Lisangani ya mangomba ya mokili—Ekolónga?
BAKONZI mingi ya mangomba bayanganaki na ntango ya Lisangani ya mibale ya mangomba ya mokili oyo esalemaki na Chicago, Illinois, na Etats-unis na boumeli ya ebandeli ya eleko ya molungé ya mobu 1993. Lingomba ya Bouddha, boklisto ya lokutá, lingomba Hindou, lingomba ya Bayuda mpe lingomba ya Bamizilmá ezalaki wana. Ata mpe basi oyo bayebi bondɔki mpe basambeli ya nzambe-mama bazalaki wana. Basololaki na ntina na makambo oyo bakoki kosala mpo na kosilisa bitumba. Mokambi ya likita andimaki ete “sikawa kati na matáta minene mibale likoló na misato oyo ezali komonana lingomba ezali na ngambo monene.”
Na mibu nkámá oyo mileki
Lisangani elóngaki? Tótalela oyo esalemaki esili koleka mibu nkámá sikawa, na ntango ya Lisangani ya liboso ya mangomba ya mokili. Esalemaki mpe na Chicago, na boumeli ya ebandeli ya eleko ya molungé ya mobu 1893, mangomba koleka 40 mazalaki wana. Bakambi ya Lisangani ya mangomba ya mokili bandimaki ete baoyo bayanganaki na likita yango na 1893 “bakanisaki ete ekozala ya liboso kati na kolandana ya koyangana mingi mosusu ya mangomba oyo ekopesa nzela na koyoka makanisi ya bato mosusu, na kimya mpe na bokóli. Kasi ezalaki bongo te. Esili koleka mibu nkámá, kozanga koyoka makanisi ya bato mosusu mpe mobulu oyo eutaki na mangomba esanganaki ntango nyonso na bitumba, mpe yango ezali kolanda kosalema kino lelo oyo.” Mpo na nini kozanga kolónga boye? Mpamba te Nzambe andimi bosangisi mangomba te. Ya solo, Biblia elobi ete: “Bokangana na ekanganeli na bokɛsɛnɛ tɛ, esika mɔkɔ na bato bajangi kondima.”—2 Bakolinti 6:14-17.
Na Sɛtɛ́mbɛ 1893, nimero ya zulunalo Zion’s Watch Tower emonisaki malamu ete, Lisangani ya mangomba ya mokili ezali na moboko ata moko te kati na Makomami, wana elobaki na kotyola ete: “Bango [bakundoli na biloko ya kala] bakundolaki barulo kati na bitika ya Babilone mpe na bingumba mosusu ya kala; nzokande ezali na mosusu oyo bakundoli naino te. . . . Bakutaki te oyo elobaki ete Mose mpe Yosua babéngisaki ‘Lisangani ya mangomba,’ ya bato ya Moaba, Amona, mpe Edome . . . Bakutaki te oyo elobaki ete mobangé Samwele, moto na makasi, atindaki ete bakende koluka banganga ya Dagona na Gada mpe na Ekelona mpo na koya na Silo mpe kosala likita elongo na banganga ya Yehova . . . Bakutaki te oyo elobaki ete mobangé Elia, oyo loketo lozingamaki na nkamba ya ekoto, abéngisaki ‘likita’ elongo na banganga ya Baala mpe Moloke na boumeli ya poso mobimba mpo na kolobela makambo oyo matalaki bindimeli na bango, na mokano ya kokólisa limemya kati na bango mpo na oyo etali mangomba na bango.”
Bokonzi na Nzambe—Elikya bobele moko
Lisangani ya mangomba ya mokili ekolónga te. Na ntina na lisangani yango, bazulunalo mpe basangani na yango basalelaki maloba lokola “kokwea,” “mobulu,” mpe “ndako ya bazóba.” Engebene lapólo moko, ata mpe bapolisi basengelaki kokende kuna mbala mibale mpo na kosilisa matáta oyo mabimaki na ntina na kozanga koyokana na makambo ya politiki. Na búku oyo ebimisamaki na 1952, lisangani emonisaki moko na mikano na yango: “Kotya Lisangani moko ya mokili mobimba ya ntango nyonso ya mangomba, oyo ekosala elongo na O.N.U. mpo na kotya kimya mpe koyoka makanisi ya bato mosusu kati na bato.” Na bokeseni, Yesu alobaki ete Bokonzi na ye esangani na mokili oyo te. Biblia emonisi ete Bokonzi na Nzambe nde ezali elikya bobele moko mpo na kosilisa mikakatano ya bato.—Danyele 2:44; Yoane 18:36.