Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/7 nk. 28-30
  • Na meko nini manáka ya Bayuda ekoki kondimama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na meko nini manáka ya Bayuda ekoki kondimama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotya ebandeli ya likambo
  • “Ntango ya bozalisi”
  • Moboko mpo na kolandana ya ntango
  • Makambo ya bonkɔ́kɔ mpe bandimbola
  • Bitika ya losambo
  • Boyekoli nimero 3​—Bomonisi ntango oyo makambo masalemaki kati na elekelo ya ntango
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Badati
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/7 nk. 28-30

Na meko nini manáka ya Bayuda ekoki kondimama?

ENGEBENE manáka ya Bayuda, mokolo na minei, ya Sɛtɛ́mbɛ 16, 1993, ezalaki mokolo ya elambo ya Rosh Hashanah (Ebandeli ya mbula). Na momeseno, shofar to kɛlɛlo ya liseke ya mpate mobali, esengelaki bongo koyokana mpo na kosakola koya ya mbula ya sika. Mbula yango ezalaki 5754 (manáka ya Bayuda), mpe ebandaki na Sɛtɛ́mbɛ 16, 1993, kino Sɛtɛ́mbɛ 5, 1994.

Nokinoki, tozali komona bokeseni ya mibu 3 760 kati na lolenge ya Bayuda ya kotánga ntango mpe lolenge ya Wɛ́sti, to manáka oyo ebéngami Calendrier grégorien oyo esalelami mingi lelo oyo. Mpo na nini bokeseni wana? Mpe na meko nini manáka ya Bayuda ekoki kondimama?

Kotya ebandeli ya likambo

Lolenge nyonso ya kotánga ntango esengeli kozala na ebandeli na yango ya sikisiki to likambo oyo limonisi yango. Na ndakisa, boklisto ya lokuta etángaka ntango kobanda mbula oyo bakanisaka ete ezali yango nde Yesu abotamaki. Badati oyo ebandi na yango elobelamaka ete ezali ya ntango na Klisto. Mbala mingi bamonisaka yango na ekomeli A.D., oyo euti na lokótá Latin anno Domini, oyo elimboli “na mbula ya Nkolo.” Badati oyo ezali liboso na eleko wana ekomamaka L.K., “Liboso na Klisto.”a Bobele bongo, ba Chinois oyo bamipesi mingi na makambo ya bonkɔ́kɔ batángaka ntango uta na mobu 2698 L.T.B., ebandeli ya boyangeli ya moto na lisapo Huang-Ti, mokonzi ya langi mosaka. Na yango, Febwáli 10, 1994, ezalaki mpo na ba Chinois ebandeli ya mbula 4692. Nzokande, ezali boni mpo na manáka ya Bayuda?

Búku The Jewish Encyclopedia elobi ete: “Lolenge oyo Bayuda bazali kosalela sikawa mpo na kopesa dati ya likambo moko ezali ya koyebisa motuya ya bambula oyo esili koleka longwa na bozalisi ya mokili.” Lolenge wana oyo eyebani epai na Bayuda lokola Eleko ya Bozalisi, ekómaki kosalelama mingi soko na ekeke ya libwa T.B. Na yango, badati oyo ezali kati na manáka ya Bayuda mbala mingi ekomamaka nsima ya A.M. Euti na maloba anno mundi, oyo ezali bongo ekomeli mokuse ya ab creatione mundi, oyo elimboli “longwa na bozalisi ya mokili.” Mpo ete mbula yango ezali A.M. 5754, engebene lolenge yango ya kotánga ntango, “bozalisi ya mokili” bosalemaki esili koleka sikawa mibu 5 753. Tiká tótala lolenge yango etángamaki.

“Ntango ya bozalisi”

Búku Encyclopaedia Judaica (1971) epesi ndimbola oyo: “Na mitindo mikeseni ya botángi ntango epai na balimboli na mibeko ya Bayuda ‘Ntango ya bozalisi’ ebandaki na ebandeli ya eleko ya malili ya moko na bambula oyo ezali kati na 3762 mpe 3758 L.T.B. Nzokande kobanda ekeke ya zomi na mibale T.B. endimamaki ete ‘Ntango ya bozalisi’ ebandaki na 3761 L.T.B. (mpenzampenza na Ɔkɔtɔ́bɛ 7 ya mbula wana). Lolenge wana ya kotánga ezwi moboko likoló na bokokanisi ya makambo masalemaki na kotalela kolandana ya makambo oyo mazali na Biblia mpe myango ya kotánga ntango oyo mizali na mikanda ya Bayuda oyo ekomamaki mwa moke nsima na Biblia.”

Lolenge ya kopesa badati kobanda na “bozalisi ya mokili” ezwi mpenza moboko engebene lolenge oyo balimboli na mibeko ya Bayuda bazalaki kolimbola makambo mazali na Biblia. Na ntina na bindimeli na bango oyo ete mokili mpe biloko binso oyo bizali kati na yango ezalisamaki na boumeli ya mikolo motoba, oyo mokomoko ezali na ngonga 24, bato na mayele kati na balimboli na mibeko ya Bayuda, elongo na bato na mayele ya boklisto ya lokuta, bazali kokanisa ete bozalisi ya Adama, moto na liboso, esalemaki bobele na mbula ya bozalisi ya mokili. Nzokande, yango ezali bongo soko moke te.

Mokapo ya liboso ya Genese ebandi na koloba ete: “Na ebandeli Njambe ajalisaki likolo mpe [mabelé, NW].” Na nsima eyebisi makambo oyo Nzambe asalaki na “mikolo” motoba oyo milandanaki mpo na kobongola mabelé oyo mazalaki na “lolenge tɛ, bobɛlɛ mpamba” ete ekóma efandelo kitoko mpo na bato. (Genese 1:1, 2) Ekoki kozala ete bamilió ya bambula elekaki kati na bileko oyo mibale. Lisusu, mikolo ya bozalisi, ezalaki bileko ya ngonga 24 te, lokola nde misala ya Mozalisi misukaki na ndelo motindo wana. Likambo oyo ete awa “mokolo” moko ekoki kozala eleko molai koleka bangonga 24 emonisami na Genese 2:4, oyo elobeli bileko nyonso ya bozalisi lokola “mokolo” moko. Bankóto na bambula elekaki kati na mokolo ya liboso ya bozalisi mpe mokolo ya motoba, na ntango Adama azalisamaki. Kotya dati ya kozalisama ya Adama na ntango moko na bozalisi ya likoló mpe ya mabelé oyo ezali komonana eyokani te ezala na Makomami to na siansi. Lisusu, lolenge nini batángaki ete “Ntango ya bozalisi” ebandaki na 3761 L.T.B.?

Moboko mpo na kolandana ya ntango

Na mawa nyonso, pene na mikanda nyonso ya Bayuda kati na yango bazalaki kotángela ntango ezali lisusu te. Oyo etikali ezali búku ya kolandana ya ntango ya ebandeli oyo ebéngami Seder ʽOlam (Molɔngɔ́ ya mokili). Ekomamaki na ekeke ya mibale T.B. na Yose ben Halafta, moto na mayele oyo ayekolaki makambo mazali na búku Talmud. Búku (wana na nsima eyaki kobéngama Seder ʽOlam Rabbah mpo na kokesenisa yango na Seder ʽOlam Zuṭa búku ya Moyen Age, oyo ezali kolobela makambo masalemaki na lisoló ya bato na kotalela kolandana na yango) ezali kopesa lisoló ya kolandana ya ntango longwa na Adama kino na ekeke ya mibale T.B. Bayuda batombokelaki Loma na nsé ya bopusi ya Masiya ya lokuta Bar Kokhba. Lolenge nini mokomi azwaki bandimbola motindo wana?

Atako Yose ben Halafta asalaki milende mingi mpo na kolanda lisoló ya Biblia, abakisaki bandimbola na ye moko esika makomi mazalaki polele te likoló na badati oyo etalelami. “Na makambo mingi, . . . apesaki badati engebene bonkɔ́kɔ, mpe lisusu abakisaki masese mpe halakot [makambo na bonkɔ́kɔ] ya balimboli ya kala ya mibeko ya Bayuda mpe ya baoyo bazalaki na ntango na ye,” ndenge eyebisami na búku The Jewish Encyclopedia. Badati mosusu ezali na ntina mingi te na kotalela lolenge yango etángami. Búku Book of Jewish Knowledge [Búku ya boyebi ya Bayuda] endimi ete: “Ye atángaki longwa na Ntango ya bozalisi mpe, azalaki kopesa badati oyo ezangi bilembeteli na makambo makeseni ya Bayuda oyo ekanisamaka ete esalemaki kobanda na Adama, moto ya liboso, kino na Alexandre le Grand.” Kasi lolenge nini bandimbola motindo wana mpe makambo oyo mabakisamaki ezalaki na bopusi likoló na bosikisiki mpe na bosolo ya kolandana ya ntango ya Bayuda? Tiká tótalela yango.

Makambo ya bonkɔ́kɔ mpe bandimbola

Na boyokani na mimeseno ya balimboli na mibeko ya Bayuda, Yose ben Halafta amonisaki ete tempelo ya mibale eumelaki bambula 420. Yango ezwaki moboko likoló na ndimbola epesami na balimboli ya mibeko ya Bayuda mpo na ntina na esakweli ya Danyele ya “pɔsɔ ntuku nsambo,” to bambula 490. (Danyele 9:24) Eleko wana esalelamaki mpo na ntango oyo elekaki kati na kobebisama ya tempelo ya liboso mpe kobebisama ya tempelo ya mibale. Kolongoláká bambula 70 ya boombo na Babilone, Yose ben Halafta akómaki na bosukisi oyo ete tempelo ya mibale eumelaki bambula 420.

Nzokande, ndimbola oyo ezali kobimisa mokakatano monene. Mbula ya kokwea ya Babilone (539 L.T.B.) mpe ya kobebisama ya tempelo ya mibale (70 T.B.) eyebani malamu lokola badati ya lisoló ya bato. Na bongo, eleko ya tempelo ya mibale esengeli kozala na bambula 606 na esika ete ezala bambula 420. Na kopesáká bobele bambula 420 na eleko yango, kolandana ya ntango ya Bayuda ezangi bambula 186.

Esakweli ya Danyele etaleli te boumeli ya tempelo kati na Yelusaleme. Na esika ete ezala bongo, esakolaki nde ntango oyo Masiya akomonana. Esakweli emonisi polele ete “longwa na kobima na liloba na kotɛmisa mpe na kotonga Yelusaleme kino koya na [Masiya, NW], mokonji ekojala pɔsɔ nsambo. Na nsima mpɔ na pɔsɔ ntuku motoba na mibale.” (Danyele 9:25, 26) Atako moboko ya tempelo etyamaki na mbula ya mibale ya bozongi ya Bayuda longwa na boombo (536 L.T.B.), “liloba” na kotonga engumba Yelusaleme epesamaki bobele na “mbula ya ntuku mibale ya mokonzi Aletahesaseta.” (Nehemia 2:1-8) Bosikisiki ya lisoló ya bato emonisi ete mbula yango ezalaki nde 455 L.T.B. Kotánga kobanda wana “baposo” 69, to bambula 483, ememi biso kino na mobu 29 T.B. Ezali ntango wana nde Masiya amonanaki, na batisimo ya Yesu.b

Likambo mosusu litali ndimbola ya balimboli na mibeko ya Bayuda oyo liyokani mpenza te na kolandana ya ntango ya Bayuda ezali bongo mbula oyo Abalayama abotamaki. Balimboli na mibeko ya Bayuda babakisaki bambula na kolandana ya mabota oyo malobelami na Genese 11:10-26 mpe bapesaki bambula 292 na eleko oyo ebandaki longwa na Mpela kino kobotama ya Abalayama (Abalama). Nzokande, na kotalela ndimbola ya balimboli na mibeko ya Bayuda, mokakatano mozali na molɔngɔ́ 26 oyo elobi ete: “Ejalaki Tɛla na mbula ntuku nsambo abotaki Abalama mpe Nahola mpe Alana.” Na kotalela yango, bonkɔ́kɔ ya Bayuda elobi ete Tɛla azalaki na mbula 70 na ntango Abalama abotamaki. Nzokande, molɔngɔ́ wana elobaki te na sikisiki ete Tɛla abotaki Abalama wana azalaki na mibu 70. Kasi elobi bobele ete abotaki bana misato nsima wana azalaki na mibu 70.

Mpo na kozwa mbula ya solo ya Tɛla na ntango ya kobotama ya Abalayama, tosengeli bobele kotánga lisoló ya Biblia. Kobanda Genese 11:32 kino 12:4, tozali kotánga ete nsima na kufa ya Tɛla wana azalaki na mibu 205, Abalayama mpe libota na ye batikaki Alana engebene etindá ya Yehova. Na ntango yango Abalayama azalaki na mibu 75. Na bongo, esengeli kozala ete Abalayama abotamaki wana Tɛla azalaki na mibu 130, kasi mibu 70 te. Na bongo, eleko oyo ebandaki longwa na Mpela kino kobotama ya Abalayama ezalaki bambula 352, kasi bambula 292 te. Awa kolandana ya ntango ya Bayuda ezali na libungá ya bambula 60.

Bitika ya losambo

Mabungá motindo wana mpe kozanga koyokana kati na búku ‘Olam Rabbah mpe na babúku mosusu ya Talmud mpo na oyo etali kolandana ya ntango ebimisaki mikakatano mingi mpe matáta makasi kati na bato na mayele ya Bayuda. Atako milende misalemaki mpo na koyokanisa kolandana wana ya ntango mpe makambo mayebani na lisoló ya bato, kasi elóngaki na makambo nyonso te. Mpo na nini? Búku Encyclopaedia Judaica emonisi ete: “Mposa na bango ezalaki mingi mpo na makambo ya losambo, kasi mpo na koluka bosikisiki ya makambo te. Bonkɔ́kɔ nde esengelaki kokumisama na makambo nyonso, mingimingi liboso na baoyo balongwaki na lingomba.” Na esika ya kolongola mobulungano oyo bonkɔ́kɔ na bango ememaki, bato mosusu na mayele kati na Bayuda bamekaki kobwaka nsoni likoló na masoló oyo mazali kati na Biblia. Basusu bamekaki kolóngisa makanisi na bango na masapo mpe masoló ya bato ya Babilone, ya Ezipito, mpe ya Hindou.

Na yango, bakomi na makambo na kala batalelaka te “Ntango ya bozalisi” lokola eteni ya solo ya kolandana ya ntango. Bobele bato na mayele moke kati na Bayuda nde bazali kosala milende mpo na kolóngisa yango, mpe ata babúku minene ya Bayuda The Jewish Encyclopedia mpe Encyclopaedia Judaica mbala mingi endimaka yango te. Na bongo, lolenge ya Bayuda ya kotánga ntango kobanda na bozalisi ya mokili emonani ete ekoki kondimama te soki tokokanisi yango na kolandana ya ntango na Biblia, manáka ya bisakweli bimonisami ya Yehova Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bilembeteli ya Biblia mpe ya lisoló na makambo na kala bimonisi ete Yesu abotamaki na mobu 2 L.K. Na yango mpo na bosikisiki, mingi balingaka kosalela ekomeli T.B. (Ntango na Biso) mpe L.T.B. (Liboso ya Ntango na Biso), mpe ezali lolenge yango nde badati epesami kati na mikanda ya la Société Watch Tower.

b Mpo na koyeba bandimbola mosusu, talá búku Insight on the Scriptures, Volimi 2, lokasa 614 kino lokasa 616, 900 kino 902; Toute Ecriture est inspirée de Dieu et utile, Boyekoli ya misato, par. 18; mpe w92 1⁄10 lok. 11, par. 8-11, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto