, tosalaki makasi mpo na koluka esika ebongi mpo na makita na biso. Na nsima, tofutelaki garage moko ya moke, oyo tokómisaki yango Ndako ya Bokonzi. Tata ayaki kopesa biso mabɔ́kɔ, atyelaki biso miinda mpe masini ya kobimisa mopepe ya mɔ́tɔ. Akembiselaki biso mpe ndako yango. Na boumeli ya bambula mingi, lisangá ya pembeni lizalaki kosunga biso, bazalaki kotinda bandeko mibali pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na koya kosala masukúlu ya bato banso. Na lipamboli ya Yehova makambo na biso matambolaki malamu mpe tokólaki, na nsuka lisangá moko lifungwamaki.

Na Yanuáli 1959, na pwasa, tata azwaki maladi. Babyangisaki ngai kuna na libota, mpe tata akufaki na Apríli. Bambula oyo elandaki ezalaki ya mpasi. Kolɔngɔ́nɔ́ ya mama ebebaki mpe bɔɔngɔ́ na ye ebebaki, ekómaki etumba mpo na ngai. Kasi elimo ya Yehova esungaki ngai ete nákóba, mpe nazalaki na likoki ya kosunga ye kino na ntango akufaki na 1963.

Nasili kozwa mapamboli mingi ya Yehova na boumeli ya bambula. Ezali mpenza mingi na boye ete nakoki kotánga yango te. Namonaki lolenge lisangá ya liboso epai nabandaki likólaki mpe likabwanaki mbala minei, kobimisáká basakoli mpe babongisi-nzela, mpe basusu lokola bamisionere oyo batindamaki na bamboka mosika lokola Bolivie, Laos, mpe Ouganda. Likoki ya kobala mpe ya kosala libota eyelaki ngai te. Yango epesaki ngai mawa te; nazalaki na mosala mingi ya kosala. Atako nazali na bandeko ya mosuni te, nazali na bana mpe bankɔ́kɔ mingi na elimo, kino monkámá.​—Malako 10:29, 30.

Mbala mingi nabyangaka bilenge babongisi-nzela mpe bilenge mosusu na ndako na ngai mpo ete tósepela na boninga ya boklisto. Tobongisaka elongo boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Tosololaka makambo oyo tokutanaka na yango mpe toyembaka banzembo ya Bokonzi, lokola baboti na ngai bazalaki kosala yango. Lokola nazingami na etuluku ya bilenge ya esengo, nazali kobatela bolenge na ngai mpo na oyo etali lolenge ya kotalela makambo. Mpo na ngai, bomoi mosusu ya malamu ezali te oyo eleki mosala ya mobongisi-nzela. Nazali na botɔ́ndi epai na Yehova lokola nazwaki libaku ya kolanda matambe ya baboti na ngai. Nabondelaka ete nakóba kosalela Yehova mpo na seko na seko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kokundola nsuka ya bitumba ya 1918 mpe, na nsima, oyo ya 1945.

[Elilingi na lokasa 23]

Hilda Padgett elongo na baboti na ye, Atkinson mpe Pattie

[Elilingi na lokasa 23]

Trakte oyo elamwisaki mposa ya tata mpo na solo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto