Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/1 nk. 5-7
  • Mosika te​—⁠Mokili mozangi bitumba!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosika te​—⁠Mokili mozangi bitumba!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotonga kimya kati na makanisi ya bato
  • Lolenge oyo Nzambe akotya kimya
  • Mangomba makolongolama
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bóluka kimya ya solo mpe bólanda yango!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nani akokamba bato epai na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bitumba ekosila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/1 nk. 5-7

Mosika te​—Mokili mozangi bitumba!

NA DESƐ́MBƐ 24, 1914, Jim Prince, elenge sodá moko ya ekólo Angleterre, akatisaki eteni ya mabelé oyo babéngaka ete no man’s land mpo na kosolola elongo na sodá moko oyo ameseni na etumba ya nse, ye moto ya ekólo Allemagne. Atunaki ye ete: “Ngai nazali Saxon, mpe yo ozali Anglo-Saxon. Mpo na nini tozali kobunda? ” Bambula mingi na nsima, Jim Prince alobaki ete: “Nazwa naino eyano te na motuna wana.”

Na boumeli ya poso wana ya mobu 1914 oyo etikalá kati na makanisi ya bato, basodá ya Angleterre mpe baoyo ya Allemagne bamonisanaki bolingo, babetaki ndembo esika moko, mpe bapesanaki ata makabo ya eyenga ya Mbotámá. Ya solo, boyokani wana, eyebanaki epai na mikonzi te. Ba généraux balingaki te ete mampinga na bango masosola ete “monguna” azali elima moyini te oyo amonisami na nzela na bopanzi nsango ya basodá. Albert Moren, sodá moko ya ekólo Angleterre, andimaki na nsima ete: “Soki bopemisi etumba eumelaki koleka poso moko, mbɛlɛ ekokaki kozala mpasi mingi mpo na kozongela bitumba.”

Bopemi wana ya pwasa ya etumba emonisi ete ata basodá oyo babongisami mpo na etumba bazali na mposa ya kimya. Mingi kati na basodá oyo bamonaki bampasi ya bisika na bitumba bakondima lisese oyo ya lokóta espagnol, ete: “Ebongi na ye oyo ayebi etumba te ete akende kati na yango!” Na ntembe te, soki bolukiluki moko oyo esalemi na mokili mobimba ekomonisa ete bato mingi balingi kimya. Kasi, lolenge nini mposa wana ya bato nyonso mpo na kimya ekoki kobongwana na mokili mozangi bitumba?

Mpo na kosilisa bitumba, esengeli kobongola makanisi ya bato. Mokanda ya mibeko ya Ebongiseli ya O.N.U. mpo na kopesa mateya, mpo na zébi mpe makambo ma ntɔ́ki elobi ete: “Lokola bitumba bikobotamaka kati na elimo ya bato, boye ezali kati na makanisi ya bato nde esengeli kotonga kimya.” Nzokande ezali mobulu kasi kimya te nde ezali kopalangana kati na mokili ya lelo, epai kuna koyina mpe likunya ezali kongala.

Ya solo, Nzambe ye moko alakaki ete mokolo mosusu kimya ekokotisama kati na makanisi ya bato oyo bazali na motema sembo. Asakolaki na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, ete: “[Nzambe] akosambisa kati na mabota, akopamela mpe bikolo mingi; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota mɔkɔ bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe tɛ.”​—Yisaya 2:4.

Kotonga kimya kati na makanisi ya bato

Mbongwana monene ya lolenge wana kati na makanisi ya bato, ekoki mpenza kosalema? Bato bakoyekola kobatela kimya na esika ya kokumisa etumba? Mpo na yango, likambo ya Wolfgang Kusserow ezali mpenza kosepelisa. Na 1942, ba nazis bakataki motó ya elenge mobali wana Moalemá oyo azalaki na mibu 20 mpo ete ‘aboyaki koyekola etumba.’ Mpo na nini aponaki kokufa? Kati na nkomá moko oyo atindaki, alobelaki mwa mitinda ya Biblia lokola oyo ete, “Okolinga mojalani na yɔ lokola yɔ mɔkɔ” mpe “Baoyo yɔnsɔ bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 22:39; 26:52) Na nsima atunaki motuna oyo: “Ezali mpo na banzeté nde Mozalisi na biso akomisaki maloba nyonso oyo? ”

Liloba na Nzambe, lizwami kati na Biblia, “lizali koyokisa nguya na yango.” Epusaki elenge wana Motatoli na Yehova ete alanda kimya, kozanga kobanga makámá ya liponi na ye. (Baɛbɛlɛ 4:12; 1 Petelo 3:11) Kasi Wolfgang Kusserow azalaki bobele ye moko te mpo na kolanda kimya. Na kolandáká mikanda ya kala ya ba nazis, J. S. Conway amonisi, kati na búku The Nazi Persecution of the Churches 1933-45 (Monyokoli ya ba nazis epai na mangomba 1933-1945) ete, Batatoli na Yehova bazalaki koboya kokamata mindoki. Amonisi polele ete na kokamatáká ekateli wana ya mpiko bazalaki bongo kotya lobɔkɔ na bokangami na bango mpo na liwa.

Na eleko na biso, ata loposo ya nzoto na bango ezali nini to ekólo na bango ezali nini, Batatoli ya Yehova bazali ntango nyonso komeka kosala makasi mpo na kolanda kimya. Mpo na nini? Biblia ezali koteya bango ete basaleli ya Nzambe ya solo basengeli kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli. Alejandro, elenge mobali moko ya ekólo Argentine oyo akendaki kofanda na mboka Yisraele na 1987, akoki kotatola mpo na yango.

Alejandro, ye oyo afandaki mibu misato kati na kibboutz (esika ya bilanga mpe ya bobokoli bibwele), azalaki kokoba kelasi na ye na kosaláká kati na bandako mpo na bampaya mpe na balɛstolá. Na eleko wana, amipesaki na kotanga Biblia mpe na koluka ntina ya bomoi. Kasi, koleka makambo nyonso mosusu, Alejandro azalaki na mposa ya kofanda kati na mokili moko epai kuna kimya mpe boyengebene ekozala mingi. Kati na mosala na ye, Alejandro, oyo azalaki Moyuda, azalaki kofanda elongo na Bayuda mpe Baarabi, kasi azalaki koboya kokotela ngambo moko.

Na 1990, Alejandro abyangamaki na moninga na ye oyo azalaki koyekola Biblia elongo na Batatoli na Yehova mpo na koyangana na liyangani ya mokolo moko, na engumba Haïfa. Akamwaki wana emonaki ye Bayuda mpe Baarabi 600 baoyo basangani esika moko na esengo, mpe alobaki ete: “Ezali boye nde tosengelaki kofanda.” Sanza motoba na nsima, ye moko akómaki Motatoli, mpe sikawa azali kolekisa ngonga na ye mingi na kosakola nsango ya kimya euti na Biblia.

Lolenge oyo Nzambe akotya kimya

Bandakisa oyo ya kosimba motema ezali komonana mingi te kati na mokili oyo. Ebongiseli ya ntango oyo ezali koloba ete ezali koluka kimya, kasi ezali nde kolendisa bitumba. Okosepela kofanda na balabala oyo bafandi na yango bazali kobimisa mosolo ya lifuta na bango koleka mbala 7 kino mbala 16 kati na monkámá mpo na bibundeli mpe mpo na bangonga ya kobelela bato ete bapesa lisungi? Kasi yango nde ezali mpenza mosolo oyo mabota babimisaki mpo na makambo matali basodá na bambula oyo euti koleka. Na bongo, tozali kokamwa te na koyeba kati na esakweli ya Yisaya ete, bato nyonso bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli bobele na ntango Nzambe ‘akobongisa makambo nyonso na ntina na mabota mingi.’ Lolenge nini akosala yango?

Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na kobongisa makambo nyonso. Mosakoli Danyele asakolaki ete “Njambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke tɛ.” Abakisaki ete, bokonzi yango “ekobuka mpe ekosilisa makonzi [biyangeli na bato] oyo yɔnsɔ, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Maloba oyo mazali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ekotya na mpiko nyonso boyangeli na yango na mabelé mobimba. Lokola ekokweisa bandelo nyonso oyo ezali kokabola bikólo, ekolongola bantina nyonso ya bitumba. Lisusu, bayangelami ya Bokonzi yango bakozala na kimya “mingi,” mpamba te ‘bakolakisama na [Yehova].’ (Yisaya 54:13) Likambo ya kokamwa ezali te mpo ete Yesu alakisaki bato babondelaka Nzambe, ete: “Tika bokonji na yɔ eya! ”​—Matai 6:10.

Mangomba makolongolama

Nzambe akolongola mpe mangomba oyo mazali kobebisa kimya. Mangomba mazalaki mpenza babandisi minene ya matata oyo masili koumela ntango molai kati na Lisoló ya bato: bitumba bibéngami croisades, to “bitumba mosantu,” ebandisamaki na Pápa Urbain II, na 1095 ya ntango na biso.a Na ekeke ya ntuku mibale, bakonzi na mangomba batindaki mpenza bato mpo na kolendisa bitumba, ata oyo eyokanaki te na makambo ya losambo.

Na ntina na mokumba oyo ekokisamaki na Mangomba na boklisto ya lokuta na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Paul Johnson, mokomi na makambo ya kala, akomaki ete: “Bakambi ya mangomba na losambo balongaki te, mpe kati na makambo mingi, balingaki te kotya kondima ya boklisto likoló na bolingo ya ekólo. Mpo na komiyeisela makambo nyonso pɛpɛlɛ, mingi kati na bango bamonaki malamu kosangisa bolingo ya ekólo elongo na boklisto. Na yango, basodá baklisto ya mangomba makeseni balendisamaki na kobomana na nkombo ya Mobikisi na bango.”

Mangomba matyaki molende makasi na kobimisáká bitumba na esika ete malendisa kimya. Mpo na koloba solo, Biblia ezali kolobela mangomba ya lokuta lokola “mwasi na pite” oyo azali kolanda bakonzi ya mokili. (Emoniseli 17:1, 2) Nzambe akweisi yango mpo ete esopaki makila ya baoyo nyonso babomamaki awa na mabelé. (Emoniseli 18:24) Na ntina yango, Yehova Nzambe akolongola libela libaku wana oyo lipekisi nzela na kimya.​—Emoniseli 18:4, 5, 8.

Ata soki bantina ya bokabwani, lokola politiki mpe mangomba ya lokuta elimwisami, kimya ekozala te soki Satana Zábolo, mobandisi monene ya bitumba, abomami te. Wana ezali nde likambo ya nsuka oyo Bokonzi na Nzambe ekosala mpo ete ezongisa kimya ya koumela awa na mabelé. Mokanda ya Emoniseli ezali kolimbola ete Satana “akokangama,” “akolingama” mpe “akobwakama na libulu mozindo” mpo ete “azimbisa lisusu mabota te.” Nsima na yango, akobomama libela.​—Emoniseli 20:2, 3, 10.

Elaká ya Biblia mpo na kosilisa bitumba ezali ndoto mpamba te. Yehova Nzambe asilaki kozwa bibongiseli mpo na kotya kimya. Bokonzi na ye, oyo esili kotyama na makoló, ezali komilɛngɛla mpo na kobanda misala misusu mpo na kopesa kimya kati na mokili mobimba. Liboso na yango, bamilió na Batatoli ya Yehova, baoyo bazali kopesa mabɔkɔ na Bokonzi yango ya likoló, basili koyekola kofanda na kimya.

Emonani polele ete, tozali na bantina makasi ya kondima ete bitumba bikoumela seko te. Likambo ya malamu koleka, tokoki kolikya komona Yehova ete akosilisa bitumba nyonso na mikolo mizali liboso. (Nzembo 46:9) Akosɛnzɛla mpo ete, mosika te mokili mózala lisusu na bitumba te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mbala mosusu bakonzi ya mangomba basanganaki na bitumba. Na etumba ya Hastings (1066), Odo epískɔ́pɔ ya katoliki, alóngisaki bosangani na ye na [etumba] na komemáká lingénda monene na esika ya mopanga. Alobaki ete moto na Nzambe azali na lotómo ya koboma, nde asengeli kosopa makila te. Bikeke mitano na nsima, Episkopo-mokonzi Jiménez akambaki ye moko bokoti ya bato ya mboka Espagne kati na Afrika ya Nɔ́rdi.

[Elilingi na lokasa 7]

Okoki kozala na bomoi kati na mokili ya sika mozangi bitumba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto