Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 nk. 6-7
  • Ndenge nini okoki komonisa komikitisa ya solosolo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki komonisa komikitisa ya solosolo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya komikitisa ya Klisto
  • Ndenge oyo moto ya komikitisa asalaka
  • Moto ya komikitisa azalaka na bolingo mpe alimbisaka
  • Tólona komikitisa ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Esengo na bato na komikitisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini ebongi komilatisa ezaleli ya komikitisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Bólata elimo ya komikitisa’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 nk. 6-7

Ndenge nini okoki komonisa komikitisa ya solosolo?

KOMIKITISA ya solosolo ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe. Yakobo akomaki ete: “Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka [bato ya komikitisa, NW] ngɔlu.” (Yakobo 4:6) Na vɛrsɛ oyo, ekoki kozala ete Yakobo azalaki kokanisa makambo mingi oyo elobami na Makomami ya Liebele. “Ata [Yehova] azali likoló, akomonaka baoyo [bazali] na [komikitisa], mpe akososolaka mosika baoyo [bazali] na ngambo.” “Miso na nzombo na moto ikokitisama mpe lolendo na bato ekosɔkisama, mpe [Yehova] akokumisama, bobele ye moko.” “Solo akotyola batyoli nde akopesa ngɔlu epai na [bato ya komikitisa].”​—Nzembo 138:6; Yisaya 2:11; Masese 3:34.

Ntoma Petelo mpe alendisaki ezaleli ya komikitisa. Akomaki ete: “Bómikangela [komikitisa] lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka [bato ya komikitisa] ngɔlu.”​—1 Petelo 5:5.

Ndakisa ya komikitisa ya Klisto

Okoki kotuna ete, kozala na komikitisa ememaka bolamu to litomba nini? Mpo na moto oyo alingi kozala moklisto ya solo, eyano ezali na ntina mingi: kozala na komikitisa elimboli kozala lokola Klisto. Yesu amonisaki komikitisa ntango andimaki mokumba oyo ekokani na mokumba mosusu te: andimaki kolongwa na likoló, koya awa na mabelé mpe kokóma moto mpamba, na nse ya baanzelu. (Baebele 2:7) Atako azalaki mwana ya Nzambe, akangaki motema na nsɔni oyo banguna na ye bakonzi ya mangomba bayokisaki ye. Abatelaki kimya na ye na ntango bazalaki konyokola ye, atako akokaki kosɛnga lisungi ya baanzelu mingi.​—Matai 26:53.

Na nsuka, babomaki Yesu na liwa ya nsɔni: bakakisaki ye na nzete ya mpasi, kasi atikalaki sembo epai ya Tata na ye. Yango wana, Paulo akomaki boye mpo na ye: “Bókanisa kati na bino yango ekanisaki Klisto Yesu. Ata azalaki na motindo na Nzambe, atángaki te ete ameka [kokokana] na Nzambe, nde amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge na bato. Ezwami ye na motindo na moto, [amikitisi] mpe atosi kino kufa, ɛɛ, kino kufa na [nzete ya mpasi, NW].”​—Bafilipi 2:5-8.

Na bongo, ndenge nini biso tokoki komonisa komikitisa ya solosolo? Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, ndenge nini tokoki kozala na komikitisa na esika ya kozala na lolendo?

Ndenge oyo moto ya komikitisa asalaka

Tólobela komikitisa na mosala, ezala na mosala ya mosuni to na mosala ya boklisto. Mpo mosala esalema malamu, bakambi, bakonzi mpe batambwisi basengeli kozala. Moto moko asengeli kozwa bikateli. Osalaka nini? Olobaka ete, “Yango ye akanisaka ete azali nani mpo alakisa ngai oyo nasengeli kosala? Ngai naumeli na mosala oyo bambula mingi koleka ye.” Ɛɛ, soki ozali moto ya lolendo, okobanda koimaima mpo na kotosa. Nzokande, moto ya komikitisa alukaka ‘kosala likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa azali na [komikitisa], atalelaka bamosusu ete baleki ye.’​—Bafilipi 2:3.

Osalaka nini soki moto oyo azali leki to azali mwasi apesi yo likanisi? Soki ozali na komikitisa, okotalela yango naino. Soki ozali na lolendo, okosepela te to okoboya yango mbala moko. Okosepela na makumisi to kolɛtɛ (flatterie) oyo ekomemela yo mikakatano, to okosepela nde na toli oyo ekosalisa yo okende liboso?​—Masese 27:9; 29:5.

Okoki kolonga mikakatano? Komikitisa ekosalisa yo na kotɛlɛmɛla mikakatano mpe kolonga yango, lokola Yobo. Soki ozali na lolendo, mbala mingi okosilika mpe okoki ata kotomboka soki mikakatano ezali makasi to mpe soki ezali ata ya mike.​—Yobo 1:22; 2:10; 27:2-5.

Moto ya komikitisa azalaka na bolingo mpe alimbisaka

Bato mosusu bakokaka koloba te ete, “Limbisá ngai. Nasali libunga. Yo nde olongi.” Mpo na nini? Lolendo eleki bango! Kasi, kosɛnga bolimbisi ya solosolo ekoki kosilisa koswana na kati ya ndako.

Ozalaka na motema oyo elingaka kolimbisa soki moto asali yo mabe? To, lokola ozali na lolendo, obombaka nkanda, mbala mosusu na boumeli ya mikolo mingi to ya basanza mingi, oboyaka kolobisa moto oyo asali yo mabe? Okɔtisaka koyinana se mpo ozongisa mabe na mabe? Bato mosusu bakufaki mpo na koluka kozongisa mabe na mabe. Basusu balukaka nde kopanza nsango ya lokuta mpo na moto oyo bazali na ye na likambo mpo na kobebisa lokumu na ye. Nzokande, moto ya komikitisa azalaka na bolingo mpe alimbisaka. Mpo na nini? Mpamba te bolingo ebombaka mabe na motema te. Yehova andimaki kolimbisa Bayisalaele soki batiki lolendo na bango. Moyekoli ya Yesu oyo azali na komikitisa alimbisaka, ata mbala nkama!​—Yoele 2:12-14; Matai 18:21, 22; 1 Bakolinti 13:5.

Moto ya komikitisa ‘azwaka esika ya liboso mpo na kopesa moninga lokumu.’ (Baloma 12:10) Biblia New International Version elobi ete: “Bópesa basusu lokumu oyo eleki lokumu oyo bomipesaka.” Okumisaka bato mosusu mpe ondimaka makoki na bango? To omonaka ntango nyonso likambo ya mabe mpo na kokitisa lokumu na bango? Okokaka mpenza kokumisa bato mosusu? Soki ozali na mokakatano na likambo oyo, mbala mosusu omityelaka motema te mpe ozali na lolendo.

Moto ya lolendo azalaka motema mokuse. Moto ya komikitisa azalaka motema molai mpe ayebaka kokanga motema. Ezali boni mpo na yo? Omilelaka na mabe nyonso oyo basaleli yo? Kosala bongo ezali kokanga motema te. Soki ozali na komikitisa, okomipesa lokumu oyo eleki te. Kanisá likambo oyo esalemaki ntango bayekoli ya Yesu bamipesaki lokumu; batyanaki ntembe mpo na koyeba nani na kati na bango aleki baninga. Babosanaki ete bango nyonso bazalaki se ‘baombo mpamba’!​—Luka 17:10; 22:24.

Voltaire, mokomi mpe moto ya ekólo France alimbolaki komikitisa lokola “bopɔlɔ ya molimo . . . nkisi ya lolendo.” Ɛɛ, komikitisa ezali nde kozala na elimo ya kosɔkɛma. Moto ya komikitisa azalaka na elimo ya bopɔlɔ, kasi ya lolendo te. Azalaka na limemya mpe na bonkonde mingi.

Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo tózala na komikitisa? Mpamba te Nzambe alingaka bato ya komikitisa mpe ezaleli yango ekosala ete tótambwisama na Nzambe. Ezali mpe mpo na komikitisa ya Danyele nde Yehova atalelaki mosakoli yango ete ‘alingami mingi’ mpe atindelaki ye anzelu oyo alakisaki ye emonaneli! (Danyele 9:23; 10:11, 19) Komikitisa ememaka matomba mingi. Komikitisa ekopesa yo baninga ya solosolo oyo bakolinga yo. Na koleka, ememaka lipamboli ya Yehova. “[Komikitisa] mpe kotosa [Yehova] ezali nzela na bozwi mpe lokumu mpe bomoi.”​—Masese 22:4.

[Elilingi na lokasa 7]

Kosɛnga bolimbisi na komikitisa ekoki kosilisa mikakatano mosusu na bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto