Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/11 nk. 21-25
  • Tóbwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitungisi elimboli nini
  • Lisalisi likoki kozwama
  • Lolenge komikitisa ekoki kosalisa
  • Ntina ya kozala na motema pɛtɛɛ
  • Tyá elikya epai na Yehova
  • Tólanda kobwaka mitungisi na biso epai na Yehova
  • Bwakelá Yehova mitungisi na yo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Ndenge nini nakoki kotika komitungisa?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitungisi
    Lamuká!—2016
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/11 nk. 21-25

Tóbwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova

“Bomisɔkisa na lobɔkɔ na Njambe makasi, ete atombola bino na elaka epɔni ye. Bobwaka epai na ye makambo majali kotungisa bino, jambi bino bojali mpɔ na ye.”​—1 PƐTƐLƆ 5:6, 7.

1. Lolenge nini mitungisi mikoki kozala na bopusi likoló na biso, mpe ndakisa nini tokoki kopesa mpo na yango?

MITUNGISI ekoki kozala na bopusi makasi likoló na bomoi na biso. Ekoki kozala lokola makɛlɛlɛ oyo mazali kokata na bantango mosusu mondulɛ moko ya kitoko oyo ezali kobeta na radio. Soki makɛlɛlɛ mazali na radio te, mondulɛ kitoko ekoki kosepelisa mpe ekoki kokitisa motema ya moyoki. Nzokande, makɛlɛlɛ kati na radio ekoki kobebisa ata mondulɛ oyo eleki kitoko, ekoki koyokisa biso nkanda mpe mawa. Mitungisi ekoki kozala na bopusi motindo moko likoló na ezalela na biso ya kimya. Ekoki kolɛmbisa biso mingi na boye ete tokokoka te kotya likebi na makambo ya ntina. Ya solo, “Bojito na motema na moto ekokitisa yango.”​—Masese 12:25.

2. Yesu Klisto alobaki nini na ntina na “mitungisi ya bomoi”?

2 Yesu Klisto alobelaki likámá ya kobungisa likebi likoló na makambo ya ntina soki mitungisi mileki mingi. Kati na esakweli na ye oyo etalelaki mikolo ya nsuka, apesaki likebisi oyo ete: “Keba na bino ete mitema na bino mikoma makasi mpɔ na kolunda tɛ, sɔkɔ na kolanga tɛ, sɔkɔ na bitungiseli na bomɔi tɛ. Bongo mokɔlɔ yango ebimela bino pwasa lokola motambo tɛ. Mpɔ ete ekobimela bato yɔnsɔ bafandi na mikili yɔnsɔ. Sɛnjɛla ntango yɔnsɔ, mpe bɔndɛla ete bojala na makasi na kokima makambo oyo yɔnsɔ malingi koya, mpe na kotɛma liboso na Mwana na moto.” (Luka 21:34-36) Lokola kolunda mpe kolangwa masanga ekoki kopesa ezalela ya botau na makanisi, bobele bongo mpe kolɛmba na ntina na “mitungisi ya bomoi” ekoki kosala ete tobungisa makoki na biso ya kokanisa malamu, mpe na nsima, kozwa mbuma mabe.

Mitungisi elimboli nini

3. “Mitungisi” ezali nini, mpe wapi mwa makambo oyo mabimisaka yango?

3 “Mitungisi” elimboli “nsɔ́mɔ to motema likoló mpo na likambo moko ya mabe oyo elingi kobima to esili kobima.” Ezali “lobanzo to likambo oyo ezali kobangisa” mpe “mayoki malongobani te mpe ya kobulunganisa oyo ezali kopesa nsɔ́mɔ mpe kobangisa; mingimingi emonanaka na bilembo likoló na lolenge oyo nzoto ya moto ekosalaka mosala na yango (lokola kotoka, komata to kokita ya tension, mpe kobeta makasi ya motema), ntembe na ntina na bosolo mpe lolenge ya likambo ya mabe oyo elingi kobima, mpe na ntembe oyo moto ye moko azali na yango likoló na makoki na ye ya kolónga likambo yango.” (Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary) Na bongo, mitungisi ekoki kozala mokakatano moko monene. Kati na makambo mingi oyo makoki komema na mitungisi, tokoki kotánga bokɔnɔ, konuna, kobanga na ntina na makambo mabe, kobungisa mosala, komibanzabanza mpo na bolamu ya libota.

4. (a) Likambo nini ezali malamu komikundola na ntina na bato mpe mitungisi na bango? (b) Soki tokutani na mitungisi, nini tokoki kosala?

4 Ya solo, mitungisi ezali na mitindo mikeseni, ndenge moko mpe makambo oyo makoki kobimisa yango mpe makeseni. Bato banso bazalaka na mayoki motindo moko te liboso ya likambo moko. Na yango, tosengeli koyeba ete ata soki eloko moko ebulunganisi biso te, ekoki kozala likambo oyo lizali kotungisa makasi baninga na biso mosusu oyo bazali basambeli ya Yehova. Tokoki kosala nini soki mitungisi mikómeli biso na boye ete tozali kokoka te kotɛlɛmisa makanisi na biso likoló na makambo kitoko mpe ya elɛngi ya solo ya Liloba ya Nzambe? Ezali boni soki tooki mpasi mpo na mitungisi na boye ete tozali lisusu kokoka te komona ntembe oyo etyamaki na ntina na lotómo oyo Yehova azali na yango ya koyangela mpe na ntina na bosembo ya moklisto? Mbala mosusu tokokoka te kobongola ezalela ya makambo na biso. Atako bongo, tosengeli kotalela makambo mazali na Makomami oyo makoki kosalisa biso na koyika mpiko na mitungisi mileki ndelo oyo miuti na mikakatano makasi ya bomoi.

Lisalisi likoki kozwama

5. Lolenge nini tokoki kosala na boyokani na Nzembo 55:22?

5 Na ntango baklisto bazali na mposa ya lisungi ya elimo mpe bazali na mitungisi, bakoki kozwa libɔndisi kati na Liloba ya Nzambe. Ezali kopesa litambwisi oyo ebongi na kotyela motema mpe ezali kopesa biso bindimiseli mingi ete, lokola basaleli ya sembo ya Yehova, tozali biso moko te. Na ndakisa, Davidi, mokomi na Nzembo ayembaki ete: “Kitisa mokumba na yɔ epai na [Yehova] mpe ye akokumba yɔ; libela akotika tɛ ete moyɛngɛbɛni atelengana.” (Njembo 55:22) Lolenge nini tokoki kosala na boyokani na maloba oyo? Na kobwakáká mitungisi na biso nyonso, mabanzo na biso, kobanga na biso, mpe mawa na biso epai na Tata na biso ya likoló oyo azali na bolingo. Yango ekosalisa biso na kozala na mayoki ya kobatelama mpe kimya kati na motema.

6. Engebene Bafilipi 4:6, 7, libondeli ekoki kosala nini mpo na biso?

6 Soki tolingi kokitisa mikumba na biso nyonso mpe mitungisi na biso epai na Yehova, mabondeli mauti na motema oyo mazali kosalema ntango nyonso mazali na ntina. Yango ekopesa biso kimya kati na biso moko, mpamba te ntoma Paulo akomaki ete: “Bomitungisa mpɔ na likambo mɔkɔ tɛ nde kati na makambo yɔnsɔ tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Njambe na mabɔndɛli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ ekosɛnjɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) “Kimia na Njambe” oyo ekokani na mosusu te ezali likambo lizali kokitisa motema oyo limonanaka mingi oyo basaleli bamipesi na Yehova bazali na yango ata na bantango ya mpasi makasi. Yango euti na boyokani na biso ya penepene elongo na Nzambe. Wana ezali biso kobondela mpo na kozwa elimo santu mpe wana ezali biso kotika yango ete ezala na bopusi likoló na biso, mikakatano na biso nyonso ya bomoi mikolongolama te, kasi tozali kozwa mbuma ya elimo oyo ete kimya. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Tobulunganisami te na mitungisi na biso, mpo toyebi ete Yehova azali kosala ete basaleli na ye ya sembo ‘báfanda na kimya’ mpe akotika te ete eloko moko ebimela biso oyo ekoki kosala biso mabe ntango nyonso.​—Nzembo 4:8.

7. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa biso na kolónga mitungisi?

7 Nzokande, ezali boni soki mitungisi na biso mizali koumela, atako tozali komanyola likoló na Makomami mpe kolendendela kati na mabondeli? (Baloma 12:12) Bankulutu kati na lisangá bazali mpe ebongiseli ya Yehova, bazali kosunga biso na elimo. Bakoki kobɔndisa biso mpe kosunga biso na kosaleláká Liloba ya Nzambe mpe na kobondeláká elongo na biso mpe mpo na biso. (Yakobo 5:13-16) Ntoma Petelo apesaki toli epai na baninga na ye bankulutu ete bábatela bampate ya etongá ya Nzambe na bolingo nyonso, na molende nyonso, mpe na ndakisa malamu. (1 Petelo 5:1-4) Mibali yango bazali komibanzabanza mingi mpo na bolamu na biso mpe bazali kosunga biso mingi. Ya solo, mpo na kozwa litomba na lisalisi ya bankulutu mpe kozala malamu na elimo kati na lisangá, biso banso tosengeli kosalela toli oyo ya Petelo: “Bino bilɛngɛ, botosa mibange. Bomikangela kosɔkɛma lokola elamba, mɔkɔ asunga mosusu, mpɔ ete Njambe akotɛmɛlaka bato na lolɛndɔ, nde akopɛsaka basɔkɛmi ngɔlu.”​—1 Pɛtɛlɔ 5:5.

8, 9. Libɔndisi nini tokoki kozwa na 1 Petelo 5:6-11?

8 Petelo abakisaki ete: “Na bongo bomisɔkisa na lobɔkɔ na Njambe makasi, ete atombola bino na elaka epɔni ye. Bobwaka epai na ye makambo majali kotungisa bino, jambi bino bojali mpɔ na ye. Bomisɛnjɛla, bolala mpɔngi tɛ; motɛmɛli na bino oyo mabe, ajali kotambola lokola nkɔsi konguluma, kolukaka sɔkɔ akolia nani. Botɛmɛla ye ngwi mpɔ na kondima, boyeba ete mpasi na motindo mɔkɔ mpenja ejali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili. Nde Njambe na ngɔlu yɔnsɔ, ye oyo abiangi bino ete bokɔta na nkɛmbɔ na ye na seko kati na Klisto, ye mɔkɔ akokokisa bino, akolendisa bino, akopɛsa bino makasi, esili bino koyoka mpasi mwa ntango mokɛ. Na ye makasi libela na libela. Amen.”​—1 Pɛtɛlɔ 5:6-11.

9 Oyo nde libɔndisi na koyeba ete tokoki ‘kobwaka mitungisi na biso nyonso epai na Nzambe mpamba te azali komibanzabanza mpo na biso’! Mpe soki mitungisi na biso misusu miuti nde na masɛnginya ya Zábolo mpo na kobebisa boyokani na biso elongo na Yehova na kobimisáká minyoko mpe bampasi mosusu likoló na biso, ezali likambo ya esengo na koyeba ete makambo makotambola malamu mpo na baoyo bazali kobatela bosembo, boye te? Ee, nsima na konyokwama mpo na mwa ntango moke, Nzambe na ngɔlu nyonso akosila kobongisa biso mpe akopesa biso molende mpe makasi.

10. Bizaleli nini misato bilobelami na 1 Petelo 5:6, 7 oyo ekoki kosalisa biso na kolɛmbisa mitungisi?

10 Mokanda ya liboso ya Pɛtɛlɔ 5:6, 7 ezali kolobela bizaleli misato ya kitoko oyo ekoki kosalisa biso na kolónga mitungisi. Ya liboso ezali bongo komikitisa, to “komisɔkisa na makanisi.” Molɔngɔ́ 6 esukisi na maloba oyo ete, “na elaka epɔni ye,” oyo emonisi ntina ya kozala na motema pɛtɛɛ. Molɔngɔ́ 7 emonisi ete tokoki na elikya nyonso kobwaka mitungisi na biso epai na Nzambe ‘mpamba te azali komibanzabanza mpo na biso,’ mpe maloba wana mazali kolendisa mpenza ezaleli ya kotya motema mobimba epai na Yehova. Na bongo, tiká tótala lolenge nini komikitisa, motema pɛtɛɛ, mpe kotya elikya nyonso epai na Nzambe ekoki kosalisa biso mpo na kolɛmbisa mitungisi na biso.

Lolenge komikitisa ekoki kosalisa

11. Lolenge nini komikitisa ekoki kosalisa biso na kolónga mitungisi?

11 Soki tozali na komikitisa, tokondima ete makanisi ya Nzambe maleki mpenza oyo ya biso. (Yisaya 55:8, 9) Komikitisa ezali kosalisa biso na koyeba bandelo ya makoki na biso ya kokanisa, soki tokokanisi yango na bososoli ya Yehova, oyo eleki nyonso. Amonaka makambo oyo toyebi kososola te, lokola yango emonisamaki na likambo ya Yobo, mobali ya sembo. (Yobo 1:7-12; 2:1-6) Na komikitisáká “na lobɔkɔ na Njambe makasi,” tozali koyeba ete tozali moke liboso ya Moyangeli Monene. Na nsima, yango ezali kosalisa biso na koyika mpiko na makambo oyo azali kotika nzela ete mákómela biso. Mitema na biso mikoki kolikya kozwa libɔndisi ya nokinoki, kasi lokola bizaleli ya Yehova bizali na bokatikati mpe ya kokoka, ayebi malamumalamu ntango nini mpe lolenge nini akoki kosala mpo na bolamu na biso. Na bongo, lokola bana mike, tiká ete na komikitisa nyonso tótya motema kati na lobɔkɔ makasi ya Yehova, kozaláká na elikya ete akosalisa biso ete tólónga mitungisi na biso.​—Yisaya 41:8-13.

12. Lolenge nini mitungisi na ntina na biloko ya mosuni ekoki kobongwana soki, na komikitisa nyonso, tozali kosalela maloba ya Baebele 13:5?

12 Komikitisa elimboli mpe kolinga kosalela batoli euti na Liloba ya Nzambe, oyo mbala mingi elɛmbisaka mitungisi. Na ndakisa, soki mitungisi na biso etaleli mingi mposa ya kozwa biloko ya mosuni, ekozala malamu mpo na biso kokanisa likoló na toli oyo ya Paulo: “Ejaleli na bino ejanga mposa na mosɔlɔ; bosepela na bilɔkɔ bijali na bino. Jambi [Nzambe] ye alobaki ete, ‘Nakotika yɔ sɔkɔ mokɛ tɛ, nakosabola yɔ mpe tɛ.’” (Baɛbɛlɛ 13:5) Na kosaleláká toli oyo na komikitisa nyonso, mingi bamilongoli na mitungisi minene na ntina na biloko ya mosuni. Atako ezalela ya makambo na bango mpo na oyo etali mosolo ebongwani te, yango ezali te koyangela makanisi na bango kino kopesa bango mpasi na elimo.

Ntina ya kozala na motema pɛtɛɛ

13, 14. (a) Mpo na oyo etali koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso, ndakisa nini Yobo apesaki? (b) Kozela Yehova na motema pɛtɛɛ nyonso ekoki kosala nini mpo na biso?

13 Maloba oyo ete, “na elaka epɔni ye,” oyo elobelami na 1 Pɛtɛlɔ 5:6 emonisi ete tosengeli koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso. Mbala mosusu mokakatano eumeli mwa ntango molai, mpe yango ekoki kobakisa mitungisi. Mingimingi, ezali bongo kati na ezalela motindo oyo nde tosengeli kotika makambo na mabɔkɔ ya Yehova. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Tolobi ete tobiangi bango bato na esɛngɔ baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpɔ na mpiko na Yobo, bosili komɔna nsuka na makambo na ye epai na [Yehova], jambi [Yehova] atondi na mawa mpe na boboto.” (Yakobo 5:11) Yobo abungisaki bozwi na ye, bana na ye zomi bakufaki, anyokwamaki na bokɔnɔ mabe, mpe afundamaki na lolenge mabe na babɔndisi misato ya lokuta. Na meko mosusu, mitungisi ekoki kozala na yango mabe te kati na ezalela ya makambo motindo oyo.

14 Atako bongo, Yobo azalaki ndakisa mpo na oyo etali koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso. Soki tokutani na komekama makasi na ntina na kondima, tokoki kozela kozwa libɔndisi, lokola Yobo asalaki yango. Kasi Nzambe asalaki mpo na bolamu na ye, na kobikisáká ye na mpasi na ye mpe na kopesáká ye mbano mingi na nsuka. (Yobo 42:10-17) Kozela Yehova na motema pɛtɛɛ nyonso ezali kokólisa mpiko na biso mpe ezali komonisa bozindo ya losambo na biso epai na ye.​—Yakobo 1:2-4.

Tyá elikya epai na Yehova

15. Mpo na nini tosengeli kotya elikya nyonso epai na Yehova?

15 Petelo apesaki toli epai na baninga na ye bandimi ete ‘bábwaka mitungisi nyonso na bango epai na Nzambe mpamba te, azali komibanzabanza mpo na bango.’ (1 Petelo 5:7) Na bongo tokoki mpe tosengeli kotya mpenza elikya epai na Yehova. Masese 3:5, 6 (NW) elobi ete: “Tyá elikya epai na Yehova na motema na yo mobimba mpe kotya motema na bososoli na yo moko te. Talelá ye kati na banzela na yo nyonso, mpe ye moko akosembola bilekelo na yo.” Na ntina na makambo bakutanaki na yango na kala, basusu oyo bazalaki na mitungisi mingi bamonaki ete ezali mpasi kotya elikya epai na bato mosusu. Kasi tozali na bantina mingi ya kotya elikya epai na Mozalisi na biso, Liziba mpe Mobateli mpenza ya bomoi na biso. Ata soki tokoki te kotya elikya na mayoki na biso moko na makambo mosusu, tokoki ntango nyonso kotya motema epai na Yehova mpo ete abikisa biso na bampasi na biso.​—Nzembo 34:18, 19; 36:9; 56:3, 4.

16. Yesu Klisto alobaki nini mpo na oyo etali mitungisi likoló na biloko ya mosuni?

16 Kotya elikya epai na Nzambe elimboli mpe kotosa Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo ateyaki makambo ayekolaki epai na Tata na ye. (Yoane 7:16) Yesu apesaki toli na bayekoli na ye ete ‘bámibombela biloko ya motuya kati na likoló’ na kosaleláká Yehova. Kasi ezali boni mpo na bamposa ya mosuni lokola bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda? Yesu apesaki toli oyo: “Bomitungisa mpɔ na likambo mɔkɔ tɛ.” Amonisaki lisusu ete Nzambe azali koleisa bandɛkɛ. Azali kolatisa bafololo malamu. Bato oyo bazali basaleli ya Nzambe, bazali na motuya koleka bango, boye te? Ya solo, bazali na motuya. Na yango, Yesu alobaki ete: “Bolukaka nde liboso Bokonji na Njambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye mpe bilɔkɔ oyo yɔnsɔ ikobakisama na bino.” Yesu akóbaki ete: “Bomitungisa tɛ mpɔ na lobi; lobi ekomitungisa mpɔ na yango mpenja.” (Matai 6:20, 25-34) Ee, tozali na mposa ya bilei, bimeli, bilamba, mpe ndako, kasi soki tozali kotya elikya epai na Yehova, tokomitika te na komitungisa na lolenge loleki ndelo na ntina na makambo wana.

17. Ndakisa nini tokoki kopesa mpo na komonisa mposa ya koluka liboso Bokonzi?

17 Mpo na koluka liboso Bokonzi, tosengeli kotya elikya epai na Nzambe mpe kotya makambo ya ntina na esika ebongi na yango. Monyanyi oyo azali na eloko ya mpema akoki komibwaka na nsé ya mai mpo na koluka lokelé (huître), oyo ezalaka na pauni kati na yango. Wana ezali lolenge azali koleisa libota na ye. Ya solo, ezali likambo oyo esengeli kotyama mpenza na esika ya liboso! Kasi nini ezali likambo lileki ntina? Mopepe! Asengeli kobimaka mbala na mbala likoló na mai mpo na kotondisa mampulúlú na ye na mopepe. Mopepe ezali na ntina mingi koleka oyo tosengeli kotya na esika ya liboso. Bobele bongo, mbala mosusu tokoki mwa moke komipesa kati na ebongiseli ya biloko oyo mpo na kozwa biloko ya kobikela na bomoi. Atako bongo, makambo ya elimo masengeli kozwa esika ya liboso mpamba te bomoi mpenza ya libota na biso etaleli mpenza makambo yango. Mpo na kopɛngola ete tómitungisa te na lolenge eleki ndelo mpo na bamposa ya mosuni, tosengeli mpenza kotya elikya epai na Nzambe. Lisusu, ‘kozala na makambo mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo’ ekoki kosalisa biso na kolimwisa mitungisi na biso mpamba te “esengo ya Yehova” ezali ndako makasi na biso.​—1 Bakolinti 15:58; Nehemia 8:10, NW.

Tólanda kobwaka mitungisi na biso epai na Yehova

18. Elembeteli nini emonisi ete kobwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova ekoki mpenza kosalisa biso?

18 Mpo na kotya ntango nyonso makanisi na biso likoló na makambo ya elimo, tosengeli kolanda kobwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova. Ntango nyonso tómikundola ete azali mpenza komibanzabanza mpo na basaleli na ye. Na ndakisa: na ntina na mobali na ye oyo azalaki sembo te epai na ye, mitungisi ya mwasi moklisto moko ebakisamaki mingi na boye ete azalaki kokoka soko moke te kolala mpongi. (Kokanisá na Nzembo 119:28.) Nzokande, wana ezalaki ye kofanda na mbeto, azalaki kobwaka mitungisi na ye nyonso epai na Yehova. Azalaki kofungola motema na ye epai na Yehova, koyebisáká ye mpasi oyo azalaki komona elongo na bana na ye mike mibale ya basi. Nsima na kolela mpo na kosɛnga lisungi kati na mabondeli oyo mautaki mpenza na motema, azalaki ntango nyonso kozwa mpongi, mpo azalaki kotya elikya ete Yehova azali komibanzabanza mpo na ye mpe mpo na bana na ye. Mwasi wana, oyo abomaki libala na ye engebene Makomami azali sikawa na esengo ya kobalana na nkulutu moko.

19, 20. (a) Tokoki kolónga mitungisi na banzela nini mosusu? (b) Tosengeli kolanda kosala nini mpo na mitungisi na biso nyonso?

19 Lokola tozali libota ya Yehova, tozali na banzela ekeseni mpo na kolónga mitungisi. Kosalela Liloba ya Nzambe ezali mpenza na ntina. Tozali na biloko mingi ya elimo oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” bakisá masoló ya ntina mpe ya kobɔndisa oyo mabimisami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! (Matai 24:45-47) Tozali kozwa lisalisi ya elimo santu ya Nzambe. Mabondeli ya ntango nyonso mpe oyo euti mpenza na motema ezali kopesa biso matomba mingi. Bankulutu baklisto oyo baponami bamilɛngɛli mpo na kosalisa biso na elimo mpe kopesa biso libɔndisi.

20 Komikitisa na biso mpe motema pɛtɛɛ na biso ezali na ntina mingi mpo na kolónga mitungisi oyo mikoki kobimela biso. Likambo ya ntina mingi ezali bongo mpenza kotya elikya mobimba epai na Yehova, mpamba te kondima na biso ekoyaka makasi na ntango tozali kozwa lisalisi mpe litambwisi na ye. Na nsima, kondima epai na Nzambe ekoki kobatela biso ete tóbulunganisama te na koleka ndelo. (Yoane 14:1) Kondima ezali kopusa biso na koluka liboso Bokonzi mpe ekosala ete tómipesa mingi kati na mosala ya esengo ya Nkolo, yango ekoki kosalisa biso na kolónga mitungisi. Misala motindo oyo mizali kopesa biso mayoki ya kobatelama kati na baoyo bakosanzola Nzambe mpo na libela na libela. (Nzembo 104:33) Na yango tiká ete tólanda kobwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova.

Lolenge nini okoki koyanola?

◻ Mitungisi elimboli nini?

◻ Tokoki kolónga mitungisi na banzela nini?

◻ Lolenge nini komikitisa mpe motema pɛtɛɛ esalisaka mpo na kolɛmbisa mitungisi?

◻ Mpo na kolónga mitungisi, mpo na nini ezali na ntina kotya mpenza elikya epai na Yehova?

◻ Mpo na nini tosengeli kolanda kobwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova?

[Elilingi na lokasa 24]

Oyebi mpo na nini Yesu alobaki ete: “Bómitungisa te”?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto