Libombami ya nkombo oyo eleki nkombo nyonso engɛngisami polele
Ezali likambo ya esengo na koyeba ete Coran mpe Biblia, nyonso mibale ezali kosalela nkombo oyo eleki nkombo nyonso. Boyekoli oyo ezali kopesa ndimbola mpe ntina ya nkombo oyo eleki nkombo nyonso. Ezali komonisa lisusu kati na likambo nini nkombo yango etaleli bato nyonso mpe mikolo na bango mizali koya awa na mabelé.
BAMILIÓ na mibali mpe basi bazalaki na bomoi awa na mabelé mpe basilá kokufa. Mingi na bango basilá kokufa elongo na bankombo na bango, mpe basilá kobosana bango. Kasi bankombo mosusu, lokola Avicenne, Edison, Pasteur, Beethoven, Gāndhī, Newton, ebungi naino te. Nkombo wana esangani na misala, na bokundoli mpe na biloko oyo bisalemaki na bankolo nkombo yango.
Nzokande, ezali na nkombo oyo eleki nkombo nyonso mosusu na monene. Kati na molɔ́ngɔ́ mobimba, biloko nyonso ya kitoko ya ntango na kala mpe ya lelo, ezali na boyokani na nkombo yango. Kanisa naino ete, elikya oyo bato bazali na yango ya kozala na bomoi molai mpe ya esengo ekangani na nkombo yango!
Bato mingi bazalaki na mposa ya koyeba nkombo yango. Balukaki yango, batunaki mituna likoló na yango, kasi bayebaki yango te. Etikalaki bobele libombami mpo na bango. Ya solo, moto moko te akoki koyeba nkombo yango bobele soki Nkolo na yango ayebisi ye. Likambo ya esengo, libombami ya nkombo wana ekokani na mosusu te, elimbolamaki. Nzambe ye moko asalaki yango, mpo ete baoyo bazali kondima ye bayeba ye. Ayebisaki nkombo na ye epai na Adam, na nsima epai na Abalayama, na Moize mpe epai na basaleli na Ye mosusu ya sembo ya ntango na kala.
Bolukiluki ya nkombo oyo eleki nkombo nyonso
Coran elobeli moto moko oyo “azalaki na boyebi ya Makomami.” (27:40) Totangi kati na komantere moko eyebani na nkombo Tafsīr Jalālayn, mpe oyo ezali kolimbola verset wana ete: “Asafa, mwana na Belekiya, azalaki moto na sembo. Ayebaki nkombo oyo eleki nkombo nyonso, oyo ya Nzambe, mpe mbala nyonso oyo azalaki kobelela nkombo yango, Nzambe azalaki koyanola ye.” Yango ezali kokundwela biso Asafa, mokomi na Biblia oyo alobaki na Nzembo 83:18 ete: “Bayeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo Jéhovah, Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.”
Totangi lisusu na Coran 17:2, ete: “Topesaki Moize Makomami mpe tokómisaki yango Mokambi mpo na Bayisraele.” Na makomi wana, Moize alobi na Nzambe ete: “Soko ngai nakokóma epai na bana na Yisraele mpe nakolobela bango ete: ‘Nzambe ya batata na bino atindi ngai epai na bino,’ mpe soko bakoloba na ngai ete: ‘Nkombo na ye nani?’ Nalobela bango nini?” Mpe Nzambe alobaki lisusu na Moize ete: “Lobela bana na Yisraele ete: ‘Jéhovah, Nzambe ya batata na bino, Nzambe ya Abalayama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo, atindi ngai epai na bino.’ Wana nkombo na ngai lobiko na lobiko.”—Exode 3:13, 15.
Na ntango ya kala, Bayisraele bayebaki nkombo monene wana ya Nzambe. Bazalaki nkutu kokɔtisa yango kati na bankombo na bango moko. Lolenge moko tozali lelo kokuta nkombo Abdullah, oyo elimboli “Mosaleli ya Nzambe,” libota ya Yisraele lizalaki na nkombo Obadia, oyo elimboli “Mosaleli ya Jéhovah.” Mama ya mosakoli Moize abéngamaki na nkombo Yokebede, oyo ekoki mpenza kolimbola ete “Jéhovah azali nkembo.” Yoane elimboli “Jéhovah azali na motema mawa,” mpe nkombo ya mosakoli Eliya elimboli “Nzambe na ngai ezali Jéhovah.”
Basakoli bayebaki nkombo oyo monene mpe basalelaki yango na limemya mozindo. Tozali kokuta yango koleka mbala 7 000 kati na Makomami Mosantu. Yesu Klisto, mwana na Maria, amonisaki motuya na yango wana alobaki kati na libondeli na ye epai na Nzambe, ete: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo yo opesaki ngai . . . Nasili koyebisa bango nkombo na yo, mpe nakoyebisa yango lisusu, ete bolingo oyo olingaki ngai ezala kati na bango.” (Yoane 17:6, 26, NW) Kati na komantere na ye oyo eyebani mingi likoló na Coran, Bayḍāwī amonisi likambo moko na verset 87 ya sourate 2, ete Yesu azalaki na momeseno ya “kosekwisa bakufi na nzela ya nkombo ya Nzambe oyo eleki monene.”
Nini esalemaki mpo ete nkombo wana ekóma libombami? Nkombo yango ezali na boyokani nini na bomoi ya moko na moko kati na biso na mikolo mizali koya?
Lolenge nini nkombo wana ekómaki libombami?
Basusu bakanisaka ete “Jéhovah” elimboli “Allah” (Nzambe), na Liebele. Kasi “Allah” ekokani na liloba ya Liebele oyo ete ʼElo·himʹ, boike ya liloba ʼelohʹah (nzambe), mpo na komonisa lokumu. Biyambayamba bibandaki kobima kati na Bayuda, oyo epekisaki bango na kotanga nkombo ya Nzambe, Jéhovah. Yango wana, na ntango bazalaki kotanga Makomami Mosantu mpe bazalaki kokuta nkombo Jéhovah, bazalaki na momeseno ya koloba ʼAdho·naiʹ, oyo elimboli “Nkolo.” Na bisika mosusu, basili nkutu kobongola likomi ya Liebele ya ebandeli na kokomáká ʼAdho·naiʹ na esika ya “Jéhovah.”
Bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta balandaki bobele nzela yango. Basili kokitanya liloba “Nzambe” (“Allah” na Arabe) mpe “Nkolo” na esika ya nkombo Jéhovah. Yango epesaki nzela na bokóli na liteya ya Bosato, oyo etongami te likoló ya Makomami Mosantu. Mpo na yango, bamilió na bato bazali komikosa na kosambeláká Yesu mpe elimo santu, mpe bazali kotalela bango ete bakokani na Nzambe.a
Bongo, bakonzi na lingomba ya Bayuda mpe bakonzi ya boklisto ya lokuta nde bafundami mpo na kobunga ya nkombo oyo eleki nkombo nyonso na mokili mobimba. Kasi Nzambe ayebisi esakweli oyo: “Nakokumisa nkombo na ngai monene . . . mpe mabota bakoyeba solo ete ngai nazali Jéhovah.” Ee, Jéhovah akoyebisa nkombo na ye kati na mabota nyonso. Mpo na nini? Mpo ete azali bobele Nzambe ya Bayuda te to ya ekólo mosusu soko mpe libota moko te. Jéhovah azali Nzambe ya bato nyonso.—Ezekiele 36:23; Genese 22:18; Nzembo 145:21; Malaki 1:11.
Nkombo oyo eleki nkombo nyonso mpe mikolo na biso mizali koya
Makomami Mosantu mayebisi ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Jéhovah akobika.” (Baloma 10:13) Lobiko na biso na mokolo ya kosambisama ekotalela boyebi na biso na nkombo ya Nzambe. Mpo na koyeba nkombo na ye, tosengeli koyeba bizaleli na ye, misala na ye mpe mikano na ye, mpe komiyokanisa na mitinda na ye mitombwani. Ezali lolenge wana nde Abalayama ayebaki nkombo ya Nzambe mpe azalaki kobelela nkombo yango. Na motindo wana, akokaki kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe, amonisaki kondima na ye, atyaki motema na ye epai na Nzambe mpe atosaki ye. Abalayama akómaki bongo moninga na Nzambe. Bobele bongo, boyebi ya nkombo ya Nzambe ezali kobɛlɛmisa biso epai na ye mpe ezali kosalisa biso na kokólisa boyokani malamu elongo na ye, na kokangamáká na bolingo na ye.—Genese 12:8; Nzembo 9:10; Masese 18:10; Yakobo 2:23.
Tozali kotanga kati na Biblia ete: “Jéhovah atyaki likebi mpe ayokaki. Mpe mokanda na kokanisa mokomamaki liboso na ye mpo na baoyo bakobangaka Jéhovah mpe mpo na baoyo bakokanisaka nkombo na ye.” (Malaki 3:16, NW) Mpo na nini tosengeli ‘kokanisa’ nkombo oyo eleki monene? Nkombo ya Jéhovah elimboli mpenza “Akoyeisaka.” Nkombo wana ezali komonisa Jéhovah lokola Ye oyo amiyeisi Nzambe oyo ayebi kokokisa bilaká na ye. Azali ntango nyonso kokokisa mikano na ye. Azali Nzambe mozwi-na-nguya-nyonso, Mozalisi bobele moko, oyo azali na bizaleli nyonso. Liloba moko te likoki mpenza komonisa lolenge oyo Nzambe azali. Kasi Nzambe aponaki nkombo oyo eleki monene, Jéhovah, mpe nkombo wana ezali kokundwela biso bizaleli na ye, makoki na ye mpe mikano na ye.
Kati na Makomami Mosantu, Nzambe azali koyebisa biso mikano na ye mpo na bato. Jéhovah Nzambe azalisaki moto mpo ete azala na bomoi ya seko mpe ya esengo kati na Paradis. Alingi ete bato nyonso basala bobele libota moko, oyo lizali na bomoko kati na bolingo mpe na kimya. Nzambe ya bolingo akokokisa mokano wana na mikolo mizali koya.—Matai 24:3-14, 32-42; 1 Yoane 4:14-21.
Nzambe alimboli bantina ya mpasi ya bato mpe amonisi ete lobiko lokoki kozwama. (Emoniseli 21:4) Na Nzembo 37:10, 11, totangi ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Kasi bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya mingi.”—Tala Coran 21:105.
Ee, Nzambe akoyebana na nkombo na ye monene. Mabota bakoyeba ete azali Jéhovah. Oyo nde libaku kitoko na koyeba nkombo oyo eleki monene, na kotatola yango mpe na kokangama na yango! Mokano ya esengo ya Nzambe ekokokisama epai na moko na moko kati na biso ete: “Nakobikisa ye mpo ete ye azali kolinga ngai; nakotombola ye likoló mpo ete ayebi nkombo na ngai. Akobelela ngai mpe nakoyanola ye; . . . Nakotondisa ye na mikolo mingi mpe nakomonisa ye lobiko na ngai.”—Nzembo 91:14-16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bilembeteli bimonisi ete Bosato (Trinité) ezali liteya liuti na Biblia te, tala brochure Osengeli kondima Trinité? oyo ebimisamaki na 1991 na la Société Watchtower.
[Elilingi na lokasa 5]
Na nzeté oyo ezalaki kopɛla mɔ́tɔ, Nzambe amimonisaki epai na Moize lokola ‘Jéhovah, Nzambe ya Abalayama’
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Moses and the Burning Bush, by W. Thomas, Sr.