Ntina oyo bato mingi bazali kondima te ete mangomba ekoki kosangisa bato
‘LINGÁ mozalani na yo.’ (Matai 22:39) Mangomba mingi ekumisaka etinda wana ya ntina mingi. Soki mangomba yango eyebaki mpenza koteya bandimi na yango kolinga bazalani na bango, bandimi yango balingaki kozala na boyokani mpe na bomoko. Kasi, ezali yango nde ozali komona na mangomba yango? Mangomba ezali mpenza kosangisa bato? Na ankɛtɛ moko oyo basalaki na Allemagne, batunaki bato motuna oyo: “Mangomba ezali kosangisa bato to ezali nde kokabola bango?” Kaka bato moke (22%) balobaki ete mangomba ezali kosangisa bato, nzokande ebele ya bato mosusu (52%) balobaki ete mangomba ezali kokabola bato. Ekoki kozala ete na mboka na bino bato bazali kokanisa mpe bongo.
Mpo na nini bato mingi bazali kondima te ete mangomba ekoki kosangisa bato? Ntango mosusu ezali mpo bayebi makambo mingi ya mabe oyo mangomba yango esalá. Mbala mingi mangomba ekabolaki nde bato na esika esangisa bango. Kutu, na bantango mosusu bato basalaki makambo ya mabe mpenza na nkombo ya mangomba. Tólobela kaka mwa bandakisa oyo esalemi na mbula 100 oyo euti koleka.
Na nkombo ya Nzambe
Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na mikili ya Balkans, bato ya Croatie, oyo bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike bazalaki kobunda na bato ya Serbie, bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Na ngámbo mokomoko, bazalaki koloba ete bazali bandimi ya Yesu, oyo ateyaki bayekoli na ye ete bálingaka bazalani na bango. Atako bongo, moto moko ya mayele alobaki ete kowelana na bango ezali “moko ya bitumba oyo esopaki makila koleka.” Bato ya mokili mobimba bayokaki nsɔmɔ na komona ndenge bato koleka 500 000, mibali, basi mpe bana, bakufaki na etumba yango.
Na 1947, bato soki milio 400, elingi koloba ndambo ya mitano ya bato ya mokili mobimba bazalaki kofanda na Inde mpe mikili oyo ezali zingazinga na yango; mingi kati na bango bazalaki Bahindu, Bamizilma mpe Ba-Sikh. Ntango Inde ekabwanaki, Pakistan, ekólo ya Bamizilma ebotamaki. Na ntango wana, ebele ya bato oyo bakimaki bamboka na bango mpo na bitumba na ngámbo nyonso mibale bazalaki kotumbama, kobɛtama, konyokolama mpe kobomama na mindoki, kaka mpo na mangomba na bango.
Longola yango, ntango kaka tokɔtaki na bambula ya 2000, likambo ya bateroriste ekómaki makasi. Lelo oyo, na mokili mobimba bato bazali kobanga bateroriste, mpe bateroriste yango bazali koloba ete bazali bato ya lingomba boye to boye. Bato mingi bazali komona te ete mangomba ekoki kosangisa bato. Kutu, yango nde ezali mbala mingi kobimisa mobulu mpe bokabwani. Yango wana, tokoki kokamwa te ete zulunalo moko (FOCUS) oyo ebimaka na Allemagne elobaki ete mangomba ya minene, lokola Lingomba ya Bouddha, mangomba ya boklisto, ya Confucius, ya Hindu, ya Bamizilma, ya Bayuda mpe ya Tao, ezali lokola babɔmbi.
Kozanga boyokani na kati ya lingomba mokomoko
Ntango mangomba ezali kobunda na mangomba mosusu, na mangomba mosusu bandimi bazali koyokana te bango na bango. Na ndakisa, na bambula oyo, mangomba ya boklisto mingi epanzani mpo na kozanga boyokani na mateya. Ezala bakonzi ya mangomba to bandimi, bango nyonso bazali kotuna: Kokanga kobota ezali malamu to mabe? Bongo kolongola zemi? Basi bakoki kokóma bapastɛrɛ? Ndenge nini lingomba esengeli kotalela likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi? Lingomba esengeli kondima bitumba? Na komona bokabwani oyo ezali na kati ya lingomba mokomoko, bato mingi bazali komituna boye: ‘Ndenge nini mangomba ekoki kosangisa bato soki ezali kokoka te kotya bomoko na kati ya bandimi na yango moko?’
Emonani mpenza ete mangomba ekoki kosangisa bato te. Kasi bokabwani yango ezali nde komonana na mangomba nyonso? Ezali nde na lingomba moko oyo ekeseni na mangomba mosusu, lingomba oyo ekoki kosangisa bato?
[Elilingi na lokasa 3]
Bapolisi oyo bazokaki ntango bazalaki kokabola bitumba na kati ya bato ya mangomba na Inde, na 1947
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ya Keystone/Getty Images