Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/11 nk. 26-28
  • “Bófuta mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bófuta mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitindá mitano ya litambwisi
  • Tóbatela lokumu malamu oyo ezali kokumisa Nzambe
  • Osengeli kofuta mpako?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Botosi na biso epai na bakonzi baleki liboso ezali na ndelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ezali mpenza kozanga bosembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/11 nk. 26-28

“Bófuta mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako”

“NA MOKILI oyo eloko nyonso ekoki kozanga kasi liwa mpe mpako ekoki kozanga te.” Oyo ezali maloba ya Benjamin Franklin, mosáli monene ya Leta na Etats-Unis mpe mokeli-masini. Maloba na ye, oyo bazongelaka yango mbala mingi, mazali te komonisa bobele ete esengeli kofuta mpako, kasi lisusu ezali komonisa nsɔ́mɔ oyo mpako ezali kopesa epai na bato. Mpo na bato mingi, kofuta mpako ezali na litomba moko te lokola mpe liwa ezalaka na litomba moko te.

Atako kofuta mpako ezali likambo ya kosepelisa te, nzokande ezali mokumba oyo baklisto ya solo batyelaka yango likebi mingi. Ntoma Paulo akomelaki lisangá ya boklisto na mboka Loma ete: “Bofutela bango yɔnsɔ nyongo na bango, mpako epai na baoyo bakoki kojua mpako, lifuti epai na baoyo bakoki kojua lifuti, nsɔmɔ epai na bango bakoki kobangama, lokumu epai na baoyo bakoki kojua lokumu.” (Baloma 13:7) Mpe Yesu Klisto azalaki mpenza kolobela mpako ntango alobaki ete: “Bopɛsa na Kaisala bilɔkɔ na Kaisala, mpe na Njambe bilɔkɔ na Njambe.”​—Malako 12:14, 17.

Yehova atikaki nzela ete “bakonzi baleki liboso” ya biyangeli bázala mpe azali kosɛnga na basaleli na ye ete bámonisela bango botosi oyo ekoki na bango. Bongo, mpo na nini Nzambe azali mpenza kosɛnga na makasi ete basaleli na ye báfuta mpako? Paulo apesi bantina minene misato: (1) “nkanda” ya “bakonzi baleki liboso” mpo na kopesa etumbu na babuki na mibeko; (2) Lisosoli ya moklisto, oyo ekozala pɛto te soki azali kokosa na kofuta mpako na ye; (3) mposa ya kofuta “basaleli wana ya bato banso” mpo na misala na bango mpe lolenge bazali kotya mwa kimya. (Baloma 13:1-7, NW) Ekoki kozala ete mingi basepelaka te kofuta mpako. Nzokande, kozanga ntembe, bakolinga ata moke te kofanda na mokili epai bapolisi bazali te to na esika oyo kobatelama ezali te na likámá ya mɔ́tɔ, epai nzela ebongisamaka te, esika biteyelo ya Leta bizali te, mpe epai pósita ezalaka te. Mokolo mosusu, Oliver Wendell Holmes, moto wa mibeko na Etats-Unis amonisaki yango na maloba oyo: “Mpako ezali mosolo oyo bikólo nyonso oyo ebongisami malamu efutaka.”

Kofuta mpako ezali likambo ya sika te mpo na basaleli ya Nzambe. Bafandi ya Yisraele ya kala bazalaki kofuta lolenge moko ya mpako mpo na kosimba bakonzi na bango, mpe basusu kati na bakonzi yango batyaki mikumba ya bozito likoló na bato na kosɛngáká mpako oyo elekaki ndelo. Bayuda bazalaki lisusu kopesa lifuti mpe mpako epai na bakonzi ya bapaya oyo bayangelaki bango, lokola Ezipito, Palasa, mpe Loma. Na yango baklisto oyo bazalaki na mikolo ya Paulo bayebaki malamu makambo oyo ye azalaki koloba na ntina na kofuta mpako. Bayebaki malamu ete atako mpako esɛngamaki na lolenge lobongi to elekaki mingi, mpe kozanga kotalela soki lolenge nini boyangeli ekosalela mosolo yango, basengelaki kofuta mpako nyonso oyo esɛngisamaki. Ezali bobele bongo na mikolo na biso. Nzokande, mitindá nini misengeli kokamba biso wana tozali kofuta mpako na mikolo oyo ya mindɔndɔ́ mingi?

Mitindá mitano ya litambwisi

Zalá na molɔngɔ́. Tozali kosalela mpe komekola Yehova, oyo azali “Njambe na mobulu tɛ, kasi na kimia.” (1 Bakɔlinti 14:33; Baefese 5:1) Kozala na molɔngɔ́ ezali na ntina mingi kati na likambo ya kofuta mpako. Mikanda na yo ya kotánga mituya ya mosolo mizali na makambo nyonso, mizali sembo, mpe mibongisami malamu? Mbala mingi, esɛngaka te kozala na alomwálo moko ya ntalo mingi. Okoki kozala na badosié mike ekomami mpo na kobomba ba factures ya eloko na eloko oyo esɛngaki kofuta mosolo. Ekosengela kosangisa makambo ya badosié ya mbula moko kati na kayé moko monene. Kati na mikili mingi esengeli kobomba badosié ya motindo wana na boumeli ya bambula mingi mpo ete mbala mosusu boyangeli ekoki kozwa ekateli ya kotalela mikanda ya kala. Na bongo, kobwaka eloko moko te kino okondimisama na sikisiki ete bazali lisusu na mposa na yango te.

Zalá moto ya kolongobana. Paulo akomaki ete: “Bobɔndɛla mpɔ na biso mpɔ ete tondimi ete tojali na lisɔsɔli na mpɛtɔ; tojali na mposa kosalaka malamu na makambo yɔnsɔ.” (Baɛbɛlɛ 13:18) Mposa ya solo ya kozala na kolongobana esengeli kokamba bikateli nyonso oyo tozali kokamata mpo na kofuta mpako. Ya liboso, talelá mpako ya mosolo ozwi oyo esengeli koyebisama na Leta. Kati na mikili mingi, mosolo oyo mobakisami​—kamata mosolo ya matabisi, ya misala misusu mikemike, ya botɛkisi⁠—​efutamelaka mpako soki yango eleki motuya oyo mokatami. Moklisto oyo azali na “lisɔsɔli na mpɛtɔ” akoyeba mosolo oyo mosengeli kofutamela mpako na mboka afandi mpe akofuta mpako oyo esɛngami mpo na yango.

Ya mibale, likambo litali kokitisa mituya. Mbala mingi biyangeli etikelaka bafuti-mpako nzela ya kolongola na mpako na bango mosolo oyo mobimisamaki mpo na mosala. Kati na mokili oyo etondi na kozanga kolongobana, bato mingi bamonaka mabe moko te ya “kosala mayele” wana bazali kosɛnga ete bákitisa mosolo ya mpako oyo basengeli kofuta. Eyebisamaki ete, na mokili ya Etats-Unis, mobali moko asombelaki mwasi na ye kazaka moko ya motuya mingi oyo esalemi na mposo ya nyama, na nsima akakisaki yango na boumeli ya mikolo mingi na esika ya mosala lokola “ekémbiseli” mpo ete bálongola yango na mosolo na ye ya mpako! Mobali mosusu asɛngaki ete bálongola mosolo mobimisami mpo na libala ya mwana na ye ya mwasi kati na mosolo ya mpako na ye. Ezali mpe na mosusu oyo alukaki kolongola mosolo oyo abimisaki mpo na kokende elongo na mwasi na ye na mikili oyo mizali na Extrême-Orient, nzokande mwasi yango akendeki mpenza kuna mpo na kominanola mpe konyolisa nzoto. Emonani lokola ete bandakisa ya lolenge oyo ezali mpenza mingi. Na mokuse, kobénga eloko moko mosolo molongolami na mpako, wana yango ezali bongo te, ezali lolenge moko ya lokuta​—likambo oyo Yehova, Nzambe na biso ayini mpenza.​—Masese 6:16-19.

Zalá na bokɛngi. Yesu akebisaki bayekoli na ye ete bázala na “mayɛlɛ lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.” (Matai 10:16) Toli oyo ekoki solo kosalelama na makambo matali kofuta mpako. Mingimingi na mikili ya bozwi, bato mingi bakómi kosalela bakompanyi oyo etángaka mituya ya mosolo to bato oyo bayekoli mosala yango mpo na kokata motuya ya mosolo mosengeli kofutama na mpako. Bongo, na nsuka bakoya bobele kotya mabɔkɔ na mokanda ya bánki mpe kotinda yango. Yango esengeli kozala libaku libongi mpo na komonisa bokɛngi lokola eyebisami na Masese 14:15 ete: “Moto na joba ayambi maloba yɔnsɔ, nde moto na mayɛlɛ akotala malamu na njela ekokɛnda ye.”

Bafuti-mpako mingi bakutanaki na mitungisi epai na bakonzi ya Leta mpo ete ‘bandimaki maloba nyonso’ ya bato bazangi kolongobana to ya bato bayebi mosala yango te baoyo basungaki bango na kotánga mosolo ya mpako. Oyo nde ntina ya kozala na bokebi! Talá malamu nzela ekokenda yo na kotángáká mikanda nyonso liboso ya kotya mabɔkɔ likoló na yango. Soki makambo mosusu makomami, to mazangi kokomama, to bokitisi mosusu ezali polele te na miso na yo, sɛngá ete bálimbwela yo yango​—sɛngá ete bálimbwela yango mbala na mbala soki esengeli​—kino okondimisama ete likambo yango lizali mpenza ya kolongobana mpe lindimami na mibeko. Ezali solo ete, na mikili mingi mibeko mitali mpako misili kokóma na mindɔndɔ́ mingi, kasi na meko oyo ekoki kosalema, ezali likambo ya mayele koluka kokanga malamu ntina ya mikanda nyonso oyo ozali kotya mabɔkɔ likoló na yango. Mbala mosusu, okoki komona ete moninga moko moklisto oyo ameseni na mibeko mitali kofuta mpako azali na likoki ya kopesa yo mwa bandimbola. Nkulutu moko oyo azali moto wa mibeko na makambo matali kofuta mpako alobi na mokuse boye, ete: “Soki moto ya kotánga mosolo ayebisi yo motuya moke oyo ekamwisi yo, boye mbala mosusu ezali mpenza ya kolongobana te!”

Ndimá mokumba na yo. Ntoma Paulo akomaki ete, “Moto na moto akomɛma bojito na ye mɔkɔ.” (Bagalatia 6:5) Na likambo ya kofuta mpako, moklisto moko na moko asengeli komema mokumba na ye ya komonisa kolongobana mpe kozala moto na kotosa mibeko. Yango ezali te likambo oyo kati na yango bankulutu ya lisangá basengeli kokɛngɛla bampate oyo bazali na nsé na libateli na bango. (Kokanisá na 2 Bakolinti 1:24.) Bakomikɔtisa te kati na makambo matali kofuta mpako, bobele soki bayoki ete lisumu monene lisalemi, mbala mosusu oyo epesi nsɔni kati na kartyé. Mbala mingi, yango ezali likambo oyo kati na yango moklisto nyonso asengeli kokokisa mokumba na ye na kosaleláká lisosoli na ye oyo eteyami malamu mpo na kotosa mitindá ya Makomami. (Baebele 5:14) Yango etali mpe likambo ya koyeba ete kotya mabɔkɔ na mokanda ya kofuta mpako​—ezala ete nani abongisaki yango​—ekoki mpenza kozala endimiseli ya mibeko ete otángaki mokanda yango mpe ondimi ete makambo oyo mazali na kati mazali solo.a

Zalá na efundeli te. Bakɛngɛli baklisto basengeli kozala na “efundeli te” mpo na kokokisa masɛngami ya mokumba na bango. Bobele bongo, lisangá mobimba lisengeli kozala na efundeli te na miso ya Nzambe. (1 Timoté 3:2; kokanisá na Baefese 5:27.) Na yango, bazali kosala makasi mpo na kobatela lokumu malamu kati na bato, ata na likambo ya kofuta mpako. Yesu Klisto ye moko apesaki ndakisa malamu na likambo yango. Batunaki Petelo, moyekoli na ye soki Yesu azalaki kofuta mpako ya tempelo, mosolo moke ya mbuma na palata mibale. Ya solo, Yesu asengelaki kofuta mpako wana te, mpamba te tempelo ezalaki ndako ya Tata na ye mpe ezali na mokonzi moko te oyo asɛngaka mpako epai na mwana na ye. Yesu alobaki bongo; atako bongo afutaki mpako wana. Ya solo, asalaki nkutu likamwisi mpo na kozwa mosolo oyo mosɛngamaki mpo na yango! Mpo na nini asengelaki kofuta mpako oyo ezalaki mpo na ye te? Lokola Yesu ye moko alobaki yango, ezalaki “mpɔ ete topɛsa bango ntina na nsɔni tɛ.”​—Matai 17:24-27.b

Tóbatela lokumu malamu oyo ezali kokumisa Nzambe

Bobele bongo lelo, Batatoli ya Yehova bazali kokeba ete bábɛtisa basusu libaku te. Bongo, ezali likambo ya kokamwa te ete lokola lisangá, bazali na lokumu malamu kati na mokili mobimba, lokola banamboka oyo bazali na kolongobana, baoyo bafutaka mpako na bango. Na ndakisa, zulunalo El Diario Vasco ya mboka Espagne elobelaki momeseno oyo mopalangani mingi ya kozanga kofuta mpako na Espagne, kasi emonisaki ete: “Bobele Batatoli ya Yehova nde basalaka bongo te. Wana bazali kosomba, to kotɛka, motuya [ya biloko] oyo bazali koyebisa mozali mpenza ya solo.” Bobele bongo, esili koleka mwa bambula zulunalo San Francisco Examiner ya mboka Etats-Unis elobaki ete: “Tosengeli kotalela [Batatoli ya Yehova] lokola banamboka oyo bazali bandakisa malamu. Bafutaka mpako na molende nyonso, babatelaka babɛli, babundisaka boínga.”

Moklisto moko te ya solo akolinga kosala likambo moko oyo ekobebisa lokumu oyo ezwami na milende mingi. Soki tosengelaki kosala liponi, tokolinga komitya na likámá ya koyebana lokola moto oyo akosaka na mpako bobele mpo na kobomba mwa ndambo ya mosolo? Te. Ya solo, okolinga nde kobungisa mosolo na esika ya kobebisa nkombo kitoko na yo mpe komonisa na lolenge ya mabe mitindá na yo mpe ata losambo na yo epai na Yehova.

Ya solo, kobatela lokumu malamu ya kozala mosembwi, moto ya kolongobana ekoki na bantango mosusu kosala ete obungisa mosolo. Lokola Platon, filozofe ya Greke amonisaki yango esili koleka bikeke 24: “Wana esengeli kofuta mpako ya mombongo, moto oyo azali sembo akofuta mingi, kasi moto oyo azali sembo te akofuta mingi te.” Mbala mosusu abakisaki ete moto oyo azali sembo akoyokaka mawa te ete abimisi mosolo mingi mpo na bosembo na ye. Bobele kozala na lokumu motindo yango ezali likambo ya ntina. Likambo oyo lizali mpe solo mpo na baklisto. Lokumu malamu oyo bazali na yango ezali na motuya mingi mpamba te yango ezali kokumisa Tata na bango ya likoló mpe ekoki kobenda basusu na komekola lolenge na bomoi na bango mpe na kobɛlɛma penepene na Yehova, Nzambe na bango.​—Masese 11:30; 1 Petelo 3:1.

Nzokande, oyo eleki mpenza ntina, baklisto ya solo bazali kopesa motuya mingi na boyokani na bango elongo na Yehova. Nzambe amonaka makambo nyonso oyo basalaka, mpe bazali na mposa makasi ya kosepelisa ye. (Baebele 4:13) Na yango, baboyaka masɛnginya ya koluka koyiba biyangeli. Bayebi malamu ete Nzambe asepelaka na etamboli ya kolongobana mpe ya sembo. (Nzembo 15:1-3) Mpe lokola balingaka kosepelisa motema ya Yehova, bafutaka mpako epai na baoyo nyonso basengeli kozwa mpako.​—Masese 27:11; Baloma 13:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ekoki kozala nkaká monene mpo na baklisto oyo basangisaka makambo ya mpako elongo na moninga oyo azali mondimi te. Mwasi moklisto asengeli kosala milende ya solo mpo na kobatela bokatikati kati na likambo ya kotosa bokonzi ya mobali na ye mpe ntina ya kotosa mibeko ya Kaisala. Nzokande, asengeli koyeba matomba mabe ya kotya mabɔkɔ na mikanda oyo ezali ya bokosi.​—Kokanisá na Baloma 13:1; 1 Bakɔlinti 11:3.

b Likambo oyo lizali kobenda likebi, bobele Evanzile ya Matai nde eyebisi likambo wana litali bomoi na Yesu awa na mabelé. Lokola ye moko azalaki kala mokɔngɔli ya mpako, na ntembe te Matai akamwaki na ezaleli ya Yesu na likambo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto