Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/6 nk. 13-18
  • Koyeba lingomba ya solo eyeisaka mikumba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba lingomba ya solo eyeisaka mikumba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini oyanolaka na Liloba ya Nzambe?
  • Komipesa na yo epai ya Yehova ezali ya mobimba?
  • Lolenge nini bolingo ya Klisto ezali kosala bopusi likolo na yo?
  • Bakabwani na mokili​—Kino na meko nini?
  • Na meko nini bolingo na yo ezali mpenza mozindo?
  • Kotatola mpo na Bokonzi​—ezali na ntina nini mpo na yo?
  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/6 nk. 13-18

Koyeba lingomba ya solo eyeisaka mikumba

“Esɛngɔ eleki na bango bayoki Liloba na Njambe mpe batosi yango!”​—LUKA 11:28.

1. Wana bamoni lingomba ya solo, bato ya lolenge nini bazali kotónga bomoi na bango likoló na yango?

EKOKI te bobele koyeba lingomba ya solo. Soki tolingaka bosembo mpe solo, wana tomoni lingomba ya solo, tokotonga bomoi na biso likoló na yango. Losambo ya solo ezali te filozofi ya makanisi mpamba; ezali lolenge ya bomoi.​—Nzembo 119:105; Yisaya 2:3; kokanisá na Misala 9:2.

2, 3. (a) Lolenge nini Yesu amonisaki ntina ya kosala mokano ya Nzambe? (b) Mokumba nini mozali likoló na moto nyonso oyo ayebi lingomba ya solo?

2 Yesu Klisto amonisaki ntina ya kosala makambo oyo Nzambe asili komonisa yango ete ezali mokano na Ye. Ntango asukisaki lisukúlu oyo eyebani ete Lisoló likoló na Ngomba, Yesu amonisaki ete, baoyo nyonso bazali kobénga ye Nkolo (to baoyo bazali komitánga baklisto) bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te, kasi bobele baoyo bazali kosala mokano ya Tata na ye. Alobaki ete, basusu bakoboyama lokola “batyoli na mibeko.” Mpo na nini Yesu asalelaki liloba kotyola mibeko? Mpamba te lokola Biblia elobi yango, kozanga kosala mokano ya Nzambe ezali lisumu, mpe lisumu nyonso lizali kotyola mibeko. (Matai 7:21-23; 1 Yoane 3:4; kokanisá na Baloma 10:2, 3.) Moto moko akoki koyeba lingomba ya solo, akoki kokumisa baoyo bazali koteya yango, mpe akoki koloba malamu na ntina na baoyo bazali kolanda yango, kasi ye moko mpe azali na mokumba ya kosalela yango kati na bomoi na ye. (Yakobo 4:17) Soki andimi mokumba yango, akomona ete bomoi na ye ekómi na ntina mingi, mpe akozala na esengo oyo, na motindo mosusu mbɛlɛ azwi yango te.

3 Kati na lisoló ya liboso, totalelaki bilembo motoba mpo na koyeba lingomba ya solo. Moko na moko na yango ezali kosalisa biso bobele te na koyeba lingomba ya solo, kasi ezali lisusu kotya liboso na biso ntembe oyo tosengeli kolónga yango mpe mabaku kitoko. Na lolenge nini?

Lolenge nini oyanolaka na Liloba ya Nzambe?

4. (a) Wana bato ya sika babandi kosangana elongo na Batatoli ya Yehova, nokinoki bamonaka nini na lolenge oyo Batatoli ya Yehova basalelaka Biblia? (b) Lolenge nini likambo ya koleisama malamu na elimo ezali kosala bopusi likoló na basaleli ya Yehova?

4 Ntango Batatoli ya Yehova bayekolaka Biblia elongo na bato oyo bazali komonisa bosepeli uta kala mingi te, mingi na bato wana ya sika basosolaka nokinoki ete oyo bazali koteya bango ezali kouta na Biblia. Mpo na koyanola na mituna na bango, basalelaka mateya ya mangomba te, to mateya ya bonkɔ́kɔ te, to mpe makanisi ya bato minene te. Bobele Liloba ya Nzambe nde bazali kosalela. Ntango bakendaka na Ndako ya Bokonzi, bamonaka lisusu ete ata kuna Biblia nde ezali búku oyo esalelami mpo na koteya. Esengeli ntango molai te mpo na baoyo bazali koluka solo na bosembo nyonso mpo na kososola ete ntina monene ya esengo oyo bazali komona epai na Batatoli ya Yehova ezali mpo ete baleisami malamu na Liloba ya Nzambe.​—Yisaya 65:13, 14.

5. (a) Ntembe nini etyami liboso na baoyo bazali komona Batatoli ya Yehova? (b) Lolenge nini bakoki kosangana na esengo ya Batatoli?

5 Soki yo mpe osili komona likambo yango, bopusi nini yango esengeli kosala likoló na yo? Soki okangi ntina na yango, okosuka te bobele na kotala na miso mpamba, mpe okosepela te ete otikala bobele bongo. Biblia ezali komonisa ete baoyo bazali “bayoki mpamba” kasi “batosi na liloba” te bazali ‘komizimbisa bango mpenza.’ (Yakobo 1:22) Bazali solo komizimbisa mpo bandimi te ete soki bazangi kotosa Nzambe, yango elimboli ete bazali na bolingo mpo na ye te, atako nini oyo bakoki koloba. Kondima oyo ezali na misala te ezali kondima oyo esili kokufa. (Yakobo 2:18-26; 1 Yoane 5:3) Na kokesena, ye oyo apusami na bolingo mpo na Yehova na “kosala misala” akozala “na esɛngɔ kati na misala na ye.” Ee, lokola Yesu Klisto alimbolaki yango, “esɛngɔ eleki na bango bayoki Liloba na Njambe mpe batosi yango!”​—Yakobo 1:25; Luka 11:28; Yoane 13:17.

6. Soki tozali solo kopesa motuya na Liloba ya Nzambe, mabaku kitoko nini tokosala makasi ete tósimba yango?

6 Esengo wana ekoleka mozindo na meko oyo ozali kokóla na boyebi ya mokano ya Nzambe mpe ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola. Milende nini okosala mpo na koyekola Liloba ya Nzambe? Bankóto mingi ya bato oyo bazalaki baínga basili kosala makasi mpo na koyekola kotánga, basalaki yango mingimingi mpo bakoka kotánga Makomami mpe kolakisa yango na bato mosusu. Basusu bazali kolamuka ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo ete bakoka kolekisa mwa ntango mokolo nyonso na kotánga Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia, lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Wana ozali kolanda malamu botángi na yo ya Biblia to ozali koluka mikapo oyo mipesami kati na mokanda mosusu ya boyekoli, tyá likebi mpenza na malako mpe mitindá ya Yehova, mpe luká kokanga ntina ya mitindá mingi oyo mizali wana mpo na kotambwisa biso. Manyolá oyo eteni mokomoko ezali komonisa na ntina na Nzambe, na ntina na mokano na ye, mpe na ntina na boyokani na ye elongo na bato. Tiká ete yango ebongisa motema na yo. Talelá soki ezali na makambo oyo okoki kosalela malamu mpenza batoli ya Biblia kati na bomoi na yo.​—Nzembo 1:1, 2; 19:7-11; 1 Batesaloniki 4:1.

Komipesa na yo epai ya Yehova ezali ya mobimba?

7. (a) Lolenge nini liteya ya Bosato ezali na bopusi likoló na milende oyo bato bazali kosala mpo na kosambela Nzambe? (b) Nini ekoki kokóma wana moto moko ayekoli solo na ntina na Yehova?

7 Mpo na bamilió na bato, ezalaki libondisi na koyeba ete Nzambe ya solo azali Bosato te. Ndimbola oyo ete “yango ezali libombami” ekokisaki mposa na bango soko moke te. Lolenge nini bakokaki kobɛlɛma na Nzambe oyo bakokaki kososola eloko moko te na ntina na ye? Lokola mbuma mabe ya liteya wana, bapusamaki na kobosana Tata (oyo bayokaki nkombo na ye ata mbala moko te kati na ndakonzambe) mpe na kosambela Yesu lokola Nzambe to na kopesa losambo na bango epai na Malia (oyo bateyaki bango ete azali “Mama wa Nzambe”). Kasi mitema na bango mizali kotonda na esengo wana Motatoli moko ya Yehova afungoli Biblia mpe amonisi bango nkombo mpenza ya Nzambe, Yehova. (Nzembo 83:18) Mwasi moko ya mboka Venézuela atondaki na esengo ete ayambaki mpenza elenge mwasi Motatoli oyo ayebisaki ye solo, mpe andimaki koyekola Biblia elongo na ye na ndako. Ntango bato yango bazali koyekola ete Yesu alobaki na ntina na Tata na ye ete “Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino” mpe ete Yesu abéngaki Tata na ye “Nzambe bobele moko ya solo,” bazali koyeba ete oyo Biblia ezali koteya na ntina na Nzambe eleki mpasi te mpo na kososola yango. (Yoane 17:3; 20:17) Wana bayebi bizaleli ya Yehova, bazali komiyoka penepene na ye, bazali kobondela ye, mpe balingi kosepelisa ye. Yango ezali kopesa matomba nini?

8. (a) Na ntina na bolingo na bango mpo na Yehova mpe na mposa na bango ya kosepelisa ye, bamilió ya bato basili kosala nini? (b) Mpo na nini batisimo ya boklisto ezali na ntina mingi?

8 Na boumeli ya mibu zomi oyo miuti koleka, bato 2 528 524 na biteni nyonso motoba ya mokili mpe na bituluku ya bisanga basili kopesa bomoi na bango epai na Yehova mpe komonisa yango na kozwáká batisimo ya mai. Ozalaki kati na bango, to ozali sikawa komilɛngɛla mpo na kozwa batisimo? Batisimo ezali litambe ya ntina mingi kati na bomoi ya moklisto nyonso ya solo. Yesu apesaki bayekoli na ye etindá ya kozalisa bayekoli na mabota nyonso mpe kobatisa bango. (Matai 28:19, 20) Esengeli lisusu koyeba ete ezalaki nokinoki nsima ya batisimo ya Yesu nde Yehova ye moko alobaki uta na likoló, ete: “Yɔ Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] yɔ mingi.”​—Luka 3:21, 22.

9. Mpo na kobatela boyokani malamu elongo na Yehova, nini esɛngami epai na biso?

9 Boyokani malamu elongo na Yehova ezali eloko oyo ebongi kotalelama na motuya mingi. Soki osili kokɔta kati na boyokani motindo wana na komipesa mpe na kozwa batisimo, boyá likambo nyonso likoki kobebisa boyokani yango. Kopesa nzela te na mitungisi ya bomoi mpe na mposa ya bozwi ya mosuni ete ezongisa yango na esika ya mibale. (1 Timoté 6:8-12) Omitambwisa mpenza na boyokani na toli ya Masese 3:6, (NW) ete: “Talelá [Yehova] kati na nzela na yo nyonso, mpe ye moko akosembola bilekelo na yo.”

Lolenge nini bolingo ya Klisto ezali kosala bopusi likolo na yo?

10. Mpo na nini losambo na biso epai na Yehova ezali kotinda biso te na kobosana Yesu?

10 Ya solo, kondima Yehova lokola Nzambe bobele moko ya solo, elimboli te ete tobosani Yesu Klisto. Soko moke te, mpamba te Emoniseli 19:10 (NW) elobi ete: “Bisakweli bipemami mpo na kotatola na ntina na Yesu.” Uta Genese kino Emoniseli, bisakweli bipemami bizali komonisa makambo mingi matali mokumba ya Yesu Klisto kati na mokano ya Yehova. Wana moto moko akómi na boyebi ya makambo wana, akozala na likanisi moko polele oyo esukwami na lokuta mpe na mabunga oyo euti na mateya ya boklisto ya nkombo mpamba.

11. Lolenge nini mwasi moko ya mboka Pologne asalaki ntango amonaki oyo Biblia ezali mpenza koteya na ntina na Mwana ya Nzambe?

11 Koyeba solo na ntina na Mwana na Nzambe ekoki kozala na bopusi makasi likoló na bomoi ya moto. Yango ekómelaki Danuta, mwasi moko ya mboka Pologne. Aumelaki kosolola mbula mwambe elongo na Batatoli ya Yehova, azalaki kosepela na mateya na bango, kasi amipesaki te na losambo ya solo mpo ezala lolenge ya bomoi na ye. Na nsima azwaki búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, oyo ezali kosolola bomoi ya Klisto na lolenge ya pɛtɛɛ.a Na butu mpenza afungolaki búku yango, na likanisi ya kotánga bobele mokapo moko. Nzokande, atikaki yango te, kino asilisaki kotánga yango nyonso penepene na ntɔ́ngɔ́. Alelaki mpenza. Abondelaki ete: “Yehova, limbisa ngai!” Lokola mbano kitoko na oyo ye atángaki, asosolaki malamu mpenza bolingo oyo Yehova mpe Mwana na ye bamonisaki. Asosolaki ete na boumeli ya mibu mwambe azangaki botɔ́ndi na kobwakáká lisalisi oyo Nzambe azalaki kopesa ye na motema pɛtɛɛ. Na mobu 1993 azwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ye epai na Yehova na nzela ya kondima kati na Yesu Klisto.

12. Boyebi ya sikisiki ya Yesu Klisto ezali na bopusi nini likoló na bomoi na biso?

12 “Boyebi ya sikisiki ya Nkolo na biso Yesu Klisto” ezali kotambola nzela moko na likambo ya kozala moklisto oyo azali na molende mpe oyo azali kobota mbuma. (2 Petelo 1:8, NW) Na meko nini okosangana na mosala yango, mpo na koyebisa basusu nsango ya Bokonzi? Bonene ya mosala oyo moto na moto akoki kosala ekeseni mpo na makambo mingi. (Matai 13:18-23) Ezali na makambo oyo tokoki kobongola yango te; mosusu tokoki kobongola yango. Nini ekopusa biso na koyeba makambo yango mpe na kobongola oyo ekoki kobongwama? Ntoma Paulo akomaki ete: “Bolingo na Klisto ekangi biso”; na maloba mosusu, bolingo oyo amonisaki na kopesáká bomoi na ye mpo na biso ezali mpenza monene mingi na boye ete wana botɔ́ndi na biso mpo na yango bozali koyikana, mitema na biso mipusami mpenza makasi. Lokola litomba, tokangi ntina ete ebongi te mpo na biso kolanda mikano ya moimi mpe bomoi oyo etali bobele bosepeli na biso moko. Na esika ya kosala bongo, tokosembola bomoi na biso mpo na kopesa esika ya liboso na mosala oyo Klisto ateyaki bayekoli na ye ete básala yango.​—2 Bakolinti 5:14, 15.

Bakabwani na mokili​—Kino na meko nini?

13. Mpo na nini tosengeli te kolinga kosangana na mangomba oyo masili komikɔtisa na mokili?

13 Ezali mpasi te komona mbuma oyo boklisto ya nkombo mpamba mpe mangomba mosusu esili kobuka mpo ete balingi komikɔtisa na mokili. Mosolo ya mangomba mozali kosalelama mpo na kosunga misala ya batomboki. Basángó bakómaki babundi kati na bituluku ya mobulu. Mokolo na mokolo, bazulunalo ezali kolobela bituluku bikeseni ya mangomba oyo bizali kobunda na bisika mingi ya mabelé. Mabɔkɔ na bango matondi na makila. (Yisaya 1:15) Mpe kati na mokili mobimba bakonzi ya mangomba bazali koluka kopusa bakonzi ya politiki. Basambeli ya solo bazali komikɔtisa te kati na yango.​—Yakobo 4:1-4.

14. (a) Nini tosengeli mpenza kopɛngola soki tolingi kokabwana na mokili? (b) Nini ekoki kosalisa biso na kopɛngola ete tozwama te na mitambo ya bizaleli mpe misala ya mokili?

14 Kasi komikabola na mokili ezali kosenga makambo mingi. Mokili oyo motondi na mposa ya mbongo mpe mposa ya biloko oyo mbongo ekoki kosomba, mposa ya koyebana mingi, mpe ya komipesa na bisengo, mpe makambo motindo wana mazali kokende elongo na kozanga komibanzabanza ya solo mpo na basusu, lokuta, elobeli ya bosoto, kotombokela bato oyo bazali na bokonzi, mpe kozanga komipekisa. (2 Timoté 3:2-5; 1 Yoane 2:15, 16) Mpo na kozanga kokoka na biso, tokoki mbala mosusu komonisa moko na bizaleli motindo wana. Nini ekoki kosalisa biso na kosala molende mpo na kopengola mitambo wana? Tosengeli komikundola biso moko nani oyo azali nsima na nyonso wana. “Mokili mobimba ejali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Atako etamboli motindo wana ekoki mpenza kolengola, ata soki ebele na bato boni bazali kolanda yango, na ntango oyo tomoni ete monguna monene ya Yehova, Satana Zabolo, nde azali nsima na yango, tozali kososola ete yango ezali mpenza mbindo.​—Nzembo 97:10.

Na meko nini bolingo na yo ezali mpenza mozindo?

15. Lolenge nini bolingo bozangi moimi oyo omonaki esalisaki yo na koyeba lingomba ya solo?

15 Ntango obandaki mpo na mbala ya liboso kosangana elongo na Batatoli ya Yehova, na ntembe te komonisama ya bolingo kati na bango esimbaki yo mpamba te yango ekeseni na elimo ya mokili. Likebi monene oyo epesami na bolingo bozangi moimi ezali kokesenisa losambo ya peto ya Yehova na mitindo misusu ya losambo. Ekoki kozala ete yango nde endimisaki yo ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza kolanda losambo ya solo. Yesu Klisto ye moko alobaki ete: “Na bongo bato yɔnsɔ bakoyeba ete bojali bayekoli na ngai sɔkɔ bojalani na bolingo.”​—Yoane 13:35.

16. Mabaku malamu nini tozali na yango mpo na kobakisa lolenge ya komonisa bolingo na biso?

16 Ezaleli oyo ete bolingo ezali mpe komonisa yo lokola moko na bayekoli ya Klisto? Ezali na makambo oyo kati na yango okoki kobakisa lolenge na yo ya komonisa bolingo? Na ntembe te; biso banso tokoki kosala yango. Komonisa bolingo eleki mpenza boninga oyo tokoki komonisa na Ndako ya Bokonzi. Mpe soki tokomonisa bolingo bobele epai na baoyo balingaka biso, bokeseni nini bozali kati na biso mpe bato na mokili? Biblia elendisi biso ete: “Liboso na makambo yɔnsɔ bolingana makasi.” (1 Pɛtɛlo 4:8) Epai na nani tokoki komonisa bolingo mingi? Ezali nde na ndeko moko moklisto ya mobali to ya mwasi oyo ezalela na ye ekesenisi ye na biso to oyo lolenge na ye ya kosala makambo mosusu esilikisaka biso? Ezali nde na moto moko oyo, mpo na bokɔnɔ to bobangé, azali na makoki te ya koya na makita poso na poso? Ezali nde na mobalani na biso? To mbala mosusu, ezali nde na baboti na biso oyo basili kokóma mibangé? Basusu oyo bazalaki kosala molende mingi mpo na komonisa mbuma ya elimo, bakisá bolingo, bamonaki lokola basengelaki lisusu koyekola nyonso wana ntango bakutanaki na mikakatano minene oyo mibimaka wana esengeli kosunga na makambo nyonso mosangani moko ya libota oyo azali lisusu na makoki te ya kosala ata mosala moko. Ata kati na mikakatano lolenge yango, ya solo, bolingo na biso bosengeli kosuka te bobele na bato ya ndako na biso.

Kotatola mpo na Bokonzi​—ezali na ntina nini mpo na yo?

17. Lokola tozwaki litomba na boyei ya Batatoli ya Yehova epai na biso, tosengeli sikawa kooka ete topusami na kosala nini?

17 Lolenge ya ntina mingi oyo tozali komonisa bolingo na biso epai na bazalani na biso ezali ya kotatwela bango na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Bobele etuluku moko ya bato nde ezali kokokisa mosala oyo Yesu asakolaki. (Malako 13:10) Ezali bongo Batatoli ya Yehova. Biso moko mpe tozali kozwa matomba na yango. Sikawa ezali mokumba na biso na kosalisa basusu. Soki tozali na likanisi ya Nzambe na ntina na yango, mosala wana mokomonana na motuya mingi kati na bomoi na biso.

18. Lolenge nini botángi na biso ya búku Les Témoins de Jéhovah ​— Prédicateurs du Royaume de Dieu esengeli kolendisa bosangani na biso na mosala ya kopesa litatoli?

18 Masoló ya kosepelisa matali lolenge nsango ya Bokonzi ekómaki na biteni bileki mosika ya mabelé na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka mayebisami kati na búku Les Témoins de Jéhovah ​— Prédicateurs du Royaume de Dieu (Batatoli ya Yehova​—Basakoli ya Bokonzi ya Nzambe). Soki yango ezali na lokótá na bino, kozangá te kotánga yango. Mpe wana ezali yo kotánga yango, tyá likebi mpenza na myango nyonso oyo bato mosusu basalelaki mpo na kopesa litatoli. Ezali na mwa bato oyo okoki komekola ndakisa na bango? Mabaku malamu mingi matyami liboso na biso banso. Tiká ete bolingo na biso mpo na Yehova epusa biso na kosalela yango malamu.

19. Matomba nini tozali kozwa wana tondimi mokumba oyo mouti na koyeba lingomba ya solo?

19 Na yango, wana tomipesi na kosala mokano ya Yehova, tozali kozwa eyano na motuna oyo ete, ‘Mokano ya bomoi ezali nini?’ (Emoniseli 4:11) Tozali lisusu kotatabana te, tozali komona te ete tozangi eloko. Ezali na mosala moko te oyo okoki komipesa na yango oyo ekomemela yo bosepeli lokola oyo ezali kouta na komipesa na motema mobimba na mosala ya Yehova Nzambe. Mpe oyo nde mikolo kitoko mizali liboso na biso! Bomoi ya seko mpe ya esengo kati na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, epai tokosalela makoki na biso nyonso na boyokani na mokano ya bolingo oyo mpo na yango Nzambe asalaki bato.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Okopesa biyano nini?

◻ Mpo na nini ezali na ntina mingi ete lingomba endima Biblia ete ezali Liloba ya Nzambe mpe ekumisa Yehova ete azali Nzambe bobele moko ya solo?

◻ Lingomba ya solo ezali koteya nini na ntina na mokumba na Yesu lokola Mosikoli?

◻ Mpo na nini baklisto basengeli kokabwana na mokili mpe komonisa bolingo bozangi moimi?

◻ Kotatola mpo na Bokonzi ezali na esika nini kati na lingomba ya solo?

[Bililingi na lokasa 16]

Batisimo ezali litambe ya ntina mingi mpo na oyo etali kondima mikumba oyo miuti na lingomba ya solo. Sanza nyonso, bato soko 25 000 kati na mokili mobimba bazali kosala litambe wana

Russie

Sénégal

Papouasie-Nouvelle-Guinée

Etats-Unis

[Bililingi na lokasa 17]

Kokabola solo ya Biblia epai na basusu ezali eteni ya losambo ya solo

Etats-Unis

Etas-Unis

Brésil

Hong-Kong

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto