Kebá na komikumisa
LELO oyo, mingi bazali kotalela komikumisa lokola moko na bizaleli malamu. Kotalisa nguya, mayele mpe misala esili kokóma na bato nyonso. Bato mosusu bakanisaka ete komikumisa ezali na ntina mpo na kolónga. Basusu bamonaka ete etombolaka limemya na moto ye moko. Zulunalo Time emonisi ete: “Ndakisa malamu ya bopɔlɔ, atako ebungi mpenza te, ekómi komonana lokola likambo ya kala.” Mokomi Jody Gaylin apesi likanisi oyo ete: “Na mawa nyonso, komikumisa ya polele . . . ezali lolenge ya bomoi ya mikolo oyo. Masoló elongo na baninga to bayebani mazwi motindo ya sika: komikumisa.”
Bavɛdɛti basili kopesa ndakisa. Mbala mosusu osilá koyoka maloba ya mobali moko, molóngi na bibotu, ete: “Likambo oyo ete na ntango oyo ya lisoló na bato nazali moto oyo aleki bato banso ezali lisɛki te.” Lisusu Maloba ya etuluku na babɛ́ti miziki na nkombo Beatles mayebani malamu: “Sikawa toyebani mingi koleka Yesu Klisto.” Wana bamoko batalelaki maloba motindo wana ete mazali na likambo te, basusu batalelaki baoyo balobaki yango lokola bandakisa ya komitombola oyo babongi na komekola.
Bokóli ya ezaleli ya komikumisa ezali kobimisa motuna oyo: Komikumisa mpo na bozwi mpe makoki na biso ezali likambo malamu? Ya solo, ezali mabe te kosepela na makambo oyo tosalaki mpe ata kosolola na ntina na yango elongo na baninga mpe basangani ya libota na biso. Kasi ezali boni mpo na baoyo bazali komitambwisa engebene maloba oyo ete, “Soki ozali na yango, talisá yango polele liboso na bato banso”? Lisusu, ezali boni mpo na baoyo, atako na polele bazali komikumisa te, kasi na lolenge mosusu bazali kosala nyonso mpo ete basusu bakoka koyeba nguya mpe misala na bango? Motindo wana ya komikumisa ezali malamu, ezali nkutu na ntina, lokola basusu bazali koloba yango?
Bopusi likoló na baninga
Kanisá na bopusi oyo komikumisa ya bato mosusu ezali na yango likoló na yo. Na ndakisa, omiyokaka lolenge nini liboso na maloba oyo malandi?
“Babúku oyo nakomi eleki mpenza babúku oyo basusu bakomi.”—Mokomi moko oyo ayebani malamu.
“Soki nazalaki na ntango ya kozalisama, mbɛlɛ napesaki makanisi mpo na kotya molɔngɔ́ malamu kati na molɔ́ngɔ́ mpenza.”—Mokonzi moko ya ntango ya Moyen Age.
“Nzambe azali te; soki azalaki, mbɛlɛ nandimi ete ngai nde ye mpenza.”—Filozofe ya ekeke ya 19.
Ozali kobendama epai na bato motindo oyo na nzela ya maloba na bango? Okanisi ete okosepela kozala elongo na bango? Soko moke te. Mbala mingi, komikumisa—na solosolo ata mpe ya lisɛki—ekookisaka basusu nkanda, ekosilikisaka bango, mbala mosusu epesaka bango zuwa. Yango esalaki bopusi motindo oyo likoló na mokomi na Nzembo, Asafa, oyo ayambolaki ete: “Jambi najalaki na jua epai na [baoyo bazali komikumisa, NW].” (Njembo 73:3) Ya solo, moto moko te kati na biso alingi ete baninga mpe bazalani na ye bázala na mayoki mabe mpo na ye! 1 Bakolinti 13:4 (NW) eyebisi ete: “Bolingo . . . ekomikumisaka te.” Bolingo oyo euti na bobangi Nzambe mpe komibanzabanza na mayoki ya bato mosusu ekopekisa biso na kolakisa oyo tokanisi ete ezali mayele mpe bozwi na biso.
Soki moto azali komipekisa mpe azali koloba na bopɔlɔ nyonso, akosala ete bato mosusu oyo bazali elongo na ye bamiyoka malamu. Yango ezali mpenza ezaleli ya ntina mingi. Ekoki kozala ete Lord Chesterfield, moto monene ya Leta ya Grande Bretagne azalaki kokanisa yango ntango apesaki mwana na ye toli, ete: “Soki okoki, zalá na bwanya mingi koleka bato mosusu; kasi koyebisa bango bongo te.”
Bato nyonso bazali na makabo lolenge moko te. Likambo oyo lizali pɛtɛɛ mpo na moto moko lizali mpenza bongo te mpo na moto mosusu. Bolingo ekopusa moto na kozala na boboto epai na baoyo bazwi mayele mingi te na makambo oyo kati na yango azali na likabo mingi. Mbala mingi, bato mosusu mpe bazali na makabo mingi kati na makambo mosusu. Ntoma Paulo ayebisi biso ete: “Mpɔ na likabo na ngɔlu lijui ngai, najali koloba na mɔkɔ na mɔkɔ kati na bino ete boleka tɛ komikanisa bino mpenja na motindo mobɔngi tɛ. Kasi bomitanga na makanisi na sembo, moto na moto pelamɔkɔ na likabo na kondima oyo Njambe apɛsi ye.”—Baloma 12:3.
Komikumisa ezali kouta na bolɛmbu
Atako bato mosusu bakimaka bato na komikumisa, na komimonáká ete bazali mpamba liboso na bango, basusu basalaka na motindo mokeseni. Bakosukisaka ete bato na komikumisa bazali na libateli te. Mokomi Frank Trippett, alimboli mpo na nini moto oyo azali komikumisa, azali nde kokitisa limemya oyo bato mosusu bazali komonisa epai na ye: “Moto nyonso ayebi mpenza malamu ete komikumisa emonisaka bolɛmbu oyo bato bazalalaka na yango.” Lokola bato mingi bazali komona polele bokosi ya moto oyo azali komikumisa, ezali likambo ya bwanya te na komibatela na mopepe makasi ya komikumisa, boye te?
“Kasi nazali solo na makoki mingi!”
Oyo ezali lolenge basusu balukaka kolóngisa lolendo na bango. Bamonaka ete lokola bazali solo na likabo mingi na makambo mosusu, ekozala bokosi komeka komimonisa na lolenge mosusu.
Kasi komikumisa na bango ezali malamu? Komitombola na moto etalaka nsé likanisi mpe maoki ya moto ye moko. Oyo tomonaka ete ezali nguya monene epai na biso moko ekoki komonana mpamba epai na basusu. Likambo oyo ete moto moko apusami na kolakisa makoki na ye ekoki nkutu komonisa ete azali mpenza na nguya monene te—azali monene te mpo na koyebana kozanga ete alobelama. Biblia ezali komonisa momeseno na bato motali komizimbisa wana epesi toli ete: “Boye, tika ete ye oyo akanisi ete ajali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea tɛ.”—1 Bakɔlinti 10:12.
Ata soki moto moko azali na makoki mingi na makambo mosusu, yango elóngisi komikumisa? Te, mpamba te komikumisa ezali kopesa nkembo epai na bato, nzokande makoki nyonso oyo tozali na yango mauti na Nzambe. Ye nde asengeli kozwa nkembo. Mpo na nini tosengeli kokumisama mpo na eloko oyo tobotamaki na yango? (1 Bakolinti 4:7) Lisusu, motindo moko lokola tozali na nguya, bobele bongo tozali mpe na bolɛmbu. Kolongobana ezali kosɛnga ete tobendaka likebi likoló na mabungá mpe bolɛmbu na biso? Bato mingi oyo bamikumisaka bakanisaka ete ezali bongo te. Ekoki kozala ete Herode Agrippa I azalaki molobi ya makoki mingi. Nzokande, azangaki bopɔlɔ, yango ememaki ye na kufa moko ya mpasi mingi. Likambo wana ya nsɔ́mɔ limonisi lolenge nini lofundo eboyami na Nzambe, lokola yango eboyami mpe epai na bato mingi.—Misala 12:21-23.
Mbala mingi makoki mpe nguya eyebanaka kozanga ete toluka kobenda likebi likoló na biso moko. Wana basusu bayebi mpe bazali kokumisa bizaleli mpe misala na biso, yango ezali komonisa biso na lolenge lobongi. Masese 27:2 elobi na bwanya nyonso ete: “Tika ete mosusu asanjola yɔ kasi monɔkɔ na yɔ mpenja tɛ, mopaya nde bibɛbu na yɔ tɛ.”
Ezali na ntina mpo na kolónga na misala?
Basusu bakanisaka ete komitombola ezali na ntina mpo na kolónga kati na mokili ya lelo oyo etóndi na komekana. Bazali kobanga ete soki balobeli mpe bakumisi nguya na bango te, bakoyebana te, bakondima motuya na bango te. Ndakisa ya komibanzabanza motindo yango emonani na maloba oyo kati na zulunalo Vogue: “Na ntango ya kala bateyaki biso ete bopɔlɔ ezali moko na bizaleli malamu, sikawa tozali koyekola ete kozanga koloba mingi ekoki kozala mikakatano.”
Mpo na baoyo balingi kotombwama engebene mitindá ya mokili, komibanzabanza wana ekoki kozala ya ntina. Kasi mpo na moklisto makambo mazali bongo te. Ayebi ete Nzambe azali kokanisela mpe kosalela makoki na baoyo bazali na komikitisa, kasi ya bato oyo bazali komitombola te. Na yango, moklisto asengeli te komeka kosalela myango ya moimi. Ezali solo ete, moto oyo azali komityela motema mpenza akoki kozwa mwa nkembo ya ntango mokuse, na kolobáká mingi mpo na kobenda likebi na basusu to na kozala na bopusi likoló na bango. Nzokande na nsima, bakotɔndɔla ye mpe akokitisama, akoki nkutu koyokisama nsɔni. Ezali lokola Yesu Klisto alobaki ete: “Ye oyo akominɛtɔla akosɔkisama; ye oyo akomisɔkisa akonɛtwa.”—Matai 23:12; Masese 8:13; Luka 9:48.
Matomba ya bopɔlɔ
Ralph Waldo Emerson akomaki ete: “Moto nyonso oyo nakutanaka na ye aleki ngai na lolenge moko to mosusu. Na yango, nakoki koyekola makambo epai na ye.” Maloba na ye mayokani na oyo ntoma Paulo alendisaki na kopemama ya elimo ete baklisto basala “likambo mɔkɔ mpɔ na elulela sɔkɔ mpɔ na njombo tɛ, kasi awa ejali bino na kosɔkɛma, botanga bamosusu ete baleki bino.” (Bafilipi 2:3) Likanisi wana ya bopɔlɔ lizali kopesa moto makoki ya koyekola epai na basusu.
Na yango kebá ete nguya na yo ekóma te bolɛmbu mpo na yo. Tiká te ete makoki mpe misala na yo mibeba mpo na maloba ya komikumisa. Bakisá bopɔlɔ kati na bizaleli kitoko na yo. Yango nde ekotombola mpenza lokumu na yo na miso ya basusu. Ekosalisa yo na kozala na boyokani malamu elongo na bato mosusu mpe ekomemela yo ngɔlu ya Yehova Nzambe.—Mika 6:8; 2 Bakolinti 10:18.