Lisangá ya Yehova esungaka mosala na yo
“Namonaki anzelu mosusu kopumbwa katikati na likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola evanzile.”—EMONISELI 14:6, NW.
1. Lolenge nini Batatoli ya Yehova bamekamaki, mpe mpo na nini balongaki?
MPO na nini ezali na ntina mingi ete tóyeba mokumba oyo lisangá ya Yehova na likoló ezali na yango mpo na kosunga mosala ya boklisto? Tókanisa naino, soki Batatoli ya Yehova bazalaki na lisungi ya mampinga ya Yehova na likoló te, mbɛlɛ balongaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe kati na mokili oyo ezali koyina bango? Batatoli basali mosala yango na eleko oyo bolingi-ekólo ezalaki makasi, mpe ezalaki na biyangeli oyo ezalaki kokonza bato, na bitumba ya mokili mobimba, mpe minyoko ndenge na ndenge. Soki lisungi ya Yehova te, mbɛlɛ Batatoli balongaki liboso ya makanisi mabe oyo bato bazali na yango mpo na bango, mpe mingimingi liboso na minyoko makasi oyo babimiselaki bango na mikili mingi?—Nzembo 34:7.
Bazali kobika liboso ya botɛmɛli na mokili mobimba
2. Bokokani nini ezali kati na baklisto ya ekeke ya liboso mpe baklisto ya mikolo na biso?
2 Na ekeke oyo ya 20, banguna, ezala bato ya mangomba to ya politiki babimisaki mikakatano ya mitindo nyonso, ezala na nzela ya mibeko to na banzela mosusu, mpo na koluka kopekisa to kolimwisa mosala ya Yehova. Bandeko na biso baklisto banyokwamaki, bakoselaki bango makambo, bamonisaki bango na miso ya bato lokola basali na mabe—mingi kutu babomamaki—mbala mingi na bopusi ya bakonzi ya mangomba ya Babilone Monene. Ekoki kolobama, lolenge moko balobaki mpo na baklisto na ekeke ya liboso ete, “zambi mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” Se lokola bakonzi ya mangomba ya Bayuda na ntango ya Yesu babimisaki manzaka nyonso mpo na kopekisa mosala na ye, bakonzi ya mangomba na bapɛngwi, oyo bafandi likita na bamakango na bango bakonzi ya politiki, balukaki kosukisa mosala monene ya koteya bato oyo libota ya Yehova ezali kokokisa.—Misala 28:22; Matai 26:59, 65-67.
3. Liteya nini tokoki kozwa na bosembo ya Henryka Żur?
3 Tótala na ndakisa likambo oyo esalemaki na ekólo Pologne na mokolo ya 1 Mársi 1946. Henryka Żur, elenge mwasi Motatoli ya Yehova oyo azalaki na mbula 15, azalaki kofanda pene na mboka Chełm, ye na ndeko mobali moko Motatoli, bakendaki na mboka moko oyo ezalaki mosika te kotala bato oyo basepelaki na solo. Etuluku moko ya Lingomba ya Katolike ebéngami Narodowe Siły Zbrojne (Mampinga ya basoda ya ekólo) bakangaki bango. Babɛtaki ndeko mobali wana makasi, kasi akimaki. Nzokande, Henryka alongaki kokima te. Banyokolaki ye na ndenge ya nsɔmɔ na boumeli ya bangonga mingi wana bazalaki komeka kotindika ye na makasi ete asala elembo ya ekulusu ya Lingomba ya Katolike. Moko na banyokoli na ye alobaki ete: “Okoki kondima nyonso olingi na motema na yo, kasi salá bobele elembo ya ekulusu ya Lingomba ya Katolike. Soki oboyi, okozwa lisasi!” Bosembo na ye elɛmbaki? Te. Bato mpamba wana ya lingomba bamemaki ye na kati ya zamba pembeni wana mpe babɛtaki ye masasi. Atako bongo, alongaki! Bakokaki te kokweisa bosembo na ye.a—Baloma 8:35-39.
4. Lolenge nini bituluku ya bato ya politiki mpe ya mangomba balukaki kolimwisa mosala ya kosakola Bokonzi?
4 Na boumeli ya mbula koleka monkama, basaleli ya Nzambe bazali konyokwama mpe bazali kosalela bango makambo mabe. Lokola Batatoli ya Yehova bazali kati na mangomba minene ya Satana te mpe bazali na mposa ya kokóma basangani na yango te, batalelamaka ete babongi mpo na kokosela bango makambo to kotɛmɛla bango na molende nyonso. Bituluku ya bato ya politiki bazali kotɛmɛla bango na yauli nyonso. Batatoli mingi basili kobomama lokola bamartiru mpo na kondima na bango. Ata biyangeli oyo bibéngami demokrasi emekaki kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu. Kala na 1917 na Canada mpe na États-Unis, bakonzi ya mangomba babimisaki bifundeli ya lokuta ete Bayekoli ya Biblia, lolenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na ntango wana, bazali kozimbisa bato. Bakambi ya la Société Watch Tower bakɔtaki bolɔkɔ na ntina na bifundeli ya lokuta mpe na nsima batikaki bango.—Emoniseli 11:7-9; 12:17.
5. Maloba nini malendisaki basaleli ya Yehova?
5 Satana asaleli myango nyonso akokaki kosala mpo na komeka kopekisa mosala ya kotatola oyo bandeko ya Klisto na baninga na bango ya sembo bazali kokokisa. Kasi, lokola makambo mingi oyo malekaki mamonisi yango, ezala makama, makaneli, konyokola na nzoto, bolɔkɔ, bakáa ya bakangami, ata kutu liwa, elongi te kokanga monɔkɔ ya Batatoli ya Yehova. Mpe likambo yango emonani na lisolo mobimba ya bato. Mbala na mbala, maloba ya Elisa malendisaki: “Bangá te mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!” Ntina moko ezali ete baanzelu ya sembo bazali mingi koleka mampinga ya bademo!—2 Mikonzi 6:16; Misala 5:27-32, 41, 42.
Yehova azali kopambola mosala ya kosakola na molende
6, 7. (a) Na ebandeli, milende nini misalemaki mpo na kosakola nsango malamu? (b) Mbongwana nini oyo ememaki litomba esalemaki kobanda 1943?
6 Na boumeli ya ekeke ya 20, Batatoli ya Yehova basaleli myango mingi ya tekiniki ya sika mpo na kokolisa mpe kobakisa lombangu ya mosala monene ya kotatola liboso ete nsuka eya. Na 1914, Pastere Russell, prezida ya liboso ya la Société Watch Tower alendisaki kosalelama ya libosoliboso ya bililingi bizali koningana te mpe oyo bizali koningana; ezalaki kolakisama wana bato bazali kolanda masukulu ya Biblia na fono, na boumeli ya ngonga mwambe. Mwango yango ebéngamaki “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi.” Na ntango wana, bato mingi oyo batalaki yango bakamwaki mpenza. Na nsima, na bambula ya 1930 mpe 1940, Batatoli bayebanaki mpo na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako na bafono na bango na mabɔkɔ, mpe bazalaki kobɛta badiskɛ oyo ezali na masukulu ya Biblia oyo masalemaki na Joseph Rutherford, prezida ya mibale ya la Société.
7 Na 1943, litambe ya mpiko esalemaki na litambwisi ya Nathan Knorr, prezida ya misato ya la Société, ntango bazwaki ekateli ya kosala Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi na masangá nyonso. Batatoli bakómaki kobongisama mpo na lolenge ya kosakola mpe koteya na ndako na ndako kozanga kosalela masukulu na fono. Uta ntango wana, biteyelo mosusu bisalemaki mpo na kobongisa bamisionere, babongisi-nzela, bankulutu ya masangá, mpe bakambi ya bafiliale ya la Société Watch Tower. Yango ebimisi mbano nini?
8. Lolenge nini Batatoli bamonisaki kondima makasi na 1943?
8 Na 1943, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, Batatoli bazalaki bobele 129 000 na bikólo 54. Kasi, bazalaki na kondima mpe na ekateli makasi ete Matai 24:14 ekokokisama liboso ete nsuka eya. Bandimisamaki ete Yehova akosala ete likebisi ya ntina mingi esakolama liboso ya makambo oyo makotya nsuka na ebongiseli mabe ya biloko oyo. (Matai 24:21; Emoniseli 16:16; 19:11-16, 19-21; 20:1-3) Milende na bango mizwaki mbano?
9. Makambo nini mamonisi ete mosala ya kotatola ekoli?
9 Sikawa tozali na bikólo soko 13 epai Batatoli bazali koleka 100 000. Mingi kati na bikólo yango ezali oyo bato ya Lingomba ya Katolike baleki mingi. Nzokande, talá makambo lolenge mazali. Na ekólo Brésil, basakoli ya nsango malamu bazali 450 000, mpe bato koleka 1 200 000 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na 1997. Ndakisa mosusu ezali bongo ekólo Mexique, kuna Batatoli bazali pene na 500 000 mpe bato koleka 1 600 000 bazalaki na molulu ya Ekaniseli. Bikólo mosusu ezali na Bakatolike mingi ezali bongo Italie (Batatoli bazali soko 225 000), France (pene na 125 000), Espagne (koleka 105 000), mpe Argentine (koleka 115 000). Na États-Unis, epai Bakatolike, Baprotesta, mpe Bayuda baleki mingi, Batatoli bazali soko 975 000 mpe bato koleka 2 000 000 bayanganaki na Ekaniseli. Na ntembe te, bibele bazali kobima na Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, na mateya na yango ya mindɔndɔmindɔndɔ mpe bazali kotya elikya na bilaka ya Nzambe oyo bizali pɛtɛɛ mpe oyo bikozanga kokokisama te na ntina na “makoló ya sika mpe nse ya sika.”—2 Petelo 3:13; Yisaya 2:3, 4; 65:17; Emoniseli 18:4, 5; 21:1-4.
Tóyeba komimesenisa na bamposa ya bato
10. Lolenge nini makambo mabongwani na bisika mosusu?
10 Bato mingi oyo bayei kosambela Yehova na nzela ya Klisto Yesu bakutanaki na Batatoli na mosala na bango ya ndako na ndako. (Yoane 3:16; Misala 20:20) Kasi, myango mosusu mpe misalelamaki. Sikawa makambo mabongwani, mpe mikakatano ya nkita esali ete basi mingi bákóma kosala. Mbala mingi, na kati ya pɔsɔ, bato bazalaka mpenza na ndako te. Na yango, Batatoli bamimesenisi na likambo yango. Lokola Yesu mpe bayekoli na ye ya liboso basalaki, bazali kokende epai bato bazali.—Matai 5:1, 2; 9:35; Malako 6:34; 10:1; Misala 2:14; 17:16, 17.
11. Lelo oyo Batatoli bazali kosakola na bisika nini, mpe yango ezali kobota mbuma nini?
11 Lelo oyo, Batatoli bazali kobima mpe, na lolenge ya kozanga kobenda likebi ya bato nyonso, bazali kosakola epai ya bato na bisika oyo mituka mitɛlɛmaka, na bamagazini, na baizini, na babiro mpe na bisika ya mombongo, na biteyelo, na babiro ya bapolisi, na bisika batɛkaka esansi, balotɛlɛ mpe barestora, mpe na balabala. Ɛɛ, bazali kosakola na bisika nyonso oyo bato bazali. Mpe ntango bato bazali na bandako, Batatoli bazali mpe koluka bango kuna. Komimesenisa motindo oyo epesi nzela na kobakisama ya motángo ya mikanda mikolimbolaka Biblia oyo bazali kokabola. Bato na motindo na bampate bazali komonana. Boyekoli ya sika ya Biblia ezali kobanda. Mosala oyo eleki monene mpo na koteya bato kati na lisolo mobimba ya bato ezali kokokisama na molende na baministre ya bolingo malamu koleka milio mitano na ndambo! Yo mpe ozali na libaku malamu ya kozala moko na bango?—2 Bakolinti 2:14-17; 3:5, 6.
Eloko nini ezali kopusa Batatoli ya Yehova?
12. (a) Lolenge nini Yehova azali koteya bato na ye? (b) Mateya yango ezali kosala bopusi nini?
12 Lisangá ya Nzambe na likoló ezali kokokisa mokumba nini na likambo yango? Yisaya asakolaki ete: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova] mpe [kimya, NW] na bana na yo ekozala monene.” (Yisaya 54:13) Yehova azali koteya bato wana nyonso basangani na bondeko na mokili mobimba na nzela ya lisangá na ye awa na mabelé—na Bandako ya Bokonzi, na mayangani ya minene mpe ya mike. Yango ezali kobota bomoko mpe kimya. Mateya ya Yehova mabimisi libota moko oyo ekokani na libota mosusu te, libota oyo eteyami kolingana bamoko na bamosusu mpe kolinga bazalani na bango lokola bango moko, kasi koyina bango te, ata na esika nini bafandi kati na mokili oyo etondi na bokabwani.—Matai 22:36-40.
13. Lolenge nini tokoki kondimisama ete mosala ya kosakola etambwisami mpe na baanzelu?
13 Ezali bolingo nde ezali kopusa Batatoli ya Yehova na kokoba kosakola atako bazali kokutana na kozanga bosepeli to minyoko. (1 Bakolinti 13:1-8) Bayebi ete mosala na bango etali kobikisa bomoi ya bato etambwisami uta na likoló lokola elobami na Emoniseli 14:6. Nsango nini bazali kosakola na litambwisi ya baanzelu? “[Bangá, NW] Nzambe mpe pesá ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei. Bósambela ye oyo asalaki likoló, na nse, na mai monene, na mitó na mai.” Mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali kosanzola nkombo ya Yehova. Bato bazali kobyangama mpo na kokumisa Nzambe Mozalisi, kasi bikelamu mpe liteya mpamba ya evolisyo te. Mpe mpo na nini mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu? Mpamba te ntango ya lisambisi eyei—kosambisa Babilone Monene mpe masangá mosusu nyonso ya ebongiseli ya Satana oyo ezali komonana.—Emoniseli 14:7; 18:8-10.
14. Banani bazali kosangana na mosala monene oyo ya koteya?
14 Moklisto nyonso oyo amipesi asengeli kosala mosala ya kosakola. Bankulutu ya elimo bazali kopesa ndakisa na mosala ya kosakola kati na masangá. Babongisi-nzela babongisami malamu bazali komipesa mobimba na mosala yango. Basakoli ya nsango ya Bokonzi bazali na molende, ata soki bazali na likoki ya kosakola bobele ngonga moke na sanza to bakoki kosakola mingi, bazali kopalanganisa nsango na mokili mobimba.—Matai 28:19, 20; Baebele 13:7, 17.
15. Eloko nini ezali komonisa matomba ya mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova?
15 Milende oyo nyonso miboti mbuma nini na mokili? Elembeteli moko oyo emonisi ete mosala emonani na mokili ezali ete mbala mingi bazali kolobela Batatoli ya Yehova na televizyo mpe na bazulunalo. Mbala mingi bipanzeli-nsango yango bizali kolobela kolendendela mpe etingya na biso mpo na kokutana na moto nyonso. Ɛɛ, mosala na biso ezali kosalema na molende mpe ezali ntango nyonso kobenda likebi ya bato mingi, ata soki bato mingi bazali koboya nsango mpe bamemi-nsango!
Molende na biso mpo na kotatola na bisika nyonso
16. Elimo nini tosengeli komonisa na mwa ntango moke oyo etikali?
16 Toyebi te soki ebongiseli ya biloko oyo ekoumela lisusu ntango boni, mpe soki matindiki na biso mazali ntango nyonso malamu kati na mosala ya Yehova, tokozala na mposa ya koyeba yango te. (Matai 24:36; 1 Bakolinti 13:1-3) Kasi, toyebi ete mpo bolingo, nguya mpe boyengebene ya Yehova emonana, nsango malamu esengeli kosakolama “liboso.” (Malako 13:10) Na yango, ata soki tolekisi ntango boni mpo na kozela na motema likoló nsuka ya ebongiseli oyo mabe, oyo ezangi boyengebene mpe etondi na mobulu, tosengeli, na molende nyonso, kotambola na kolandáká komipesa na biso engebene makoki na biso. Ekoki kozala ete tokómi mibange to tozali na bokɔnɔ, kasi tokoki kokoba kosalela Yehova na molende oyo tozalaki na yango ntango tozalaki bilenge to ntango tozalaki na nzoto kolɔngɔnɔ. Mbala mosusu tokokoka lisusu kolekisa ngonga mingi te lokola oyo tozalaki kosala liboso, kasi tokoki kobatela motuya ya mbeka ya masanzoli na biso epai na Yehova.—Baebele 13:15.
17. Yebisá eksperiansi moko ya kolendisa oyo ekoki kosalisa biso nyonso.
17 Yango wana, ezala tozali mibange to bilenge, tózala na molende mpe tóyebisa bato nyonso oyo tozali kokutana na bango nsango kitoko na ntina na mokili ya sika. Tózala lokola mwana mwasi ya moke oyo azali na mbula nsambo na ekólo Australie. Ye akendaki na mama na ye kosomba biloko na magazini. Mwana yango azalaka nsɔninsɔni. Na Ndako ya Bokonzi, ayokaki ete ezali na ntina mingi ete biso nyonso tósakolaka, na yango atyaki mwa babuku mibale na sakosi na ye. Ntango mama na ye azalaki kopona biloko, ye akendaki epai mosusu. Ntango mama na ye alukaki ye, amonaki ye azali kolakisa mwa buku epai ya mwasi moko! Mama na ye abɛlɛmaki na mwasi yango mpo na kosɛnga bolimbisi mpamba te ntango mosusu mwana na ye atungisaki ye. Kasi, na esengo nyonso mwasi yango azwaki mwa buku. Ntango bazalaki bobele ye na mwana na ye, atunaki ye ndenge nini azwaki mpiko ya kosolola na moto oyo ye ayebi te. Ayanolaki ete, “Nalobaki ete, Tɛlɛmá, kendá! Mpe nakendaki!”
18. Lolenge nini tokoki komonisa elimo malamu?
18 Biso nyonso tosengeli kozala na elimo lokola ya mwana wana ya ekólo Australie, mingimingi mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo toyebani na bango te to bakonzi. Tokoki kobanga ete bakoboya. Tóbosana te makambo Yesu alobaki ete: “Tungisá mitema te soko bokosamba boni, mpe soko bokoloba nini; mpo ete na ntango yango [elimo santu ekolakisa, NW] bino makambo makoki na bino koloba.”—Luka 12:11, 12.
19. Otalelaka mosala na yo ndenge nini?
19 Na yango, tyá motema na lisungi ya elimo ya Nzambe ntango ozali kosolola na bato na boboto nyonso mpo na koteya bango nsango malamu. Bamilio ya bato batyelaka bato mosusu motema kasi babongi na yango te mpamba te lobilobi bakokufa. Biso totyelaka Yehova motema na lisangá na ye ya likoló oyo esangisi Klisto Yesu, baanzelu basantu, mpe baklisto bapakolami oyo basili kosekwisama, sikawa bazali na bomoi mpo na libela! Na yango, kobosanaka te: “Baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!”—2 Mikonzi 6:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandakisa mosusu, talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1994, nkasa 217 kino 220.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Lisangá ya Nzambe na likoló ekokisaki mokumba nini mpo na lobiko ya libota ya Yehova?
◻ Bituluku nini ya bato ya politiki mpe ya mangomba ebundisaki Batatoli ya Yehova na ekeke ya 20?
◻ Lolenge nini Batatoli ya Yehova bayokanisi mosala na bango na mbongwana oyo esalemi na mikolo oyo?
◻ Eloko nini epusaka yo ete osakola?
[Elilingi na lokasa 17]
Henryka Żur
[Bililingi na lokasa 18]
Japon
Martinique
États-Unis
Kenya
États-Unis
Batatoli ya Yehova bazali kosakola ntango nyonso mpe na bisika nyonso oyo bato bazali
[Elilingi na lokasa 20]
Na ebandeli ya ekeke oyo, bafono esalelamaki mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi