Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/6 nk. 5-7
  • Bazalaki koluka lingomba ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazalaki koluka lingomba ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini basusu bazali mpenza na ntembe
  • Ayekolaki solo na ntina na bakufi
  • Bazwaki bomoi oyo ezali na ntina
  • Mobongisi-nzela ya mpiko
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • “Esengo na moto oyo azwi mayele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge oyo bato mosusu bazwaki biyano na mituna na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bampate na Yesu bakoyokaka mongongo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/6 nk. 5-7

Bazalaki koluka lingomba ya solo

UTA bomwana, bato mosusu bazali koluka biyano na mituna na bango na ntina na bomoi. Na bolenge na bango, ekoki kozala ete bazalaki kokende na ndakonzambe. Kasi mingi kati na bango bamonaki ete biyano na mituna na bango bizwamaki te to milulu ya lingomba misalisaki bango te na kolónga mikakatano ya bomoi na bango.

Bakoki mbala mosusu koloba ete bazali naino kati na lingomba ya baboti na bango, atako bakendeke na ndakonzambe bobele mbala moko moko. Engebene epískɔ́pɔ moko ya Lingomba ya Angleterre, kondima na bango ezali bobele moke mpenza. Basili kotya lingomba na bango pembeni. Basusu, oyo balɛmbi na bokosi oyo bazali komona epai na basangani ya mangomba, basili mpenza kotika lingomba. Nzokande, mituna na bango na ntina na bomoi mizali naino.

Mpo na nini basusu bazali mpenza na ntembe

Ntalo monene ya bato bayebi ete mangomba mazali na masangá oyo makosalisaka bato bazangi ndako, oyo makokabolaka bilei mpo na babólá mpe oyo mabongisaka masano. Kasi pene na mokolo nyonso bayokaka mpe nsango ya mobulu mpe kosopama ya makila oyo eutelo na yango ezali te, bobele mangomba oyo mazali ya boklisto te, kasi lisusu ata oyo ezali komitánga ete ezali ya boklisto. Tosengeli bongo kokamwa soki bato yango bazali kobɛta ntembe ete bituluku oyo bizali kosangana na mobulu yango bizali kolanda losambo ya solo te?

Mingi oyo bamipesaki kala na mangomba bazalaki kokanisa ete bibokwelo ya bitiké oyo bibongisami na mangomba bizali likambo kitoko mpenza. Nzokande, na bambula oyo euti koleka, babulunganaki na koyoka ete na bisika bikeseni bafundaki basángó mpo na likambo ya kobebisa bana oyo batyamaki na nsé ya libateli na bango. Na ebandeli bato bakanisaki ete bobele mwa basángó nde basengelaki kopamelama. Sikawa basusu kati na bango bazali komituna soki ezali te lingomba yango moko nde lizali mabe.

Mwa ndambo na bato, lokola Eugenia, kala bamipesaki mingi na lingomba na bango. Wana azalaki elenge, na mboka Argentine, azalaki kati na baoyo basalaki mobembo mpo na kosambela Ngɔndɔ ya Itatí. Na boumeli ya mibu 14 azalaki mamɛ́lɔ kati na efandelo moko ya bamamɛ́lɔ. Na nsima alongwaki kuna mpo na kosangana na etuluku ya bato ya lingomba oyo bamipesi na makambo ya politiki, baoyo bazali kolendisa mbongwana monene ya nokinoki kati na ezalela ya bato mpe ya nkita na nzela ya botomboki. Na ntina na makambo oyo amonaki mpe oyo akutanaki na yango, abungisaki kondima mpe elikya epai na Nzambe. Azalaki mpenza koluka te lingomba oyo akokaki kondimela yango. Mokano mpenza na ye mozalaki bobele ya koluka mwango ya komema bosembo mpo na baoyo bazalaki babólá​—ee, mpe kozala na moninga oyo akokaki kotyela ye motema.

Basusu bazali komona lolenge makambo mazali kosalema kati na mangomba mpe bazali komitangola mosika na yango. Moto moko oyo andimaka Nzambe te, oyo likanisi na ye libimisamaki na 1991 kati na zulunalo Sputnik alobaki polele ete: “Nazali komona bokeseni moko te kati na bizaleli ya bapakano mpe masapo ya boklisto.” Lokola ndakisa, alobelaki nkémbí moko oyo kati na yango basángó balati sutani ekembisami na wolo bazalaki komema malembemalembe na balabála ya Moscou sanduku ya ebembe oyo ezalaki na ebembe moko ekausami na nkísi. Ezalaki nzoto ya “mosantu moko moklisto ya Lingomba ya Orthodoxe” oyo bazalaki kolongola yango na ndako epai babombaka biloko ya kala mpo na komema yango na ndakonzambe, mpe ekundwelaki mokomi yango banganga mpe bibembe bikaokisami na nkísi na Ezipito ya kala. Amikundolaki lisusu ete, wana baoyo bazalaki kosala nkémbí na Moscou bazalaki kondima Bosato,” Baezipito ya kala basambelaki mpe banzambe ya bosato​—Osiris, Isis, mpe Horus.

Mokomi bobele moko wana alobelaki mpe liteya ya bolingo ya boklisto​—“Nzambe azali bolingo,” mpe “olinga mozalani na yo”​—oyo ezali na bokokani moko te na Ezipito ya bopakano. Kasi amonisaki ete: “Bolingo mpo na bandeko elóngi te kati na mokili, ata mpe kati na eteni oyo ezali komibénga ete mikili ya boklisto.” Mpe amonisaki yango na kolobeláká mbuma mabe oyo ezali kobima na bokɔti ya mangomba kati na makambo ya Leta. Makambo oyo amonaki malendisaki ye te na kondima ete mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mazali kopesa eloko oyo ye azalaki koluka.

Na kokesena, basusu bazwaki biyano ya kosepelisa, kasi kati na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba te.

Ayekolaki solo na ntina na bakufi

Magdalena, oyo azali sikawa na mibu 37, azali kofanda na mboka Bulgarie. Nsima na kufa ya tata ya mobali na ye na 1991, abulunganaki mingi mpenza. Mbala na mbala azalaki komituna, ‘Bakufi bakendeke wapi? Bokilo na ngai akei wapi?’ Azalaki kokende na ndakonzambe, mpe azalaki kondela liboso ya ekeko na ndako na ye, kasi azwaki eyano te.

Bongo mokolo mosusu moninga moko ya pembeni abéngaki ye na telefone ete akende na ndako na ye. Elenge mobali moko oyo azalaki koyekola elongo na Batatoli ya Yehova ayaki kotala moninga yango. Magdalena azalaki koyoka wana elenge mobali yango azalaki koloba na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe mokano na Ye ya kobongola mabelé paladiso epai bato bakozala na bomoi ya seko kati na esengo. Búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis ezalaki likoló na mesa. Na lisalisi na yango, elenge mobali yango abendaki likebi likoló na mokapo ya Mosakoli 9:5, oyo elobi ete: “Nde bakufi bayebi [eloko] tɛ.” Na mpokwa wana Magdalena atángaki mingi mpenza. Ayekolaki ete bakufi bazalaka na bomoi epai mosusu te, ezala na likoló to na lifelo; bayebi eloko moko te, lokola nde balali mpongi makasi. Andimaki na esengo nyonso libyangi ya koyangana na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na mboka wana. Nsima na makita andimaki boyekoli ya Biblia ya poso na poso. Lokola atyaki likebi na lolenge oyo mabondeli mazalaki kopesama na makita epai na Yehova, ye mpe abandaki kobondela Yehova mpo na kozwa lisalisi ya kolónga bolembu moko oyo esilaki kokɔtela ye makasi. Ntango mabondeli na ye mazwaki eyano, ayebaki ete asili kozwa losambo ya solo.

Bazwaki bomoi oyo ezali na ntina

André akólaki na libota moko oyo ezalaki mpenza ya Katolike na Belgique mpe asalaki lokola mosungi ya sángó ya mboka na bango. Nzokande, na boumeli ya ntango wana, amonaki makambo mingi oyo malongolaki limemya na ye nyonso mpo na lingomba. Atikalaki bobele Mokatolike ya nkombo mpamba.

Na boumeli ya mibu 15 azalaki mobɛti monene ya ndembo. Na libaku moko ntango ekípi na bango ekendeki kobɛta na masano mabongisamaki na Italie, babyangamaki mpo na kokutana na pápa. Likambo moko ya kolendisa na elimo lizalaki te na bokutani yango, mpe bozwi ya mosuni oyo bozalaki na ndako ya pápa bobulunganisaki André. Ntembe na ye na ntina na lingomba ebakisamaki. Bomoi na ye moko bozalaki kopesa ye esengo te mpo ete asilaki koboma libala mbala mibale. Ezalela ya mokili ezalaki kobangisa ye. Na 1989 akomaki na manáka na ye ete: ‘Ndimbola ya makambo nyonso ya bolɛma oyo mazingi biso ezali nini?’ Azwaki eyano moko te kati na lingomba na ye.

Na 1990, ntango André azalaki kosala lokola molakisi na babɛ́ti ndembo ya mboka Islande, misionere moko ya Batatoli ya Yehova, na nkombo ya Iiris, akutanaki na ye. Azwaki mikanda mpe asɛngaki na misionere ete azongela ye lisusu. Misionere ayaki elongo na mobali na ye, Kjell. Wana bazwaki libaku ya kofanda mpe kosolola elongo na André, emonanaki polele ete azalaki na mposa mozindo ya koyekola Biblia. Mwasi na ye, Ásta, azalaki mpe na mposa motindo moko. Na katikati ya mokolo, azalaki na bangonga misato ya bopemi oyo ekaboli bileko na ye ya kolakisa masano, mpe bazwaki ekateli ya kosalela ntango wana mpo na koyekola Biblia. Alobaki ete: “Nayokaki ete nazalaki kozwa makasi mingi na boyekoli ya Biblia koleka kofanda bobele mpo na kopema.” Mokemoke Biblia epesaki biyano na mituna na bango. Mokemoke kondima na bango epai na Yehova mpe epai na Bokonzi na ye ekólaki. Bilaká kitoko ya Biblia na ntina na mokili ya sika ya kimya, mokili oyo mozangi “makambo nyonso ya bolɛma oyo mazingi biso” ekómaki likambo ya solo. Sikawa André mpe Ásta bazali bango nyonso mibale koyebisa kondima na bango ya sika epai na basusu.

Magdalena, André, mpe Ásta bandimisami solo ete basili kozwa lingomba ya solo. Eugenia mpe, nsima na komeka kosilisa mikakatano ya mokili na nzela ya politiki, ayaki kozwa lingomba ya solo epai na Batatoli ya Yehova. Kasi nini ezali mpenza komonisa ete lingomba boye lizali oyo ya solo?

[Elilingi na lokasa 7]

Boyekoli ya Biblia poso na poso elongo na Batatoli ya Yehova ezali kosalisa bato koleka milió mitano oyo bazali koluka biyano bibongi na mituna na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto