Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/10 nk. 10-15
  • Nzambe ayebi biso malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe ayebi biso malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ye oyo azali komona makambo nyonso oyo tozali kosala
  • Nzambe akoki kosalisa biso na esika nyonso ezali biso
  • Ye oyo ayebi biso malamu mpenza
  • Jehovah ayebi biso malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • ‘Tosalami na motindo ya kokamwa mingi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Salá makasi otalelaka bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yona azwi liteya na motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/10 nk. 10-15

Nzambe ayebi biso malamu?

“O Jéhovah, . . . osili koyeba nzela na ngai nyonso.”​—NZEMBO 139:1, 3, MN.

1. Bato mingi bazalaka na mayoki ete ‘basusu bamityaka na esika na bango te’ bayebaka mitungisi na bango te, mikakatano na bango te, mpe komekama na bango te?

EZALI na moto moko oyo akoki mpenza koyeba mitungisi na biso, mikakatano mpe komekama oyo tozali kokutana na yango? Kati na mokili mobimba ezali na bato, bilenge mpe mikóló, baoyo bazali na mabota te mpo na komibanzabanza na makambo makoki kokómela bango. Ata kati na mabota, balalani mingi bazali kooka ete mobalani na bango azali kososola te bozito ya makambo oyo bazali na yango. Mbala mosusu, na nkanda mpenza, bakolobaka ete: “Kasi ozali komitya na esika na ngai te!” Bilenge mingi bakómi na bosukisi ete moto moko te azali koyeba ata moke mikakatano na bango. Nzokande, kati na baoyo bazali na mposa makasi ete bato mosusu bayeba mikakatano na bango, ezali na bato oyo bomoi na bango ezwi ndimbola ya kitoko mpenza. Motindo nini yango esalemi?

2. Nini ekoki kopesa basaleli na Jéhovah makoki ya kozala na bomoi oyo ezali mpenza kosepelisa?

2 Ezali mpo ete, atako baninga na bango bato bayebi maoki na bango to bayebi yango te, bandimi solo ete Nzambe azali koyeba mikakatano oyo bazali kokutana na yango, mpe lokola bazali basaleli na ye, bazali bobele bango moko te na kobunda na mikakatano yango. (Nzembo 46:1) Lisusu, Liloba na Nzambe elongo na lisalisi ya bankulutu baklisto oyo batondi na bososoli ezali kopesa bango makoki ya kotalela makambo mosusu kasi bobele mikakatano na bango moko te. Makomami mazali kosalisa bango na komona ete mosala na bango ya sembo mozali na motuya mingi na miso na Nzambe mpe ete libateli ya solo lizali liboso na baoyo bazali kotya elikya na bango epai na ye mpe na bibongiseli oyo asili kokamata na nzela na Yesu Klisto.​—Masese 27:11; 2 Bakolinti 4:17, 18.

3, 4. (a) Lolenge nini boyebi ya likambo oyo ete “Jéhovah azali Nzambe” mpe ete “asalaki biso” ekosalisa biso na kozala na esengo kati na mosala na ye? (b) Mpo na nini totye elikya na biso mobimba kati na bolingo ya Jéhovah?

3 Ekoki kozala ete oyebi maloba na Nzembo 100:2, oyo elobi ete: “Bosalela Jéhovah na esengo, boya liboso na ye na loyembo.” Bato boni bazali kosambela Jéhovah na lolenge yango? Bantina makasi ya kosala bongo epesami na verset 3, oyo ezali kokundola biso ete: “Boyeba ete Jéhovah azali Nzambe; ye asalaki biso, biso tozali bato na ye. Tozali [libota] na ye, mpate na elanga na ye.” Kati na makomi ya Liebele, balobeli Jéhovah awa lokola ʼElo·himʹ, komonisáká bongo bonene ya nkembo na ye, ya lokumu na ye, mpe ya kitoko na ye. Azali Nzambe ya solo bobele moko. (Deteronome 4:39; 7:9; Yoane 17:3) Basaleli na ye bazali koyeba Bonzambe na ye bobele lokola likambo oyo bateyi bango te kasi lokola likambo oyo bamoni yango kati na bomoi na bango mpe oyo bazali kondimisa yango na botosi, na kotyela ye motema mpe na bokangami na bango epai na ye.​—1 Ntango 28:9; Baloma 1:20.

4 Lokola Jéhovah azali Nzambe na bomoi, oyo azali na makoki ya komona ata kati na motema na biso, eloko moko te ebombami na miso na ye. Ayebi malamu makambo nyonso oyo mazali kokóma kati na bomoi na biso. Azali kososola mpo na nini tozali kokutana na mikakatano, mpe ayebi mpo na nini totungisami kati na makanisi mpe na mayoki. Lokola azali Mozalisi, ayebi biso malamu koleka biso moko. Ayebi lisusu lolenge ya kosalisa biso na kolónga mikakatano na biso mpe lolenge ya kopesa biso kobondisama ya koumela. Na bolingo nyonso, akosalisa biso​—na motindo na mobateli ya bampate oyo azali komema mwana ya mpate na ntolo na ye—​soki tomipesi na ye na motema na biso mobimba. (Masese 3:5, 6; Yisaya 40:10, 11) Boyekoli ya Nzembo 139 ekoki kosala mingi mpo na kolendisa elikya wana.

Ye oyo azali komona makambo nyonso oyo tozali kosala

5. Na ndimbola nini elobami ete Jéhovah azali ‘kososola’ biso, mpe mpo na nini yango ezali malamu?

5 Na botɔndi mozindo, Davidi, mokomi ya Nzembo akomaki ete: “O Jéhovah, osili kososola ngai, mpe oyebi ngai solo.” (Nzembo 139:1) Davidi ayebaki malamu ete boyebi oyo Jéhovah azalaki na yango na ntina na ye ezalaki ya likolólikoló te. Nzambe azalaki komona Davidi te lokola bato bazalaki komona ye, wana basukaki bobele na komona bolai na ye, makoki na ye ya koloba, to makoki na ye ya kobeta nzenze. (1 Samwele 16:7, 18) Jéhovah “asosolaki” Davidi mpe asalaki bongo mpo ete azalaki komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bolamu na ye ya elimo. Soki ozali mosaleli moko kati na basaleli na ye oyo bamipesi, yeba ete Jéhovah ayebi yo mpenza malamu lokola ayebaki Davidi. Yango ezali kolamusa kati na yo mayoki ya botɔndi mpe ya kobanga, boye te?

6. Lolenge nini Nzembo 139:2, 3 ezali komonisa ete Jéhovah ayebi makambo nyonso oyo tozali kosala, ayebi mpe makanisi na biso nyonso?

6 Misala nyonso ya Davidi mizalaki polele na miso na Jéhovah, mpe Davidi ayebaki yango malamu. Mokomi wana ya Nzembo akomaki ete: “Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotelema; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika. Oyebi wana ekotambola ngai mpe wana ekolala ngai; osili koyeba nzela na ngai nyonso.” (Nzembo 139:2, 3) Likambo oyo ete Jéhovah azali na likoló, mosika na mabelé, epekisaki ye te na koyeba makambo oyo Davidi azalaki kosala mpe kokanisa. Ye “ayebaki,” to azalaki kotalela misala nyonso ya Davidi, ezala na butu to na moi, mpo na koyeba lolenge na yango.

7. (a) Soki tokamati makambo mosusu oyo makómaki na bomoi ya Davidi lokola ndakisa, lobela makambo ya bomoi na biso oyo Nzambe ayebi yango malamu. (b) Lokola toyebi likambo yango, lolenge nini tosengeli kosala?

7 Wana, na bolenge na ye, Davidi amipesaki na bolingo na ye moko mpo na kobundisa Mofilistia Goliate, Jéhovah ayebaki ete asalaki yango na ntina na bolingo mpo na Ye mpe mpo azalaki kotya motema kati na nguya na Ye ya kobikisa. (1 Samwele 17:32-37, 45-47) Na nsima, na ntina na likunya ya bato, Davidi aokaki mpasi makasi kati na motema na ye, wana motungisi elekaki makasi kino alelaki na butu, abondisamaki na koyeba ete Jéhovah ayokaki malombo na ye. (Nzembo 6:6, 9; 55:2-5, 22) Bobele bongo, ntango, na botondi nyonso na motema Davidi azalaki kokanisa na ntina na Jéhovah na boumeli ya butu oyo azangaki mpongi, Jéhovah ayebaki yango malamu. (Nzembo 63:6; tala Bafilipi 4:8, 9.) Ntango, na mpokwa moko, na esika ya kokanisa makambo ya elimo, Davidi azalaki kotala mwasi na moninga na ye oyo azalaki kosukola, Jéhovah ayebaki yango lokola, mpe amonaki, wana mpo na ntango moke, Davidi abosanaki Mozalisi na ye mpo na mposa ya mbindo. (2 Samwele 11:2-4) Na nsima, ntango mosakoli Natana atindamaki mpo na komonisa Davidi bonene ya lisumu na ye, Jéhovah ayokaki bobele maloba oyo mabimaki na monoko na Davidi te, kasi asosolaki lisusu kobongola motema epai maloba yango mautaki. (2 Samwele 12:1-14; Nzembo 51:1, 17) Yango esengeli kotinda biso na kokanisa mpenza na esika tozali kokende, na likambo tozali kosala, mpe na oyo tozali na yango na motema, boye te?

8. (a) Bopusi nini ‘maloba ya lolemo na biso’ ezali kosala likoló na boyokani na biso elongo na Nzambe? (b) Lolenge nini tokoki kolónga bolembu na biso mpo na oyo etali kosalela lolemo? (Matai 15:18; Luka 6:45)

8 Mpo ete Nzambe ayebi makambo nyonso oyo tozali kosala, tosengeli kokamwa te ete ayebi lolenge tozali kosalela ata enama na biso ya moke koleka, lokola lolemo. Mokonzi Davidi akangaki ntina ya likambo yango, mpe akomaki ete: “Naino liloba ebimi na lolemo na ngai te, O Jéhovah, oyebi yango nyonso.” (Nzembo 139:4) Davidi ayebaki malamu ete bato oyo basengeli kondimama na ndako na Jéhovah bazali baoyo bamipesaki na kotonga baninga na bango te mpe baoyo baboyaka kopanza bilobaloba oyo ekoki kobebisa lokumu ya baninga na bango. Bato oyo Jéhovah azali kosepela na bango basengeli koloba solo kati na mitema na bango. (Nzembo 15:1-3; Masese 6:16-19) Moto moko te kati na biso akoki kopekisa lolemo na ye na lolenge ya kokoka, kasi Davidi asukisaki te na bolembu nyonso ete akokaki kosala eloko te mpo na kobongisa ezalela na ye. Apesaki ntango mingi mpo na kokoma mpe koyemba nzembo mpo na lokumu ya Jéhovah. Asosolaki lisusu ete azali na mposa ya lisalisi mpe abondelaki Nzambe mpo na yango. (Nzembo 19:12-14) Mbala mosusu esengeli na biso mpe kokanisa kati na libondeli mpo na lolenge oyo tozali kosalela lolemo na biso?

9. (a) Engebene Nzembo 139:5, Nzambe ayebi ezalela na biso na mozindo? (b) Likambo yango lizali kondimisa biso nini?

9 Jéhovah azali kotalela biso bobele na ngambo moko te. Azali komona biso mobimba, bipai na bipai. Davidi asalelaki ndakisa ya engumba oyo banguna bazingi yango, akomaki ete: “Yo ozingeli ngai na nsima mpe na liboso.” Na likambo na Davidi, Nzambe azalaki monguna oyo azingeli ye mpo na etumba te; azalaki nde mobateli oyo azali kokɛngɛla ye. Davidi abakisaki ete, “otii loboko na yo likoló na ngai,” komonisáká na motindo yango ete bokɛngi mpe libateli ya Nzambe ezali mpo na bolamu ya koumela na baoyo balingi ye. Davidi andimaki ete: “Boyebi na kokamwa boye eleki ngai; eleki mingi, nakoki kososola yango te.” (Nzembo 139:5, 6) Lolenge Nzambe ayebi basaleli na ye ezali ya mobimba, ya mozindo, na boye ete tokoki te kososola yango. Kasi toyebi mwa makambo mingi mpo na kondimisama ete Jéhovah azali solo kososola biso mpe ete lisalisi oyo azali kopesa ezali yango nde eleki malamu.​—Yisaya 48:17, 18.

Nzambe akoki kosalisa biso na esika nyonso ezali biso

10. Solo nini ya kolendisa eyebisami kati na Nzembo 139:7-12?

10 Kotaleláká boboto ya Jéhovah na makambo mosusu, mokomi na Nzembo alandi koloba ete: “Nakomibomba na elimo na yo wapi? Nakokima kolongwa na miso na yo wapi?” Azalaki koluka te kokima mosika na Jéhovah; nzokande, ayebaki ete epai nyonso oyo akokaki kozala, Jéhovah alingaki kosalisa ye, na nzela ya elimo santu. Alandaki koloba ete: “Soko nabuti na lola, yo ozali kuna; soko nasali mbeto na ngai kati na Sheol, tala, ozali kuna. Soko nakamati mapapu na ntongontongo, mpe napombwi bobele na nsuka na mai monene, kuna loboko na yo ekokamba ngai. Soko nalobi ete: ‘Molili ekobomba ngai!’ butu oyo ezingeli ngai ekobongwana moi. Ata molili ezali eloko te liboso na yo te; mpe butu ekotana lokola moi liboso na yo.” (Nzembo 139:7-12) Ezali na esika moko te epai tokoki kokende, na likambo moko te tokoki kokutana na yango, oyo ekopekisa Jéhovah na komona biso to ekopekisa elimo na ye na kosalisa biso.

11, 12. (a) Atako Yona abosanaki yango mpo na ntango moke, lolenge nini makoki ya Jéhovah ya komona mpe ya kosalisa bato emonanaki polele na likambo na Yona? (b) Lolenge nini makambo oyo Yona akutanaki na yango makoki kopesa biso mayele?

11 Na libaku moko mosakoli Yona abosanaki likambo yango. Jéhovah atindaki ye kosakola epai na bato ya engumba Ninive. Mpo na bantina eyebani te, amiyokaki ete akokaki te kokokisa mokumba wana. Ekoki kozala ete na ntina na ezaleli mabe mingi oyo Baasulia bazalaki na yango mpo ete bazalaki kobomaboma bato, likanisi ya kosakola na Ninive ebangisaki Yona. Na yango, alukaki komibomba. Na libongo ya Yafo, akotaki na masuwa moko oyo ezalaki kokende na Talasisi (endimami na bato mingi ete ezali Espagne), ntáka ya bakilomɛtɛlɛ koleka 3 500 na Ouest ya Ninive. Nzokande, Jéhovah azalaki komona ye kokota na masuwa mpe kokende komibomba na nkɔbɛ́ mpo na kolala na kati. Nzambe ayebaki lisusu esika Yona azalaki ntango babwakaki ye na mai, mpe ayokaki Yona ntango alapaki ndai kati na libumu na mbisi monene ete asengelaki kotosa elaka na ye. Wana mbisi esanzaki ye likoló na mabelé, Yona apesamelaki libaku mosusu ya kokokisa mokumba wana.​—Yona 1:3, 17; 2:1 kino Yona 3:4.

12 Mbele ekokaki kozala malamu mpenza mpo na Yona soki uta ebandeli atyaki motema na elimo ya Jéhovah mpo na kokokisa mokumba oyo epesamelaki ye. Nzokande, na nsima, Yona akomaki na komikitisa nyonso makambo oyo ye akutanaki na yango, mpe kobanda ntango wana lisoló yango lisili kosalisa bato mingi na kotyela Jéhovah motema, likambo oyo lizalaki mpasi mpo na Yona.​—Baloma 15:4.

13. (a) Mikumba nini Elie akokisaki na bosembo nyonso liboso ete akima mokonzi mwasi Yezabele? (b) Lisalisi nini Jéhovah apesaki na Elie ata ntango akimaki mpo na komibomba mosika na mokili ya Yisraele?

13 Likambo Elie akutanaki na yango ekeseni mwa moke. Ayebisaki na bosembo nyonso ekateli ya Jéhovah ete Bayisraele bakooka mpasi ya kozanga mbula lokola etumbu mpo na masumu na bango. (1 Mikonzi 16:30-33; 17:1) Asimbaki na mpiko nyonso losambo ya solo na ntembe oyo ezalaki kati na Jehovah mpe Bala na Ngomba Carmel. Mpe abomisaki basakoli 450 ya Bala na mokɛlɛ na Kisono. Kasi wana, na kosilika makasi mokonzi mwasi Yezabele asimbaki ndai ya koboma ye, Elie akimaki mokili na ye. (1 Mikonzi 18:18-40; 19:1-4) Jéhovah azalaki kuna mpo na kosalisa ye na ntango wana ya mpasi? Ya solo mpenza. Soki ata Elie abutaki na ngomba ya molai, lokola mpo na kokende kino na likoló; ata soko akendeki komibomba na lidusu kati na libanga monene, na bozindo mpenza kati na mabelé, lokola na Sheol; ata soko akimaki na esanga moko mosika na kopota makasi lokola oyo ya pole ya ntongontongo likoló na mabelé, loboko na Jéhovah esengelaki kozala wana mpo na kolendisa ye mpe kokamba ye. (Tala Baloma 8:38, 39.) Mpe Jéhovah alendisaki Elie bobele na bilei mpo na mobembo na ye te kasi lisusu na elakiseli ya kokamwa ya nguya na Ye oyo ekosalaka mosala. Nsima ya kolendisama bongo, Elie akendaki kokokisa mokumba mosusu oyo Jéhovah apesaki ye lokola mosakoli.​—1 Mikonzi 19:5-18.

14. (a) Mpo na nini ekozala likambo ya libunga na kokanisa ete Nzambe azalaka bipai binso? (b) Kati na makambo nini Jéhovah asalisaki na bolingo nyonso basaleli na ye ya ntango na biso? (c) Lolenge nini ata soko tokozala na Sheol, Nzambe akozala kuna?

14 Maloba ya esakweli oyo mazali na Nzembo 139:7-12 malingi komonisa te ete Nzambe azali bipai binso, ete azali ntango nyonso na bisika binso. Makomami mazali komonisa polele ete ezali bongo te. (Deteronome 26:15; Baebele 9:24) Nzokande, basaleli na ye bakoki mpenza te kozala mosika na ye. Yango emonani solo mpo na baoyo mikumba ya teokratike ememi bango na bamboka mosika mpenza. Yango ezalaki solo mpo na Batemwe ya sembo kati na boloko mabe ya Nazi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe yango ezalaki solo mpo na bamisionere oyo bakangamaki na boloko ya moto mokomoko na Chine na 1958 kino 1965. Yango ezalaki mpe solo mpo na bandeko balingami na biso baoyo, na mokili moko ya Afrique centrale, basengelaki kokima mbala na mbala bamboka na bango, to kokima ata mokili na bango. Soki esengeli, Jéhovah akoki kokóma kino na Sheol, nkunda na bato nyonso, mpe kobimisa basaleli na ye ya sembo na nzela ya lisekwa.​—Yobo 14:13-15; Luka 20:37, 38.

Ye oyo ayebi biso malamu mpenza

15. (a) Uta ntango nini Jéhovah abandaki komona bokóli na biso? (b) Likanisi oyo mokomi na Nzembo abimisi ya bangei emonisi ete Nzambe azali na boyebi nini mpo na biso?

15 Na kopemama, mokomi na Nzembo amonisi ete ata liboso na kobotama na biso Nzambe ayebi biso: “Yo osalaki bilembo na katikati na ngai; otongaki ngai kati na libumu na mama na ngai. Nakotondo yo mpo ete nasalemi na motindo na kokamwa mingi; misala na yo mizali na kokamwa mingi mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:13, 14) Kosangisama ya ba gènes oyo euti na tata na biso mpe na mama na biso na ntango oyo zemi ebandaki epesaki ebongiseli oyo ezali kosala bopusi monene likoló na makoki ya nzoto na biso mpe ya mayele na biso. Nzambe azali kososola makoki wana. Kati na loyembo oyo balobeli sikisiki ngei (reins), oyo esalelamaka mbala mingi kati na Makomami mpo na kolobela eteni eleki kobombama ya bomoto na biso.a (Nzembo 7:9; Yilimia 17:10) Jéhovah ayebi makambo wana nyonso oyo matali biso liboso ata wana tobotami naino te. Azali lisusu ye oyo, kati na komibanzabanza ya bolingo, asalaki nzoto na moto na motindo boye ete cellule oyo ebandi na zemi kati na libumu na mama etónga “ebombamelo” mpo na mwa mwana moke wana kati na libumu mpe kobatela ye wana azali kokóla.

16. (a) Lolenge nini Nzembo 139:15, 16 emonisi polele nguya monene oyo Nzambe azali na yango ya komona makambo? (b) Mpo na nini yango esengeli kolendisa biso?

16 Na nsima, mpo na komonisa ete miso na Nzambe mazali na nguya mpenza mpo na komona biloko nyonso, mokomi na Nzembo abakisi ete: “Mikuwa na ngai ebombamaki na yo te na ntango wana esalemaki ngai na ebombelo mpe wana ebongisamaki ngai na nse na mokili [ezali mpenza maloba kitoko mpo na kolimbola libumu na mama na ye, elongo na mwa likanisi litali kozalisama ya Adam uta na mputulu]. Miso na yo emonaki ngai naino esalemaki ngai te; mikolo na ngai [ya biteni ya nzoto] ekomamaki nyonso na mokanda na yo.” (Nzembo 139:15, 16) Ntembe moko ezali te: ata baninga na biso bato bayebi biso to bayebi biso te, Jéhovah azali koyeba biso malamu. Likambo yango lisengeli kozala na bopusi nini epai na biso?

17. Wana tomoni ete misala na Nzambe mizali ya kokamwa, yango esengeli kopusa biso na kosala nini?

17 Mokomi na Nzembo 139 ayebaki malamu ete misala na Nzambe oyo ye azalaki kolobela na mokanda na ye mizalaki ya kokamwa. Yo mpe ozali komona makambo na lolenge yango? Likambo oyo lizali ya kokamwa lizali kotinda moto na kokanisa mozindo to ezali kobenda likebi. Ekoki mpenza kozala ete osalaka bongo liboso na misala ya kozalisama ya mosuni oyo Jéhovah asalaki. (Tala Nzembo 8:3, 4, 9.) Okanisaka mpe na motindo yango na oyo Nzambe asili kosala na kotya Bokonzi ya Masiya, na oyo azali kosala mpo na kosakolama ya nsango malamu na mabelé mobimba, mpe na lolenge oyo Liloba na ye lizali kobongola bomoto na bato?​—Tala 1 Petelo 1:10-12.

18. Soki tomoni ete misala ya Nzambe mizali ya nsomo, yango esengeli kosala bopusi nini likoló na biso?

18 Wana tozali kotalela misala na Nzambe, tomonaka ete mizali ya kokamwa mingi? Epesaka biso bobangi oyo ekokani na mokano ya Nzambe, oyo ezali kotinda biso na kosalela ye mpe oyo ezali na bopusi mozindo likoló na bomoto na biso mpe lolenge tozali kosalela bomoi na biso? (Tala Nzembo 66:5.) Soki ezali bongo, motema na yo mokopusa yo na kokumisa Jéhovah, kosanzola ye, kozwa mabaku ya kolobela basusu na ntina na mokano mpe makambo kitoko oyo abombi mpo na baoyo bazali kolinga ye.​—Nzembo 145:1-3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., na nkasa 1278 mpe 1279.

Okanisi nini na yango?

◻ Lolenge nini likambo ya koyeba ete “Jéhovah azali Nzambe” ekosalisa biso na kosalela ye na esengo?

◻ Motindo nini likambo oyo ete Nzambe ayebi misala nyonso na biso esengeli kozala na bopusi likoló na biso?

◻ Mpo na nini ezali elendiseli na koyeba ete tozali mosika te na miso na Nzambe?

◻ Mpo na nini Nzambe akoki koyeba biso malamu koleka moto nyonso?

◻ Mpo na nini boyekoli lokola oyo ezali kopusa biso na kokumisa Jéhovah?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto