‘Tosalami na motindo ya kokamwa mingi’
“Nasalami na motindo ya kokamwa mingi.”—NZEMBO 139:14.
1. Mpo na nini bato mingi ya mayele balobaka ete Nzambe nde akelá biloko ya kokamwa oyo ezali na mokili?
MOKILI etondi mpenza na bikelamu ya kokamwa. Bikelamu yango nyonso eutá wapi? Bato mosusu bandimaka te ete ezali na Mozalisi oyo akelaki yango. Nzokande, bamosusu balobaka ete soki toboyi kondima ete Mozalisi azali, tokozala na mokakatano mpo na kokanga ntina ya makambo mingi na mokili. Bato yango balobaka ete lokola bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali awa na mabelé esalami na ndenge ya kokamwa, ezali mpasi tókanisa ete esalamaki yango moko. Bato mingi, ata mpe bato mosusu ya siansi, balobaka ete ezali na makambo oyo emonisaka ete Mozalisi moko oyo azali na bwanya mingi, na nguya mingi, mpe na boboto akelaki molɔ́ngɔ́.a
2. Nini etindaki Davidi asanzola Yehova?
2 Mokonzi Davidi azali moko ya bato oyo bazalaki kondima ete ezali na Mozalisi moko oyo abongi kozwa lokumu mpo na biloko ya kokamwa oyo asalaki. Atako Davidi azalaki na eleko oyo siansi ekolaki naino te lokola lelo, azalaki komona ebele ya biloko ya kokamwa oyo Nzambe akelá. Davidi akokaki kotala ata kaka nzoto na ye mpo na komona ete Nzambe oyo akelaki yango azali na mayele ya kokamwa. Akomaki boye: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.”—Nzembo 139:14.
3, 4. Mpo na nini ezali na ntina ete mokomoko na biso akanisaka na mozindo misala ya Yehova?
3 Davidi akómaki na kondima makasi ndenge wana mpo azalaki kokanisa na mozindo. Lelo oyo, makambo oyo bazali koteya na kelasi, makambo oyo bazali kokoma na bazulunalo mpe koloba na radio mpe na televizyo, etondi na makanisi oyo ezali kotinda bato bátika kondima ete moto azali ekelamu ya Nzambe. Mpo tózala na kondima lokola oyo ya Davidi, biso mpe tosengeli kokanisaka na mozindo. Tosengeli te kotika ete bato mosusu báyebisaka biso oyo tosengeli kondima, mingimingi na makambo ya ntina lokola oyo etali Mozalisi mpe misala na ye.
4 Longola yango, kokanisa misala ya Yehova ekosalisa biso tólinga ye mingi lisusu mpe tózala na botɔndi mingi, mpe ekopesa biso elikya ete makambo oyo alaki ekokokisama. Na ndenge yango, tokozala na mposa ya koyeba Yehova malamu koleka mpe kosalela ye. Yango wana, tiká tótalela ndenge oyo siansi emonisi bosolo ya maloba ya Davidi ete ‘tosalami na motindo ya kokamwa mingi.’
Nzoto na biso esalamaka na ndenge ya kokamwa
5, 6. (a) Bomoi ya mokomoko na biso ebandaki ndenge nini? (b) Bangei esalaka mosala nini?
5 “Yo osalaki [bangei, NW] na katikati na ngai; otongaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.” (Nzembo 139:13) Bomoi ya mokomoko na biso ebandaki na libumu ya mama na ye; ebandaki na mwa selile moko moke mpenza; kutu, elembo ya bopemi oyo esukisi fraze oyo eleki yango na monene. Mwa selile yango ezalaki na makambo ndenge na ndenge! Na nsima, ebandaki kokola nokinoki. Nsima ya sanza mibale, binama mingi ya nzoto ya moto esalamaki. Moko na yango ezali bangei. Ntango obotamaki, bangei na yo ezalaki na makoki ya kosukolaka makila nyonso ya nzoto na yo, elingi koloba kolongola biloko oyo ezali mabe mpo na nzoto mpe kolongola mai oyo eleki mingi mpe kotika biloko oyo nzoto esengeli na yango. Epai ya mokóló, soki bangei nyonso mibale ezali kosala malamu, ekoki kopɛtola litre soki 5 ya mai oyo ezali na kati ya makila nsima ya miniti 45!
6 Bangei esalaka ete bavitamini, sukali, mungwa, mpe aside eleka mingi te na makila mpe tansiɔ ezala malamu. Bangei esalaka mpe makambo mosusu ya ntina mingi mpo na nzoto; na ndakisa, ebongolaka vitamini D mpo ebanda kosala ete mikuwa ekola malamu mpe ebimisaka proteini moko oyo esalaka ete mikuwa ebota globule rouge. Ya solo, bangei esalaka mosala monene mpenza!b
7, 8. (a) Limbolá ndenge oyo mwana asalamaka na kati ya libumu. (b) Na ndimbola nini mwana ‘abongisamaka na nse mingi ya mokili’?
7 “[Mikuwa, “NW”] na ngai ebombamaki na yo te na ntango wana esalamaki ngai na ebombelo mpe wana ebongisamaki ngai na nse mingi ya mokili.” (Nzembo 139:15) Selile oyo ezalaki moko na ebandeli ekabwanaki na mibale; na nsima, mibale ekabwanaki na minei, mpe bongo na bongo. Mwa moke na nsima, selile na selile ekómaki kozwa lolenge moko, elingi koloba mosusu ebandaki kokóma selile ya mosisa, mosusu ya mosuni, mosusu ya mposo, mpe bongo na bongo. Na nsima, baselile ya lolenge moko ekómaki kosangana mpo esala binama. Na ndakisa, na boumeli ya pɔsɔ ya misato, mikuwa ya nzoto na yo ebandaki kosalama. Ntango okokisaki pɔsɔ nsambo, ozalaki na molai ya santimɛtrɛ soki mibale na ndambo; kasi, mikuwa nyonso 206 ya nzoto na yo esalamaki, atako ekembaki naino te.
8 Makambo nyonso wana ya kokamwa ezalaki koleka na kati ya libumu ya mama na yo; moto moko te azalaki komona yo ndenge ozalaki kosalama, ezalaki lokola nde babombi yo na nse mingi ya mokili to mabelé. Kutu, tii lelo oyo bato bayebi naino te makambo mingi oyo esalamaka mpo mwana oyo azali na kati ya libumu akola. Na ndakisa, nini etindaki baselile ya nzoto na yo ebanda kozwa lolenge moko to mosusu? Mbala mosusu bato ya siansi bakoyeba yango mokolo mosusu; kasi ndenge Davidi alobaki yango, Yehova, Mozalisi na biso ayebaka yango nyonso banda kala.
9, 10. Na ndenge nini makambo nyonso ya mwana oyo azali kokola na libumu ‘ekomamaki na mokanda’ ya Nzambe?
9 “Miso na yo emonaki ngai naino esalamaki ngai te; mikolo na ngai ekomamaki nyonso na mokanda na yo. Yango eponamaki mpo na ngai, naino ekómaki moko na yango te.” (Nzembo 139:16) Mwa selile wana ya ebandeli ebombaki makambo nyonso etali nzoto na yo mpe kokola na yango. Kokola na yo na boumeli ya sanza libwa na libumu ya mama na yo, mpe na nsima na boumeli ya mbula koleka 20 tii ntango okómaki mobali to mwasi mobimba, ezalaki kosalama na kolanda makambo wana. Na ntango yango, mbongwana ndenge na ndenge ezalaki kosalama na nzoto na yo na kolanda makambo oyo ezalaki na kati ya mwa selile wana ya ebandeli.
10 Davidi ayebaki selile te, azalaki mpe na mikroskope te. Atako bongo, asosolaki ete kokola ya nzoto na ye ebongisamaki liboso. Mbala mosusu Davidi ayebaki mwa moke lolenge oyo mwana akolaka na libumu ya mama, yango wana akanisaki ete kokola yango ezalaki kosalama na kolanda makambo oyo ebongisamá liboso. Alobaki ete ‘ekomamaki na mokanda’ ya Nzambe.
11. Nini esalaka ete moto mokomoko azala na nzoto mpe elongi oyo azali na yango?
11 Lelo oyo, toyebi ete makambo lokola lolenge ya nzoto, elongi, miso, mpe makambo mosusu oyo ozwá epai ya baboti mpe bankɔkɔ na yo ezalaki na kati ya ba gène na yo. Selile mokomoko ezali na bankóto ya ba gène, mpe yango nyonso esangani na kati ya ADN. Ndenge oyo nzoto na yo mobimba ezali ‘ekomami’ na kati ya ADN na yo. Mbala nyonso oyo baselile na yo ekabwani, ezala mpo na kosala selile ya sika to kozwa esika ya selile ya kala, makambo nyonso oyo ezalaki na ADN ya selile ya liboso, ezalaka mpe na selile ya sika, yango nde esalaka ete okoba kozala na bomoi mpe ozala na elongi mpe lolenge ya nzoto oyo ozali na yango. Makambo yango ezali mpenza komonisa nguya mpe bwanya ya Mozalisi na biso!
Bɔɔngɔ: enama moko ya kokamwa
12. Nini ekesenisi bato na banyama?
12 “Ee Nzambe, [makanisi, “NW”] na yo epai na ngai ezali eloko ya motuya mingi! Motuya na yango ezali monene boni! Soki nameki kotánga yango, eleki mbuma ya zɛlo na motuya.” (Nzembo 139:17, 18a) Banyama basalamá mpe na ndenge ya kokamwa; banyama mosusu kutu bazalaka na makoki oyo eleki ya bato. Kasi, Nzambe apesá moto mayele oyo eleki mosika mayele ata ya nyama nini. Buku moko ya siansi elobi boye: “Atako biso bato tokokani na bikelamu mosusu na makambo mingi, kaka biso nde tozali na makoki ya koloba mpe kokanisa. Tokeseni mpe na bikelamu mosusu mpamba te tolukaka komiyeba malamumalamu: Ndenge nini nzoto na biso ebongisamá? Tosalamá ndenge nini?” Na ntembe te Davidi amitunaki mituna yango.
13. (a) Ndenge nini Davidi akokaki komanyola makanisi ya Nzambe? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Davidi?
13 Likambo eleki ntina ezali ete, na bokeseni na banyama, kaka biso nde tomanyolaka makanisi ya Nzambe.c Likabo yango ezali moko na makambo oyo emonisaka ete tosalami na “elilingi ya Nzambe.” (Genese 1:27) Davidi asalelaki likabo yango malamu. Amanyolaki makambo oyo emonisaka ete Nzambe azali mpe bizaleli malamu na ye oyo azalaki komona na biloko oyo akelá awa na mabelé. Davidi azalaki mpe na mikanda ya Biblia oyo ekomamá kala, epai Nzambe amimonisaki mpe alobelaki misala na ye. Mikanda yango oyo epemami na Nzambe esalisaki Davidi ayeba makanisi, bizaleli, mpe mokano ya Nzambe. Komanyola makambo oyo atángaki na Makomami, oyo amonaki na biloko oyo Nzambe akelá, mpe komanyola na ndenge oyo Nzambe asalaka makambo, etindaki Davidi asanzola Mozalisi na ye.
Kondima esɛngaka nini?
14. Mpo na nini ezali kosɛnga te tóyeba makambo nyonso ya Nzambe liboso tóndimela ye?
14 Wana Davidi azalaki komanyola likoló ya biloko oyo Nzambe akelá mpe likoló ya Makomami, akómaki mpe komona ete akoki te kososola boyebi mpe makoki nyonso ya Nzambe. (Nzembo 139:6) Ezali mpe bongo mpo na biso. Ata mokolo moko te tokoyeba misala nyonso ya Nzambe. (Mosakoli 3:11; 8:17) Kasi, na nzela ya Biblia mpe na biloko oyo akelá, Nzambe ‘amonisi polele’ boyebi mingi oyo ekoki kosalisa ata bato ya eleko nini oyo balingaka solo bákóma na kondima na nzela ya makambo oyo bamoni.—Baloma 1:19, 20; Baebele 11:1, 3.
15. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ete kondima etambolaka nzela moko na boyokani na biso na Nzambe.
15 Kozala na kondima esuki kaka te na koloba ete Mozalisi moko ya mayele akelaki bomoi mpe molɔ́ngɔ́ mobimba. Esɛngi mpe kotyela Yehova Nzambe motema lokola moto ya solo oyo azali na mposa ete biso tóyeba ye mpe tózala na boyokani malamu elongo na ye. (Yakobo 4:8) Tókanisa naino kondima oyo mwana azalaka na yango epai ya tata oyo alingaka ye mpe elikya oyo atyelaka ye. Soki moto moko alobi ete tata na yo akosalisa yo te soki okutani na mokakatano, mbala mosusu okoki kozanga ndenge ya kondimisa ye ete tata na yo azali moto ya kotyela motema. Kasi, soki omonaka makambo ndenge na ndenge oyo emonisaka motema malamu na ye, okozala na elikya ete akotika yo te. Ndenge moko mpe, koyekola Biblia mpo na koyeba Yehova, kozwa ntango ya kotala biloko oyo akelá mpe komanyola likoló na yango, mpe komona ndenge oyo ayanolaka na mabondeli na biso, etindaka biso tótyela ye motema. Yango epesaka biso mposa ya koyeba ye malamu koleka mpe kosanzola ye libela na libela mpo tolingi ye mpe tomipesi na ye. Yango nde mokano oyo eleki mikano nyonso oyo moto akoki komityela.—Baefese 5:1, 2.
Tóluka litambwisi ya Mozalisi na biso!
16. Boyokani makasi oyo Davidi azalaki na yango na Yehova ekoki koteya biso nini?
16 “Meká ngai, ee Nzambe, mpe yebá motema na ngai; sosolá ngai mpe yebá kobanza na ngai. Talá soki nazali kotambola na nzela mabe, mpe kambá ngai na nzela ya seko.” (Nzembo 139:23, 24) Davidi abosanaki te ete Yehova ayebaki ye malamumalamu; likambo nyonso oyo akokaki kokanisa, koloba, to kosala ezalaki polele liboso ya Mozalisi. (Nzembo 139:1-12; Baebele 4:13) Lokola Nzambe ayebaki ye malamu ndenge wana, Davidi azalaki motema mpiɔ, lokola mwana moke oyo abangaka eloko te ntango azali pembeni ya tata to mama na ye. Davidi azalaki kopesa motuya mingi na boyokani makasi oyo azalaki na yango na Yehova mpe azalaki kosala makasi akanisa na mozindo misala na Ye mpe abondelaka Ye mpo na kobatela boyokani yango. Kutu, banzembo mingi oyo Davidi akomaki, ata mpe Nzembo 139, ezalaki mabondeli oyo na nsima, ekómaki koyembama elongo na bibɛtɛli ya miziki. Biso mpe, komanyola mpe kobondela ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova.
17. (a) Mpo na nini Davidi alingaki ete Yehova asosola motema na ye? (b) Ndenge oyo tozali kosalela bonsomi na biso esalaka nini na bomoi na biso?
17 Lokola Nzambe akelá biso na elilingi na ye, tozali na bonsomi ya kopona. Biso moko tozali na likoki ya kopona kosala malamu to kosala mabe. Kasi, tokozongisa monɔkɔ na ndenge oyo tozali kosalela bonsomi yango. Davidi aboyaki kotángama na molɔngɔ ya bato mabe. (Nzembo 139:19-22) Alingaki te kosala makambo oyo ekoyokisa ye mpasi nsima. Yango wana, nsima ya kokanisa boyebi oyo Yehova azali na yango na makambo nyonso, na komikitisa nyonso, Davidi asɛngaki Nzambe ete ameka ye mpe atambwisa ye na nzela oyo ezali komema na bomoi. Mibeko ya sembo ya Nzambe ebongi na moto nyonso; yango wana, biso mpe tosengeli kopona kosala makambo ya malamu. Yehova azali kolendisa biso nyonso ete tótosa ye. Soki tosali yango, akosepela na biso mpe tokozwela yango matomba mingi. (Yoane 12:50; 1 Timote 4:8) Kotambola na Yehova mokolo na mokolo esalisaka biso tózala na kimya ya motema, ata ntango tokutani na mikakatano ya makasi.—Bafilipi 4:6, 7.
Tólanda Mozalisi na biso Monene!
18. Davidi alobaki nini nsima ya kotala na likebi biloko oyo Nzambe akelá?
18 Ntango Davidi azalaki elenge, mbala mingi abandaki kozala na zamba mpo na kobatela bibwɛlɛ. Bampate bazalaki kokitisa mitó na nse mpo na kolya matiti, kasi ye azalaki kotombola miso na ye likoló. Na kati ya molili ya butu, Davidi azalaki kokanisa ndenge oyo molɔ́ngɔ́ etondi na nkembo mpe ndimbola ya nyonso wana. Davidi akomaki boye: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye. Mokolo moko ekoteyaka yango na mokolo mosusu, butu moko ekoyeisaka yango na butu mosusu.” (Nzembo 19:1, 2) Davidi amonaki ete asengeli koluka mpe kolanda Moto oyo asalaki makambo nyonso na motindo ya kokamwa. Biso mpe tosengeli kosala bongo.
19. Liteya nini bilenge mpe mikóló bakoki kozwa na ndenge ‘tosalami na motindo ya kokamwa mingi’?
19 Bomoi ya Davidi emonisi ndenge oyo moto asengeli kosala soki alandi toli oyo mwana na ye Salomo apesaki bilenge na nsima: “Kanisá [Mozalisi na yo Monene, NW] na mikolo ya bolenge na yo . . . Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala ya bato nyonso.” (Mosakoli 12:1, 13) Davidi ayebaki banda azalaki elenge ete ‘asalamaki na motindo ya kokamwa mingi.’ Lokola azalaki kobosana likambo yango te na nyonso oyo azalaki kosala na bomoi na ye, azwelaki yango matomba mingi. Biso mpe, tózala bilenge to mikóló, soki tozali kosanzola Mozalisi na biso Monene mpe tozali kosalela ye, tokozala na esengo lelo oyo mpe na mikolo ekoya. Mpo na bato oyo bakangamaka na Yehova mpe balandaka banzela na ye ya sembo, Biblia epesi elaka oyo: “Bakobota naino na ntango ya konuna, bakotonda na mafuta, bakokauka te, mpo na koyebisa ete [Yehova] azali na boyengebene.” (Nzembo 92:14, 15) Longola yango, tokozala na elikya ya koyekola misala ya Mozalisi na biso libela na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 22 Yuni 2004 [ebimeli ya Lifalanse], ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Talá mpe lisolo “Les reins: des filtres essentiels à la vie,” na Lamuká! ya 8 Augusto 1997 [ebimeli ya Lifalanse].
c Maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 139:18b ekoki kolimbola ete ata soki alekisi mokolo mobimba na kotánga makanisi ya Yehova tii ntango akolala, lobi na ntɔngɔ akozala kaka na makanisi mingi ya kotánga.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini kokola ya mwana na libumu emonisi ete ‘tosalami na motindo ya kokamwa mingi’?
• Mpo na nini tosengeli komanyola makanisi ya Yehova?
• Na ndenge nini kondima etambolaka nzela moko na boyokani na biso na Yehova?
[Bililingi na lokasa 23]
Ndenge oyo mwana akolaka na libumu esilá kobongisama malamu
ADN
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mwana na libumu: Lennart Nilsson
[Elilingi na lokasa 24]
Lokola mwana oyo atyelaka tata oyo alingaka ye motema, biso mpe totyelaka Yehova motema
[Elilingi na lokasa 25]
Kokanisa misala ya Yehova etindaki Davidi asanzola Ye