Baanganaki kondima na bango te!
LOBƆKƆ ya Jéhovah ezalaki na bayekoli ya solo ya Yesu Klisto. (Misala 11:21) Na lisalisi ya Nzambe, bamitambwisaki na bosembo nyonso na kozanga koangana kondima na bango. Likambo oyo ete bakutanaki lisusu na botɛmɛli mpe na monyoko makasi, ezali likambo oyo liyebani malamu kati na Lisoló ya bato.
Bosembo ya bayekoli ya liboso ya Klisto ekómaki likambo oyo liyebanaki mingi. Ata soki bomoi na bango ezalaki na likámá, bazalaki koboya koangana kondima na bango. Kasi mpo na nini banyokolamaki mpenza?
Bayinami bobele mpamba
Lokola Yesu, baklisto ya solo bazalaki kondima bilikya mpe makanisi ya mokili oyo te. (1 Yoane 4:4-6) Lisusu, Edmond de Pressensé, mokomi na makambo na kala, ayebisi ete bokóli ya boklisto “esalemaki nokinoki, mpe matomba na yango mamonanaki polele, kino eyaki komonana ete nzela ezalaki te mpo na kopɛngola matáta [elongo na bokonzi na nguya ya Loma].”
Mokolo moko, Yesu amikokiselaki esakweli moko ya Nzembo, ete: “Bayinaki ngai bobele mpamba.” (Yoane 15:25, NW; Nzembo 69:4) Liboso na koyebisa yango epai na bayekoli na ye, apesaki likebisi oyo ete: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” (Yoane 15:20) Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kolanda matambe na ye. Epai mosusu, bakonzi ya mangomba ya Bayuda balingaki kotalela bayekoli na Yesu baoyo bazalaki Bayuda lokola ete bazalaki bapɛngwi. Nzokande, ntango basɛngaki bayekoli na Yesu ete baloba lisusu te na ntina na Yesu, batosaki te mpe baboyaki koangana kondima na bango.—Misala 4:17-20; 5:27-32.
Kati na efundeli oyo epesamaki na esambiselo monene mwa moke nsima na Pantekote ya mobu 33 T.B., moyekoli Etienne afundamaki ete abimisaki “maloba na kotuka Moize mpe Nzambe.” Atako efundeli yango ezalaki lokuta, abolamaki mabangá kino akufaki. Na yango, “monyoko monene mobimelaki lisangá ya Yelusaleme, mpe bango nyonso bapalanganaki na mikili ya Yudea mpe na Samaria, longola bobele bantoma.” (Misala 6:11, 13; 8:1) Mingi bakangamaki na bolɔkɔ.
Mokanda Christianity and the Roman Empire, moyebisi ete Bayuda babenganaki bayekoli na Yesu “na koyina makasi.” Nkutu, mbala mingi bakonzi ya Loma bazalaki kobatela baklisto. Na ndakisa, basodá ya Loma babikisaki ntoma Paulo na mabɔkɔ ya Bayuda oyo balingaki koboma ye. (Misala 21:26-36) Atako bongo, boyokani kati na baklisto mpe Baloma ezalaki ntango nyonso malamu te.
Loma ebakisi minyoko
Soko mbula libwa nsima na liwa ya Etienne, Herode Agrippa Ier, moyangeli na bokonzi ya Loma, abomisaki ntoma Yakobo mpo na kosepelisa Bayuda. (Misala 12:1-3) Na ntango wana, kondima kati na Klisto epalanganaki kino na Loma. (Misala 2:10) Na mobu 64 T.B., ndambo monene ya engumba wana ezikaki na mɔ́tɔ. Monyoko makasi mokómelaki baklisto nsima wana Néron afundaki bango mpo na likámá yango wana ezalaki ye koluka kobomba nsango oyo etambolaki ete ye nde asalaki yango. Ye nde azikisaki engumba wana na mɔ́tɔ mpo ete atonga yango lisusu na kitoko koleka mpe abénga yango Néropolis, na nkombo na ye? To ezalaki mokonzi mwasi Poppée, oyo abongwanaki na losambo ya Bayuda, oyo koyina na ye epai na baklisto eyebanaki, nde apusaki ye na kofunda bango? Balukiluki balobi bongo te, kasi makambo mabimaki mazalaki nsɔmɔ.
Tacite, Moloma mokomi na makambo na kala, alobaki ete: “Batyolamaki kino kobomama; bazipamaki na mposo ya nyama, [baklisto] bapasolamaki na mbwa; batyamaki na nzeté; basopelamaki biloko oyo bikozikisaka, mpe na butu, basalelamaki lokola bingɛngɛli,” lokola miinda na bato, mpo na kongɛngisa bilanga ya mokonzi. Tacite, oyo azalaki moninga ya baklisto te, abakisaki ete: “Atako bakweisamaki, mpe basengelaki kozwa etumbu ya kufa, bato yango bazalaki kopesa mawa, mpo ete babomamaki te na ntina na bato nyonso, kasi mpo na moto moko,” Néron.
Kokesene monene
Atako mikano ya Néron mikokisamaki wana afundaki baklisto na ntina na kobebisama ya Loma, kasi ye apekisaki bango te soko mpe lingomba ya boklisto te ete ezala na mokili wana. Na bongo, mpo na nini Baloma bandimaki ete baklisto banyokolama? Will Durant, mokomi na makambo na kala, ayebisi boye: “Mpo ete, na nzela na ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe na ezaleli na bango ya kolongobana, bituluku mike ya baklisto bitungisaki bapakano oyo bamipesaki na bisengo.” Kokesene kati na boklisto mpe bitumba ya kosopa makila kati na bilombe Baloma, ezalaki mpenza monene. Baloma balingaki te kobebisa libaku malamu wana ya kosilisa nyee baklisto, mpo ete lisosoli na bango ezala kimya.
Wana ezalaki nguya ya mokili mobimba, Loma emonanaki lokola nde ekoki kolóngama te. Baloma bazalaki kondima ete nguya ya basodá na bango ezalaki kouta na losambo na bango epai na banzambe nyonso. Na yango, bazalaki na mpasi mpo na kokanga ntina na losambo ya Nzambe moko ya baklisto, oyo ezalaki koboya losambo ya banzambe nyonso mosusu, kati na yango mpe losambo mpo na mokonzi. Ezalaki likambo ya kokamwa te ete Loma etalela boklisto lokola nguya oyo ekokaki kokweisa miboko ya bokonzi.
Libonza ya litatoli
Pene na nsuka ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntoma Yoane akangamaki na esanga ya Patmos ‘mpo ete alobaki na ntina na Nzambe mpe kopesa litatoli na ntina na Yesu.’ (Emoniseli 1:9) Ekanisamaki ete Domitien, mokonzi Moloma, nde abandisaki likambo yango. Nzokande, atako masɛnginya mazalaki likoló na bayekoli na Yesu na eleko wana, losambo ya boklisto lopalanganaki na Bokonzi ya Loma mobimba. Lolenge nini yango ekokaki kosalema? Mokanda A History of the Early Church elobi ete boklisto “ebatelaki bomoko na yango na nzela ya mosala ya kosakola.” Lokola Yoane, baklisto ya solo oyo banyokolamaki baanganaki kondima na bango te, kasi balandaki nde koloba na molende nyonso na ntina na Nzambe mpe bapesaki litatoli na ntina na Yesu.—Misala 20:20, 21; 2 Timoté 4:2.
Monyoko ya baklisto ekómaki na lolenge mosusu na mobu 112 T.B., mbula mibale nsima wana Mokonzi Trajan aponaki Pline lokola moyangeli na engumba Bithynie (ezali lelo na nord-ouest ya mboka Turquie). Bolɛmbu ya boyangeli ya liboso, ebimisaki mobulu. Batempelo ezalaki pene na kotikala mpamba, mpe mombongo ya matiti mpo na koleisa banyama oyo ezalaki kotumbama mbeka, ekitaki mingi mpenza. Bato na mombongo bazalaki kopamela baklisto mpo ete losambo na bango lozalaki na mindɔndɔ́ te, mpo ete ezalaki na mbeka ya banyama te mpe ezalaki na bikeko te.
Pline asalaki makasi mpo na kozongisa losambo ya bapakano, wana baklisto bazalaki kobomama mpo ete baboyaki kopesa vinyo mpe mpaka na malasi liboso na bikeko ya mokonzi. Molakisi Henry Chadwick alobi ete bakonzi ya Loma basosolaki ete baklisto “bazalaki bato na bizaleli malamu, kasi bayinaki mpenza misala na losambo ya bato na kala.” Ata soki kozala moklisto ezalaki mabe monene, bayekoli ya solo ya Yesu baanganaki kondima na bango te.
Molakisi W. M. Ramsay amonisaki ete “kobongwana ya mosangani moko na libota ya bapakano ezalaki kobimisa bokabwani makasi” oyo ezalaki kobimisa koyina. Dr. J. W. C. Wand ayebisi ete: “Bomoi ezalaki mpasi wana moto moko akokaki te komiyokanisa na mitinda ya bonkɔ́kɔ ya ntango wana, oyo esɛngaki mpe kondima banzambe ya bapakano.” Ezali likambo ya kokamwa te ete mingi bazalaki kotalela baklisto ya liboso lokola bayini na bato to lokola bato oyo bandimaka Nzambe te.
Bokóli ebimisi monyoko monene
Polycarpe, oyo bato mingi balobaka ete ateyamaki na Yoane, akómaki nkulutu oyo azwaki limemya mingi na engumba Smyrne (lelo Izmir). Mpo na kondima na ye, atumbamaki likoló na nzeté na mobu 155 T.B. Statius Quadratus, moyangeli Moloma, abyangaki bibele na bato na libaku yango. Libanda ya masano etondaki na banguna bapakano baoyo bazalaki kotyola Polycarpe, mobali oyo azalaki na mibu 86, mpo ete abebisaki losambo ya banzambe na bango, mpe Bayuda oyo bazalaki kolanda bango kozanga kososola, bazalaki komema nkóni mpo na etumbelo, atako ezalaki mokolo ya sabata monene.
Na nsima, minyoko makasi mibimaki likoló ya baklisto oyo bafandaki na mikili nyonso miyangelamaki na Loma. Na nsé na boyangeli ya mokonzi Marc Aurèle, makila ya bato masopanaki mingi. Baoyo bazalaki banamboka ba Loma, bazalaki kobomama na mopanga; nde basusu bazalaki kobomama na banyama mabe kati na bisika ya masano. Mabe nini basalaki? Bobele mpo ete bazalaki baklisto baoyo baboyaki koangana to kotika kondima na bango.
Lyon, engumba oyo ezali na France, etongamaki na esika ezalaki Lugdunum, mboka-mokonzi ya Baloma mpe esika na limpinga ya basodá bobele moko oyo ezalaki kati na Loma mpe ebale Rhin. Na mobu 177 T.B., engumba wana ekómaki na etuluku monene ya baklisto baoyo bakutanaki na botɛmɛli ya bapakano. Yango ebandaki ntango baklisto bapekisamaki na kokende na bisika bibongisami mpo na bato nyonso. Bibele babimisaki yikiyiki, mpe monyoko molandaki mozalaki makasi mingi na boye ete moklisto moko te akokaki kotambola libándá ya ndako na ye. Moyangeli Moloma apesaki etinda ya kokanga baklisto mpe koboma bango.
Mbano
Na liwa ya bantoma na Yesu mpe na kolimwa na bopusi oyo bazalaki na yango, lipɛngwi libandaki kokóla kati na baoyo bazalaki komitanga baklisto. (2 Batesaloniki 2:7) Pene na nsuka ya ekeke ya minei ya ntango na biso, boklisto oyo epengwaki ekómaki Lingomba ya Leta. Na ntango wana, boklisto ebebisamaki mpe ezalaki pene na kondima bopusi nyonso mpe komekola mokili—likambo oyo Yesu mpe bayekoli na ye ya solo basalaki yango te. (Yoane 17:16) Nzokande, uta kala mikanda ya Biblia oyo mipemami, misilaki kosangisama nyonso esika moko kotatoláká na ntina na kondima ya baklisto.
Mpasi mpe liwa ya bankóto mingi ya baklisto wana ya solo ezalaki bobele mpamba? Soko moke te! Koboyáká koangana kondima na bango, ‘bamimonisaki sembo, ata kino kufa, mpe bazwaki motole ya bomoi.’ (Emoniseli 2:10) Basaleli ya Jéhovah bazali naino kozwa minyoko, kasi kondima mpe bosembo ya baklisto ya liboso ezali liziba ya elendiseli mpo na bango. Bobele bongo, baklisto ya ntango na biso bazali mpe koboya koangana kondima na bango.
[Bililingi na lokasa 8, 9]
Néron
Elilingi ya Bokonzi ya Loma
Etumbelo ya losambo mpo na Kaisala
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Nero: Courtesy of The British Museum
Museo della Civiltà Romana, Roma
[Elilingi na lokasa 10]
Marc Aurèle
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The Bettmann Archive