Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/6 nk. 30-31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mituna ya Batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Biloko mikemike oyo euti na makila mpe mayele mosusu na ntango ya lipaso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/6 nk. 30-31

Mituna na batangi

◼ Ba Témoins de Jéhovah bandimaka kotyama mwa ndambo ya makila, lokola immunoglobuline to albumine?

Bamosusu bandimaka yango, mpamba te bakanisi ete Makomami mazali kokweisa te na polele mpenza kotyama ya mwa ndambo na makila to biloko oyo bizali kati na makila.

Mozalisi apekisaki bato nyonso ete bálya makila te wana elobaki ye boye: “Nyama ya bomoi, yango ezali kotambola, ekozala bilei mpo na bino. . . . Nde mosuni oyo ezali na bomoi na kati, bokolya te, yango ezali na makila.” (Genese 9:3, 4.MN) Makila ezalaki bulee mpe yango esengelaki kosalelama bobele lokola mbeka. Soki bongo te, esengelaki kosopa yango na mabelé.​—Levitike 17:13, 14; Deteronome 12:15, 16.

Wana ezalaki epekiseli moko ya mwa ntango moke te, oyo etalelaki bobele Bayuda. Ntina ya koboya makila ezongelamaki kolobelama lisusu epai na baklisto ya liboso. (Misala 21:25) Zingazinga na bango, kati na Bokonzi ya Rome, mibeko na Nzambe mityolamaki mpenza, mpamba te bazalaki lisusu kolya biloko oyo bilambamaki elongo na makila. Mibeko yango mizalaki lisusu kotosama te mpo na bantina ya “monganga” (medicales). Mpo na yango, Tertullien azali koyebisa ete bamosusu bazalaki komela makila mpo bazalaki kokanisa ete yango ekokaki kosalisa bango na maladi ya ndeke to epilepsie. ’Bazalaki kofiba na lokoso nyonso makila ya babomi na bato oyo bazalaki kokatama nkingo kati na arene (esika oyo bilombe ya Baloma bazalaki kobunda na mbeli.) Tertullien abakisi ete: ’’Boyoka nsoni na ntina na kokufa miso na bino wana liboso na biso baklisto baoyo bazali kotalela te ata makila ya nyama lokola moko na biloko oyo bipesameli nzela na kolya yango.’’ Na ntango na biso, ba Témoins de Jehovah mpe basili kozwa ekateli motindo moko lokola baklisto ya liboso, na koboyaka kosopa mobeko na Nzambe ata soko zingazinga na bango bato bazali kolya bilei oyo bilambami elongo na makila. Na ba 1940, kozongisa makila na nzoto ekómaki kosalelama mingi mpenza lokola nkisi, kasi ba Témoins de Jehovah basosolaki ete mpo na kotosa na Nzambe, esengelaki mpe koboya yango, ata soko minganga bazalaki mpenza kosenga ete bazongisa bango makila.

Na libandeli, bazalaki kozongisa mpenza makila nyonso. Na nsima, balukiluki babandaki kokabola biloko ya ntina mpenza ezali kati na makila, mpamba te engebene minganga moto ya maladi azali ntango nyonso te na mposa ya biloko nyonso oyo ezali kati na makila. Kozongisama ya eloko bobele moko oyo ezali kati na makila, ekolembisa makama oyo ekokaki koyela bato ya maladi mpe yango ekopesa nzela na minganga ete basalela lisusu mingi makila oyo makotikala.

Makila ya moto ekoki kokabolama na ndambo mibale: selile oyo ezali lokola moindo mpe mai oyo ezali na langi ya mosaka (plasma, to sérum). Ndambo oyo ya selile (45%na yango) esalami na oyo bakobengaka mpenzampenza ba globules rouges, ba globules blancs mpe ba plaquettes. 55% oyo etikali ezali nde kosala plasma. Yango esalemi na 90% ya mai mpe mwa ndambo moke ya ba proteines, ya ba hormones, ya mungwa mpe ba enzymes. Lelo oyo bazali kokabola makila oyo epesami mpe biloko oyo ya ntina mpenza bizali na kati. Na yango. moto ya maladi oyo azwi likama moko to abukani, akozongisama mbala mosusu plasma (na ndakisa plasma oyo ezwi mpio ya frigo), nde moto oyo azangi makila akosengela kozongisama ba erythrocylaires, elingi koloba ba globules rouges oyo ebombamá mpo na kozongisa yango bato na nzoto. Bazongisaka mpe ba plaquettes mpe ba globules blancs, kasi yango esalemaka mingi te.

Na ntango ya kala, bato bayebaki te mayele oyo etali kosalela biloko oyo bizwami kati na makila. Nzambe apesaki bobele etinda oyo ete: ‘Boboya makila’, (Misala 15:28, 29.) Kasi mpo na nini kokanisa ete mobeko yango ekeseni na likambo oyo ya kosalela makila na mobimba na yango. to na kokabola yango na biloko oyo bizali kati na yango? Kokesenaka bongo na bato ya ntango na bango, baklisto ya liboso bazalaki koboya komela makila ata soko likambo yango esengelaki komemela bango kufa. Okanisi ete basengelaki kosala lolenge lokeseni soko moto moko azwaki makila, mpe atie yango na frigo, oyo ekokaki kozala mbala mosusu lokola boudin? Bakokaki kosala lolenge lokeseni te! Yango wana ba Témoins de Jehovah bazali koboya kozongisa makila, ezala yango nyonso to mpe biloko ya ntina oyo bizwami kati na yango (ba globules rouges. globules blancs, ba plaquettes to plasma), oyo esalelami bobele na mokano yango moko.

Kasi lokola motuna yango ezali komonisa, sikawa minganga bazali kokabola makila na lolenge ya sikisiki mpe bayebi kosalela yango. Likambo oyo ya kosalela ba proteines plasmatiques (ba globules, albumunie mpe fibrinogene) ezali bongo komonana mbala mingi. Na ntembe te, oyo ezali kosalelama mbala na mbala ezali bongo ba immuno​—globulines. Mpo na nini bazali kozongisa yango na nzoto?

Nzoto na yo ekoki kobota ba anticorps mpo na kobundisa ba maladi mosusu na kopesaka yo nzoto makasi wana bokono ekozwa yo. Ezali yango nde ebimaka nsima na kokata mangwele (na ndakisa anatoxine) mpo na ba maladi oyo elandi: polio oreillons. ruveole, kintuntu, diphteris-tetanos-coqueluche mpe fièvre typhoïde. Nzokande. na ntango moto azwi maladi moko makasi, minganga bazali mbala mosusu kotinda ye ete atyama sérum (na ndakisa antitoxine moko) mpo akoka kozwa makasi mwa moke na mbala moko na bokono wana. Kala mingi te, bazalaki kosala sérum yango na kozwa bobele ba immunoglobulines oyo ezali ba anticorps kati na nzoto ya moto oyo asili kozwa makasi wana ezali ye na bokono.a Makasi oyo ezwamaka na nzela ya kolya ba anticorps eumelaka te pamba te nzoto ekobombaka te libela na libela ba anticorps oyo ezali kati na sérum.

Baklisto mosusu bakanisi ete lotomo ya koboya makila’ ezali kotinda bango na koboya kotyama immuglobuline (proteine), atako ezali bobele ndambo moko ya makila. Etelemelo na bango ezali polele mpe na mpasi te: baboyi eloko moko oyo ezali kati na makila ata soki ezali motindo nini, ezala moke to mingi.

Baklisto mosusu bazali kokanisa ete kozongisama ya sérum (na ndakisa antitoxine), lokola immunoglobuline, oyo kati na yango ezali bobele na mwa ndambo moke ya plasma sanguin euti na moto mosusu mpe esalelami mpo ete bayeisama makasi na mango ya bokono, ekokani te na kotyama makila na nzoto.b Ekoki mbala mosusu kozala ete lisosoli na bango lizali kopekisa bango te mpo na kondima kotyama ba immunoglobulines to bandambo mosusu ya makila ya motindo yango, Mpo na bango likambo ya ntina mpenza ezali nde oyo ya koyeba soko basili kondima makama oyo ekoutaka na kolyama sérum oyo esalemi longwa na makila ya moto mosusu.

Tokosimba mpenza likambo oyo ete, misisa ya mwasi oyo akumbi zemi ekabwani na oyo ya like ya mwana oyo azali kati na libumu na ye; mbala mingi makila na bango ekesanaka. Makila ya mama ezali koleka te epai kuna like ya mwana ezali. Baselile ya makila na mama ata nkutu plasma ezali kokatisa placenta te mpo na kokola kati na like ya mwana. Na yango, soki, likama esalemi ete makila ya mama mpe oyo ya mwana esangani, mikakatano ya kolongono na nzoto mikoki kobima (kozanga kokokana ya Rh to ABO)‘ Nzokande, biloko mosusu bizwami kati na plasma ya mama bizali koleka kati na makila ya like ya mwana. Yango ezali mpenza bongo mpo na protéines plasmatique lokola immunoglobuline mpe albumine? Bamosusu bakoloba, Ee.

Epai na mwasi oyo azali na zemi, mécanisme moko ya botamboli ezali kolekisa mwa ndambo na ebele ya immunoglobulines oyo euti na makila ya mama kati na makila ya like ya mwana. Botindi wana ya ba anticorps oyo esalemaka na boumeli nyonso ya zemi, ba bebe bazali mpenza kobatelama liboso na mikrobe nyonso ya bokono.

Ezali motindo moko mpo na albumine, oyo minganga bakomelaka mbala mosusu moto moko ya maladi oyo azali na mpasi makasi to kati na makambo mosusu’.c Balukiluki bamonisaki ete albumine plasmatique ezali mpe koleka longwa na makila ya mama kino na oyo ya like ya mwana, ezali wana ndambo moke, na nzela ya placenta.

Moklisto akoki kondima likambo oyo ete ndambo moke na ba proteines ya plasma elekaka mpenza na nzela na misisa ya moto kino na oyo ya moto mosusu (like ya mwana) ntango asengeli kozwa ekateli soki asengeli kondima to te kotyama na mwa ndambo na immunoglobulines. ya albumine to ndambo mosusu ya makila. Bamosusu bakoloba mbala mosusu ete bakoki kondima yango na lisosoli nyonso; bamosusu bakomona ete basengeli mpenza te. Etali nde moto na moto ye moko na kokata likambo oyo liboso na Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na nzela na leknolozi oyo ya kosangisa biloko oyo ekoki kosala A.D.N. (moko na ba acide oyo ezali kati na nzoto) to na nzela ya génie génétique. balukiluki bazali lelo kosala bankisi na lolenge wana, oyo euti a makila te.

b Totanga na ndakisa immunoglobuline anti-Rh, oyo minganga basalelaka yango mbala mosusu na ntango makila ya mama ezali kokokana te na oyo ya like ya mwana, mbala mosusu basalelaka yango mpe epai na bato oyo bazali na maladi ya kobima makila mingi (hemophiles).

c Matomba malamu mamonanaka soki bazongisi moto ba anticorps oyo euti na makila ya volume plasmatique te epai na babeli oyo bazali na mpasi makasi, mpe kati na makambo mosusu oyo bautaki kosalela bosangisami oyo esalami na albumine.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto