Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/5 lok. 13
  • Lisalisi mpo na kobatela bosantu ya makila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi mpo na kobatela bosantu ya makila
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Kosalela bato mosusu ekitisaka mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Limemya mpo na ezaleli ya bulee ya bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Okokufa!”
    Lamuká!—2000
  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te
    Lamuká!—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/5 lok. 13

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Lisalisi mpo na kobatela bosantu ya makila

BASALELI ya Yehova na mokili mobimba bamonisaka ete bazali sembo epai ya Nzambe na ndenge batalelaka makila ete ezali eloko ya bosantu. (Misala 15:28, 29) Moombo ya sembo mpe ya mayele azali kosalisa lisangá mobimba ya bandeko baklisto na likambo yango. (Matai 24:45-47) Tótalela naino matomba oyo emonani na Philippines.

Betele ya Philippines epesi lapolo oyo: “Na 1990, bayebisaki biso ete bandeko ya Betele ya Brooklyn bakoya kosala likita moko awa na Philippines. Babengaki bandeko ya Babetele mingi ya Azia: Betele ya Corée du Sud, ya Taïwan, mpe ya Hong Kong. Ntina babengaki bandeko yango ezalaki mpo na kofungola Biro mpo na makambo matali minganga (Service d’information hospitalier) na Babetele na bango mpe lisusu kobongisa Bakomite mpo na boyokani elongo na minganga (Comités de liaison hospitaliers). Na Philippines, bakomite yango etyamaki libosoliboso na bingumba minene minei.” Bakomite yango esengelaki koluka minganga oyo bakondima kosalisa bandeko kozanga kozongisa bango makila mpo bábuka te mobeko ya boklisto. Bandeko ya bakomite yango basengeli mpe kosalisaka bandeko oyo bazali kokutana na mikakatano na likambo ya makila.

Na engumba Baguio, baponaki Remegio asala na Komite mpo na boyokani elongo na minganga. Nsima ya mwa ntango, minganga bakómaki komona ntina ya bakomite yango. Remegio azali koyeba lisusu makambo oyo elekaki mokolo oyo minganga bayaki kokutana na Komite mpo na boyokani elongo na minganga mpo na koyeba ndenge oyo bakoki kosalisa Batatoli oyo bazalaki koboya bázongisa bango makila. Remegio alobi boye: “Minganga babandaki kotuna mituna, kasi ngai moko nayebaki eyano ya kopesa te mpo mituna yango etalelaki mpenzampenza makambo ya minganga.” Abondelaki Yehova alakisa ye ndenge ya kolonga mokakatano yango. Remegio alobi lisusu ete: “Soki monganga moko atuni motuna, baninga na ye mosusu bazalaki kotombola mabɔkɔ mpe koloba ndenge oyo bango balongaki na likambo ya ndenge yango.” Remegio asepelaki mpenza na lisalisi wana, mingimingi mpo masolo na bango eumelaki ngonga mibale mobimba.

Na ekólo yango mobimba, bakomite ezali 21 mpe bandeko 77 bazali kosala na kati ya bakomite yango. Danilo azali Motatoli ya Yehova, azali mpe monganga, alobi ete: “Minganga bayebi sikoyo ete Batatoli ya Yehova oyo bango bazali kosalisa bazali na kati ya ebongiseli oyo esungaka bango mpenza na bolingo.” Monganga moko azalaki kolinga te kosala ndeko moko lipaso kozanga kozongisa ye makila. Kasi, ndeko wana azongaki nsima te na ekateli na ye ya koboya makila. Nsukansuka, basalaki ye lipaso mpe elekaki malamu mpenza. Biro mpo na makambo matali minganga elobi boye: “Monganga wana akamwaki ndenge ndeko yango abikaki. Mpe monganga yango alobaki ete: ‘Na kotala makambo oyo eleki awa, soki esengeli ete básala moko na bino lipaso ya ndenge wana kozanga kozongisama makila, nakozala na esengo ya kosala yango.’”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto