Baklisto ya ebandeli mpe Letá
NA MPOKWA liboso ya mokolo na kufa na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino.” (Yoane 15:19) Nzokande, yango elingi koloba ete baklisto basengeli koyina bakonzi ya mokili oyo?
Bazali bato na mokili te kasi bazali mpe bayini te
Ntoma Paulo ayebisaki baklisto oyo bazalaki kofanda na Loma ete: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” (Baloma 13:1) Bobele bongo, ntoma Petelo akomaki ete: “Bótosa myango nyonso na bato mpo na Nkolo, soko na mokonzi monene oyo aleki nyonso, soko na mikonzi mike baoyo batindami na ye mpo na kopesaka bitumbu epai na bato na misala mabe mpe mpo na kosanzola bato na misala mibongi.” (1 Petelo 2:13, 14) Botosi epai na Letá mpe epai na bamonisi na yango oyo baponami ezalaki lilako ya polele epai na baklisto ya liboso. Bazalaki kosala milende mpo na kozala banamboka oyo bakotosaka mibeko mpe oyo bakofandaka na kimya elongo na bato nyonso.—Baloma 12:18.
Na nsé ya motó ya likambo “Lingomba mpe Letá,” búku The Encyclopedia of Religion eyebisi ete: “Na boumeli ya bikeke misato ya liboso na Mbula ya Nkolo na biso, Lingomba ya boklisto emitangolaki mpenza na lolenge ya bomoi ya bakonzi ya Baloma . . . Atako bongo, bakambi ya losambo ya boklisto . . . bateyaki botosi epai na mibeko ya Loma mpe bosembo epai na mokonzi, kati na bandelo oyo kondima ya boklisto epesaki yango nzela.”
Lokumu, kasi losambo te
Baklisto bazalaki koyina mokonzi ya Loma te. Bazalaki komemya bokonzi na ye mpe bazalaki kopesa ye lokumu oyo ebongaki na etɛlɛmɛlo na ye. Na boumeli ya boyangeli ya Mokonzi Néron, ntoma Petelo akomelaki baklisto oyo bazalaki kofanda na bitúká bikeseni ya boyangeli ya Loma ete: “Bókumisa bato nyonso, . . . bókumisa mokonzi monene.” (1 Petelo 2:17) Liloba “mokonzi” ezalaki kosalelama na bitúká epai lokótá ya Greke ezalaki kolobama mpo na kobénga te bobele bakonzi oyo bazalaki koyangela bitúká kasi lisusu mpo na kobénga mokonzi ya Loma. Ntoma Paulo apesaki toli epai na baklisto oyo bazalaki kofanda na mboka-mokonzi ya boyangeli ya Loma ete: “Bófutela bango nyonso nyongo na bango, . . . lokumu epai na baoyo bakoki kozwa lokumu.” (Baloma 13:7) Ya solo, mokonzi ya Loma asengelaki mpenza kozwa lokumu. Na nsima, azalaki kútu kosɛnga ete bápesa ye losambo. Nzokande, na likambo wana baklisto ya liboso bamonisaki ete bakokaki te kokatisa ndelo oyo etyamaki liboso na bango.
Eyebisamaki ete, wana azalaki kosambisama liboso ya moyangeli ya etúká moko ya Loma na ekeke ya mibale T.B., Polycarpe alobaki: “Nazali moklisto. . . . Bateyaka biso ete tópesa lokumu nyonso lobongi . . . epai na bato na nguya mpe na bakonzi oyo batyami na Nzambe.” Nzokande, Polycarpe aponaki kokufa na esika ya kosambela mokonzi. Théophile ya Antiɔkia, mokonzi ya lingomba mokɔteli ya boklisto na ekeke ya mibale akomaki ete: “Nakopesa mokonzi lokumu, nzokande nakoki soko moke te kosambela ye, kasi nakosambela mpo na ye. Nakosambela bobele Nzambe, Nzambe ya bomoi mpe ya solo.”
Mabondeli mabongi oyo kati na yango bazalaki kolobela mokonzi mazalaki na boyokani te na losambo ya mokonzi to ya bolingi-ekólo. Ntoma Paulo ayebisaki mokano na yango: “Bongo, nazali kolɔmba liboso ete bisɛngɛli mpe mabondeli mpe bilɔmbɛli mpe matɔ́ndi mapesama mpo na bato nyonso, mpo na mikonzi nyonso baoyo bazali liboso ete tótambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu kati na losambo na Nzambe mpe na sembo na bozito.”—1 Timoté 2:1, 2.
“Bazalaki komikɔtisa na makambo na bato te”
Etamboli wana ya limemya oyo baklisto ya liboso bazalaki na yango ebendelaki bango te boninga ya mokili oyo bazalaki kofanda kati na yango. A. Hamman, mokomi ya makambo ya kala ya ekólo France alobi ete baklisto ya liboso “bazalaki komikɔtisa na makambo ya bato te.” Ya solo, bazalaki mpenza komikɔtisa te na makambo ya bato ya bikólo mibale, Bayuda mpe Baloma, kokutanáká na makanisi mabe mpe mitungisi na ngámbo nyonso mibale.
Na ndakisa, ntango bakonzi ya Bayuda bafundaki ye na lokuta nyonso, ntoma Paulo ayebisaki mpo na komilóngisa liboso ya moyangeli Moloma ete: “Nasali lisumu moko na ntina na Mibeko na Bayuda te, soko na ntina na Tempelo te, soko na ntina na Kaisala te. . . . Nalingi kokenda na Kaisala.” (Misala 25:8, 11) Lokola ayebaki ete Bayuda bazalaki koluka mwango ya koboma ye, Paulo asɛngaki ete akenda epai na Néron, kondimáká bongo bokonzi ya mokonzi ya Loma. Emonani ete, na nsima, ntango asambisamaki mpo na mbala ya liboso na Loma, Paulo akweisamaki te. Kasi na nsima akangamaki lisusu, mpe engebene lisoló Néron apesaki etindá ete abomama.
Na ntina na etɛlɛmɛlo ya mpasi oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango liboso na boyangeli ya Loma, Ernst Troeltsch, moyekoli ya bituluku ya bato mpe teolojié akomaki ete: “Mikumba mpe mikano nyonso oyo mizalaki na boyokani na losambo ya bikeko, to losambo ya mokonzi, to oyo ezalaki na boyokani na kotangisa makila ya bato to kopesa etumbu ya liwa, to oyo ekokaki kotya baklisto liboso na misala ya mbindo ya bapakano epekisamaki.” Etɛlɛmɛlo wana ezalaki kopesa nzela soko moke te na boyokani ya kimya mpe ya limemya kati na baklisto mpe Letá?
Pesá na Kaisala “yango” ezali na ye
Yesu apesaki lilako moko oyo esengelaki kokamba etamboli ya baklisto liboso na Letá ya Loma to, liboso na bokonzi nyonso mosusu, wana alobaki ete: “Pesá epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” (Matai 22:21) Toli wana oyo epesamelaki bayekoli ya Yesu ekesenaki mpenza na ezaleli ya Bayuda mingi balingi-ekólo oyo bazalaki kosilika mpo na boyangeli ya Baloma mpe baboyaki kondima lotómo ya bokonzi ya bapaya mpo na kosɛnga mpako.
Na nsima, Paulo ayebisaki baklisto oyo bazalaki na Loma ete: “Boye ekoki kotosa bobele mpo na kobanga etumbu te kasi mpo na lisosoli lokola. Yango wana, bokofuta mpako. Mikonzi bazali basáli na Nzambe wana ekolendisa bango likambo oyo. Bófutela bango nyonso nyongo na bango, mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako, lifuti epai na baoyo bakoki kozwa lifuti.” (Baloma 13:5-7) Atako baklisto bazali bato na mokili te, basengeli mpenza kozala bato na kolongobana, banamboka oyo bakofutaka mpako na sembo nyonso, kofutáká mpako mpo na misala nyonso oyo Letá azali kosalela bango.—Yoane 17:16.
Kasi maloba ya Yesu masukaki bobele na likambo ya kofuta mpako? Lokola Yesu alobaki polele te soki biloko ya Kaisala bizali nini mpe biloko ya Nzambe bizali oyo wapi, bongo ezali na makambo mosusu oyo masengeli kotalelama na ntango na yango to engebene lolenge na biso ya kososola Biblia. Na elobeli mosusu, kokata soki biloko nini moklisto asengeli kopesa na Kaisala ekosɛnga mbala mosusu lisosoli ya boklisto, oyo engɛngisami na mitindá ya Biblia.
Bokatikati na masɛngami mibale oyo mazali kowelana
Bato mingi babosanaka ete nsima ya koloba ete biloko ya Kaisala bisengeli kopesama na Kaisala, Yesu alobaki: “Mpe [pesá] na Nzambe yango ezali na Nzambe.” Ntoma Petelo amonisaki eloko oyo baklisto basengelaki kotya na esika ya liboso. Nokinoki nsima ya kopesa toli ete bátosa “mokonzi,” to mokonzi monene, mpe “baoyo batindami na ye,” Petelo akomaki: “Bózala na bonsomi, nde na bonsomi lokola ezipeli na makambo mabe te, kasi bózala baombo na Nzambe. Bókumisa bato nyonso, bólinga bandeko; bómemisa [“bóbanga,” NW] Nzambe bókumisa mokonzi monene.” (1 Petelo 2:16, 17) Ntoma amonisaki ete baklisto bazali baombo ya Nzambe, kasi te ya bato oyo bazali bakonzi. Atako basengeli kopesa lokumu mpe limemya oyo ebongi epai na bamonisi ya Letá, basengeli kosala bongo mpo na kobanga Nzambe, oyo mibeko na ye mileki mibeko nyonso.
Bambula mingi na liboso Petelo asilaki komonisa ete ntembe ezali soko moke te mpo na oyo etali bonene ya mobeko ya Nzambe likoló na mibeko na bato. Sanedrina ya Bayuda ezalaki lisangani ya bakambi oyo Baloma bapesaki yango bokonzi ya kotambwisa makambo ya mboka mpe ya lingomba. Ntango bapekisaki bayekoli ya Yesu ete báteya te na nkombo na Yesu, Petelo mpe bantoma mosusu bayanolaki na limemya nyonso mpe na kozanga kokakatana ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Ezali polele ete, baklisto ya liboso basengelaki kozala na bokatikati kati na botosi na bango epai na Nzambe mpe botosi oyo ebongaki kopesama epai na bakonzi. Uta kala na ekeke ya misato T.B., Tertullien amonisaki yango na maloba oyo: “Soki nyonso ezali ya Kaisala, bongo nini ekotikala mpo na Nzambe?”
Babebisi bosembo na bango elongo na Letá
Wana ntango ezalaki koleka, etɛlɛmɛlo oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango liboso na Letá elɛmbisamaki mokemoke. Lipɛngwi oyo Yesu mpe bantoma na ye basakolaki ekólaki na ekeke ya mibale mpe na ekeke ya misato T.B. (Matai 13:37, 38; Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3-12; 2 Petelo 2:1-3) Boklisto ya lipɛngwi emibebisaki na mokili ya Loma, endimaki bilambo ya bapakano mpe filozofi na yango, mpe endimaki bobele mikumba ya politiki te kasi lisusu mosala ya sodá.
Profɛsɛrɛ Troeltsch akomaki ete: “Kobanda na ekeke ya misato, likambo yango likómaki na mikakatano mingi, mpamba te baklisto bakómaki ebele na bisika ya lokumu mingi kati na bato mpe na misala ya lokumu mingi, kati na mosala ya sodá mpe na etuluku ya bakonzi. Kati na biteni mingi [ya mikanda ya Biblia te] ya makomi ya baklisto ezalaki komonisa matáta mpo na kotɛmɛla likambo ya komikɔtisa kati na makambo yango; na ngámbo mosusu, tozali mpe komona masenginya mpo na kobebisa bosembo na bango—maloba mpo na komikitisa motema . . . Uta eleko ya Constantin mikakatano wana misilaki; kowelana kati na baklisto mpe bapakano esilaki, mpe nzela ya kozwa mikumba nyonso ya Letá efungwamaki polele.”
Pene na nsuka ya ekeke ya minei T.B., lolenge wana ya losambo ya boklisto oyo esilaki komibebisa, ekómaki bongo lingomba ya Letá ya boyangeli ya Loma.
Na boumeli mobimba ya lisoló na yango, boklisto ya nkombo mpamba—oyo emonisami na mangomba ya Katolike, Ortodoksi mpe Protestá—elandaki komibebisa elongo na Letá, komikɔtisáká mozindo kati na politiki mpe kosungáká bitumba na yango. Basangani mingi ya sembo ya mangomba oyo batungisami na likambo yango bakosepela mpenza na koyeba ete lelo oyo ezali na baklisto oyo bakangamaka na etɛlɛmɛlo oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango liboso na Letá. Masoló mibale oyo malandi makomonisa likambo yango polelepolele.
[Elilingi na lokasa 5]
Kaisala Néron oyo Petelo akomaki na ntina na ye ete “bókumisa mokonzi monene”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musei Capitolini, Roma
[Elilingi na lokasa 6]
Polycarpe aponaki kokufa na esika ya kosambela mokonzi
[Elilingi na lokasa 7]
Baklisto ya liboso bakutanaki na mikakatano mingi epai na Bayuda mpe Baloma