Biblia: Wapi motuya na yango mpenza?
“BIBLIA ezali libombami, mokanda oyo mokomamaki mpo ete bákanga ntina na yango te,” wana ezali maloba ya mobali moko nkoló-ndako. Mosusu alobaki ete: “Nayebi ete Biblia ezali búku moko ya ntina, kasi nasosolaka yango mpenza te. Ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango.”
Zulunalo The Toronto Star elobi ete: “Baklisto mingi bayebi . . . Biblia mpenza te.” Elenge mwasi moko ya Katolike alobaki ete: “Kozala na Biblia epesaka ngai esengo. Ekopesaka kimya mozindo.” Mobomi mbisi moko alobaki ete: “Biblia ezali lokola likonga ya kolakisa nɔ́rdi, oyo ekokambaka moto katikati na mai monene ya bomoi oyo ezali na mbonge mpe mopepe makasi kino na esika oyo ezali na libateli.” Engebene mosambeli moko ya kala ya Lingomba ya Hindou, “Biblia ezali Liloba ya Nzambe mpe likabo epai na bato mpe nkisi mpo na mpasi ya elimo.”
Makanisi mpo na oyo etali motuya mpenza ya Biblia ezali mingi mpe ekeseni. Kasi, wapi motuya na yango mpenza?
Biblia ezali búku oyo ezali na ntina mpe ekabolami mingi koleka babúku nyonso mosusu. Tozali kokuta kati na yango biyano na ntina na makambo ya mpasi oyo moto asilá kokutana na yango to oyo akokutana na yango. Matomba malamu ya batoli na yango ekokani na mosusu soko moke te. Malako ya bizaleli malamu oyo yango ezali koteya ekokani mpe na mosusu te. Nsango na yango ezali na nguya mpe ezali na matomba. Búku oyo ezali kopesa motuya koleka babúku nyonso, ebongi ete elongolama kofanda bobele na bibliotɛki na biso mpe ebongi ete etyelama likebi mozindo mpe kotalelama malamu.
Tokoki kofongola Biblia na elikya nyonso ete ezali solo na mobimba na yango, ebongi na kotyela motema, mpe ezali solo. Makambo oyo mabimaki kati na lisoló ya bato, oyo ekomami kati na yango, mandimami na lisoló ya makambo ya bato ya mokili. Mbala na mbala, bokundoli biloko ya kalakala bozali kondimisa ete Biblia ezali na makambo oyo masalemaki mpenza mpe ya solo. Bosembo ya bakomi ya Biblia pene na 40 ezali mpenza komonisa bango ete bazali bato ya bosembo mpe ya boyengebene. Boyokani oyo ezali na kati na Biblia ezali komonisa ete euti na moto te. Makambo oyo makomami kati na yango mazali ya solo. Bato oyo balobelami kati na yango bazali mpenza bato ya solo. Bisika mpe bitúká oyo bilobelami kuna bizali ya solo. Lisusu, Biblia ezali na bisakweli ya ntina mingi oyo, na ntembe te, ezali komonisa ete Yehova azali Nkolo ya Biblia.—2 Petelo 1:21.
Mozalisi na biso Monene asalaki ebongiseli ete boyebi ya mikano na ye ezala pene na bato oyo balingi koyeba yango. Ya solo, Yehova azali koyebisa biso na elobeli ya polele ete mokano na ye ezali ete bato ya motindo nyonso bayekola Liloba na ye mpe “bakóma na boyebi ya solo na sikisiki.” (1 Timoté 2:3, 4, NW; Masese 1:5, 20-33) Ezali moko na makambo maleki ntina oyo tokoki kosala na bomoi na biso mobimba. Kozwa boyebi yango ezali ntembe oyo tosengeli kolónga. Baklisto ya liboso bayebaki likambo yango. Moko na bango apusamaki na koloba ete: “Libɔndɛli na ngai ejali ete bolingo na bino boyikana koleka mingi esika mɔkɔ na boyebi mpe bɔsɔsɔli yɔnsɔ ete bomekisa makambo makɛsɛni.”—Bafilipi 1:9, 10; Bakolose 1:9, 10.
Biblia ezali mwango ya liboso mpenza oyo Mozalisi azali kosalela mpo na koyebisa mokano na ye epai na libota ya bato, mpe ezali kolimbola mokumba nini moko moko na biso azali na yango kati na mokano wana. Makambo ya kala makomami kati na yango, mpe ezali kopesa emonaneli ya polele mpo na mikolo mizali koya. Bandimbola ya Biblia ezali kosembola mateya mpe kotya biso alimá mpo na oyo tosengeli kondima to oyo tosengeli kondima te. (Misala 17:11; 2 Timoté 3:16, 17) Ezali kopesa mibeko ya etamboli oyo na nzela na yango tosɛngeli kobika, mpe ezali kotambolisa bato na nzela ya kolónga mpe ya esengo. (Matai, mokapo 5 kino 7) Ezali kolobela makasi Bokonzi ya Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na bato banso mpe ezali komonisa lolenge nini boyangeli na ye ezali esaleli mpo na kobulisa nkombo na ye mpe kolóngisa boyangeli na ye. Biblia ezali komonisa nzela oyo tosengeli kolanda mpo na kozala na boyokani ya penepene mpe ya bolingo elongo na Mopesi na bomoi na biso, Yehova.
Lisusu, Biblia ezali búku bobele moko oyo ekokamba yo kino na mbano eleki monene oyo bato bakozwa mokolo mosusu—bomoi ya seko lokola bato ya kokoka kati na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Baloma 6:23) Mwana bobele moko ya Yehova azali koyebisa biso ete: “Oyo ejali bomɔi ete bayeba yɔ Njambe mɔkɔ na sɔlɔ mpe motindami na yɔ, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ya solo, búku oyo ya motuya monene boye esɛngeli nde kopusa biso na koyekola oyo tosengeli kosala mpo na kozwa mbano ya bomoi ya seko. Lokola lisoló lilandi likomonisa yango, Biblia ezali mokanda oyo mokomamaki mpo ete bato bakanga ntina na yango.