Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/11 nk. 4-7
  • “Monguna ya nsuka” akolóngama!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Monguna ya nsuka” akolóngama!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esengeli koyeba monguna na yo
  • Ndenge nini kolónga liwa ya moto oyo olingaki
  • Elónga likoló na kufa
  • “Liwa emɛlami libela na libela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge nini liwa ekolongolama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Ndenge ya kosala ntango mwasi to mobali na yo akufi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mpo na nini bato bakufaka?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/11 nk. 4-7

“Monguna ya nsuka” akolóngama!

NTANGO ozalaki mwana moke, mbala mosusu ozalaki kobanga molili. Masoló ya nsɔmɔ mpe masapo mosusu ya bilimá, mbala mosusu ezalaki kobangisa yo mingi. Motema mozalaki mpenza kokita na ntango mama na yo to tata na yo azalaki kotika mwinda kopɛla wana ezalaki yo kolala!

Bobele bongo, liwa ezali kobangisa bato mingi. Nzokande, esengeli kozala bongo te. Mpo na nini? Mpo ete bantina ya liwa eyebani.

Esengeli koyeba monguna na yo

Salomo, mokonzi ya mayele na Yisraele ya kala, alobaki ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Na kotalela maloba mapemami na Nzambe oyo mazwami kati na Biblia na yo, liwa ezali bobele kozanga bomoi. Bakufi bayebi lisusu te ete bazalaki na bomoi.

Kolobeláká liwa kati na lisese moko, ntoma moklisto Paulo, akomaki ete: “Liwa, wapi elónga na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?” Wapi etubeli oyo ekopesaka liwa? Paulo alobi ete: “Etubeli oyo ekopesaka liwa, ezali lisumu.” (1 Bakolinti 15:55, 56, NW; Hoseya 13:14) Bongo, nini ezali ebandeli ya etubeli wana ekobomaka? Epai mosusu kati na Makomami, Paulo alobaki ete: “Lisumu likɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe liwa likɔtaki mpo na lisumu, mpe bongo liwa lipalangani epai na bato nyonso mpo ete bango nyonso basali lisumu.” (Baloma 5:12, NW) Ntoma amonisaki mpenza “moto moko” yango na ntango alobaki ete: “Bato nyonso bakufi mpo na Adam.” (1 Bakolinti 15:22) Ya solo, na ntina na kozanga botosi ya nkɔ́kɔ na biso ya liboso, Adam, biso nyonso tosengeli kozwa etubeli ya liwa.​—Genese 3:1-19.

Moto moko te kati na biso akoki kopona liwa soki azali na nzoto kolongono mpe na libota ya bolingo kati na esika moko kitoko. Nzokande, lokola Biblia emonisi yango, “ntango mpe makambo makanelami te” makoki kopekisa biso ete tozala na bomoi. (Mosakoli 9:11) Na yango, toyebi te nini ekokóma lobi na bomoi na biso. (Yakobo 4:14) Likambo moko lizali solo ete​—biso nyonso tosili kosangola lisumu mpe liwa. Yango wana, liwa ezali kolanda biso mpe ezali kobɛta biso lokola monguna.

Ndenge nini kolónga liwa ya moto oyo olingaki

Liwa ezali mpenza monguna na biso na ntango ezwi moto oyo tolingaki mingi. Wana akómaki pene na liwa, mwasi moko oyo azalaki kobɛla alobaki na mobali na ye ete: “Ekozala mpasi mingi mpo na yo.” Mpo na nini akokaki koloba bongo? Mpamba te Biblia elobi ete: “Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, sala yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na Sheol [nkunda ya bato nyonso], esika ekokenda yo.” (Mosakoli 9:10) Mokufi akooka mpasi lisusu te. Kasi mpasi makasi ezali likoló na bandeko na ye mpe baninga oyo bazali na bomoi. Tokoki kosala eloko na ntina na mpasi motindo wana?

Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali na maloba mingi ya kolendisa. Na ndakisa, kotanga mpe kokanisa likoló na nzembo ezali mpenza liziba ya kobɔndisama. Ya solo, kobɔndisama ezali na maloba lokola oyo ete: “Jéhovah akumisama, ye oyo akomemaka mikumba na biso mokolo na mokolo, ye Nzambe ya solo na lobiko na biso.”​—Nzembo 68:19.

Liziba mosusu ya kobɔndisama ezali lisangá ya boklisto. Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntoma Paulo akomaki ete: “Bokumisa basi-bakufeli-mibali baoyo bazali mpenza basi-bakufeli-mibali. Nde soki mwasi-mokufeli-mobali azali na bana to bana na bana na ye [baoyo bakoki kosunga ye kati na mosuni], bango bayekola kosalela ezaleli ya kobanga Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bazongisa mwa makabo epai na baboti na bango mpe epai na baboti ya baboti na bango, mpo ete yango ezali malamu na miso na Nzambe. Tika ete bakoma na mokanda bobele mwasi-mokufeli-mobali oyo azali na mibu ntuku motoba, mwasi oyo azalaki bobele na mobali moko, [mwasi] oyo azwi litatoli mpo na misala na ye malamu, soki abɔkɔlaki bana, soki azalaki koyamba bapaya, soki asukolaki makolo ya basantu, soki asungaki baoyo bazalaki na bolózi, soki amipesaki mpenza na misala nyonso malamu.” (1 Timoté 5:3, 4, 9, 10, NW) Ba Témoins de Jéhovah ya lelo bazali mpenza kosunga mpe kobɔndisa baninga na bango bandimi oyo bazali kati na ezalela ya motindo wana.

Mpo na baoyo batikali, mpasi makasi ezali nde mpo na kolónga mayoki. Mobali moko oyo akufelaki mwasi esili koleka mbula mibale, akomaki ete: “Nalingaki mwasi na ngai mingi mpenza. Yango likambo moko ya mawa mingi koleka kati na bomoi na ngai, mpe nazali na mpasi mpo na koyikela yango mpiko.” Mwasi to mobali oyo asili kobala uta bantango mingi, azali kokabola bomoi na ye kati na boninga boleki boyokani nyonso ya bato. Ntango mobalani moko akufi, mobalani oyo atikali akomiyoka ete abungisi mpenza eloko monene. Epai wapi tokoki kozwa lisungi mpo na yango?

Na mabaku lokola oyo, boninga malamu ya boklisto ekoki kolendisa. Lisese ya mayele elobi ete: “Moninga ya solo akolingaka ntango nyonso; mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17, NW) Mwasi-akufeli-mobali to mobali-mokufeli-mwasi azali na mposa ya lisalisi​—baninga oyo bazali mpenza kopesa lisungi. Baninga ya mayele bakolendisaka moto oyo azali na mpasi na koloba, ata soki kosala bongo ekobimisaka mpisoli. Mbala mosusu moklisto oyo asilá kozwa mpasi mpe kotungisama na motema wana abungisaki mobalani na ye, akoki kopesa lisalisi ya boboto. Biblia epesi toli oyo ete: “Bozala na maloba na kobɔndisa mpo na milimo minyokwami.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Kasi tomikundola ete basi-bakufeli-mibali mpe mibali-bakufeli-basi basili kobungisa babalani na bango. Na yango, ye oyo akufeli moto asengeli kotyela bato mosusu motema bobele na mabaku oyo makoki kopesa nzela na bango nyonso ete babatela etamboli ya sembo.​—1 Petelo 2:12.

Nkisi malamu mpo na mpasi oyo euti na kufa ezali bongo kolanda kosunga bato mosusu​—ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na baoyo bazali kokanisa ete bango nde bazali na mposa ya lisalisi! Awa nde elimo ya kozanga koluka litomba esengeli komonisama. Kosalela bato mosusu na motema malamu ezali kosalisa na kobosana mawa mpe mpasi na motema; mpamba te, Yesu alobaki ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”​—Misala 20:35.

Elónga likoló na kufa

Koswa ya nzoi ekoki kopesa mpasi mingi, ata mpe koboma. Atako bongo, mbala mingi, kolongola etubeli ya nyama moke oyo ekɔti na loposo na yo ekosalisa na komiyoka malamu. Kasi bilikya nini bizali mpo na kobɔndisama na ntina na etubeli ya liwa?

Nsima ya kolimbola ete lisumu ezali etubeli ya liwa, Paulo angangi ete: “Matɔndi epai na Nzambe, mpo ete apesi biso elónga na nzela na Yesu Klisto, Nkolo na biso!” (1 Bakolinti 15:57, NW) Lolenge nini elónga likoló na kufa esangisami na Klisto? Yesu amonisaki likambo yango wana alobaki na ntina na ye moko ete: “Mwana na moto ayei te ete basalela ye, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lokola lisiko mpo na bato mingi.” (Matai 20:28, NW) Ya solo, mpo na baoyo bazali komonisa kondima epai na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, mpe na mbeka oyo Jéhovah asili kopesa na nzela na ye, liwa liuti na Adam likomema te na kufa ya libela.​—Yoane 3:16.

Ya solo, maloba oyo na Yesu mazali ya kolendisa, ete: “Ntango ekoya mpe baoyo nyonso bazali kati na nkunda na kokanisama, bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima. Baoyo basalaki makambo malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, mpe baoyo basalaki makambo mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.”​—Yoane 5:28, 29, NW.

Bikeke mingi liboso, Yisaya, mosakoli ya Nzambe, asakolaki ete: “[Jéhovah Nzambe] akosilisa kufa libela mpe Nkolo Jéhovah akokɔmbɔla mpisoli na bilongi nyonso.” (Yisaya 25:8) Lisusu, na Emoniseli 21:4, Biblia epesi elikya oyo kitoko, ete: “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” Kolendisamáká na elikya oyo ya Biblia na ntina na baoyo balali kati na kufa, baoyo bakufeli bandeko na bango, basengeli te ‘komitungisa mingi lokola bato mosusu oyo bazangi elikya.’​—1 Batesaloniki 4:13.

Meká komikanisela makambo oyo Nzambe asili kokana kosalela bato, lokola yango emonisami kati na Biblia. “Bolózi monene” oyo ekoya mosika te, elimboli mawa mpo na biloko mabe ya ntango oyo. (Emoniseli 7:14) Baoyo bazali kosalela mangomba ya lokuta bakobomama. Bibongiseli ya lokoso na makambo ya politike mpe na mombongo oyo esili koyeisa nzala mpe bitumba, ekolongwa. Yesu Klisto azali kolanda mwango na ye mpo na kobwaka Satan le Diable na libulu mozindo, ye oyo asili kobimisa kufa ya bato mingi. Na nsima, Klisto akobanda Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto, na boumeli na yango akosalela motuya ya mbeka na ye ya lisiko epai na bato. Bakufi bakozonga na bomoi na nzela na lisekwa oyo tozali kolikya na yango uta kala, mpe pole ya Liloba na Nzambe ekongɛnga mingi mpenza na boye ete biyambayamba na ntina na kufa, monguna na bato, bikozala lisusu te. Na nsima, babiki nyonso bakozwa libaku ya koyekola banzela ya Nzambe mpe komiyokanisa na mitinda na ye ya sembo.​—Masese 4:18; Misala 24:15; Baebele 2:14, 15; Emoniseli 18:4-8; 19:19-21; 20:1-3.

Paulo alobi ete: ‘Na nsima, nsuka ekoya wana Klisto Yesu akopesa Bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata na ye. Mpamba te azali koyangela lokola mokonzi kino Nzambe akotya banguna nyonso na nsé na makolo na ye. Liwa, monguna na nsuka akolongolama libela.’ (1 Bakolinti 15:24-26) Mbeba mingi oyo ebimisamaki mpo na lisumu ya Adam ekolongwa. Komekama ya nsuka ekosalema, mpe baoyo balingi Nzambe bakoleka yango na bosembo nyonso. (Emoniseli 20:4-10) Wana bakokóma na ezalela ya kokoka, bato yango ya botosi bakozala na bomoi mpo na mbula ntuku nsambo te soko mbula monkámá na zomi te, kasi libela na libela. Ezali mpenza likabo oyo Nzambe apesi na nzela ya Mwana na ye molingami!​—Baloma 6:23.

Na yango, ntango boni okoki kozala na bomoi? Bolai ya bomoi na yo ekoki kolandana mpo na seko na seko. Lokola ozali kobika na “ntango ya nsuka” ya mokili oyo, mbala mosusu okoki kokufa te. (Danyele 12:4; Yoane 11:25, 26; 17:3) Soki osali mokano ya Nzambe, okoki mpenza kozala na bomoi kati na mokili ya sika molakami na Nzambe.​—2 Petelo 3:13.

Nzokande, soki ozali mobangé, osengeli mpenza kotalela makambo na lolenge yango ezali mpe kokanisa ete okoki mpe kokufa. Ya solo, elikya ya lisekwa ezali kopesa esengo. Mpe mbala mosusu ozali koluka koyeba lolenge oyo Jéhovah akobongisa bomoi ya libota kati na ebongiseli ya sika. Kopesa nzela te ete makambo wana matungisa yo, mpamba te Jéhovah akopesa esengo na baoyo bakotikala sembo epai na ye.

Awa “mikolo ya nsuka” mpe ya mpasi ya ebongiseli mabe ya Satana ezali kobɛlɛma na nsuka na yango, kopesa nzela te ete nsɔmɔ ya liwa ebotola yo libaku kitoko ya kosalela Jéhovah na bosembo nyonso uta sikawa. (2 Timoté 3:1) Soki okufeli moto oyo olingaki mingi, omibɔndisa na likambo oyo ete nguya ya liwa ezali bobele mpo na ntango mokuse. (Emoniseli 20:13, 14) Tya motema na elikya ya lisekwa. Na nsima, soki olóngi kokɔta kati na mokili ya sika na kobikáká na bolózi monene to na nzela ya lisekwa, omindimisa na maloba oyo mapemami ete liwa, monguna ya nsuka, asengeli kolongolama libela.​—Emoniseli 7:9, 14.

[Elilingi na lokasa 5]

Boninga malamu ya boklisto ekoki kozala elendiseli ya elimo mpo na baoyo bakufeli bandeko na bango

[Elilingi na lokasa 7]

Komipesa mpo na kosalisa basusu ezali kokitisa mpasi oyo euti na liwa ya moto oyo tolingaki mingi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto