Misala ya kobikisa ya Yehova na mikolo na biso
BIBLIA eyebisi biso boye na ntina na Yehova: “Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde Yehova akobikisa ye kati na yango nyonso” mpe, “Yehova ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama.”—Nzembo 34:19, NW; 2 Petelo 2:9, NW.
Lolenge nini Yehova apesaka lisalisi epai na basaleli na ye wana bazali kati na mpasi? Ezali te na kosaleláká bikamwiseli mpo na kobongola banguya ya biloko bizalisami to na nzela ya misala misusu ya kokamwa, lokola bato mingi bakoki kokanisa yango, kasi azali kosala yango na nzela ya nguya mosusu oyo ebele na bato bazali mpenza kososola yango te: bolingo. Ee, Yehova alingi basaleli na ye, mpe azali kokólisa epai na bango bolingo makasi moko mpo na mosusu na boye ete akoki kosala mpo na bango oyo ezali komonana lokola bikamwiseli.—1 Yoane 4:10-12, 21.
Bato mosusu bakoki koloba ete na ntango ya makámá, biloko oyo bato bazali na yango mpenza mposa ezali bilei, nkisi mpe bisaleli—kasi ezali bolingo te. Ya solo, bilei, nkisi, mpe bisaleli ezali na ntina. Nzokande, ntoma Paulo amonisaki likanisi oyo: “Ata najali na kondima yɔnsɔ mpɔ na kolongola ngomba, nde sɔkɔ najangi bolingo, najali mpamba. Ata nakopalanganisa yɔnsɔ ejali na ngai mpɔ na [koleisa bazalani, NW], ata nakopɛsa njoto na ngai mpɔ na kotumbama, nde sɔkɔ najangi bolingo, nazui litomba tɛ.”—1 Bakolinti 13:2, 3.
Mbala mingi totangaka ete biloko ya lisalisi epolaka na mabongo minene to elyamaka na bampuku wana bato oyo bazali na yango mposa bazali kokufa na maladi to na nzala. Oyo eleki lisusu mabe, biloko yango bikoki kokóma na maboko na bato ya lokoso mpe bazangi kolongobana baoyo bakosalela yango mpo na matomba na bango moko. Na yango, kolengela biloko mpo na lisalisi ezali likambo mosusu, kasi komona bato oyo bazali na mpasi kozwa litomba na yango ezali mpe likambo mosusu. Bolingo mpe komibanzabanza ya solo ekoki komonisa bokeseni yango.
Bolingo emonisami na misala
Na Sɛtɛ́mbɛ 1992, ekungola oyo ebéngami Iniki epepaki na Kauai, moko na bisanga ya Hawaii, oyo ezali na bato 55 000. Mipepe makasi oyo ezalaki kopepa na bakilomɛtɛlɛ 210 na ngonga moko mpe misusu ya makasi koleka na bakilomɛtɛlɛ 260 na ngonga moko, ebomaki bato 2 mpe ezokisaki bato 98, ebebisaki ndambo misato likoló na minei ya bandako, bato 8 000 batikalaki kozanga ndako, mpe bakanisi ete biloko nyonso oyo ebebaki ezalaki na motuya ya miliare 1 ya badolare. Kati na bafandi ya esanga wana moke ezalaki na Batatoli ya Yehova 800, ya masangá motoba. Elekaki lolenge nini mpo na bango?
Liboso ete ekungola Iniki epepa mpenza, bankulutu ya masangá, na litambwisi ya mokɛngɛli ya zongazonga, basilaki kosolola elongo na basangani nyonso ya masangá mpo na komindimisa ete bazalaki na bisika malamu mpe ya libateli, mpe ete bamilengeli mpo na likambo yango. Komibanzabanza ya bolingo motindo yango ezalaki na ntina mingi mpo na kopengola kozoka mpótá monene mpe kufa kati na Batatoli.—Tala Yisaya 32:1, 2.
Atako myango ya kosolola mpe ya kosala mibembo mibebaki mpenza mingi, bamonisi misato ya Watch Tower Bible and Tract Society na filiale ya Honolulu bazalaki kati na bato ya liboso oyo bakómaki na esika ekungola epepaki, nsima ya kozwa ndingisa ya sipesiale na biro oyo etalelaka makambo ya kobatela banamboka, mpo na kokende na Kauai na mpepo. Kozanga koumela, bakutanaki na Batatoli ya esanga yango mpe, na mokolo molandaki na ntɔ́ngɔ́, babongisaki likita moko mpo na kosala ebongiseli ya kopesa lisungi. Bakambi mosala ya kopesa lisungi babongisamaki mpo na koyeba mposa ya bandeko mpe kozwa biloko bisengeli na nzela ya biro ya filiale na Honolulu. Kosaláká butu na moi, bakambaki mosala ya kopesa biloko epai na baoyo bazalaki kati na bosenga mpe bapetolaki mpe babongisaki bandako oyo ebebaki.
Batatoli ya bisanga mosusu bayanolaki mpe nokinoki na bosenga na bandeko na bango. Nokinoki nsima ya kofungwama ya libándá ya mpepo ya Kauai, Batatoli 70 bakómaki na mpepo mpo na kopesa lisalisi. Biloko mpo na lisungi oyo ezalaki na motuya ya badolare 100 000, oyo esangisaki bamotɛlɛ ya lotiliki, matúká ya pitɔlɔ́, miinda ya pitɔlɔ́ mpe bilei etindamaki. Ndako ya Bokonzi (Salle du Royaume) ya esanga yango esalelamaki lokola ebombelo ya biloko; nzokande, mwa kobanga ezalaki ete bakopunza yango. Na yango, mituka misusu ya basodá etelemaki na esika ya kotya mituka na Ndako ya Bokonzi, mpe bakumbi na yango basengaki nzela na kotya mituka yango esika wana. Basodá oyo batyamaki mpo na kokɛngɛla mituka balongolaki likámá ya kopunza biloko ya lisungi.
Bandeko bamemaki mitɛ́lɛ ya lotiliki ndako na ndako, wana bazalaki kopelisa yango na ndako nyonso na boumeli ya bangonga mibale to misato mpo na kosunga bato ete bafiligó na bango elanda kosala. Batindaki bituluku ya bandeko na bandako ekeseni mpo na kopetola yango mpe kobongisa biloko oyo ebebaki. Ntango bazalaki kobongisa ndako ya ndeko mwasi moko oyo kala mobali na ye atemelaki ye mingi mpenza, mobali yango akamwaki mingi na boye ete nyonso oyo akokaki kosala ezalaki kotala na miso mpe kolela. Mopaya moko oyo autaki na Hawaii, oyo amonaki etuluku moko ya Batatoli kosala mosala akamwaki mingi na etamboli mpe ebongiseli malamu na bango ete abelemaki na bango mpo na kotuna soki eloko nini ezalaki kokesenisa bango na bato mosusu. Ntango ndeko moko alimbolaki ete ezalaki bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na baninga na bango baklisto, mobali yango azongisaki: “Lolenge nini nakoki koyeba Nzambe?” (Matai 22:37-40) Na nsima abakisaki ete: “Bino bozali na ebongiseli moko ya kokamwa, mbala mosusu bokotinda moto moko koluka ngai wana nakozonga na Floride!”
Na mobimba, Batatoli ya Yehova basungaki na kopetola mpe kobongisa bandako 295 na esanga ya Kauai. Kati na bandako yango, 207 ezalaki kosenga bobele misala mike, kasi 54 ebebaki mingi mpenza, mpe 19 ebebisamaki mobimba. Mosala na bango mozalaki lisusu ya kokende kotala Batatoli nyonso ya esanga mpo na komindimisa ete babosanaki moto moko te. Ntango bazalaki kopesa ndeko mwasi moko biloko, moninga moko ya pembeni oyo azalaka Bouddhiste amonisaki ete bato na lingomba na ye bapesaki ye ata libóké moko ya tii te. Mwasi mosusu, oyo etuluku ya Batatoli basukolaki ndako na ye, alobaki ete: “Boyaka na ndako na ngai uta kala, mpe natalelaka bino lokola baninga malamu, kasi elembo oyo ya boninga malamu ezali komonisa ngai lolenge nini lisangá na bino lizali. Matɔ́ndi mpo na misala nyonso ya makasi oyo bosali.”
Longola kokokisa bamposa ya mosuni ya bandeko na bango, baoyo babongisamaki mpo na kopesa lisungi bakanisaki mpe bolamu na bango ya elimo. Mikolo mibale mikokaki naino te nsima ya ekungola, masangá mingi masilaki kobanda makita na yango. Kozanga koumela, bituluku mike ya boyekoli ya mokanda ebandaki lisusu kosala lokola na liboso. Bankulutu zomi ya makoki bayaki uta bisanga mosusu, mpo na kosalisa bankulutu ya Kauai na mosala na bango ya babateli na mpate epai na Batatoli nyonso ya esanga. Mokolo ya Eyenga oyo elandaki, masangá nyonso motoba ya esanga eyekolaki Mosenzeli, elandaki lisoló ya miniti 30 oyo mosangani moko ya Bakambi mosala ya kopesa lisungi apesaki mpo na lolenge ya kopesa lisungi, mpe lisoló ya bosukisi ya miniti 30 epesamaki na mosangani moko ya Bakambi ya filiale oyo autaki na Honolulu mpo na ebongiseli yango. Motatoli moko oyo azalaki wana alobaki ete: “Banso babondisamaki na litambwisi kitoko oyo epesamaki mpe bamiyokaki makasi na elimo mpo na kolónga mikakatano oyo mitikalaki. Kati na bayoki, mingi batangisaki mpisoli, mpe babetaki maboko na mbala moko.”
Bondeko kati na mokili mobimba
Bolingo mpe komibanzabanza lolenge yango ezali elembo ya basaleli ya Yehova kati na mokili mobimba. Ntango ekungola ebéngami Val epepaki na esanga ya Samoa occidentale mobu soko moko liboso na yango, ebebisaki biloko mingi, kasi Batatoli ya Yehova ya biteni mosusu ya mokili bayaki nokinoki kopesa lisalisi epai na bandeko na bango kuna. Na nsima, ntango boyangeli epesaki mosolo mpo na mangomba nyonso—ezala mpe Batatoli ya Yehova—mpo na kobongisa bandako na bango ya losambo, Batatoli bazongisaki mosolo yango elongo na mokanda oyo mozalaki komonisa ete basilaki kobongisa biloko na bango nyonso oyo ebebaki, mpe mosolo wana mokokaki kosalelama mpo na kobongisa bandako ya Leta. Zulunalo moko ya mboka yango elobelaki likambo oyo basalaki. Ntango mosáli moko monene kati na boyangeli amonaki yango, alobaki na Motatoli moko ete azalaki na nsoni mpamba te lingomba na ye lizwaki mosolo oyo boyangeli epesaki nzokande bandako na bango nyonso oyo mopepe ebebisaki ezalaki na assurance.
Bobele bongo, na Sɛtɛ́mbɛ 1992, ntango ebale Ouvèze na sud-est ya France etondaki mpe emelaki etúká ya Vaison-la-Romaine mpe bamboka mike 15 ya pembeni, Batatoli bapesaki lisungi kozanga koumela. Na boumeli ya butu, mpela ebomaki bato 40, ekweisaki bandako 400, ebebisaki misusu mingi, mpe etikaki mabota nkóto na nkóto kozanga mai to lotiliki. Ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ na mokolo molandaki, Batatoli ya masangá ya penepene bazalaki bato ya liboso ya kosalisa bato na esika mai etondaki. Baoyo bazangaki esika ya kolala bayambamaki na bolingo nyonso na mabota ya Batatoli ya etúká yango. Batatoli mingi bautaki mosika to zingazinga mpo na kopesa lisalisi. Bakambi mosala ya kopesa lisungi babongisamaki na Orange, engumba ya penepene mpo na kotambwisa milende ya bituluku minei ya bato oyo bamipesaki bango moko oyo babimisaki pɔtɔpɔ́tɔ mpe bapetolaki bandako, basukolaki ebele ya bilamba oyo etondaki na pɔtɔpɔ́tɔ, mpe balambaki mpe bakabolaki bilei mpe mai ya komela kati na etúká mobimba epai mpela ekómaki. Bamipesaki nkutu mpo na kopetola eteyelo ya mboka yango mpe bandako mingi ya Leta. Bandeko na bango mpe etuluku mobimba ya bato ya mboka yango bamonisaki botɔ́ndi mpo na milende makasi na bango.
Na bisika mosusu mingi, Batatoli ya Yehova banyokwamaki na makámá minene, lokola mpela, mipepe makasi mpe koningana ya mabelé, lokola bato mosusu nyonso. Lokola bakangi ntina ete ezali kouta na makambo makanelami te to na makambo makoki koyebana liboso te, bazali kopamela Nzambe te to mpe moto mosusu te. (Mosakoli 9:11) Nzokande, bazali na elikya ete bolingo ezangi moimi mpo na baninga na bango bandimi ekosunga bango atako bakutani na mikakatano ya motindo nini. Misala ya bolingo motindo wana mizali kouta na kondima bobele moko oyo bango nyonso bazali na yango. Moyekoli Yakobo alimboli ete: “Soki ndeko mobali to ndeko mwasi azali bolumbu mpe na bosenga ya bilei na mokolo na mokolo, mpe moko na bino alobi na bango ete: ‘Bokenda na kimya, boyoka mɔ́tɔ mpe botonda,’ nde bopesi bango te yango ezangi bango na nzoto, wapi litomba? Bobele bongo na kondima, soki ezangi misala, esili kokufa na yango mpenza.”—Yakobo 2:15-17, NW.
Liziba ya kobatelama ya solo
Na esika ya kozela bikamwiseli ya mitindo mikeseni oyo Nzambe akoki kosala, Batatoli ya Yehova bayebi ete kobatelama ezali kozwama na bondeko na bango ya boklisto oyo bazali na yango kati na mokili mobimba. Ya solo, oyo bondeko wana ezali kosala na bantango ya mpasi ezali solo ekamwiseli. Bazali komikundola maloba na Yesu oyo mazali na Matai 17:20, (NW): “Soki bozali na kondima monene lokola mombuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete: ‘Tambola longwa awa kino kuna,’ mpe ekotambola, likambo moko te likoleka nguya na bino.” Ee, bipekiseli minene lokola ngomba bizali kolongwa ntango kondima ya solo ya boklisto, oyo esimbami na bolingo, ezali kosala mosala.
Libota ya Yehova kati na mokili mobimba lizali kooka ete libatelami na loboko ya Nzambe na bango kati na bantango oyo ya yikiyiki mpe ya makámá. Bazali kooka lokola mokomi na Nzembo: “Nakolala, ɛɛ nakolala mpɔngi na kimia, jambi bobɛlɛ yɔ [Yehova, NW] okobatela ngai na esika na ngai.” (Nzembo 4:8) Na elikya nyonso, bazali kotya likebi na bango na mosala oyo bazali na yango: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba mafandami na bato lokola litatoli na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14, NW) Na kondimisama nyonso, bazali kotala liboso epai na kokokisama ya bilaká ya Yehova na ntina na mokili ya sika ya kimya mpe ya boyengebene, oyo kati na yango bakobanga lisusu likámá moko te, ezala oyo euti na bato to oyo euti na biloko bizalisami.—Mika 4:4.
[Bililingi na lokasa 12]
Batatoli bautaki mosika mpe na zingazinga mpo na kosunga bato na esika mpela ezalaki