Ozali kolya na mesa oyo wapi?
“Bokoki te kosangana na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademó.”—1 BAKOLINTI 10:21, NW.
1. Mesa nini etyami liboso na biso, mpe likebisi nini ntoma Paulo apesi mpo na yango?
MALOBA ya ntoma Paulo oyo mapemami mamonisi ete mesa mibale ya elilingi etyami liboso na bato. Mesa moko na moko ekoki koyebana na lolenge ya bilei ya elilingi oyo etyami likoló na yango, mpe biso banso tozali kolya na mesa moko to mosusu. Nzokande, soki tolingi kosepelisa Nzambe, tokoki te kolya na mesa na ye mpe komekameka lisusu bilei na mesa ya bademó. Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo ete: “Biloko oyo mabota bapesaka mbeka, bakopesaka mbeka na bademó, kasi epai na Nzambe te; mpe nalingi te ete bino bózala basangani ya bademó. Bokoki te komela kɔ́pɔ ya Yehova mpe kɔ́pɔ ya bademó; bokoki te kosangana ‘na mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademó.”—1 Bakolinti 10:20, 21, NW.
2. (a) Mesa nini ya Yehova oyo ezalaki na eleko ya Yisraele ya kala, mpe banani bazalaki kosangana na mbeka ya kimya? (b) Kosangana na mesa ya Yehova elimboli nini lelo oyo?
2 Maloba oyo ya Paulo mazali kokundwela biso mbeka na kimya oyo Bayisraele ya kala bazalaki kopesa na nsé ya Mibeko ya Yehova. Etumbelo ya Nzambe ebéngamaki ete mesa, mpe moto oyo azalaki komema nyama mpo na kopesa yango mbeka, ezalaki kolobama na ntina na ye ete azalaki na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na banganga. Na ndimbola nini? Ya liboso, Yehova azalaki kosangana na mbeka wana mpo ete bazalaki komwangisa makila likoló ya etumbelo na ye mpe mafuta ezalaki kozikisama na mɔ́tɔ oyo ezalaki kopɛla na nsé. Ya mibale, nganga azalaki kosangana na yango na ndimbola oyo ete ye (mpe libota na ye) bazalaki kolya mosuni ya ntólo etumbami mpe mopende ya lokolo-mobali ya nyama oyo epesami mbeka. Mpe ya misato, mopesi mbeka azalaki kosangana na kolyaláká ndambo oyo etikali. (Levitiki 7:11-36) Lelo oyo, kosangana na mesa ya Yehova elimboli ete tozali kopesa ye lolenge ya losambo oyo azali kosɛnga, lokola Yesu mpe bayekoli na ye bamonisaki yango. Mpo na kosala yango, tosɛngeli kolya bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye mpe na lisangá na ye. Bayisraele, baoyo bazalaki na boyokani ya ntina mingi elongo na Yehova na mesa na ye, bapekisamaki ete bápesa mbeka na mesa ya bademó. Bayisraele ya elimo mpe baninga na bango “bampate mosusu,” bazali na nsé ya epekiseli motindo moko oyo euti na Nzambe.—Yoane 10:16.
3. Na ndimbola nini moto akoki kokwea na likambo ya kosangana na mesa ya bademó na mikolo na biso?
3 Na mikolo na biso, lolenge nini moto akoki kokwea na likambo ya kosangana na mesa ya bademó? Na kosaleláká matomba ya likambo nyonso oyo lizali kotɛmɛla Yehova. Mesa ya bademó esangisi kati na yango bopanzi nsango ya makambo oyo mazali na boyokani na bademó, oyo ebongisami mpo na kozimbisa biso mpe kopɛngola biso longwa na Yehova. Nani akolinga koleisa motema na ye mpe elimo na ye na ngɛngɛ motindo wana? Bakilsto ya solo baboyi kosangana na mbeka oyo bato mingi bazali kopesa lelo oyo epai na banzambe ya etumba mpe ya bozwi.—Matai 6:24.
Tóboya “mesa ya bademó”
4. Motuna nini oyo biso banso tosengeli kotalela yango, mpe mpo na nini tokolinga te kosangana na mesa ya bademó na nkó nyonso?
4 Motuna oyo biso banso tosengeli koyanola na yango ezali oyo ete: Nazali kolya bobele na mesa nini? Tokoki te kopɛngola likambo oyo ete tosɛngisami na kolya bobele na mesa moko to bobele na mesa mosusu. (Kokanisá na Matai 12:30.) Tokolinga te kosangana na mesa ya bademó na nkó nyonso. Soki tosali bongo, tokobungisa ngolu ya Yehova, Nzambe bobele moko ya solo mpe ya bomoi. Nzokande, soki tolei bobele na mesa ya Yehova, yango ekomema biso na bomoi ya seko kati na esengo! (Yoane 17:3) Lisese moko liyebisi ete, lolenge ya bomoi ya moto elandaka lolenge ya bilei oyo akolyaka. Na yango, moto nyonso oyo alingi kobatela kɔ́lɔngɔnɔ malamu ya nzoto mpe ya makanisi asengeli kosɛnzɛla na ntina etali lolenge ya bilei oyo azali kolya. Lokola mpo na bilei mabe, atako bilambami na bikelakela mosusu mpo ete ezala elɛngi, kasi ekoki bobele kobebisa kɔ́lɔngɔnɔ ya nzoto; bobele bongo, bopanzi nsango ya mokili oyo ezali na makanisi ya bademó, ezali elilingi ya bilei mabe oyo ekobebisa makanisi na biso.
5. Lolenge nini tokoki lelo koboya kosangana na mateya ya bademó?
5 Ntoma Paulo asakolaki ete na mikolo ya nsuka, bato bakozimbisama na “mateya ya bademó.” (1 Timoté 4:1, NW) Mateya wana ya bademó mazwami te bobele kati na bindimeli ya lokuta ya mangomba, kasi epalanganisami mpe mingi mpenza na banzela mosusu. Na ndakisa, tosengeli kotalela mpe kososola mabe na malamu mpo na babúku mpe bazulunalo oyo biso mpe bana na biso tozali kotánga, manáka ya televizyó oyo tolandaka, mpe masano mpe bafilime oyo totalaka. (Masese 14:15) Soki tosepelaka kotánga mikanda ya masapo mpamba mpo na kominanola, yango ezali nde kolobela makambo ya mobulu, ya kosangisa nzoto na lolenge lolongobani te, to misala ya bilimu mabe? Soki tozali kotánga masoló ya makambo oyo masalemaki solo mpo na koteyama, yango ezali nde kopalanganisa filozofi to lolenge ya bomoi oyo ezali na “motindo na Klisto tɛ”? (Bakɔlɔsɛ 2:8) Ezali kolobela bobele makanisi mpamba, to ezali kokɔ́tɛla bituluku ya bato na mokili? Ezali kotombola mokano ya kokóma na bozwi mingi? (1 Timoté 6:9) Ezali mokanda oyo mozali kolakisa mateya ya bokabwani na lolenge ya mayele mabe, oyo ezali ya boklisto te? Soki eyano ezali ee, mpe tozali kolanda kotánga to kotala mikanda motindo wana, tokozala na likámá ya kolya na mesa ya bademó. Lelo oyo, ezali na bankóto mingi ya mikanda oyo ezali kolendisa filzofi ya mokili oyo emonani lokola ete ezali na makanisi ya malamu mpe oyo ya mikolo na biso. (Mosakoli 12:12) Kasi, bopanzi nsango yango ezali mpenza na likambo ya sika soko moke te; ezali mpe komemela biso litomba moko te, ezali mpe komema bolamu epai na moto moko te, bobele bongo mpe likambo oyo Satana ayebisaki na mayele mabe nyonso epai na Eva ezalaki na litomba moko te mpo na bolamu na ye.—2 Bakolinti 11:3.
6. Lolenge nini tosengeli koyanola soki Satana abyangi biso ete tómeka bilei na ye mabe biuti na bademó?
6 Na yango, tokosala nini soki Satana abyangi biso ete tómeka kolya bilei na ye oyo ya mabe biuti na bademó? Tokosala lolenge Yesu asalaki na ntango Satana asɛnginyaki ye ábongola mabangá ete makóma mampa. Yesu ayanolaki ete: “Ekomami ete, ‘Moto akobika bobele na [limpa, NW] tɛ nde na maloba yɔnsɔ makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].’” Mpe na ntango Zábolo alakaki kopesa Yesu “makonji yɔnsɔ na mokili mpe nkɛmbɔ na yango” soki akumbamelaki Satana mpe asambelaki ye, Yesu ayanolaki ete: “Longwa na yɔ, Satana. Jambi ekomami ete, ‘Okokumbamela [Yehova] Njambe na yɔ mpe okosalela bobɛlɛ ye.’”—Matai 4:3, 4, 8-10.
7. Mpo na nini tozali komikosa soki tokanisi ete tokoki kolya na mesa ya Yehova mpe na mesa ya bademó kozanga likámá?
7 Mesa ya Yehova mpe mesa oyo etandami na banguna na ye, bango bademó, ekoki kosangisama te! Ya solo, likambo yango limekaki kosalema na ntango ya kala. Tómikundola mpo na Bayisraele ya kala na mikolo ya mosakoli Eliya. Bazalaki komiloba ete bazalaki kosambela Yehova, kasi bazalaki kondimela banzambe mosusu, lokola Bala, ete akokaki kopesa bango bomengo. Eliya abɛlɛmaki epai na bato yango mpe alobaki ete: “Kino ntango nini bokotambolatambola na njela mibale ikɛsɛni? Sɔkɔ [Yehova] ajali Njambe, bila ye; nde sɔkɔ Bala, bila ye.” Na ntembe te, Bayisraele bazalaki kotambola tengutengu, “kobina o bisika bibale.” (1 Bakonzi 18:21, Liloba lya Nzambe) Eliya atyanaki ntembe na banganga ya Bala mpo bálakisa bonzambe ya banzambe na bango. Nzambe oyo akokaki koyeisa mɔ́tɔ longwa na lola ete ekita likoló na mbeka, ye nde asengelaki kozala Nzambe ya solo. Atako milende mingi oyo basalaki, banganga ya Bala balongaki te. Na nsima, Eliya asalaki bobele libondeli oyo ete: “Jongisela ngai, ɛ [Yehova] jongisela ngai, ete baoyo bayeba ete yɔ, ɛ [Yehova] ojali Njambe.” Na mbala moko mɔ́tɔ ekitaki longwa kuna na likoló mpe ezikisaki nyama ya mbeka oyo emwangisamaki mai mingi. Kopusamáká na elakiseli oyo endimisaki mpenza bonzambe ya Yehova, Bayisraele batosaki Eliya mpe babomaki basakoli 450 ya Bala. (1 Mikonzi 18:24-40) Na yango, lelo oyo, tosengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe tosengeli kozwa ekateli makasi ya kolya bobele na mesa na ye soki tosali yango naino te.
‘Moombo na sembo’ azali kopesa bilei na mesa ya Yehova
8. Moombo nini Yesu asakolaki na ntina na ye ete akosalela ye mpo na koleisa bayekoli na ye na elimo na boumeli ya kozala na ye, mpe moombo yango ezali nani?
8 Nkolo Yesu Klisto asakolaki ete na boumeli ya kozala na ye, “moombo na sembo mpe na mayele” akopesa bilei ya elimo epai na bayekoli na ye: “Esɛngo na moombo yango oyo nkolo na ye akomɔna ye kosaláká boye wana ekoya ye. Najali koloba na bino sɔlɔ ete, akotia ye likoló na bilɔkɔ yɔnsɔ bijui ye.” (Matai 24:45-47) Emonanaki ete moombo yango ezalaki moto moko te, kasi kelasi ya baklisto oyo bamipesi, bapakolami. Kelasi yango etii bilei kitoko ya elimo likoló na mesa ya Yehova, mpo na batikali bapakolami mpe mpo na “ebele monene.” Lelo oyo, koleka motuya ya bamilió minei, “ebele monene” basili kozwa etɛlɛmɛlo na bango esika moko na batikali bapakolami mpo na boyangeli ya Yehova Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe mpo na Bokonzi na ye oyo na nzela na yango, akobulisa nkombo na ye.—Emoniseli 7:9-17.
9. Esaleli nini moombo yango azali kosalela mpo na kopesa bilei ya elimo epai na Batatoli ya Yehova, mpe lolenge nini elambo na bango ya elimo elobelami na esakweli?
9 Kelasi wana ya moombo na sembo ezali kosalela la Société Watch Tower mpo na kopesa bilei ya elimo epai na Batatoli ya Yehova nyonso. Wana Boklisto ya nkombo mpamba mpe eteni mosusu ya ebongiseli ya biloko oyo ezali kokufa nzala mpo na kozanga bilei ya elimo oyo ezali kopesa bomoi, basaleli ya Yehova bazali kati na elambo. (Amosa 8:11) Yango ezali kokokisama ya esakweli ya Yisaya 25:6, ete: “Na ngomba oyo [Yehova] na bibele akobɔngisɛla mabota yɔnsɔ elambo na bilei na mafuta, elambo na vinyo esili koumela, na bilei kitoko mpe bitondi na mafuta mpe na vinyo iumeli.” Lokola molɔngɔ́ 7 mpe molɔngɔ́ 8 emonisi yango, elambo yango ekozala mpo na libela na libela. Oyo nde lipamboli lelo oyo mpo na baoyo nyonso bazali kati na ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana, mpe oyo ekolanda kozala bongo lipamboli mpo na mikolo mizali koya!
Kebá na bilei bitóndi na ngɛngɛ oyo bityami na mesa ya bademó
10. (a) Bilei ya motindo nini oyo kelasi ya moombo mabe ezali kopesa, mpe mikano na bango ezali nini? (b) Lolenge nini kelasi ya moombo mabe bazali kosalela baombo baninga na bango ya kala?
10 Bilei oyo bityami na mesa ya bademó bitóndi na ngɛngɛ. Na ndakisa, tótalela bilei oyo kelasi ya moombo mabe mpe bapɛngwi bazali kopesa. Ezali na litomba te mpe ezali kotonga te; ezali ya malamu te. Ekoki kozala ya malamu te, mpo ete bapɛngwi basili kotika kolya na mesa ya Yehova. Yango wana, nyonso oyo bakólisaki na ntina na bomoto ya sika esili kolongwa. Oyo ezali kopusa bango ezali elimo santu te, kasi biloko ya bololo makasi. Bapusami bobele na mokano moko—kobɛta baombo baninga na bango ya kala, lokola Yesu asakolaki yango.—Matai 24:48, 49.
11. C. T. Russell akomaki nini mpo na oyo etali kopona bilei ya elimo, mpe lolenge nini alobelaki baoyo bazali kotika mesa ya Yehova?
11 Na ndakisa, mwa mosika, na 1909, C. T. Russell, prezidá ya la Société Watch Tower ya ntango wana, akomaki na ntina na baoyo batangwaki longwa na mesa ya Yehova mpe na nsima babandaki konyokola baombo baninga na bango ya kala. Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1, 1909 (ebimeli ya Lingelesi), elobaki ete: “Baoyo bazali komikabola na la Société mpe mosala na yango, na esika ete bamikólisa bango moko to balendisa basusu kati na kondima mpe na kolóna bambuma ya elimo, emonani ete bazali kosala bongo te—bazali kokotisa mbeba kati na mokano oyo bazalaki kolanda liboso, mpe na kosaláká makɛlɛlɛ mingi, bazali kozinda mokemoke kino na kosila ngala, bazali komipesa mpasi mpe bazali kopesa mpasi epai na baoyo bazali na elimo ya kowelana. . . . Soki bamoko bakanisi ete bakoki kozwa bilei malamu to oyo eleki malamu na mesa mosusu, to soki bakanisi ete bakoki kobimisa oyo ya bango moko—tiká ete bálanda nzela na bango. . . . Nzokande awa biso totiki basusu ete bákende epai kuna bango basepeli mpo na koluka bilei mpe pole, likambo ya kokamwa ezali ete, baoyo bazali kokóma batɛmɛli na biso bazali kosala na lolenge lokeseni mpenza. Na esika na kosala lokola ekosalaka bato banso, na kolobáká ete, ‘Namoni eloko oyo ngai nalingaki; nakei, botikala malamu!’ bango bazali komonisa nkanda, motema mabe, koyina, mobulu, ‘misala ya nzoto mpe ya Zabolo’ na motindo oyo ata nkutu bato ya mokili basalaka bongo te. Emonani ete batóndi na nkɛlɛ, na nkanda makasi oyo euti na Satana. Bamoko na bango bazali kobɛta biso mpe na nsima bazali koloba ete biso nde tozali kobeta bango. Bazali ntango nyonso kokoma makambo mabe mpe makambo ya lokuta mpe ya bozoba.”
12. (a) Na ndimbola nini bapɛngwi bazali kobɛta baninga na bango baombo? (b) Mpo na nini ezali likámá ya koluka kokokisa mposa na biso ya koyeba makambo na kotángáká mikanda ya bapɛngwi?
12 Ee, bapɛngwi bazali kobimisa mikanda oyo mizali kobongola makambo na solo, mizali kosangisa solo na lokuta, mpe kosalela bokosi oyo emonani polele. Bazali ata mpe kokende pembeni na bisika oyo Batatoli basalaka mayangani mpo na koluka kokanga kati na motambo, baoyo bazangi bokɛngi. Na yango, ekozala likámá soki tokotika nzela ete mposa na biso ya koyeba makambo epusa biso na kolya bilei bizwami na mikanda motindo wana to koyokamela masoló na bango ya kotuka! Ata soki tozali kokanisa ete yango ekoki kosala biso mabe te, nzokande likámá lizali solo. Mpo na nini? Ezali mpo ete, mikanda misusu ya bapɛngwi mizali komonisa makambo ya bokosi na nzela ya “maloba na elɛngi” mpe “na kojimbisa.” (Baloma 16:17, 18; 2 Pɛtɛlɔ 2:3) Tosengeli komizela na kozwa eloko nini na mesa ya bademó? Mpe atako bapɛngwi bakoki komonisa makambo mosusu oyo mazali mpenza solo, mbala mingi bakokabolaka yango na makambo oyo mazingi yango, na mokano ete bábenda basusu longwa na mesa ya Yehova. Mikanda na bango nyonso mizali sé kotɔ́nga mpe kobebisa! Ezali kolendisa soko moke te.
13, 14. Bapɛngwi mpe myango ya bopanzi nsango na bango babimisi mbuma nini?
13 Yesu alobaki ete: “Bokoyeba bango mpɔ na mbuma na bango.” (Matai 7:16) Na yango, wapi mbuma oyo ya bapɛngwi mpe mikanda na bango babimisi? Makambo minei mazali komonisa bopanzi nsango na bango. (1) Mayele mabe. Baɛfɛsɛ 4:14 elobi ete bazali ‘kozimbisa na nzela na mikano mabe.’ (2) Mayele matóndi na lolendo. (3) Kozanga bolingo. (4) Kozanga sembo kati na makambo makeseni. Oyo ezali mpenza bikelakela bizali kati na bilei oyo ezali na mesa ya bademó; nyonso wana esalemi mpo na kobebisa kondima ya basaleli ya Yehova.
14 Ezali mpe na likambo mosusu. Bapɛngwi bazongeli lisusu nini? Na makambo mingi, bazongeli molili ya Boklisto ya nkombo mpamba mpe mateya na yango, lokola endimeli oyo ete baklisto nyonso bakokende likoló. Lisusu, mingi bazali lisusu te na etɛlɛmɛlo makasi oyo euti na Makomami na ntina na makila, koboya kosangana na mokili mpe etinda ya kotatola mpo na Bokonzi ya Nzambe. Biso tosili kokima molili ya Babilone Monene, mpe tolingi soko moke te kozongela yango. (Emoniseli 18:2, 4) Lokola tozali basaleli ya sembo ya Yehova, mpo na nini tokolinga ata kobwaka liso na mikanda oyo mibimisami na bango basili kobwaka mesa ya Yehova, bango bazali sikawa kobɛta na maloba baoyo bazali kosunga biso na kozwa “maloba ya lobiko”?—2 Timoté 1:13, NW.
15. Lilako nini ya Biblia oyo ezali kosalisa biso na kolanda nzela ya bwanya na ntango tozali koyoka bifundeli oyo bibimisami na bapɛngwi?
15 Basusu bakoki kozala na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo na koyeba bifundeli oyo bapɛngwi bazali kobimisa. Kasi tosengeli te kobosana lilako oyo lizwami kati na Dutɛlɛnɔmɛ 12:30, 31. Awa, Yehova azali koyebisa Bayisraele na nzela ya Mose mpo na oyo basengelaki kopɛngola nsima wana babotolaki Mokili na Ndaká epai na bapakano oyo bafandaki kati na mabelé ya ndaka. “Keba ete okosama na kobila bango tɛ, awa esili bango kobukana liboso na yɔ, mpe ete otuna mpɔ na banjambe na bango tɛ, mpe oloba tɛ ete, mabota oyo basalelaki banjambe na bango boni?—ete ngai mpe nasala bongo. Okosalela [Yehova] Nzambe na yɔ boye tɛ.” Ee, Yehova Nzambe ayebi lolenge nini mposa ya koluka koyeba makambo ekosala mosala epai na moto. Tomikundola mpo na Eva mpe mwasi ya Lota! (Luka 17:32; 1 Timoté 2:14) Tiká te ete tóyokamela makambo oyo bapɛngwi bazali koloba to kosala. Kasi, tiká ete tózala na mosala mingi mpo na kolendisa bazalani na biso mpe kolya na bosembo nyonso na mesa ya Yehova!
Bobele mesa ya Yehova nde ekotikala
16. (a) Mosika te, nini ekokómela Satana, bademó na ye, mpe mesa ya elilingi epai kuna mabota ya mokili mobimba bazali kolya? (b) Nini ekokómela bato banso oyo bazali kolanda kolya na mesa ya bademó?
16 Mosika te, bolózi monene ekobima na pwasa, wana ekokende nokinoki na nsuka na yango na “etumba na mokɔlɔ yango monɛnɛ na Njambe Mojui-na-Nguya-Yɔnsɔ.” (Emɔnisɛli 16:14, 16) Ekokóma na eteni na yango monene wana Yehova akobebisa ebongiseli ya biloko oyo mpe mesa ya elilingi epai kuna mabota ya mokili bazali kolya. Yehova akolongola mpe ebongiseli ya Satana Zábolo oyo ezangi komonana elongo na ebele ya bademó na yango. Baoyo bakolanda kolya na mesa ya elimo ya Satana, mesa ya bademó, bakozala mpenza kati na elambo ya solo, bakozala te lokola bato oyo babyangami na limpati, kasi bakozala nde bilei ya ntina oyo bikoleisama kuna—mpo na kobebisama!—Talá Ezekiele 39:4; Emoniseli 19:17, 18.
17. Mapamboli nini makopesamela baoyo bazali kolya bobele na mesa ya Yehova?
17 Bobele mesa ya Yehova nde ekotikala. Baoyo bazali kolya na mesa yango na botɔ́ndi nyonso, bakobatelama mpe bakozala na libaku kitoko ya kolya kuna mpo na libela. Nzala ekotungisa bango lisusu te. (Nzembo 67:6; 72:16) Bakosalela Yehova Nzambe kati na Paladiso na kɔ́lɔngɔnɔ ya nzoto ya kokoka! Na nsuka, maloba kitoko ya Emoniseli 21:4 ekokokisama na lolenge ya kokamwa: “Akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.” Lokola botemeli ekozala lisusu te, boyangeli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba ekolónga bipai binso mpo na libela, mpe ngolu ya Nzambe oyo ezangi nsuka ekosopama likoló na bato basikolami oyo bakofanda kati na Paladiso awa na mabelé. Mpo ete tózwa mbano yango, tiká ete biso banso tozwa ekateli makasi ya kosangana bobele na mesa ya Yehova, oyo etóndi na bilei bileki kitoko ya elimo!
Lolenge nini okoki koyanola?
◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola kozimbisama na mateya ya bademó?
◻ Mpo na nini tokoki te kolya na mesa ya Yehova mpe na mesa ya bademó kozanga likámá?
◻ Bilei ya motindo nini bapɛngwi bazali kopesa?
◻ Mpo na nini ezali likámá na koluka koyeba makambo na ntina na bifundeli oyo bapɛngwi bazali kobimisa?
◻ Bapɛngwi babimisi mbuma nini?
[Elilingi na lokasa 10]
Mesa ya Yehova etóndi na bilei bileki kitoko ya elimo