Esengo na bato na komikitisa
“Njambe akotɛmɛlaka bato na lolɛndo, nde akopɛsaka [ngolu epai na bato na komikitisa, “NW”].”—1 PETELO 5:5.
1, 2. Lolenge nini, kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, Yesu amonisaki boyokani bozali kati na esengo mpe komikitisa?
KOZALA na esengo mpe kozala na komikitisa ezali na boyokani nini? Kati na lisoló na ye oyo liyebani mingi, Yesu Klisto, moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, alobelaki bolamu to bisengo libwa. (Matai 5:1-12) Yesu amonisaki ete boyokani bozali kati na esengo mpe komikitisa? Ee, mpamba te kozala na komikitisa etangami kati na bisengo oyo alobelaki. Na ndakisa, moto asengeli kozala na komikitisa mpo ete akoka komibanzabanza mpo na bamposa na ye ya elimo. Bobele bato na komikitisa nde bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene. Kasi bato na lolendo bazali na bopɔlɔ te soko na motema mawa te, bazali mpe koluka kimya te.
2 Bato na komikitisa bazali na esengo mpo ete kozala na komikitisa ezali sembo mpe elongobani. Lisusu, bato na komikitisa bazali na esengo mpo ete kozala na komikitisa ezali likambo ya mayele; ezali kosala ete tózala na boyokani malamu elongo na Yehova Nzambe mpe elongo na baninga na biso baklisto. Lisusu, bato na komikitisa bazali na esengo mpo ete kozala na komikitisa ezali lolenge ya komonisa bolingo na bango.
3. Mpo na nini bosembo ezali kosɛnga biso ete tozala na komikitisa?
3 Mpo na nini kozala na bosembo esɛngi ezaleli ya komikitisa? Ya liboso, ezali mpo ete banso tosilá kosangola ezalela ya kozanga kokoka mpe tokosalaka mabungá ntango nyonso. Ntoma Paulo alobaki na ntina na ye mpenza, ete: “Nayebi ete kati na ngai, elingi koloba kati na mosuni na ngai, likambo malamu lifandi kati na yango te; mpo ete likoki ya kolinga ezali kati na ngai, nde likoki ya kosala makambo malamu ezali te.” (Baloma 7:18, NW) Ee, biso nyonso tosili kosala lisumu mpe tobongi na nkembo na Nzambe te. (Baloma 3:23) Bosembo ekopekisa biso na kozala bato na lolendo. Mpo na kondima mabungá esengeli ezaleli ya komikitisa, mpe bosembo ekosalisa biso na kondima mpamela na ntango oyo tosali libungá. Lokola mbala mingi tokokisaka te makambo oyo tokanaka kosala, tozali na ntina malamu ya kozala na komikitisa.
4. Wapi ntina monene oyo epesameli biso na 1 Bakolinti 4:7 ya kozala na komikitisa?
4 Ntoma Paulo apesi biso ntina mosusu oyo mpo na yango bosembo esengeli koyeisa biso bato na komikitisa. Alobi ete: “Nani akesenisi yo na mosusu? Ya solo, nini ozali na yango nde ozwi [na moto mosusu] te? Bongo, soki ozwaki mpenza [na moto mosusu], mpo na nini ozali komikumisa lokola nde ozwi [yango na moto mosusu] te?” (1 Bakolinti 4:7, NW) Ntembe ezali te na ntina na likambo oyo, tokomonisa bosembo te soki tozali komikumisa, soki tozali na lolendo mpo na bozwi na biso, na makoki na biso, to na makambo oyo tosilá kosala. Bosembo ezali kosalisa biso na kozala na lisosoli malamu liboso na Nzambe, ete tokoka “komitambwisa na bosembo kati na makambo nyonso.”—Baebele 13:18, NW.
5. Lolenge nini bosembo ezali mpe kosalisa biso na ntango tosali libungá?
5 Bosembo ezali kosalisa biso na kozala na komikitisa na ntango tosali libungá. Yango ekosala ete tomilɛngɛla mpo na kondima mpamela, na esika ya komeka komilóngisa to kobwaka mabe likoló ya moto mosusu. Na bongo, Adama apamelaki Eva, nzokande Davidi apamelaki Bata-seba te, na kolobáká ete: ‘Asengelaki te kosukola na esika ya polele. Nakokaki te kopɛngola ete namekama te.’ (Genese 3:12; 2 Samwele 11:2-4) Ya solo, epai moko ekoki kolobama ete, kozala sembo ezali kosalisa biso mpo na kozala na komikitisa; epai mosusu, kozala na komikitisa ezali kosalisa biso na kozala sembo.
Kondima epai na Yehova ezali kosalisa biso mpo na kozala na komikitisa
6, 7. Lolenge nini kondima epai na Nzambe ezali kosunga biso na kozala na komikitisa?
6 Kozala na kondima epai na Yehova ekosalisa biso mpe na kozala na komikitisa. Koyeba bonene ya Mozalisi, Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, ekopekisa biso mpenza na komitalela na motuya mingi. Oyo nde lolenge malamu mosakoli Yisaya akundwelaki biso yango! Tozali kotanga na Yisaya 40:15, 22 (NW) ete: “Tala! Mabota mazali lokola litangá moko na katini; mpe batalelami lokola eboke ya mputulu likoló na emekeli. . . . Ezali na Ye oyo afandi likoló na zolongano ya mabelé, oyo bafandi na yango bazali lokola mayoyo.”
7 Kozala na kondima epai na Yehova ekosalisa biso lisusu wana tomiyoki ete tonyokwami mpo na bokesene. Na esika na komitungisa mpo na likambo yango, tokotya motema epai na Yehova na komikitisa nyonso, lokola mokomi na Nzembo akundweli biso yango na Nzembo 37:1-3, 8, 9. Ntoma Paulo amonisi likanisi ya motindo moko, ete: “Balingami, bozongisaka mabe mpo na mabe bino moko te, kasi botika esika na nkanda; mpamba te ekomami ete: ‘Kobukanisa ezali na ngai; ngai nakozongisa yango. Yehova alobi bongo.’”—Baloma 12:19, NW.
Komikitisa—Nzela ya mayele
8. Mpo na nini komikitisa ezali kosala ete tózala na boyokani malamu elongo na Yehova?
8 Ezali na bantina mingi mpo na yango kozala na komikitisa ezali nzela ya mayele. Lokola emonisamaki liboso, moko na yango ezali oyo: ezali kosala ete tozala na boyokani malamu elongo na Mozalisi na biso. Liloba ya Nzambe liyebisi polele na Masese 16:5 (NW) ete: “Moto na moto oyo azali na motema na lolendo, aboyami na Yehova.” Tozali kotanga lisusu na Masese 16:18 (NW) ete: “Lofúndo ezali liboso na kokwea, mpe elimo na lolendo ezali liboso na konyata litambe mabe.” Ata ndɛlɛ moto na lolendo akozwa mpasi. Esengeli mpenza kosalema bongo, mpamba te tozali kotanga na 1 Petelo 5:5 (NW) ete: “Bino nyonso bómilatisa elimo ya komikitisa moko epai na mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka ngolu epai na bato na komikitisa.” Okomona likanisi ya motindo moko kati na lisese oyo Yesu apesaki na ntina na Mofalisai moko mpe mokɔngɔli na mpako, baoyo bazalaki kobondela. Ezalaki mokɔngɔli na mpako na komikitisa nde alekaki sembo.—Luka 18:9-14.
9. Komikitisa ekopesaka lisungi nini na ntango ya mpasi?
9 Komikitisa ezali nzela ya mayele mpo ete kosala makambo na komikitisa ezali kosalisa biso na kolanda toli oyo ezwami na Yakobo 4:7 (NW) ete: “Na bongo, bino moko bótosa Nzambe.” Soki tozali bato na komikitisa, tokotomboka te na ntango Yehova apesi nzela ete tokutana na bampasi. Ezaleli ya komikitisa ekopesa biso makoki ya kondima ezalela na biso mpe koyika mpiko. Moto na lofúndo azalaka na esengo te, ntango nyonso alingaka kozala na biloko mingi, mpe akotombokaka na ntango ya mpasi makasi. Epai mosusu, moto na komikitisa akoyikaka mpiko na bolózi mpe na mimekamo, lokola Yobo asalaki yango. Yobo azwaki mpasi ya kobungisa bozwi na ye nyonso mpe azwaki maladi mabe, mpe lisusu, mwasi na ye apesaki ye toli ya kolanda nzela ya lolendo, ete: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufa!” Lolenge nini asalaki? Lisoló ya Biblia eyebisi biso ete: “[Yobo] alobaki na ye ete: ‘Yo ozali koloba lokola ekolobaka basi na bilémá. Tokozwa malamu na maboko na Nzambe; bongo tokozwa mabe mpe te?’ Na oyo nyonso, Yobo asalaki lisumu na bibebu na ye te.” (Yobo 2:9, 10, NW) Lokola Yobo azalaki moto na komikitisa, atombokaki te, kasi na mayele nyonso, andimaki makambo nyonso oyo Yehova apesaki nzela ete makómela ye. Mpe na nsuka, azwaki mbano mingi.—Yobo 42:10-16; Yakobo 5:11.
Komikitisa ezali kosala ete tózala na boyokani malamu elongo na bato mosusu
10. Lolenge nini komikitisa ezali kobongisa boyokani na biso elongo na baninga na biso baklisto?
10 Komikitisa ezali nzela ya mayele mpamba te ezali kosala ete tózala na boyokani malamu elongo na baninga na biso baklisto. Na yango, ntoma Paulo apesi biso toli oyo, ete: “Bosala eloko moko te na kowelana soko na moimi, kasi na elimo ya komikitisa, kotaleláká bato mosusu ete baleki bino. Botalelaka bobele matomba ya makambo na bino moko te, kasi lisusu matomba na oyo ya bato mosusu.” (Bafilipi 2:3, 4, NW) Komikitisa ekopekisa biso na kowelana elongo na basusu to na koluka komatela basusu. Bizaleli motindo wana bizali kobimisa mikakatano mpo na biso mpe mpo na baninga na biso baklisto.
11. Mpo na nini komikitisa ekoki kosalisa biso na kopɛngola kosala mabungá?
11 Mbala mingi, ezaleli ya komikitisa ekosalisa biso na kopɛngola kosala mabungá. Mpo na nini? Mpo ete ezaleli ya komikitisa ekopekisa biso na komityela motema koleka ndelo. Na esika ya kosala bongo, tokosepela na toli ya Paulo oyo ezwami na 1 Bakolinti 10:12 (NW) ete: “Ye oyo akanisi ete atɛlɛmi, akeba ete akwea te.” Moto na lolendo akomityelaka motema mingi mpenza, nzokande akosalaka mabungá mpo na kopusama na bato mosusu to mpo na bolɛmbu na ye moko.
12. Komikitisa ekosalisa biso na kokokisa lisɛngami nini ya Makomami?
12 Komikitisa ekosalisa biso na komiyokanisa na lisɛngami oyo ya kozala na botosi. Na Baefese 5:21, tozwi toli ete: “Botosanaka mpɔ na kobanga Klisto.” Na yango, banso tosengeli kozala na botosi, boye te? Bana basengeli kotosa baboti na bango, basi basengeli kotosa mibali na bango, mpe mibali basengeli kotosa Klisto. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:22; 6:1) Lisusu, kati na lisangá ya boklisto, bato nyonso, kati na bango mpe basaleli na misala, basengeli komonisa botosi epai na bankulutu. Ebongi mpe ete bankulutu batosa kelasi ya moombo na sembo, oyo emonisami mpenza na mokɛngɛli ya zongazonga, boye te? Lisusu, mokɛngɛli ya zongazonga asengeli kotosa mokɛngɛli ya etúká (surveillant de district), mpe mokɛngɛli ya etúká asengeli kotosa Bakambi ya filiale (comité ya filiale) ya mboka epai kuna azali kosala mosala. Ezali boni mpo na Bakambi ya filiale? Basengeli kozala “na botosi bamoko epai na basusu” mpe kozala lisusu na botosi epai na Lisangani ya Mikóló-Bakambi (Collège central), oyo emonisi kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele, oyo, na ngala na yango, esengeli kotosa Yesu, Mokonzi oyo asili kotyama. (Matai 24:45-47) Lokola na masangani nyonso ya bankulutu, basangani ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basengeli komemya makanisi ya basusu. Na ndakisa, moko na bango akoki komona ete azali na likanisi ya malamu. Kasi soki yango endimami te na bato mingi kati na bango, ye asengeli kotika likanisi wana. Ya solo, biso nyonso tozali na mposa ya ezaleli ya komikitisa, mpo ete banso tosengeli kozala na botosi.
13, 14. (a) Komikitisa ekosalisa biso kati na libaku nini mpenza? (b) Petelo atikaki ndakisa nini na ntina na kondima toli?
13 Soki ezaleli ya komikitisa etalelami lokola nzela ya mayele, ezali mingi mpenza mpo ete ezali kosalisa biso na kondima toli mpe mpamela. Moko na moko na biso azalaka na mposa ya kozwa toli mpe mpamela na bantango mosusu, mpe tosengeli kolanda toli oyo ezwami na Masese 19:20 (NW) ete: “Yoka toli mpe ndima mpamela, ete ozala na mayele na mikolo na yo mizali koya.” Emonisamaki na sembo nyonso ete, komikitisa ekokitisaka mpasi euti na etumbu to mpamela. Lisusu, na Baebele 12:4-11, ntoma Paulo apesi biso toli na lolenge oyo kondima mpamela na komikitisa nyonso, ezali likambo ya mayele. Bobele na lolenge wana nde tokoki kolikya kotambwisa bomoi na biso na mayele nyonso mpe kozwa bomoi ya seko lokola libonza. Oyo nde nsuka malamu!
14 Kati na likambo oyo, tokoki kozwa ndakisa ya ntoma Petelo. Azwaki toli makasi epai na ntoma Paulo, lokola yango eyebisameli biso na Bagalatia 2:14 (NW) ete: “Emonaki ngai ete bazali kotambola sembo te na kolanda solo ya nsango malamu, nalobaki na Kefa [Petelo] liboso na bango nyonso ete: ‘Soki yo, atako ozali Moyuda, ozali kotambola lokola mabota, nde lokola Bayuda te, boni ozali kosɛngisa bato ya mabota ete batambola na kolanda misala ya Bayuda?’” Ntoma Petelo asilikaki mpo na mpamela wana? Soki asilikaki, mbala mosusu ezalaki te mpo na ntango molai, lokola tokoki komona yango na oyo ayaki koloba na nsima, na 2 Petelo 3:15, 16 (NW) na ntina ya ntoma, kobéngáká ye “Paulo, ndeko molingami na biso.”
15. Boyokani nini bozali kati na ezaleli na biso ya komikitisa mpe esengo na biso?
15 Likambo mosusu ezali bongo kosepela na oyo tozali na yango. Tokoki te kozala na esengo soki tosepeli te na makambo mazali kokómela biso, na mikumba na biso, na mapamboli oyo tozali kozwa. Moklisto oyo azali na komikitisa azali na likanisi oyo ete: “Soki Nzambe atiki yango esalema, boye nakoki koyikela yango mpiko,” ezali yango nde ntoma Paulo alobaki, lokola tozali kotanga yango na 1 Bakolinti 10:13 (NW) ete: “Komekama moko te ekómeli bino oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama na koleka makoki na bino, kasi esika moko na komekama akobongisa mpe ebimelo, mpo ete bokoka koyika mpiko.” Tomoni lisusu lolenge oyo komikitisa ezali nzela ya mayele, mpamba te ezali kosalisa biso na kozala na esengo ata liboso ya makambo nini makoki kobimela biso na bomoi.
Bolingo ekosalisa biso ete tozala na komikitisa
16, 17. (a) Ndakisa nini ezwami na Makomami, oyo emonisi ezaleli monene oyo ezali kosalisa biso na komikitisa? (b) Ndakisa nini ya mokili ezali komonisa likambo yango?
16 Koleka makambo nyonso mosusu, bolingo bozangi koluka litomba, a·gaʹpe, ekosalisa biso ete tozala na komikitisa. Mpo na nini Yesu akokaki koyika mpiko na komikitisa nyonso na nzeté na ye ya mpasi oyo Paulo alobelaki epai na Bafilipi? (Bafilipi 2:5-8) Mpo na nini akanisaki te kokokana na Nzambe? Lokola ye moko alobaki yango, mpo ete: “Nalingi Tata.” (Yoane 14:31) Wana ezali ntina oyo azalaki ntango nyonso kopesa nkembo mpe lokumu epai na Yehova, Tata na ye na likoló. Na yango, na libaku mosusu, amonisaki ete bobele Tata na ye na likoló nde azali malamu.—Luka 18:18, 19.
17 Mpo na komonisa yango, tozwa ndakisa ya oyo ekómelaki John Greenleaf Whittier, moko na bakomi na ntɔ́ki ya liboso ya Amerika. Ntango mobali wana azalaki elenge, azalaki kosakana elongo na moninga na ye moko ya mwasi, oyo ye azalaki kotangela eteni moko na moko ya liloba boye to boye; elenge mwasi alóngaki kotanga eteni moko na moko ya liloba oyo Whittier atangaki yango malamu te. Elenge mwasi amitungisaki. Mpo na nini? Mokomi azali komikundola na oyo elenge mwasi alobaki ete: “Limbisá ngai mpo ete nalóngi kotanga eteni moko na moko ya liloba oyo. Namoni mabe lokola naleki yo . . . mpo ete nalingaka yo.” Ee, soki tolingi moto, tokolinga ete aleka biso, kasi toleka ye te, mpo ete bolingo ezali na komikitisa.
18. Komikitisa ekosalisa biso na kolanda batoli nini ya Makomami?
18 Yango ezali liteya malamu mpo na baklisto nyonso, mingi mpenza mpo na bandeko mibali. Tosepelaka wana ndeko na biso moko azwi mokumba, to tookaka zuwa mpe elulelá mpo ete biso tozwi yango te? Soki tolingi mpenza ndeko na biso, tokosepela na lolenge oyo azwi mosala to mokumba ya ntina mingi. Ee, komikitisa ekosalisa biso na kolanda toli oyo, ete: “Mpo na kokumisana, bopesa ndakisa.” (Baloma 12:10, NW) Libongoli mosusu elobi ete: “Botosana mpenza.” (Boyokani ya Sika) Tozwi lisusu toli oyo epai na ntoma Paulo, ete: “Bosalelana lokola baombo na bolingo.” (Bagalatia 5:13) Ee, soki tozali na bolingo, tokozala na esengo ya kosalela bandeko na biso lokola baombo, na kotyáká matomba na bango mpe bolamu na bango liboso na oyo ya biso, likambo yango lisɛngi kozala na komikitisa. Komikitisa ezali lisusu kopekisa biso na komikumisa, mpe ezali bongo kopɛngola kolamwisa elimo ya zuwa mpe elulelá epai na bato mosusu. Paulo akomaki ete bolingo “ekomikumisaka te, ezali na lofúndo te.” Mpo na nini bongo? Mpo ete ye oyo azali komikumisa mpe azali na lofúndo, apusami na moimi mpe na lolendo, nzokande bolingo mpenza ekolukaka litomba te.—1 Bakolinti 13:4, NW.
19. Bandakisa nini ya Biblia oyo emonisi bokangani bozali kati na komikitisa mpe bolingo, mpe oyo ezali kati na lolendo mpe moimi?
19 Boyokani ya Davidi elongo na mokonzi Saulo mpe elongo na Yonatana, mwana na ye, emonisi malamu na ngámbo moko, bokangani oyo bozali kati na bolingo mpe komikitisa; mpe na ngámbo mosusu, bokangani oyo bozali kati na lolendo mpe moimi. Lokola Davidi alóngaki etumba, basi ya Yisraele bayembaki ete: “Saulo abomi nkóto na ye nde Davidi abomi nkóto zomi.” (1 Samwele 18:7) Na esika na komikitisa, Saulo, oyo atondaki na lolendo, abandaki koyina Davidi mpo na koboma ye. Oyo nde kokesena monene na elimo ya Yonatana, mwana na ye! Tozali kotanga ete Yonatana alingaki Davidi lokola molimo na ye mpenza. (1 Samwele 18:1) Bongo, lolenge nini Yonatana asalaki wana eyaki komonana polele na nsima ete Yehova azalaki kopambola Davidi mpe ezalaki ye mpenza, kasi Yonatana te, oyo asengelaki kokitana Saulo na kiti na bokonzi na Yisraele? Yonatana azalaki na zuwa to na elulelá? Soko moke te! Lokola tozali kotanga yango na 1 Samwele 23:17, akokaki koloba mpo na bolingo monene oyo azalaki na yango epai na Davidi, ete: “Bangá te mpo ete lobɔkɔ ya Saulo, tata na ngai, ekozwa yo te. Mpe yo okozala mokonzi likoló na Yisraele, mpe ngai nakozala penepene na yo; mpe Saulo, tata na ngai, ayebi yango malamu.” Bolingo monene oyo Yonatana azalaki na yango epai na Davidi esalaki ete andima, na komikitisa nyonso, makambo oyo asosolaki likoló ya mokano na Nzambe mpo na ye oyo asengelaki kokitana tata na ye lokola mokonzi na Yisraele.
20. Lolenge nini Yesu amonisaki boyokani bozali kati na bolingo mpe komikitisa?
20 Mpo na kolobela lisusu bokangani bozali kati na bolingo mpe komikitisa, tótala oyo esalemaki na butu ya nsuka oyo Yesu Klisto alekisaki elongo na bantoma na ye liboso ete akufa. Na Yoane 13:1 (NW), tozali kotanga ete Yesu “alingaki bato na ye mpenza, baoyo bazalaki kati na mokili; alingaki bango kino nsuka.” Na nsima, tozali kotanga ete Yesu asukolaki makolo ya bantoma na ye, kokokisáká bongo mosala mosɛngi kosɔkɛma. Oyo nde liteya monene ya komikitisa!—Yoane 13:1-11.
21. Na bokuse, mpo na nini tosengeli kozala na komikitisa?
21 Ya solo mpenza, ezali na bantina mingi ya kozala na komikitisa. Komikitisa ezali nzela ya boyengebene mpe ya bosembo. Kati na likambo oyo, kondima ezali na ntina mingi. Komikitisa ezali kosalisa biso na kozala na boyokani malamu elongo na Yehova Nzambe mpe elongo na baninga na biso kati na kondima. Komikitisa ezali nzela ya mayele. Oyo eleki mpenza, yango ezali nzela ya bolingo mpe ekopesaka bolamu ya solo.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Kati na makambo nini bosembo ezali kosalisa biso mpo na kozala na komikitisa?
◻ Mpo na nini kondima epai na Yehova ekoki kosalisa biso na kozala na komikitisa?
◻ Nini emonisi ete komikitisa ezali nzela ya mayele?
◻ Mpo na nini bolingo ezali mpenza kosalisa biso mpo na kozala na komikitisa?
[Elilingi na lokasa 21]
Yobo atosaki Yehova na komikitisa nyonso. ‘Alakelaki Nzambe mabe te’
[Elilingi na lokasa 23]
Petelo atosaki na komikitisa nyonso ntango Paulo apesaki ye toli liboso na bato