Makomami nyonso mazali na litomba mpo na koteya
1 Makanisi likoló na motuya ya Biblia mazali mingi mpe makeseni. Mpo na biso, tondimisami ete kati na yango tokozwa biyano mpo na kosilisa mikakatano minene ya bato, bakisá mpe mitindá ya kotyela motema mpo na kopesa litambwisi malamu na bomoi na biso. (Mas. 3:5, 6) Eloko moko te ekokani na mayele ya batoli ya Biblia. Eloko moko te eleki mitindá ya bizaleli malamu oyo yango ezali kosɛnga. Nsango na yango ezali na nguya, pamba te “ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.” (Ebe. 4:12) Lolenge nini tokoki kosunga bazalani na biso na kososola ete basengeli kokamata búku wana oyo ezali kolala mpamba likoló na botáláká ya mikanda mpe bábanda kotánga yango mbala na mbala? Na sanza ya Máí, tómeka bamoko kati na makanisi oyo malandi mataleli kokabola Traduction du monde nouveau elongo na búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?
2 Koyebáká ete lobanzo ya bato mingi ezali ya kokokisa bamposa na bango ya moboko, tóbanda lisoló epai na bango na kolobáká boye:
◼ “Bato mingi oyo nazali kokutana na bango mikolo oyo bazali koloba ete lobanzo na bango mpenza ezali bongo koluka mbongo mpo na kokokisa mikumba na bango. Mingi bamikɔtisi na boluki ya biloko ya mosuni, yango ebimiseli bango mitungisi ndenge na ndenge. Epai wapi tokoki kozwa batoli malamu koleka mpo na makambo wana? [Tózela eyano.] Nasili komona ete Biblia ezali kopesa batoli ebongi oyo ekoki kosunga moto ete apɛngola mikakatano mizangi ntina. Talá ndakisa moko.” Tófungola búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? na lokasa 163 mpe tótánga 1 Timoté 6:9, 10, oyo etyami na paragrafe 3. Tópesa mwa makanisi mosusu likoló na paragrafe 4, mpe tólakisa búku.
3 Tokoki mpe kosalela likanisi oyo:
◼ “Wana tozali kotánga zulunalo to kolanda nsango na radió to na televizyó, toyokaka ntango nyonso mokakatano moko ya sika oyo ezali kopesa mawa, mpe tomitungisaka mingi. [Tótánga likambo moko ya mobulungano oyo liuti kosalema.] Ndenge nini tokoki kolónga mikakatano ya motindo wana? [Tózela eyano.] Na 1983, prezidá ya États-Unis (na ntango wana Ronald Reagan) alobaki ete Biblia ezali na nsango moko ya ntina koleka nsango nyonso oyo esila kokomama mpe ete ‘nkasa na yango ezali na biyano bitali mikakatano nyonso oyo moto akoki kokutana na yango.’ Maloba na ye mazali kokundola likambo oyo Biblia yango moko ezali kolobela. [Tótánga 2 Timoté 3:16, 17.] Nakosepela kolakisa yo mpo na nini tokoki kotya motema na Biblia.” Tóbimisa mwa makanisi ya ntina na trakte Mpo na nini kondimela Biblia. Tósɛnga na moto yango ete tózonga lisusu mpo na kolimbwela ye ete makambo mazali koleka na mokili mokolo na mokolo mazali kokokisa na lolenge ya kokamwa bisakweli ya Biblia.
4 Soki bato mingi kati na teritware na biso basanganaka ata na lingomba moko te, tómeka elobeli oyo:
◼ “Bato mingi na kartye bazali na makanisi ete babúku mosusu ya bulɛɛ ezali na bongolabongola mpe ezali bobele masapo mpamba. Bazali komona makambo ya mabe oyo mazali kosalema na nkombo ya mangomba, na yango batyaka ata motema na Biblia te. Kútu, bato mingi koleka bazali komituna soki Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe to ya bato. Okanisi nini mpo na yango?” Tózela eyano. Na kotaleláká eyano oyo ekopesama, tófungola búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? na esika moko oyo ezali kolobela ntembe to likanisi ya molobani na biso, mpe tósolola likoló na likanisi moko to makanisi mibale. Na ndakisa, tokoki kosalela paragrafe 27 kino 29 bandá na lokasa 66 na nsé ya motó ya likambo moke “Jésus—Un personnage historique.”
5 Molakisi na biso monene asɛnzɛlaka na boye ete boyebi ya mokano na ye epesama na moto nyonso oyo alingi kozwa yango. Moko ya makambo malamu oyo tokoki kosala epai na bazalani na biso ezali bongo kosunga bango ete bátalela Biblia na motuya na yango mpenza; yango ekoki kobikisa bomoi na bango.—Mas. 1:32, 33.