Masoló ya Basakoli na bokonzi
Limemya mpo na ezaleli ya bulee ya bomoi
BIBLIA emonisi ete makila ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe mpe ete azali kokweisa lolenge nyonso mabe ya kosalela yango. (Levitike 17:14; Misala 15:19, 20, 28, 29) Lokola batambwisami na mitinda wana ya Biblia, ba Témoins de Jéhovah bazali kondima te kozongisama makila.
Mpo na kosalisa minganga mpe basáli na lopitalo na kokanga ntina ya etɛlɛmɛlo ya losambo ya ba Témoins de Jéhovah kati na likambo wana mpe na koyeba ete Batemwe bazali kondima kosalisama na nkisi mosusu na esika ya kozongisa makila, kati na mikili mikeseni, la Société Watch Tower asili kotya ba comités oyo ebéngami Comités de liaison hospitaliers (C.L.H.). Basangani ya ba comités wana bakosololaka elongo na basáli na lopitalo. Kala mingi te, koleka makita 200, oyo kati na yango minganga 500 bayanganaki, mingimingi bakambi ya ba cliniques to bakonzi na misala kati na lopitalo, esalemaki na bingumba 12 ya Pologne. Makambo oyo malandi malobamaki na moko na makita yango:
“Likita lisalemaki na Clinique oyo bapasolaka maladi ya motema na engumba Zabrze (na Pologne) ebimisaki matomba malamu mpenza. Kobanda 1986, minganga ya clinique wana bazali kopasola bandeko na biso kozanga kosalela makila. Na yango, uta ntango wana, bato 40 basili kozwa lipasó. Clinique wana ezali koyamba bato ya maladi baoyo bauti na Pologne mobimba mpe baoyo bauti na mboka mopaya. Nsima ya kosolola na boumeli ya minite 50, mokonzi na misala molandi (chef de service adjoint) alakisaki basangani ya C.L.H. epai na ndambo ya babɛli mpe alobaki ete: ‘Bato oyo bazali ba Témoins de Jéhovah. Bazali kosalana elongo na clinique na biso mpe bazali kosalisa biso mingi. Lisalisi na bango lizali kosunga te bobele bato ya lingomba na bango, kasi babɛli mosusu lokola. Tozali kotɔndo ba Témoins de Jéhovah; tondimisami sikawa ete ata lipasó ya maladi monene na motema, ekoki kosalema kozanga kosalela makila.
“ ‘Na ndakisa, topasolaki madame [alakisi moko na bato na ye ya maladi] kozanga kosalela makila, mpe Lundi, akozonga na ndako na ye. Nalingi komonisa ete tozali lisusu te kosalela makila mbala mingi lokola na liboso, mpo ete yango ezali likámá. Ezali komema VIH to mikrobe ya SIDA, hépatite mpe ezali kosala ete maladi esila noki te.
“ ‘Nazali moto ya katolike, kasi na ndako na biso tomemyaka ntango nyonso makanisi ya bato mosusu. Mokolo moko, nakendaki kotambola zingazinga na stade Slaski elongo na bana na ngai. Kala, stade wana esundolamaki, kasi ebongwanaki mingi mpenza na boye ete ezalaki mpasi mpo na koyeba yango lisusu. Natunaki na moko na basáli nini epesi mbongwana wana. Alobaki ete biro oyo ekokambaka yango ezalaki lisusu na elikya te mpo na kobongisa stade wana, kasi ba Témoins de Jéhovah bafutelaki yango, mpe babongisaki yango.
“ ‘Na yango, bazali bato oyo biso banso tosengeli komekola. Nakanisi ete, kati na mosala oyo, tosengeli komemya makanisi ya bato mosusu.’ Na nsima, kolakisáká Temwe moko oyo asengelaki kozwa lipasó nsima ya mwa mikolo, alobi ete: ‘Mobɛli mwasi oyo azali Témoin de Jéhovah, mpe akopasolama kozanga kosalela makila.’ ”
Ba Témoins de Jéhovah bazali komeka te kopusa bato mosusu na makasi ete balanda bindimeli na bango; bazali kolanda ndakisa ya bantoma mpe “bazali kotosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Yango esangisi mpe kozala na limemya mpo na makila. Bazali kotɔndo baoyo bazali komemya bindimeli na bango ya losambo kati na likambo yango.