Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp17 No. 4 lok. 16
  • Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia ekoki kosalisa yo otika komitungisa?
  • Mitungisi ekosila mokolo mosusu?
  • Tóbwaka mitungisi na biso nyonso epai na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bwakelá Yehova mitungisi na yo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Mitungisi
    Lamuká!—2016
  • Mibali mpe mitungisi​—Lisalisi nini Biblia ekoki kopesa?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
wp17 No. 4 lok. 16
Libota moko na kati ya Paradiso

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, bato “bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:11

Biblia elobi nini?

Biblia ekoki kosalisa yo otika komitungisa?

Okopesa eyano nini?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

Oyo Biblia elobi

‘Bwakelá [Nzambe] mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Biblia emonisi ete Nzambe akoki kosalisa yo ozala na kimya ya motema ata na ntango ya mitungisi.

Oyo Biblia elobi lisusu na likambo yango

  • Na nzela ya libondeli, okoki kozwa “kimya ya Nzambe,” oyo ekokitisa mitungisi na yo.​—Bafilipi 4:6, 7.

  • Longolá yango, kotánga Liloba ya Nzambe ekosalisa yo olonga mitungisi.​—Matai 11:28-30.

Mitungisi ekosila mokolo mosusu?

Bato mosusu bakanisaka . . . ete moto oyo azali na bomoi asengeli kaka komitungisa, nzokande basusu bakanisaka ete mitungisi esilaka kaka soki moto akufi. Okanisi nini?

Oyo Biblia elobi

Nzambe akolongola makambo nyonso oyo ebimisaka mitungisi. “Liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

Oyo Biblia elobi lisusu na likambo yango

  • Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, bato bakozala na kimya mpe bakobanga ata moke te.​—Yisaya 32:18.

  • Bato bakomitungisa lisusu te.​—Yisaya 65:17.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo, Makambo oyo Biblia eteyaka, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto