Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/8 nk. 16-21
  • Bazali kopesa litatoli na “mabota nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kopesa litatoli na “mabota nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elimo ya Yehova mpe nsango malamu
  • Bazali kososola bamposa na bango ya elimo
  • Myango ya mayele mpo na koyebisa nsango malamu
  • Etamboli ya boklisto ezali mpe litatoli
  • Kelasi ya Moombo azali kopesa bisaleli bibongi
  • Biso banso tozali na mokumba
  • Lisangá ya Yehova esungaka mosala na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Ondimaka mpenza ete ozali na kati ya solo? Mpo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/8 nk. 16-21

Bazali kopesa litatoli na “mabota nyonso”

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba mafandami mpo na litatoli epai na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”​—MATAI 24:14, NW.

1. Mpo na nini maloba ya Yesu oyo mazali na Matai 24:14 masengelaki mpenza kokamwisa bayekoli na ye?

KANISÁ naino kokamwa ezalaki na bayekoli ya Yesu oyo bazalaki Bayuda wana bayokaki ye koloba maloba oyo touti kotánga! Bobele likanisi oyo ete Bayuda bapetolami bakei kosolola elongo na bapakano “ya mbindo,” “bato na mabota,” eyebanaki te epai na Bayuda, ezalaki nkutu likambo ya mbindo.a Solo, Moyuda ya botosi akokaki te kokanisa kokɔta na ndako ya mopakano! Bayekoli wana Bayuda basengelaki naino koyekola makambo mingi na ntina na Yesu, na bolingo na ye, mpe na mokumba na ye. Mpe basengelaki naino koyekola makambo mingi na ntina na kozanga koponapona ya Yehova.​—Misala 10:28, 34, 35, 45.

2. (a) Na meko nini mosala ya Batatoli mosili solo kopalangana mingi? (b) Makambo nini misato ya moboko masili komema na bokóli ya Batatoli?

2 Batatoli ya Yehova basila kosakola nsango malamu kati na mabota mingi, ezala Israële ya mikolo na biso, mpe bazali kosakola yango lelo oyo kati na mabota mingi koleka. Na 1994, koleka milió minei na ndambo ya Batatoli bazali kosakola kati na bamboka soko 230. Bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na bato penepene na milió minei na ndambo oyo bazali komonisa bosepeli. Yango ezali kosalema atako bazali kokutana na botɛmɛli ya makanisi mabe na mokili mobimba, oyo mbala mingi euti na bato bazangi koyeba mateya mpe mikano ya Batatoli. Lokola elobamaki na ntina na baklisto ya liboso, ekoki mpe kolobama bobele bongo na ntina na bango: “Jambi mpɔ na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika yɔnsɔ.” (Misala 28:22) Bongo tokoki kolimbola elónga na mosala na bango na nini? Ezali na makambo minene misato oyo mazali komema bolóngi na bango​—kolanda litambwisi ya elimo ya Yehova, komekola ndakisa malamu ya Klisto, mpe kosalela bisaleli oyo bibongi mpo na kosolola malamu.

Elimo ya Yehova mpe nsango malamu

3. Mpo na nini tokoki te komikumisa na oyo esili kokokisama?

3 Batatoli ya Yehova bamikumisaka na elónga na bango, lokola nde yango euti na makoki oyo bango moko bazali na yango? Ezali bongo te, mpamba te maloba oyo ya Yesu mazali kokokana ete: “Wana esili bino kosala nyonso oyo esɛngami na bino, boloba, ‘Tozali baombo mpamba. Tosili kosala bobɛlɛ oyo tosengelaki kosala.’” Lokola bazali baklisto bamipesi mpe bazwi batisimo, Batatoli ya Yehova bandimaki na bolingo na bango moko mokumba ya kosalela Nzambe, atako ezalela na bango ezali nini. Mpo na bamoko, yango elimboli mosala ya ntango nyonso lokola bamisionere to lokola basáli ya bolingo malamu kati na ba filiales mpe na bisika mikanda ya boklisto minyatamaka. Mpo na basusu bolingo ya boklisto motindo yango ezali komema bango na mosala ya botongi bandako mpo na losambo, na kosala mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela, to lokola basakoli ya nsango malamu kati na masangá, baoyo bazali kosalela ndambo na ntango na bango. Moto moko te kati na biso akoki komikumisa na bosembo nyonso mpo na mokumba oyo mopesameli biso, “oyo tosengelaki kosala.”​—Luka 17:10, NW; 1 Bakolinti 9:16.

4. Lolenge nini botɛmɛli oyo mosala ya boklisto ekutanaki na yango na mokili mobimba elóngamaki?

4 Elónga nyonso oyo tozali kozwa euti na elimo ya Yehova, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala. Lelo oyo, tokoki mpenza koloba lokola na mikolo ya mosakoli Zakaria ete: “Oyo ejali liloba na [Yehova] epai na Jelubabɛlɛ ete, ‘Na njela na makasi tɛ, na njela na nguya mpe tɛ nde na [elimo, NW] na ngai. [Yehova] na bibele alobi bongo.” Na yango, botɛmɛli ya mosala ya kosakola ya Batatoli kati na mokili mobimba elóngamaki, mpo na milende ya bato te, kasi mpo na litambwisi mpe libateli ya Yehova.​—Jekalia 4:6.

5. Mokumba nini Yehova azali kokokisa mpo ete nsango ya Bokonzi epalangana?

5 Na ntina na baoyo bazali kondima nsango ya Bokonzi, Yesu alobaki ete: “Ekomami kati na basakoli ete, ‘Bango yɔnsɔ bakolakisama na [Yehova].’ Boye moto na moto oyo ayoki epai na Tata mpe ayekoli, akoya [epai] na ngai. . . . Moto akoki koya epai na ngai tɛ, bobɛlɛ sɔkɔ epɛsamɛli ye longwa na Tata.” (Yoane 6:45, 65) Yehova atángaka kati na mitema mpe makanisi, mpe ayebi baoyo bakoyanola malamu na bolingo na ye atako bayebi naino ye te. Azali lisusu kosalela baanzelu na ye mpo na kotambwisa mosala wana oyo mosala mosusu te ekokani na yango. Yango wana kati na emonaneli Yoane amonaki baanzelu kosangana na yango mpe akomaki ete: “Namɔnaki mwanje mosusu kopombwa na njanga, mpe ajalaki na Nsango Malamu na seko mpɔ na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ [mpe na bitúlúká nyonso, NW.]”​—Emɔnisɛli 14:6.

Bazali kososola bamposa na bango ya elimo

6. Ezaleli nini ya moboko moto asengeli kozala na yango mpo na kondima nsango malamu?

6 Likambo mosusu oyo esengeli mpo ete Yehova apesa moto moko libaku ya kondima nsango malamu ezali oyo Yesu alimbolaki yango ete: “Esengo na baoyo bazali kososola bamposa na bango ya elimo, mpo ete bokonzi ya makoló ezali mpo na bango.” (Matai 5:3, NW) Moto oyo akanisi ete ezalela na ye ekoki se bongo to moto oyo azali koluka solo te akoki te kososola bamposa na ye ya elimo. Akanisaka bobele makambo ya mosuni. Ezalela ya kotonda ekómi epekiseli. Na yango, ntango bato oyo tokutani na bango na mosala ya ndako na ndako bazali koboya nsango malamu, tosengeli kotalela bantina ekeseni oyo mpo na yango bakoki kozanga komonisa bosepeli.

7. Mpo na nini bato mingi bazali kondima solo te?

7 Mingi baboyaka koyoka mpamba te bakangami makasi na lingomba oyo basangolaki mpe balingaka te kosala masoló. Basusu babendamaki epai na lingomba oyo eyokani na bomoto na bango​—ezali na baoyo balingaka lingomba oyo esangani na bonganga, basusu balandaka esika ya loyenge makasi, nzokande basusu balukaka kati na lingomba na bango baninga mpo na bokutani. Lelo oyo mingi basili kopona lolenge ya bomoi oyo eyokani te na mitinda ya Nzambe. Ekoki kozala ete bazali na bomoi moko ya mbindo, oyo ezalaka mpo na bango ntina ya koloba ete, “Nasepelaka na yango te.” Nzokande basusu, baoyo bakoki komiloba bato batángi mingi mpe bato na zébi, bazali koboya Biblia mpe balobi ete yango ezali na makambo mikemike.​—1 Bakolinti 6:9-11; 2 Bakolinti 4:3, 4.

8. Mpo na nini koboyama esengeli te kolɛmbisa molende na biso? (Yoane 15:18-20)

8 Wana ebele na bato bazali koboya, yango esengeli kokitisa kondima mpe molende na biso kati na mosala oyo ya kobikisa bomoi? Tokoki kozwa kobondisama kati na maloba ya Paulo epai na Baloma ete: “Boni? Ata bamosusu baboyi kondima, kojanga na bango na kondima ekoyeisa nkɛmbo na Njambe elɔkɔ mpamba? Sɔkɔ mokɛ tɛ! Njambe ajali sembo ata bato yɔnsɔ bajali na lokuta. Pelamɔkɔ ekomami ete, ‘Omɔnani sembo na maloba na yɔ, ojali mpe kolonga wana ekosamba yɔ.’”​—Baloma 3:3, 4.

9, 10. Elembeteli nini emonisi ete botɛmɛli bosili kolóngama kati na bamboka mingi?

9 Tokoki kozwa bilendiseli na bandakisa mingi ya bamboka na mokili mobimba epai bato bazalaki komonisa bosepeli mingi te, nzokande na nsima bamboka yango emonisaki kokesɛna monene. Yehova mpe baanzelu bayebaki ete bato na motema sembo bakomonana​—kasi Batatoli ya Yehova basengelaki kolendendela kati na mosala ya kosakola. Na ndakisa, esili koleka sikawa mibu 50, na bamboka lokola Argentine, Brésil, Colombie, Espagne, Irlande, Italie, Mexique, mpe Portugal​—Lingomba ya Katolike emonanaki lokola epekiseli oyo ekolongama te. Batatoli bazalaki mingi te na mobu 1943, bobele 126 000 na mokili mobimba, oyo 72 000 bazalaki na Etats-Unis. Boínga mpe makanisi mabe oyo Batatoli bakutanaki na yango ezalaki lokola efelo ya biliki oyo ekokaki kokatisama te. Nzokande, na mikolo na biso matomba mosusu oyo maleki kitoko ya mosala ya kosakola mazali kozwama na bamboka yango. Ezali mpe lolenge moko mpo na bamboka oyo kala ezalaki ya communisme. Na 1993 batisimo ya bato 7 402 na liyangani ya etúká na engumba Kiev, na Ukraine, epesi elembeteli na likambo yango.

10 Myango nini Batatoli basalelaki mpo na koyebisa nsango malamu epai na bazalani na bango? Basalelaki biloko ya mosuni mpo na kolengola bandimi, lokola bato mosusu balobaki yango? Bakendaka bobele epai na babola mpe bato batángi te, lokola basusu bakanisaka yango?

Myango ya mayele mpo na koyebisa nsango malamu

11. Ndakisa kitoko nini Yesu apesaki kati na mosala na ye? (Talá Yoane 4:6-26.)

11 Yesu mpe bayekoli na ye batikaki ndakisa oyo Batatoli bazali kolanda kino lelo kati na mosala ya kozalisa bayekoli. Yesu akendeki epai nyonso oyo akokaki kokuta bato, bazwi to babola​—na bandako, na bisika ya bato nyonso, penepene na mabeké, na mobanzi ya bangomba, ata kati na biyanganelo.​—Matai 5:1, 2; 8:14; Malako 1:16; Luka 4:15.

12, 13. (a) Lolenge nini Paulo apesaki ndakisa mpo na baklisto? (b) Lolenge nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda ndakisa ya Paulo?

12 Na ntina na mosala na ye moko, ntoma Paulo alobaki polele ete: “Bino boyebi motindo na ngai kati na bino ntango yɔnsɔ, longwa na mokɔlɔ na liboso elubwaki ngai awa na Asia. Nasalelaki Nkolo . . . , nabangaki tɛ kosakwela bino makambo makoki kosunga bino, mpe kolakisa bino na kati na koyangana mpe na ndako na ndako.”​—Misala 20:18-20.

13 Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba mpo na bomekoli na bango ya ndakisa ya bantoma, na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na esika ya komipesa na koteya likolólikoló na televizyó oyo esɛngaka mosolo mingi mpe etalelaka mposa ya bayoki te, Batatoli bakendaka epai na bato, bazala babóla to bazwi, mpe bakutanaka na bango mpenza. Balukaka kosolola na ntina na Nzambe mpe Liloba na ye.b Balukaka te kozalisa baklisto bobele mpo na kokokisa bamposa na bango ya libumu, na kopesáká bango biloko. Epai na baoyo balingi kokanisa, bamonisaka ete mwango bobele moko mpo na kosilisa mpasi na bato ezali Bokonzi ya Nzambe, oyo ekobongisa makambo na mabelé na biso.​—Yisaya 65:17, 21-25; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1-4.

14. (a) Lolenge nini bamisionere mpe babongisi-nzela mingi batyaki moboko ya makasi? (b) Tozali koyekola nini na eksperianse ya Batatoli ya Yehova na Japon?

14 Mpo na kokokisa mosala kati na bamboka mingi, bamisionere mpe babongisi-nzela bafungolaki nzela kati na bikólo mingi. Batyaki moboko, mpe na nsima Batatoli ya bamboka yango balandelaki mosala. Na yango, esɛngaki Batatoli ya bapaya mingi te mpo na kolandela mosala ya kosakola mpe kosɛnzɛla ete yango ebongisama malamu. Likambo yango limonisami polele na mboka Japon. Kala na nsuka na ba 1940, mingimingi bamisionere oyo bautaki na Australie mpe na Grande-Brétagne bakendaki kuna, bayekolaki lokótá, mpe bamimesenisaki na ezalela nyonso ya mpasi oyo ezalaki kuna nsima ya etumba, mpe babandaki kosakola ndako na ndako. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli bapekisamaki mpe banyokwamaki na Japon. Na yango bamisionere bakendeki kokuta bobele mwa ndambo ya Batatoli oyo bazalaki naino kosala na molende na Japon. Kasi lelo oyo basili kokóla koleka 187 000 kati na masangá koleka 3 000! Nini ezalaki sɛkɛlɛ́ ya elónga na bango ntango babandaki? Misionere moko oyo asili kolekisa kuna mibu 25 kati na mosala alobaki ete: “Koyekola kosolola elongo na bato ezalaki likambo ya ntina mingi. Na koyebáká lokótá na bango, tokokaki komimonisa biso moko lokola bango, kososola mpe kosepela na lolenge ya bomoi na bango. Tosengelaki komonisa ete tolingi ba Japonais. Na komikitisa nyonso tolukaki kozala lokola bato ya mboka, kasi kozanga kobuka mitindá na biso ya boklisto.”

Etamboli ya boklisto ezali mpe litatoli

15. Lolenge nini Batatoli bazali komonisa etamboli ya boklisto?

15 Nzokande, bato basepelaki te bobele na nsango ya Biblia. Bamonaki lisusu losambo ya boklisto kati na mosala. Bamonaki bolingo, boyokani, mpe bomoko ya Batatoli ata kati na mikakatano ya makasi mpenza, lokola bitumba ya banamboka, matáta kati na bato ya bikólo bikeseni, mpe koyinana kati na bato ya bitúká bikeseni. Batatoli babatelaki etɛlɛmɛlo ya bokatikati ya baklisto kati na matáta nyonso mpe batosaki maloba oyo ya Yesu: “Najali kopɛsa bino lilako na sika ete, Bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo, bato yɔnsɔ bakoyeba ete bojali bayekoli na ngai sɔkɔ bojalani na bolingo.”​—Yoane 13:34, 35.

16. Likambo nini limonisi motuya ya bolingo na boklisto?

16 Bolingo ya bazalani emonisamaki na likambo ya mobali moko mobangé oyo akomaki kati na zulunalo moko ya mboka epai afandi na ntina na “Tata mpe Mama Boboto.” Alimbolaki ete baninga na ye ya pembeni bamonisaki mpenza boboto epai na ye ntango mwasi na ye akufaki. Akomaki ete: “Kobanda akufaki . . . bamonisi mpenza boboto mingi. Kobanda wana basili ‘kobɔkɔla’ ngai . . . , kosaláká misala nyonso ya ndako mpe kosungáká na kosilisa mikakatano ya asilá-sanza ya mibu 74. Oyo eleki kokamwisa mpenza kati na likambo yango ezali ete bango bazali Baindo, ngai nazali Mondele. Bazali Batatoli ya Yehova, ngai nazali Mokatolike oyo atiká kokende na ndakonzambe.”

17. Etamboli nini tosengeli koboya?

17 Ndakisa oyo emonisi ete tokoki kopesa litatoli na mitindo mingi, ezala mpe na etamboli na biso ya mokolo na mokolo. Ya solo, soki etamboli na biso ekokani na oyo ya Klisto te, mosala na biso mokozala lokola ya Bafalisai, kozanga matomba malamu. Tolingi te kozala lokola baoyo Yesu alobelaki ete: “Bongo makambo yɔnsɔ makolobaka bango na bino, bosala yango mpe botosa yango; nde bosala mosala mokosalaka bango tɛ.”​—Matai 22:37-39; 23:3.

Kelasi ya Moombo azali kopesa bisaleli bibongi

18. Lolenge nini mikanda mikolimbolaka Biblia mizali kobongisa biso mpo na kosalisa bato na motema molongobani?

18 Likambo mosusu ya ntina kati na mosala ya kosakola nsango malamu na mabota nyonso litali ebele ya mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mibimisami na la Société Watch Tower. Tozali na babúku, mwa babúku, trakte, mpe bazulunalo oyo ekoki kokokisa bamposa na bato nyonso ya motema sembo oyo balingi koyeba. Soki tokutani na Mizilmá, Hindu, Boudhiste, Taoïste, to na Moyuda, tokoki kosalela búku L’humanité à la recherche de Dieu to ebele na batrakte mpe mwa babúku mpo na kobanda lisoló to mbala mosusu kobanda boyekoli ya Biblia. Soki moto oyo andimaka évolution atuni motuna na ntina ya kozalisama, tokoki kosalela búku La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création? Soki elenge moko atuni, ‘Mokano ya bomoi mozali nini?’ tokoki kotinda ye na búku Les jeunes s’interrogent ​— Réponses pratiques. Soki moto atungisami mingi na mpasi etali ye moko​—konyokwama na makanisi, kolɛmba, kobebisama, koboma libala​—⁠tozali na bazulunalo oyo esilaki kolobela makambo wana na motindo mobongi. Ya solo, kelasi ya moombo na sembo oyo Yesu asakwelaki ete akopesa “bilei na ntango na yango” azali kokokisa mokumba na ye.​—Matai 24:45-47.

19, 20. Lolenge nini mosala ya Bokonzi ezwaki bokóli ya nokinoki na Albanie?

19 Kasi mpo na kokutana na bato ya mabota, esengelaki kobimisa mikanda yango na nkótá mingi. Lolenge nini kobongola Biblia mpe mikanda mosusu ya kolimbola Biblia ekokaki kosalema na nkótá koleka 200? Botaleli ya ndakisa moko, ya mboka Albanie, ezali komonisa lolenge moombo na sembo mpe na mayele akokaki kotombola matomba ya nsango malamu kati na mikakatano minene mpe kozanga ete likamwisi ya pentekote lisalema lisusu na mikolo na biso mpo na kososola nkótá mingi na mbala moko.​—Misala 2:1-11.

20 Esili koleka bobele mwa bambula, Albanie etalelamaki lokola ekólo bobele moko oyo ezali solosolo ya communisme oyo bandimaka te ete Nzambe azali. Zulunalo National Geographic eyebisaki na mobu 1980 ete: “Albanie epekisi [lingomba], komitángáká yango moko na 1967 ‘Leta ya liboso kati na mokili oyo endimaka te ete Nzambe azali.’ . . . Bana oyo bakóli sikawa na Albanie bayebi bobele liteya oyo ete Nzambe azali te.” Uta kokwea ya communisme, bafandi ya mboka Albanie oyo bazali kososola bamposa na bango ya elimo bazali kondima nsango oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola. Ekipi moke ya babongoli oyo esangisi bilenge Batatoli oyo bayebi lokótá Italien mpe Lingelesi ebongisamaki na Tirana na mobu 1992. Bandeko oyo bamesani na makambo mingi oyo bazalaki kokende kotala bango balakisaki bango kosalela ordinatere ya moke mpo na kokɔtisa makambo mabongolami na lokótá Albanais. Babandaki liboso kobongola batrakte mpe bazunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ntango bakómaki na eksperianse mingi, babongolaki mikanda mosusu ya ntina mingi mpo na kolimbola Biblia. Lelo oyo ezali na Batatoli ya molende 200 kati na mboka yango (motángo ya bafandi 3 262 000), mpe bato 1984 bayanganaki na Ekaniseli na 1994.

Biso banso tozali na mokumba

21. Tozali kobika na eleko ya lolenge nini?

21 Makambo ya mokili mabɛlɛmi na nsuka na yango. Mpo na bokóli ya mobulu mpe koboma bato, kobomana mpe kobebisa basi kati na bitumba oyo bizali kosalema na bisika bikeseni, kopalangana ya etamboli ya mbindo mpe mbuma mabe na yango ya bokɔnɔ oyo bokopalanganaka na kosangisa nzoto, kozanga kotosa baoyo bapesameli bokonzi, emonani ete mokili ekómi na yauli mingi, mpe ekoki lisusu koyangelama te. Tozali kobika na eleko oyo ekokani na ntango oyo ezalaki liboso na mpela oyo elobelami kati na Genese ete: “[Yehova] amɔnaki ete masumu na bato ijalaki mingi na mokili mpe ete makanisi yɔnsɔ kati na motema na bango ijalaki bobɛlɛ epai na mabe mikɔlɔ yɔnsɔ. [Yehova] ayokaki mawa ete asalaki bato kojala na nse, mpe likambo yango epɛsaki ye bolɔji na motema.”​—Genese 6:5, 6; Matai 24:37-39.

22. Mokumba nini ya boklisto Batatoli ya Yehova nyonso bazali na yango?

22 Motindo moko lokola ezalaki na mikolo ya Noa, Yehova akoyeisa libebi. Kasi kati na boyengebene mpe bolingo na ye, alingi ete nsango malamu esakolama liboso kati na mabota nyonso. (Malako 13:10) Mpo na yango Batatoli ya Yehova bazali na mokumba monene​—ya koluka baoyo babongi kozwa kimya ya Nzambe mpe ya koteya bango banzela na ye ya kimya. Mosika te, na elaka eponami na Nzambe, mokumba ya kosakola mokosila kokokisama na elónga nyonso. “Bongo nsuka ekoya.”​—Matai 10:12, 13; 24:14; 28:19, 20.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu matali bapakano, talá motó ya lisoló “Nations” kati na búku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 1062, 1063, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Mpo na kozwa batoli malamu etali mosala ya boklisto, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Novɛ́mbɛ 15, 1984 (na Lifalansé), lokasa 15, “Lolenge nini kokóma basáli ya makoki mingi,” mpe lokasa 21, “Mosala malamu mozali komema na kozalisa bayekoli mingi.”

Ozali komikundola?

◻ Elónga nini Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso basili kozwa kati na mosala na bango?

◻ Mpo na nini mingi baboyaka nsango ya boklisto?

◻ Mwango nini ya kosakola ya bantoma, Batatoli ya Yehova bazali kosalela?

◻ Bisaleli nini tozali na yango mpo na kokokisa mosala malamu?

◻ Biso nyonso tosengeli kosala nini engebene Malako 13:10?

[Etanda na lokasa 19]

EKÓLO BATATOLI NA 1943 NA 1993

Argentine 374 102,043

Brésil 430 366,297

Chili 72 44,668

Colombie  ?? 60,854

Espagne Lapólo ya mosala ezali te 97,595

France Etumba ya Mibale​—lapólo ezali te 122,254

Irlande 150? 4,224

Italie Etumba ya Mibale​—lapólo ezali te 201,440

Mexique 1,565 380,201

Pérou Lapólo ya mosala ezali te 45,363

Philippines Etumba ya Mibale​—lapólo ezali te 116,576

Pologne Etumba ya Mibale​—lapólo ezali te 113,551

Portugal Lapólo ya mosala ezali te 41,842

Uruguay 22 9,144

Venezuela Lapólo ya mosala ezali te 64,081

[Elilingi na lokasa 17]

Batatoli ya Yehova bazali sé koya mingi kati na bamboka mingi ya Katolike, na ndakisa na Espagne

[Bililingi na lokasa 18]

Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala kati na mokili mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto