Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/12 nk. 4-7
  • Eyenga ya Mbótama: Ezali mpenza ya boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eyenga ya Mbótama: Ezali mpenza ya boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Eyenga ya Mbótama” euti na bapakano
  • Likambo ya esengo
  • Makabo ya Eyenga ya Mbótama
  • Tókumisa Klisto lokola Mokonzi!
  • Bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mpo na nini bato mosusu basalaka fɛti ya Noele te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mpo na nini ata na Azia bazali kosepela Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/12 nk. 4-7

Eyenga ya Mbótama: Ezali mpenza ya boklisto?

ENGEBENE búku The World Book Encyclopedia, “Eyenga ya Mbótama ezali mokolo oyo baklisto bakumisaka mokolo ya kobotama ya Yesu Klisto.” Nzokande, búku yango elobi lisusu ete: “Baklisto ya liboso bazalaki kokumisa kobotama [ya Yesu] te mpamba te bazalaki kotalela ete kokumisa mokolo ya kobotama ezalaki momeseno ya bapakano.”

Búku The Making of the Modern Christmas (Kosalema ya Eyenga ya Mbótama), ya Golby mpe Purdue, endimi ete: “Baklisto ya liboso bazalaki te kokumisa kobotama ya Klisto. Kokumisa mikolo ya kobotama ezalaki na boyokani na misala ya bapakano; Baevanzile elobi eloko moko te mpo na dati mpenza ya kobotama ya Klisto.”

Soki kokumisa mokolo ya kobotama ezwi moboko na yango likoló na makambo ya boklisto te, kasi mpo na nini mokolo ya kobotama ya Klisto ekómi elambo monene ya “boklisto”?

“Eyenga ya Mbótama” euti na bapakano

“Moto nyonso azalaki kosala fɛ́ti mpe azalaki kosepela, mosala mpe mombongo etikamaki naino na boumeli ya eleko wana mobimba, bandako ekembisamaki na bafololo ya langi ya mai ya pondu, baninga bazalaki kokende kotalana mpe kopesana makabo, batɛkisi bazalaki kopesa makabo epai na bakiliyá na bango. Eleko wana mobimba ezalaki ntango ya kosepela mpe ya bolingo malamu, mpe bato bazalaki komipesa kati na lolenge nyonso ya kosepelisa nzoto.”​—Paganism in Christian Festivals, ya J. M. Wheeler.

Makambo oyo makokani na milulu ya Eyenga ya Mbótama oyo oyebi? Likambo ya kokamwa, yango ezalaki Eyenga ya Mbótama te! Ezali nde kolobela elambo ya Saturne​—elambo ya bopakano ya Baloma oyo ezalaki koumela pɔ́sɔ mobimba, oyo ezalaki na boyokani na solstice d’hiver (oyo emonisami na lokasa lolandi). Mokolo ya kobotama ya moi mokoki kolóngama te, ezalaki kokumisama na Desɛ́mbɛ 25, mokolo monene ya elambo ya lingomba ya Mithra oyo ezalaki na Loma.

Engebene búku The New Encyclopædia Britannica, “Desɛ́mbɛ 25, mokolo ya kobotama ya Mithra, nzambe ya Iran, oyo balobi ete akopesaka pole mpe . . . mokolo mopesami mpo na moi mokoki kolóngama te, ezalaki mpe mokolo ya nsima ya elambo ya Saturne, lingomba eponaki yango lokola Eyenga ya Mbótama, kobotama ya Klisto, mpo na kolimwisa bopusi ya bilambo wana.” Na yango, kokumisa mokolo ya kobotama, oyo euti na bopakano, ekóbaki na kobongoláká bobele nkombo, Mithra ekómaki Klisto!

Nzokande, okoki kokanisa ete kobotama ya Mwana ya Nzambe, Yesu, ezalaki likambo ya ntina mpenza, oyo ebongi ete ekanisamaka. Tótalela oyo Biblia ezali koyebisa na ntina yango mpo ete tókoka kongɛngisama.

Likambo ya esengo

Mokapo ya mibale ya Evanzile ya Luka ezali komonisa moboko ya likambo yango. Luka azali koyebisa biso lolenge nini baanzelu ya likoló, babateli na mpate ya komikitisa, basaleli ya sembo ya Nzambe, mpe Malia ye moko basalaki ntango likambo wana ya ntina mingi ebimaki.

Kanisá naino na ntina na ‘babateli na mpate oyo bajalaki na lisobe,’ baoyo bazalaki “kosɛnjɛla etɔnga na bango na mpate,” likambo oyo mbɛlɛ bakokaki kosala yango te soki ezalaki bongo na boumeli ya eleko ya mpiɔ. Na ntango “mwanje na [Yehova]” abimaki mpe nkembo na Nzambe engɛngaki zingazinga na bango, liboso babateli na mpate babangaki. Bayikisamaki mpiko na ntango anzelu alobaki ete: “Banga tɛ! jambi tala, napɛsi bino nsango malamu na esɛngɔ monɛnɛ ekojala na bato yɔnsɔ. Mpɔ ete Mobikisi, ye Klisto Nkolo, abotameli bino lɛlɔ.” Ntango “ebele na banje na Likolo babimaki pwasa,” babateli na mpate bayebaki ete kobotama wana ekesanaki na kobotama nyonso mosusu. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, baanzelu bamemaki makabo te mpo na mwana oyo autaki kobotama. Nzokande, baanzelu basanzolaki Yehova, balobaki ete: “Nkɛmbɔ na Njambe na bisika-bileki-Likolo, mpe kimia na nse kati na bato [ya boboto, NW].”​—Luka 2:8-14.

Babateli na mpate bazalaki mpe na mposa ya komona mwana yango na miso na bango moko, mpamba te ezalaki Yehova nde asakolaki likambo wana ya esengo. Ntango bakutaki mwana alali kati na elielo ya bibwɛlɛ, bayebisaki baboti na ye makambo oyo baanzelu balobaki. Na nsima, babateli na mpate bazongaki na bango, “bakumisaki mpe basanjolaki Njambe,” kasi bakumisaki mwana te.​—Luka 2:15-18, 20.

Na ntembe te, Malia, mama ya Yesu, asepelaki mingi na kobotama malamu ya mwana na ye ya liboso. Kasi azalaki mpe ‘kobanjabanja makambo yango nyonso na motema na ye.’ Na nsima, akendeki elongo na mobali na ye Yosefe na Yelusaleme na boyokani na Mobeko ya Mose. Ezalaki te molulu ya kokumisa mokolo ya kobotama. Ezalaki nde ntango ya kolakisa mwana epai na Nzambe, “pelamɔkɔ esili kokomama na Mobeko na [Yehova] ete, Mobali na mobali oyo akobotama mwana na liboso akobiangama bulɛɛ na [Yehova].”​—Luka 2:19, 22-24.

Kati na tempelo na Yelusaleme, Malia mpe Yosefe bakutanaki na Simeona, oyo Luka alobi na ntina na ye ete azalaki “[moto na sembo mpe na kobanga Nzambe mpe azalaki kozela kobɔndisama ya Yisraele, NW].” Na kopemama na Nzambe, eyebisamelaki ye ete akokufa te liboso ete amona “[Klisto ya Yehova, NW].” Likambo oyo ebimaki na nsima esalemaki mpe “[na nsé ya nguya ya elimo ya Nzambe, NW].” Simeona akamataki mwana na mabɔkɔ na ye, ezalaki te mpo na kopesa ye likabo, kasi, mpo na kopambola Nzambe, kolobáká ete: “Sasaipi, Nkolo [Moyangeli, NW] otika moombo na yɔ kokɛnda na kimia pelamɔkɔ elobaki yɔ; mpɔ ete miso na ngai mamɔni kobikisa na yɔ oyo ebɔngisi yɔ na miso na bato yɔnsɔ.”​—Luka 2:25-32.

Na nsima, mobangé mosakoli mwasi Ana apusanaki pembeni. Ye mpe “atɔndaki Njambe mpe asololaki na ntina na mwana yango na bango yɔnsɔ bajalaki [kozela, NW] lisiko na Yelusaleme.”​—Luka 2:36-38.

Malia, Simeona, Ana, babateli na mpate, mpe baanzelu ya likoló, bango banso basepelaki na kobotama ya Yesu. Nzokande, tótala malamu, basalaki te bilambo ya kokumisa mokolo ya kobotama, soko mpe kopesa makabo. Nkutu, basanzolaki Yehova, ye oyo, uta na likoló apesi bango nzela ya kobikisama.

Nzokande, basusu bakoki koloba ete, ‘Ya solo, kopesana makabo na Eyenga ya Mbótama ekoki na yango kozala mabe te, mpamba te “bato misato ya mayele” bakumisaki Yesu na kopesáká ye makabo, boye te?’

Makabo ya Eyenga ya Mbótama

Lisusu, tiká tótalela lisoló ya Biblia. Tokoki kokuta yango kati na Evanzile ya Matai, mokapo 2. Kuna, balobeli soko moke te na ntina na kokumisa Mokolo ya Mbótama, bapesi mpe ntango te, atako emonani polele ete ezalaki bongo nsima ya kobotama ya Yesu Klisto. Na molɔngɔ́ 1 (NW), Matai abéngi bato yango ete “banganga-minzoto [na Greke, maʹgoi] bautaki epai na ebimelo na ntango,” na yango, emonisi ete bazalaki bapakano mpe bazangaki boyebi ya Yehova Nzambe. Monzoto oyo bato yango bazalaki kolanda ekambaki bango mbala moko te na esika Yesu abotamaki, na Beteleme, kasi ekambaki bango na Yelusaleme, epai kuna Mokonzi Elode azalaki koyangela.

Ntango mokonzi wana mabe ayokaki bango kotuna na ntina na “ye oyo abotami Mokonji na Bayuda,” abéngaki banganga mpo ete báluka malamumalamu koyeba “sɔkɔ Klisto akobotama wapi” mpo ete akoka koboma mwana yango. Banganga bayanolaki na kotángáká maloba ya esakweli ya Mika oyo emonisaki ete Masiya akobotama na Beteleme. (Mika 5:2) Na bokosi nyonso, Elode ayebisaki epai na bato yango oyo bayaki kotala ye ete: “Bokɛnda mpe boluka na mɔi na mɔi mpɔ na mwana. Sɔkɔ bokojua ye, boyebisa ngai ete ngai mpe naya kokumbamela ye.” Banganga-minzoto bakóbaki mobembo na bango, mpe monzoto “etamboli liboso na bango kino eyei yango kotɛlɛma na esika ejalaki mwana.” Tomoni ete alobelami awa lokola “mwana,” kasi te lokola elɛzi oyo abotami sika.​—Matai 2:1-10.

Lokola bato minene oyo ya epai na ebimelo ya ntango bayei kotala mokonzi, banganga-minzoto wana oyo bazalaki bapakano bakweaki na nsé mpe “bapɛsi ye makabo, wɔlɔ mpe mpaka na malasi mpe mola.” Matai abakisi ete: “Kasi bayebisami na lilɔtɔ ete bajonga epai na Elode tɛ; na bongo bakei na mokili na bango na njela mosusu.”​—Matai 2:11, 12.

Basusu bakoki koluka kolóngisa ezaleli na bango ya kopesana makabo na Eyenga ya Mbótama, longwa na lisoló mokuse oyo euti na Makomami. Nzokande, Búku Discovering Christmas Customs and Folklore (Milulu mpe mimeseno mitali Eyenga ya Mbótama emonisami) elobi ete momeseno oyo ezali lelo ya kopesana makabo euti na makabo ya elambo ya Saturne oyo Baloma bazalaki kopesa epai na bazalani na bango oyo bazalaki babólá. “Lingomba ya ebandeli . . . na mayele nyonso babongolaki ndimbola na yango mpo na kokómisa yango molulu ya bokundoli makabo oyo Banganga-Minzoto bapesaki.” Oyo nde bokeseni monene na basambeli ya solo​—na ndakisa ya babateli na mpate ya komikitisa​—baoyo bakumisaki Nzambe ntango Yesu abotamaki!

Tókumisa Klisto lokola Mokonzi!

Lelo oyo, Yesu azali lisusu elɛzi te. Azali Mokonzi Monene ya nguya, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe oyo na likoló, mpe asengeli kokumisama na motindo wana.​—1 Timoté 6:15, 16.

Soki osili kokóma mokóló, oyoká naino nkanda ata mokolo moko te, ntango, yo ozali wana, bato bazali kolakisa bafɔtɔ́ na yo ntango ozalaki elɛzi? Ya solo, bafɔtɔ́ motindo wana ekoki kokundwela baboti na yo esengo oyo bazalaki na yango na ntina na kobotama na yo. Kasi sikawa, okómi na bomoto na yo moko, olingaka mbala mingi ete basusu bátalela yo na lolenge ozali sikawa, boye te? Bobele bongo mpe, kanisá naino na meko nini yango ezali komonisa kozanga limemya epai na Klisto Yesu, wana baoyo balobaka ete bazali bayekoli na ye bamipesaka mbula na mbula na mimeseno ya bopakano mpe na kokumisáká mwa mwana na esika ete bákumisa ye lokola Mokonzi. Ata na ekeke ya liboso, ntoma moklisto Paulo alobaki ete ebongi malamu kokanisa Klisto na lolenge azali sikawa​—Mokonzi na likoló. Paulo akomaki ete: “Ata toyebaki Klisto lokola moto, tokoyebaka ye bongo lisusu tɛ.”​—2 Bakɔlinti 5:16.

Lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mosika te, Klisto akokokisa elaka ya esakweli na ntina etali kolongola mpasi, minyoko, bokɔnɔ, mpe liwa. Ezali Ye oyo akopesa bato ndako ya malamu mpe mosala ya malamu kati na Paladiso awa na mabelé. (Yisaya 65:21-23; Luka 23:43; 2 Bakolinti 1:20; Emoniseli 21:3, 4) Ya solo, nyonso oyo ezali bantina oyo ebongi mpo na komemya Yesu!

Kolandáká ndakisa ya Klisto, baklisto ya solo bazali kosala makasi mpo na kopesa epai na bazalani na bango likabo oyo eleki makabo nyonso​—boyebi ya mokano ya Nzambe, oyo ekoki komema na bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Lolenge wana ya kopesa makabo ezali kopesa bango esengo mingi, lokola Yesu alobaki yango: “Esɛngɔ na kopɛsa eleki esɛngɔ na kojua.”​—Misala 20:35; Luka 11:27, 28.

Baklisto oyo bazali solo komibanzabanza moko epai na mosusu bakakatanaka te mpo na komonisa bolingo na bango ata na eleko nini ya mobu. (Bafilipi 2:3, 4) Na ndakisa, oyo nde esengo tokozala na yango soki tokozwa eloko moko eyemami euti epai na elenge moklisto moko oyo, na nsima ya koyoka lisukúlu, alɛngɛli yango mpo na komonisa botɔ́ndi na ye! Likambo mosusu ya kolendisa ezali oyo ya kozwa likabo oyo omizelaki na yango te uta na ndeko moko lokola elembo ya bolingo. Bobele bongo mpe, baboti baklisto bazwaka esengo mingi na ntango bazali kopona mabaku oyo ebongi, na boumeli ya mbula, mpo na kopesa makabo epai ya bana na bango. Lolenge wana ya bokabi ya boklisto ebebisami te na oyo ekanisami ete ezali lisɛngisi, kopesa makabo na mikolo ya milulu to mpo na kolanda momeseno moko ya bopakano.

Na yango, lelo oyo baklisto koleka milió minei na ndambo uta na mabota nyonso bakumisaka Eyenga ya Mbótama te. Ezali bongo Batatoli ya Yehova, baoyo bamipesaka ntango nyonso na kopesa litatoli epai na bazalani na bango na ntina na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Mbala mosusu, mosika te, okokutana na bango ntango bakoya na ndako na yo. Tiká ete mposa na yo makasi ya koyoka makambo oyo bakomemela yo epesa esengo monene epai na libota na yo, wana ekozala yo koyekola lolenge ya kokumisa Yehova Nzambe mikolo nyonso na boumeli ya mbula.​—Nzembo 145:1, 2.

[Elilingi na lokasa 7]

Baklisto bazali kopesa epai na bazalani na bango likabo oyo eleki makabo manso, boyebi ya mokano ya Nzambe oyo ezali komema na bomoi ya seko

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Bafɔtɔ́ ya Culver

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto