Kotika te ete makoki na yo ekóma bolɛmbu na yo
Titanic ezalaki masuwa ya monene mpe ya lokumu oyo ezalaki na nkɔbɛ 16 oyo elekisaka mai te mpe emonanaki ete ekoki kozinda te. Ntango esalaki mobembo na yango ya liboso na 1912, ememaki bakano mingi te ndenge esengelaki. Masuwa etutanaki na libanga mpe ezindaki, bato koleka 1500 bakufaki.
UZIYA, mokonzi na Yelusaleme ya kala, ye azalaki kobanga Nzambe, azalaki mokonzi monene ya basoda. Na lisalisi ya Yehova, alongaki banguna na ye nyonso. “Lokumu na [Uziya] epalanganaki mosika; asungamaki mingi kino ezwaki ye makasi.” Kasi, “akómaki na lolendo . . . Zambi aboyaki [Yehova] Nzambe na ye.” Mpo na lolendo na ye, Uziya azwaki etumbu ya maladi ya maba.—2 Ntango 26:15-21; Masese 16:18.
Masolo mibale oyo eteyi biso ete soki ozali na makoki kasi ozangi mayele, bopɔlɔ mpe komikitisa, ekoki mpenza kokóma bolɛmbu to mbeba. Yango ezali lisɛki te mpamba te, na lolenge moko to mosusu, mokomoko na biso azali na makoki to na makabo, mpe tolingi ete tósalela yango mpo na matomba ya Mozalisi na biso mpe mpo na kosepelisa ye. Ya solo, tosengeli kosalela mpenza likabo oyo tozwi na Nzambe kasi tokobatela yango ete ezala ntango nyonso eloko moko ya motuya.
Na ndakisa, ezali mpasi te mpo na moto oyo alingaka mosala na ye akómisa likabo yango bolɛmbu na komipesaka mingi na mosala. Ezali mpasi mpo na kokosa to kobuba moto ya bokɛngi, kasi, akoki kozala na bokɛngi mingi kino kozanga kozwa bikateli. Likoki ya kotambwisa makambo ezali mpe ezaleli malamu, kasi, soki esalemi na koleka ndelo kino kobosana bolɛmbu ya bomoto, bato oyo bazali na biso esika moko bakozala na esengo te mpe bakokóma na makambo makasi mpe yango ememaka mawa. Na yango, talelá makoki na yo malamumalamu. Ozali kosalela yango malamu? Ezali lipamboli mpo na bato mosusu? Mingi koleka, ozali kosalela yango mpo na kokumisa Yehova, liziba ya ‘makabo nyonso ya malamu’? (Yakobo 1:17) Mpo na yango, tiká tótalela malamumalamu bolɛmbu, to mpe mbeba, soki etalelami te.
Salelá makoki na yo ya kokanisa na mayele
Kozala na makanisi malamu ezali mpenza na ntina mingi. Kasi, ekoki kokóma bolɛmbu soki ememi biso na komityela motema mingi koleka, mingimingi ntango bato mosusu bazali kokumisa biso mingi koleka to bazali kobondela biso mingi. To tokoki kobanda kotalela Liloba ya Nzambe mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na mayele na biso moko.
Moto akoki komityela motema koleka na makambo mingi. Na ndakisa, ntango moto ya mayele mingi azwi mokumba na lisangá ya boklisto, ekoki kozala lisukulu ya bato nyonso to lisukulu na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, akoki komibongisa bobele pene na mokolo oyo akosala yango, ntango mosusu kutu akobosana kosala libondeli mpo na kozwa lipamboli ya Yehova. Kasi, atii motema na boyebi na ye moko mpe na likoki na ye moko ya kokanisa. Makoki ya kobotama ekoki kozipa bopɔtu mpo na mwa ntango, kasi soki ozali na lipamboli ya Yehova te, bokoli na yo ya elimo ekokita, to mpe ekosuka. Okobebisa likabo ya kitoko!—Masese 3:5, 6; Yakobo 3:1.
Moto ya mayele akoki mpe lisusu kotalela Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na mayele ya bato. Nzokande, mayele ya ndenge wana ‘evimbisaka moto na lolendo’ lokola mopɛpɛ evimbisaka bale mpe lolendo ‘elendisaka’ bolingo ya boklisto te. (1 Bakolinti 8:1; Bagalatia 5:26) Nzokande, moto ya elimo, ata azali na makoki ya kokanisa ya lolenge nini, abondelaka mpe atyaka motema ntango nyonso na elimo ya Nzambe. Na koleka, makoki na ye ekokóma litomba wana azali kokolisa bolingo, komikitisa, boyebi mpe bwanya—mpe nyonso wana na bokatikati.—Bakolose 1:9, 10.
Makoki ekoki kokóma bolɛmbu soki tokómi biso moko komityela motema koleka, kosala makambo ntango nyonso na lofundo. Moto ya makoki—mpe baoyo bazali kokumisa ye koleka ndelo—babosanaka ete “[Yehova] akotala bango te, baoyo bazali na mayele na miso na bango mpenza,” atako bazali na makoki. (Yobo 37:24) Liloba ya Nzambe elobi ete: “Mayele ezali elongo na basɔkɛmi.” (Masese 11:2) Atako azalaki na mayele mingi mpe atángaki kelasi mingi, ntoma Paulo alobaki na Bakolinti ete: “Bandeko, eyaki ngai epai na bino, nayaki kosakwela bino makambo na solo na Nzambe na maloba kitoko mpe na mayele te . . . Nazalaki liboso na bino na bolɛmbu mpe na nsɔmɔ mpe na kolenga mingi. Koloba na ngai mpe esakweli na ngai ezalaki na maloba na elengi mpe na mayele te, kasi mpo na komonisa [elimo, NW] mpe nguya ete kondima na bino euta na mayele na bato te kasi na nguya na Nzambe.”—1 Bakolinti 2:1-5.
Moto ya mayele mpenza akosamaka te na makanisi ya mokili likoló na boyebi to masɛngami ya mokili mpo na kobonga na bomoi. Na yango, na esika ete asalela makoki na ye mpo na koluka bato bákumisa ye to mpo na koluka bozwi ya mokili oyo, moto yango akomipesa nde mobimba epai na Ye oyo apesaki ye bomoi mpe makoki. (1 Yoane 2:15-17) Mpo na yango, akotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na ye. Na yango akokóma lokola “nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai. Nyonso ekosalaka ye ebongi” na lisalisi ya mapamboli ya Yehova, kasi mpo na makoki na ye ya kobotama te.—Nzembo 1:1-3; Matai 6:33.
Tiká ete boklisto ya solo ekolisa makoki na yo
Na lolenge na yango, boklisto ya solo etondi na makoki oyo eleki bafilozofi ya mokili oyo mosika. Na ndakisa, bomoi ya boklisto ebongisi mibali, basi, bazalani mpe basali ya malamu koleka na mokili mobimba—bato ya kolongobana, ya limemya, ya kimya mpe ya molende. (Bakolose 3:18-23) Lisusu, baklisto bazali kobongisama mpo na koloba mpe mpo na koteya, yango ezali kopesa bango makoki malamu ya kosolola na bato mosusu. (1 Timote 4:13-15) Na yango, ezali likambo ya kokamwa te na komona bakonzi ya misala koluka basali na bango baklisto mpo na kobakisela bango mikumba to mpɛtɛ. Kasi makoki oyo mpe ekoki kosalelama mabe soki ebatelami malamu te. Mpɛtɛ to libaku ya mosala moko ekoki kobenda moto na komipesa mpenza na kompanyi, kozangisa makita ya boklisto mbala na mbala, to kotika kolekisa ntango malamu elongo na libota na ye.
Na ekólo Australie, nkulutu moko, ye tata ya libota, azalaki moto monene ya mombongo mpe azalaki na likoki ya kozala na bozwi mpe lokumu. Kasi, aboyaki lisɛnginya ya kozala na bozwi na ntango oyo. Alobaki ete: “Nalingaka kolekisa ntango mingi elongo na libota na ngai mpe na mosala ya boklisto.” Abakisaki ete: “Na yango, ngai na mwasi na ngai toyokanaki ete nakokitisa na likebi mpenza ntango oyo nalekisaka na mosala na ngai ya mosuni. Nakokende mosala mikolo mitano mobimba mpo na nini soki yango esengeli te?” Ntango asalaki mwa bambongwana ya malamu kati na bomoi na ye, nkulutu yango amonaki ete azalaki naino na likoki ya kokokisa bamposa ya libota na ye na kosaláká na boumeli ya mikolo misato to minei na pɔsɔ. Na nsima, abyangamaki mpo na kosala misala mosusu, lokola kosala na Komite ya Ndako ya Mayangani ya etúká. Lokola amitambwisaki na mayele, makoki na ye ememelaki ye na libota na ye kimya mpe esengo.
Bokatikati na mikumba
Baklisto mibali balendisami kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá. “Soko moto alingi ete asala mosala na mokɛngɛli [to mosaleli na misala], azali na mposa na mosala malamu.” (1 Timote 3:1) Lokola makoki oyo tolobelaki liboso, kondima mikumba esɛngi mpe kozala na bokatikati mpe koyeba kososola malamu. Moto moko te asengeli kozwa mikumba ebele kino kobungisa esengo na ye na mosala ya Yehova. Ya solo, elimo ya komipesa ezali malamu mpe ezali na ntina, mpo Yehova asepelaka na bagɔigɔi te; kasi, komipesa esengeli mpe komonisa bopɔlɔ mpe “makanisi malamu.”—Tito 2:12, NW; Emoniseli 3:15, 16.
Yesu azalaki na boboto, bososoli mpe mayoki oyo esalaki ete ata moto oyo azalaki na lokumu moko te amiyoka malamu ntango azali na ye esika moko. Bobele bongo lelo, bato bamiyokaka malamu ntango bafandi na bato oyo bazali na boboto, oyo bamibanzabanzaka mpo na basusu. Na lisangá ya boklisto, bankulutu oyo bazalaka na esengo mpe na boboto ndenge wana bazali solo “makabo na motindo na mibali” ya motuya. Bazali ‘ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molembisami na moi.’—Baefese 4:8, NW; Yisaya 32:2.
Kasi bankulutu basengeli kozala na bokatikati mpo na ntango oyo basengeli kolekisaka na bato mosusu, na bamposa na bango mpe na boyekoli na bango moko, bomanyoli, mabondeli mpe mosala ya kosakola. Na ntembe te, bankulutu oyo bazali batata ya mabota basengeli mpe kolekisa ntango elongo na mabota na bango, kozaláká penepene na bango.
Basi ya makoki bazali lipamboli monene
Lokola bankulutu ya makoki, basi ya elimo bazali mpe na ntina mingi mpenza na lisangá ya Yehova. Mbala mingi, basi basepelaka na bato mosusu—ezaleli yango ezali na motuya epai na Yehova mpe alendisaka yango. Ntoma Paulo akomaki ete ‘bótyaka miso bobele na lobanzo oyo bozalaka na yango na makambo na bino moko te, kasi mpe na lobanzo oyo bozalaka na yango na makambo ya bamosusu.’ (Bafilipi 2:4, NW) Nzokande, “lobanzo oyo bozalaka na yango” ezali na ndelo mpamba te moklisto moko te akolinga ‘komikɔtisa na makambo ya bato’ to kozala motɔngi.—1 Petelo 4:15, NW; 1 Timote 5:13.
Basi bazalaka na makambo mosusu ebele. Na ndakisa, mwasi moklisto akoki kozala na mayele mingi koleka mobali na ye. Atako bongo, lokola “mwasi ya makoki” oyo akobangaka Yehova, akotosa mobali na ye mpe akosalela makoki na ye mpo na kosunga mobali na ye kasi mpo na komekana na ye te. Mpe na esika ya koyokela ye zuwa to nkanda, mobali ya mayele mpe ya komikitisa akotalela makoki ya mwasi na ye na motuya mpe akosepela na yango. Akolendisa ye asalela makoki na ye malamu mpo na kotonga libota na ye mpe kosalisa bana na ye ‘bábanga Yehova’ lokola ye moko asalaka yango. (Masese 31:10, 28-30, NW; Genese 2:18) Mibali na basi oyo bazali na bopɔlɔ mpe na komikitisa bavandaka malamu na mabala oyo ezali solo kokumisa Yehova.
Komitombola te mpo na bomoto na yo
Soki bosembo mpe ezaleli na yo ya kosala mokano ya Yehova na molimo mobimba ekómisi yo moto oyo bamosusu bayokelaka mingi, ekozala malamu ozala na komikitisa. Kasi, ekoki kozala bolɛmbu soki ememi moto na kozala likoló ya baninga to kobangisa bango. Yango ekoki mpenza komonana ata na kati ya lisangá ya boklisto. Baklisto basengeli komiyoka malamu ntango bafandi na baklisto mosusu, ezala ntango bazali elongo na bankulutu ya lisangá.—Matai 20:25-27.
Bankulutu mpe basengeli komiyoka malamu ntango bazali elongo. Mpe ntango bazali na likita na bango, bikateli na bango esengeli kouta na makanisi ya bomoto te. Ya solo, elimo santu ekoki kozala epai na nkulutu nyonso kati na lisangani ya bankulutu, ata epai ya nkulutu oyo azali mokóló te to oyo alobaka mingi te. Na yango, baoyo bazali na miso makasi, ata ntango bakanisi ete bazali na nzela malamu, basengeli koyekola kondima makanisi ya bamosusu, “kokumisaka” bongo baninga na bango bankulutu. (Baloma 12:10) Mosakoli 7:16 ekebisi biso malamu ete: “Zalá na boyengebene na koleka te mpe omibongisa na mayele na koleka te. Mpo na nini okomibebisa?”
Yehova, moto apesaka ‘makabo nyonso ya malamu,’ asalelaka makoki na ye ya kokamwa na ndenge ya malamu mpenza. (Yakobo 1:17; Deteronome 32:4) Mpe azali Molakisi na biso! Na yango, tiká ete tóyekola epai na ye mpe tósala milende mpo na kokolisa makabo to makoki na biso ya kobotama mpe tósalela yango na mayele, na bopɔlɔ mpe na bolingo. Na bongo, tokozala mpenza lipamboli mpo na bamosusu.
[Bililingi na lokasa 27]
Bokoli ya elimo eutaka na boyekoli, na libondeli mpe na elikya epai na Yehova
[Elilingi na lokasa 29]
Soki moto azali kosepela na bato mosusu mpe azali na bopɔlɔ ezali lipamboli
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Na ndingisa ya Mariners’ Museum, Newport News, VA