Asungamaki na Nzambe oyo akoki kobuka lokuta te
LISOLÓ YA MARY WILLIS
Na 1932, mpasi ya makambo na nkita ya mokili epalanganaki kino na bamboka mike ya Australie ya Wɛ́sti. Na mobu yango, wana nazalaki bobele na mibu 19, ngai mpe Ellen Davies totindamaki mpo na kosakola na esika oyo ezalaki na etando ya bakilomɛtɛlɛ 100 000. Tobandaki na engumba moko moke ya Wiluna, soko bakilomɛtɛlɛ 950 na nɔ́rdi-ɛ́sti longwa na esika tozalaki kofanda na Perth, mboka-monene ya Australie ya Wɛ́sti.
EZALAKI biso kokende kuna, ngai mpe Ellen tozalaki na wagó moko ya nsuka elongo na mokɛngɛli ya engbunduka, mobali moko ya boninga mingi. Lokola engbunduka ezalaki kotɛlɛma na esika nyonso oyo esengelaki, mokɛngɛli wana ya boboto mingi azalaki koyebisa biso ntango boni tosengelaki kolekisa. Yango ezalaki kopesa biso nzela ya kokita mpe kopesa litatoli epai na bato ya bolingo kati na bamboka mingi oyo ezalaki pembeni na nzela ya engbunduka. Na nsuka, tokómaki na mboka makɛ́lɛ (ville minière) ya Wiluna, kati na mopepe makasi ya mputulu mingi.
Nzokande, esika engbunduka ezalaki kotɛlɛma na Wiluna ezalaki na ntaká ya bakilomɛtɛlɛ 3 mpo na kokóma na kati ya mboka. Moko te kati na biso azalaki na makasi mingi, mpe tozalaki na bakartɔ misato ya kilo mingi ya mikanda mpe valisi mibale. Tosengelaki kosala nini? Tokakisaki kartɔ moko na nzeté mpe moto na moto azalaki na nsuka ya nzeté. Na bongo, tomemaki bakartɔ, moko na moko. Esɛngaki mibembo nsambo mpo na kozwa bakartɔ misato mpe valisi na biso na ntaká ya bakilomɛtɛlɛ 3 mpo na komema kati ya mboka. Tozalaki kopema mbala mingi mpo ete mabɔ́kɔ na biso mazalaki koswa.
Atako mputulu, mabɔ́kɔ oyo mazalaki koswa, mpe makolo oyo malɛmbaki, tosepelaki na mokumba kitoko mpe na likambo wana lizelaki kozela biso. Biso banso tososolaki ete Yehova azalaki elongo na biso, ete azalaki kosunga biso mpo na kolónga mokakatano wana mpo na kosakola na bisika bitangwi mosika. Mosika te, tomonaki mapamboli na ye likoló na mosala na biso, oyo eleki mpenza, milende na biso na mobembo wana esalaki ete elenge moko na nkombo Bob Horn, áyamba solo Biblia. Tozali na esengo ete Bob alekisaki mibu mingi na mosala ya Betele, mpe ete alandaki kosalela Yehova na bosembo nyonso koleka mibu 50 kino liwa na ye na 1982.
Longwa na Wiluna, tozalaki kosala na bamboka mike na boumeli ya mobembo na biso oyo ezalaki koleka bakilomɛtɛlɛ 725 mpo na kokende na mboka Geraldton pembeni ya mai monene. Kolongwa kuna, tozongaki na engumba Perth. Butu mosusu, tozalaki kolala libándá na esika bakozelaka engbunduka mpe mbala mosusu na mwa ndako ya matiti oyo ezalaki pene na nzela ya engbunduka.
Tozalaki ntango nyonso komema elamba ya mafúku (taie d’oreiller) oyo tozalaki kotondisa bisikiti oyo tozalaki kosala na ndako. Wana ezalaki bilei na biso ya ntina mpo na eteni ya liboso ya mobembo na biso. Na nsima, tozalaki kozwa bilei na biso na kosukoláká mpe na kopɛtoláká bandako ya bato mpe bandako bakokabwelaka bato biloko. Bantango mosusu, tosengelaki kosala na molungé ya moi mpo na kopona ndunda ndenge na ndenge. Makabo ya bato oyo bandimaki mikanda mikolimbolaka Biblia ezalaki kosalisa biso mpo na kosomba biloko.
Likambo oyo lilendisaki ngai mpo na kotikala sembo epai na Yehova mpe kolónga na esengo nyonso ebele ya mikakatano na mikolo wana, ezalaki ndakisa mpe mateya ya ebandeli oyo nazwaki epai na mama na ngai.
Libula ya boklisto
Mama na ngai azalaki na kondima makasi epai na Mozalisi, mpe soki namikundoli makambo na kala mpenza, azalaki koloba na ntina na Ye epai na biso, bana na ye. Nzokande, kondima na ye emekamaki makasi na liwa ya ndeko na biso mobali ya mibu zomi na nsambo, na likámá moko monene na eteyelo. Kasi, na esika ya kopamela Nzambe, mama abandaki boyekoli mozindo ya Biblia. Alingaki koyeba, soki likoki ezalaki, ntina ya makámá motindo wana. Bolukiluki na ye mpo na solo ya Biblia ezwaki mbano, mpe azwaki batisimo na mai na ebandeli ya bambula 1920, mpo na komonisa elembo ya komipesa na ye epai na Yehova, Nzambe ya solo.
Kobanda wana, masoló masalemaki mbala na mbala elongo na biso na ntina na bosolo ya bilaká ya Nzambe. Azalaki kokebisa biso ntango nyonso na kosimba ete likambo moko te likozanga kokokana, ‘Nzambe akoki kobuka lokuta te.’ (Tito 1:2) Na yango, ngai mpe leki na ngai ya mwasi mpe bandeko na biso mibale ya mibali, elongo na mabota na biso mpe bankɔ́kɔ na biso, banso tozali lelo bakumisi ya Yehova Nzambe. Bana mibali mibale ya ndeko na ngai ya mwasi, Alan mpe Paul Mason, bazali lelo kosala lokola bakɛngɛli-batamboli.
Mposa ya ebandeli mpo na kopalanganisa nsango malamu
Nazalaki kotánga kelasi malamu te mpe natikaki kelasi na 1926, wana nazalaki na mibu 13. Atako bongo, nakólisaki mposa makasi ya koyebisa makambo oyo nayekolaki na ntina na Biblia epai na bato mosusu. Tata akanisaki ete nazalaki na makoki te mpo na kosalisa bato mosusu, Mama alobaki ete: “Akoki ata koyebisa kobɛlɛma ya etumba ya Armagedon epai na bato, mpe ete basɔkɛmi bakosangola mabelé, yango ekolóngisa Bokonzi ya Nzambe.” Bongo, nabandaki kokende kati na mosala ya kosakola ndako na ndako na bambula ya bolenge na ngai, atako nazwaki naino batisimo te kino na 1930. Mosika te nsima ya batisimo na ngai, nabandaki mosala ya kopalanganisa nsango malamu na ntango nyonso kati na etúká ya Perth.
Na mbula oyo elandaki, na 1931, tobandaki kosalela nkombo na biso ya sika “Batatoli ya Yehova.” Kasi, bato mingi batɛmɛlaki lolenge oyo tosalelaki nkombo wana ya bulee ya Nzambe mpe bazalaki koyanola na maloba makasimakasi. Nzokande, nalandaki mosala atako bato bazalaki kosepela te. Natyaki motema ete Nzambe abuki lokuta te wana apesi elaká ete basaleli na ye bakoki ‘kotya motema na nguya euti na ye.’—1 Petelo 4:11; Bafilipi 4:13.
“Ebele monene” emonisami
Na 1935, natindamaki na ngámbo mosusu ya mokili monene ya Australie. Bongo, na bambula oyo elandaki, nakómaki mobongisi-nzela na etúká ya Nouvelle-Angleterre, na ekólo ya Nouvelle-Galles ya Súdi, soko bakilomɛtɛlɛ 4 000 longwa na esika nazalaki kofanda liboso na Perth.
Kino na ntango wana, nazalaki kolya limpa mpe komela vinyo motane na Ekaniseli ya liwa ya Yesu na mbula na mbula. Atako yango ezalaki likambo malamu ya kosala, mingi mpenza mpo na basaleli ya ntango nyonso, nandimisamaki soko moke te ete nazalaki na elikya ya kokende likoló. Bongo, na 1935, emonisamaki polele epai na biso ete wana ezalaki ntango ya koyanganisa ebele monene oyo ezali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Mingi kati na biso tozalaki na esengo ya kososola ete tozalaki kati na ebele monene, mpe totikaki kolya limpa mpe komela vinyo. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9) Solo ya Biblia ezalaki kongɛnga mokemoke kino pole makasi, lokola Yehova alakaki yango.—Masese 4:18.
Myango ya sika na mosala ya kosakola
Na katikati ya bambula 1930, tobandaki kosalela bafonó kati na mosala na biso. Bongo, nkinga na biso ya makasi etyamaki esika ya komema biloko na liboso mpe nsima, bobele te mpo na bafonó ya kilo, kasi na radio-kasɛti mpe basakosi ya mikanda lokola. Nasengelaki kokeba wana nkinga na ngai ezalaki na kilo mingi, mpamba te soki ekwei, nazalaki na makasi te ya kotombola yango!
Na ntango wana, tobandaki mpe kosala oyo ebéngamaki koyebisa nsango na kotambola na etuluku kati na balabala. Wana tozalaki kotambola na babalabala minene ya mboka, tozalaki kolata bilamba oyo bizalaki na makomi, to bitánda na bilembo, oyo ezalaki na mayebisi. Namonaki ete mosala yango ezali momekamo monene mpo na kondima, mingi mpenza na ntango nakangamaki mpe nalekisaki butu mobimba na mwa bolɔ́kɔ moke na mboka Lismore. Ezalaki nsɔni mingi na komemama kati na tribinalo na mokolo ya nsuka kozanga ata kopesa nzela ete násanola nsuki na ngai! Kasi na mbala oyo lisusu, Yehova asungaki ngai lokola ye alakaki yango. Likambo yango lisundolamaki mpamba te nakangamaki bobele mpo ete elamba na ngai ezalaki na makomi oyo mazalaki mabe mpo na lingomba na ye.
Bozongi na Wɛ́sti
Na ebandeli ya bambula 1940, mosala na ngai ya kosakola lokola mobongisi-nzela mozongisaki ngai na bamboka ya Wɛ́sti ya Australie. Kuna, nalandaki kolekisa bantango malamu mpe kozwa mapamboli kati na elimo. Ntango natindamaki na mboka Northam, nakutanaki na mwanamosala moko ya mwasi, Flo Timmins, soko na ntaká ya bakilomɛtɛlɛ 11 longwa na mboka wana. Andimaki búku Réconciliation, mpe mosika te, akómaki Motatoli amipesi na Yehova Nzambe. Azali naino na molende kati na mosala ya Bokonzi, mpe mwana na ye ya mwasi, oyo azalaki bobele na mibu minei na ntango wana, asalaki bokóli kino kokóma mosaleli mobongisi-nzela monene.
Kasi ezalaki mpe na makambo mosusu ya kitoko mingi. Mokolo mosusu, ngai mpe moninga tozalaki kokatisa gbagba moko na Northam na motuka na biso mobendamaki na mpunda, wana mpunda ebandaki kopota na lombango mingi likoló na mai ya ebale Avon, oyo mazalaki koningana mingi. Soko nsima ya kilomɛtɛlɛ moko, mpunda etambolaki malɛmbɛ.
Libala mpe libota
Na 1950, nabalanaki na Arthur Willis, oyo azalaki mpe mobongisi-nzela na boumeli ya bambula mingi. Tofandaki na Pingelly, mboka moko na Wɛ́sti ya Australie, epai kuna tobotaki mwana moko ya mobali, Benetley, mpe mwana mwasi, Eunice. Wana bana bakómaki pene mpo na kosilisa kelasi, Arthur azwaki ekateli ya kosɛnga lisusu mosala ya mobongisi-nzela. Ndakisa malamu ya tata na bango elendisaki bana na biso mibale na kobanda mosala ya mobongisi-nzela monene nsima ya kosilisa kelasi.
Mbala na mbala, Arthur azalaki komema bana na bitúká mosika mpo na kosakola. Na ntango mosusu, azalaki kokende na bango poso moko to koleka, kolala na hema na butu nyonso. Na ntango oyo bazalaki te, nazalaki na ndako mpo na kokokisa misala ya libota, kopesáká nzela ete bango misato básala lokola babongisi-nzela.
Mosala kati na bankolo mboka
Na ntɔ́ngɔ́ moko, nsima wana libota liutaki na moko na mibembo na bango na bamboka mike, toyambaki moto moko oyo ayaki kotala biso na pwasa. Moto yango azalaki moko na bankolo mboka, oyo alobaki ete: “Nasengeli kosala nini mpo na kozonga?” Liboso, tokangaki ntina te. Na nsima, Arthur ayaki koyeba ete azalaki mobali moko oyo abimisamaki na lisangá ya boklisto uta bambula mingi mpenza mpo na kolangwa masanga mpe mpo na banyongo.
Arthur alimbolaki makambo oyo asengelaki kosala mpo na kozonga na ebongiseli ya pɛto ya Yehova. Akendaki kozanga koloba makambo mingi, mpe biso banso tozalaki komituna mpo na oyo asengelaki kosala. Banso tokamwaki na oyo esalemaki bobele na mwa basanza na nsima. Mbongwana oyo mobali yango asalaki ezali ya kokamwa mingi! Atikaki te bobele ezaleli na ye ya kolangwa masanga, kasi akendaki kotala bato ya etúká wana, kokundweláká bango banyongo na ye, mpe afutaki yango! Lelo oyo, azali lisusu ndeko kati na kondima, mpe asálaka mosala ya mobongisi-nzela mbala na mbala.
Ebele na bankolo mboka wana bazalaki kofanda na etúká Pingelly, mpe tozali kosepela mingi na mosala tokokisaki, na kosalisáká bato ya komikitisa ete báyekola mpe bándima solo ya Liloba ya Nzambe. Kondima na ngai ekómaki makasi na kosalisa ebele ya bankolo mboka Australie mpo na koyekola solo.
Lisangá lisalemaki na engumba Pingelly, mpe na ebandeli, mingi kati na basangani na yango bazalaki bankolo mboka. Tolakisaki mingi kati na bango na kotánga mpe kokoma; yango ezalaki mokakatano monene mpo na bango na mibu ya yambo, kasi mokemoke, bafandi ya mboka wana babandaki komemya Batatoli oyo bazalaki bankolo mboka mpo na bomoi na bango ya pɛto mpe mpo ete bazalaki banamboka oyo babongaki na kotyela motema.
Lisungi ya solo liuti na Yehova
Mobali na ngai, Arthur, oyo asalelaki Nzambe na bosembo nyonso uta mibu 57, akufaki na ebandeli ya mobu 1986. Bazalaki komemya ye mpenza na bato ya mombongo ya engumba Pingelly mpe na bato nyonso ya etúká. Na mbala oyo lisusu, Yehova asungaki ngai, na kopesáká ngai makasi na kolónga likambo oyo libimelaki ngai pwasa.
Bentley, mwana na ngai ya mobali, azali nkulutu na nɔ́rdi ya Australie ya Wɛ́sti, epai ye mpe Lorna, mwasi na ye, bazali kobɔ́kɔla libota na bango kati na solo. Liziba mosusu ya esengo monene mpo na ngai ezali ete, Eunice, mwana na ngai ya mwasi, azali kokóba mosala ya ntango nyonso kino lelo oyo. Ye mpe Jeff, mobali na ye, bazali babongisi-nzela. Nafandi elongo na bango sikawa mpe nazali kozwa mapamboli na kozaláká mobongisi-nzela mosungi mpo na libela.
Koleka mibu 60, namonaki kokokisama ya elaká ya bolingo oyo Yehova apesaki mpo na kolendisa basaleli na ye mpe kosalisa bango ete bálónga makambo nyonso bakoki kokutana na yango. Azali kokokisa bamposa na biso nyonso soki tozali kobɛta ntembe te na ntina na ye mpe soki tozali komonisa botɔ́ndi mpo na oyo azali kosalela biso. Kondima na ngai elendisamaki wana naokaki ete lobɔ́kɔ ya Nzambe ezali kosala mosala, mpe namonaki lolenge nini apesaki mapamboli na ye koleka oyo tokokaki kokanisa. (Malaki 3:10) Ya solo, Nzambe akoki kobuka lokuta te!
[Elilingi na lokasa 27]
Mary Willis na 1933
[Bililingi na lokasa 29]
Mary mpe Arthur, eleki mwa bambula