Bitumba ekosila
‘Tozali bana ya mbula 12 mpamba. Tokoki kosala eloko te na makambo ya politiki to bitumba, kasi tolingi kozala na bomoi! Tolingi kimya. Tokomona mpenza kimya yango?’—Bana ya kelasi ya mitano
‘Tozali na mposa ya kelasi, ya kokende kotalaka baninga mpe bandeko kozanga kobanga ete bákanga biso. Nazali na elikya ete bakonzi bakoyoka kolela na biso. Tolingi bomoi ya malamu. Tolingi kimya.’—Alhaji, mbula 14
MALOBA wana ezali komonisa mposa ya bilenge oyo banyokwami na bitumba. Bazali kaka na mposa bázala na bomoi ya malamu. Kasi, ezali mpasi mingi mpo mposa yango ekokisama. Tokomona mokolo mosusu mokili oyo bitumba ezali te?
Banda mwa bambula, bikólo mingi ya mokili ezali kosala milende mpo na koyokanisa bato ya bikólo oyo bazali kobunda bango na bango. Bikólo mosusu etindaki basoda na yango na bikólo wana mpo na kopekisa ete bázongela lisusu bitumba te. Kasi bikólo moke kaka ezali na makoki to mpe na mposa ya kotya kimya na ekólo mosusu epai bato ya mboka moko bazali koyokana te. Mbala mingi, kaka mwa bapɔsɔ to basanza nsima koyokana, bazongelaka lisusu bitumba. Ndenge ebongiseli moko (Institut international de recherches pour la paix de Stockholm [SIPRI]) emonisi yango, “ntango bato oyo bazali kobunda bazali na mposa mpe na makoki ya kokoba kobunda, ezalaka mpasi mingi mpo na kotya kimya.”
Nzokande, ntango baklisto bazali komona bitumba oyo ezali kosila te mpe oyo ezali kokɔtisa mpasi na mikili mingi, esakweli moko ya Biblia ezongelaka bango na makanisi. Mokanda ya Emoniseli elobeli ntango moko mabe oyo moto moko oyo afandi likoló ya mpunda ‘akolongola kimya na mabelé.’ (Emoniseli 6:4) Likambo yango oyo ezali komonisa bitumba oyo ezali kosila te ezali na kati ya elembo oyo emonisi ete tozali na ntango oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.”a (2 Timote 3:1) Kasi, Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso ete soki mikolo ya nsuka eleki, kimya ekolanda.
Na Nzembo 46:9, Biblia eyebisi ete mpo kimya ya solosolo ezala, esengeli bitumba esila, kaka na esika moko te, kasi na mabelé mobimba. Nzembo yango kaka elobi mpe ete Nzambe akobebisa litimbo mpe likonga, bibundeli oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala. Esengeli mpe bibundeli nyonso oyo etondi na mokili lelo oyo ebebisama mpo bato báfanda na kimya.
Kasi, soki totali malamu, tokomona ete ezali koyinana mpe lokoso, kasi mindoki ná masasi te, nde ezali kosala ete bitumba esila te. Ntina mpenza oyo bato bazali kobunda ezali lokoso, mpe mbala mingi koyinana ememaka bitumba. Mpo makambo yango ya mabe esila, esengeli bato bábongola lolenge na bango ya kotalela makambo. Esengeli báteya bango kofanda na kimya. Yango wana mosakoli Yisaya alobaki solo ete bitumba ekosila kaka ntango bato “bakoyekola etumba lisusu te.”—Yisaya 2:4.
Nzokande, lelo oyo bazali kolakisa mikóló mpe bana lokumu ya bitumba, kasi valɛrɛ ya kimya te. Bazali kolakisa ata bana mike koboma.
Bilenge oyo bayekoli koboma
Alhaji atikaki mosala ya soda ntango akómaki na mbula 14. Azalaki na mbula zomi mpamba ntango barebɛlɛ bakangaki ye na makasi mpe balakisaki ye kosalela mondoki AK-47. Nsima ya kokómisa bango basoda na makasi, bazalaki kotinda bango kobɔtɔla bato biloko mpe kotumba bandako. Azalaki koboma bato mpe ata kokata bato binama ya nzoto. Lelo oyo, Alhaji azali na mokakatano mpo na kobosana makambo oyo asalaki ntango azalaki soda mpe komesana na bomoi na ye ya sika. Abraham, elenge mosusu oyo azalaki soda, ayekolaki mpe koboma mpe azalaki kosepela te kotika mosala ya soda. Alobaki boye: “Soki balobi na ngai ete natika mondoki, nayebi te nini nakosala mpe ndenge nini nakozwa eloko ya kolya.”
Tii na moi ya lelo, na mokili mobimba, bana mibali mpe basi koleka 300000 bazali kobunda mpe kokufa na bitumba kati na bato ya ekólo moko oyo bazali kobunda bango na bango. Mokonzi moko ya barebɛlɛ alobaki boye: “Basoda ya bana mike batosaka mitindo; batiká basi te oyo bakoki kokanisaka, bamitungisaka mpo na bandeko na bango te; babangaka mpe te.” Nzokande, bana wana bazali na mposa mpe na lotomo ya kozala na bomoi malamu koleka.
Ezali mpasi kokanisa ete na mikili ya bozwi bakoki kokómisa bana mike basoda. Atako bongo, bilenge mingi na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika bazali koyekola bitumba na bandako na bango. Na ndenge nini?
Tózwa ndakisa ya José na sudi-ɛsti ya Espagne. Elenge yango azalaki koyekola karate mpe judo. Eloko na ye ya valɛrɛ ezalaki mopanga moko ya basamurai, oyo tata na ye apesaki ye likabo na Noele. Alingaki mpe masano ya video mingi, mingimingi masano ya bitumba. Na mokolo ya 1 Aprili 2000, asalaki lokola moto ya makasi oyo azalaki komona na lisano ya video. Abomaki tata na ye, mama na ye mpe ndeko na ye ya mwasi na mopanga kaka oyo tata na ye apesaki ye. Ayebisaki bapolisi boye, “Nazalaki na mposa ya kotikala ngai moko; nazalaki na mposa te ete baboti na ngai bálukaka ngai.”
Na ntina na mabe oyo masano ya mobulu ekoki kobimisa, mokomi Dave Grossman, ye azali mpe mokonzi ya basoda, alobaki boye: “Mawa ekómi mpenza kosila na mitema ya bato; konyokola bato mpe kotala ndenge oyo bazali koyoka mpasi ekómi lisano: bazali kosepela na mobulu na esika báyina yango. Tozali koyekola koboma mpe tokómi kosepela na yango.”
Alhaji ná José bayekolaki koboma. Bazalaki na mposa ya kozala babomi te, kasi makambo oyo bateyaki bango ebebisaki makanisi na bango. Kolakisa makambo ya ndenge wana ezala epai ya bilenge to mikóló etindaka bango na mobulu mpe ememaka bitumba.
Tóyekola kimya, kasi bitumba te
Kimya ya libela ekoki kozala te na ntango bato bazali koyekola koboma. Eleki bambula ebele mpenza, mosakoli Yisaya akomaká boye: “Soki oyokaki malako ya [Nzambe]! mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale.” (Yisaya 48:17, 18) Ntango bato bazwi boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe mpe bayekoli kolinga mibeko ya Nzambe, bakómaka koyina mobulu mpe bitumba. Ata lelo oyo, baboti basengeli kopekisa bana na bango masano oyo ezali kolendisa mobulu. Mikóló mpe bakoki koyekola kolonga elimo ya koyina mpe ya lokoso. Batatoli ya Yehova bamoni bandakisa ebele oyo ezali kondimisa ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kobongola bato.—Baebele 4:12.
Tókamata ndakisa ya Hortêncio. Azalaki naino elenge ntango bakɔtisaki ye na mosala ya soda na makasi. Alobi ete formasyo na mosala ya soda ezalaki mpo na “kolona na mitema na biso mposa ya koboma bato mpe kosilisa biso nsɔmɔ ya koboma.” Abundá etumba oyo eumelaki mpenza na kati ya bato ya ekólo moko ya Afrika oyo bazalaki kobunda bango na bango. Alobi ete: “Etumba yango ebebisaki mpenza makanisi na ngai. Tii lelo oyo nakokaka te kobosana makambo oyo nasalaki. Nayokaka mabe mpenza mpo na makambo oyo batindaki ngai na makasi nasala.”
Ntango moninga moko ya Hortêncio oyo azalaki mpe soda asololaki na ye lisolo ya Biblia, lisolo yango esimbaki mpenza motema na ye. Elaka oyo Nzambe apesi na Nzembo 46:9 ete akosilisa bitumba nyonso esepelisaki ye mpenza. Ntango azalaki kokoba koyekola Biblia, mposa ya kobunda ezalaki kosila. Mwa moke na nsima, balongolaki ye ná baninga na ye mibale na mosala ya soda, mpe bamipesaki mpo na kosalela Yehova Nzambe. Hortêncio alobi boye: “Solo ya Biblia esalisaki ngai nakóma kolinga banguna na ngai. Namonaki ete ntango nazalaki kobunda na etumba, nazalaki nde kosala lisumu na miso ya Yehova, mpo Nzambe alobi ete tosengeli koboma mozalani na biso te. Mpo na komonisa bolingo yango, nasengelaki kobongola ndenge na ngai ya kotalela makambo mpe kotika kotalela bato lokola banguna na ngai.”
Masolo ya bato wana ezali komonisa ete bato oyo bateyi bango makambo ya Biblia bakómaka bato ya kimya. Yango ezali likambo ya kokamwa te. Mosakoli Yisaya alobaki ete mateya ya Nzambe ememaka kimya. Asakolaki boye: “Bana na yo nyonso bakolakisama na Yehova, mpe kimya ya bana na yo ekozala monene.” (Yisaya 54:13, NW) Yisaya asakolaki mpe ntango oyo bato ya bikólo nyonso bakokende na losambo ya pɛto ya Yehova Nzambe mpo na koyekola banzela na ye. Yango ekomema matomba nini? “Bakokómisa mipanga na bango bitimweli mpe makɔnga na bango makwangola. Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobundisa ekólo mosusu, mpe bakoyekola lisusu bitumba te.—Yisaya 2:2-4, NW.
Batatoli ya Yehova bazali kokokisa esakweli yango na ndenge bazali komipesa na mosala ya koteya bato na mokili mobimba mpe yango esalisi ebele ya bato na kolonga elimo ya koyina, oyo ememaka bitumba.
Ndanga ya kimya na mokili mobimba
Nzambe asali ebongiseli ya koteya bato; mpe longola yango, atye guvɛrnema moko to “bokonzi,” oyo ekolonga kotya kimya na mokili mobimba. Kutu, Biblia ebengi Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe aponi ete “Nkolo ya kimya.” Biblia eyebisi biso lisusu ete “kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te.”—Yisaya 9:6, 7.
Nini ezali kondimisa biso ete Klisto akolonga kosilisa bitumba nyonso? Mosakoli Yisaya abakisaki boye: “Mposa ya [Yehova] ya bibele ekosala oyo.” (Yisaya 9:7) Nzambe azali na mokano mpe na makoki ya kotya kimya mpo na libela. Yesu azalaki kondima mpenza ete elaka yango ekokokisama. Yango wana ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano na ye esalema awa na mabelé. (Matai 6:9, 10) Ntango Nzambe akoyanola na libondeli wana, na mabelé mobimba bitumba ekozala lisusu te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka, talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 11, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 7]
Koteya bato Biblia elendisaka kimya ya solosolo