Mituna ya Batángi
Ekozala malamu kondima kokata mangwele to kotɔbɔlama nkísi mosusu oyo ezali na eloko ebéngami “albumine” oyo euti na makila ya bato?
Mpo na koloba polele, moklisto nyonso asengeli kokamata ekateli na ye moko na likambo oyo.
Basaleli ya Nzambe balingi kotosa na bosembo nyonso mobeko oyo mozwami kati na Misala 15:28, 29, etali koboya makila. Mpo na yango, baklisto bakolya te nyama oyo ezangi kosopama makila to bilei lokola ba boudins oyo esalemi na makila. Kasi mibeko ya Nzambe mizali mpe kosalelama na likambo ya monganga. Batatoli ya Yehova batambolaka na karte moko oyo ezali komonisa ete baboyaka ‘kozongisama makila, makila oyo ezali na biteni na yango nyonso, globules rouges, globules blancs, plaquette sanguine, to plasma sanguin.’ Nzokande, ezali boni mpo na oyo etali kotɔbɔla mwa eteni moke ya serum oyo ezali na protéine oyo ezalaka kati na makila?
Batatoli basili kososola uta kala ete wana ezali likambo litali ekateli ya moto na moto na boyokani na lisosoli oyo liteyami malamu na Biblia. Yango emonisamaki kati “Mituna ya Batángi” ya Mosenzeli ya Yúni 1, 1990, oyo ezalaki kolobela likambo ya kozwa na nzela ya ntonga eteni ya makila ebéngami serum, oyo monganga akoki kosɛnga soki moto moko azali liboso na likámá ya kozwa bɔkɔnɔ oyo bozali zingazinga na ye. Biteni ya ntina mingi ya nkísi motindo wana bizali mpenza plasma yango moko te, kasi nde biloko bibéngami anticorps oyo esalemaki kati na plasma sanguin ya bato oyo nzoto na bango ekólisaki mwango ya kobundisa bokɔnɔ yango. Baklisto mosusu oyo bakanisaka ete na lisosoli malamu nyonso bakoki kondima nkísi wana bamonaki ete ba anticorps ya mwasi oyo azali na zemi elekaka na makila ya mwana moke oyo azali na libumu na ye. “Mituna ya Batángi” emonisaki likambo yango, mpe likambo oyo ete ba albumines mosusu elekaka longwa na mwasi ya zemi kino epai na mwana na ye.
Mingi bamonaka ete likambo oyo lizali na ntina mingi, mpamba te mangwele mosusu oyo esalemi na biloko biuti na makila te ekoki kozala na eteni moke ya albumine ya makila oyo esalelamaki to ebakisamaki mpo na kobatela biteni mosusu ya mangwele yango. Lelo oyo mwa eteni moke ya albumine ezali mpe kosalelama wana bazali kotɔbɔla bato biloko ebéngami hormone EPO (érythropoïétine) oyo esalemi na laboratware. Batatoli mosusu bandimaki kozwa ntonga ya EPO mpamba te yango ekoki kokólisa noki ba globules rouges mpe bongo kokitisa motema ya monganga oyo azali kokanisa ete esengeli kozongisa makila.
Na mikolo mizali koya nkísi mosusu ekoki kosalema oyo ekozala na mwa albumine moke kati na yango, mpamba te bakompanyi ya kosala nkísi ezali kobimisa nkísi ya sika to ezali kobongola mitindo na oyo ezali sikawa. Na yango baklisto bakoki kozala na mposa ya koyeba soki albumine ezali kati na mangwele to na nkísi mosusu oyo monganga asɛngi ete bázwa. Soki bazali kokakatana to bazali na ntina ya kokanisa ete albumine ezali kati na yango, bakoki kotuna monganga na bango.
Lokola emonisami, Batatoli mingi baboyaki te kozwa nkísi oyo ezali na mwa eteni moke ya albumine. Nzokande, moto nyonso oyo alingi koyekola malamumalamu likambo yango liboso ya kozwa ekateli na ye asengeli kozongela makambo mayebisami kati na “Mituna ya Batángi” ya Mosenzeli ya Yúni 1, 1990.