Biutelo Ya Eyenga ya Mbotama na Mikolo na Biso
MPO na bamilió ya bato na mokili mobimba, Eyenga ya Mbotama ezali eleko ya esengo mingi kati na mbula mobimba. Ezali ntango ya kolya bilei ya ntalo, ya kozongela mimeseno ya kala, mpe ya bokutani na libota mobimba. Eyenga ya Mbotama ezali mpe ntango oyo baninga mpe bandeko basepelaka kotindelana bakálati mpe kopesana makabo.
Nzokande, esili koleka bobele mibu 150, Eyenga ya Mbotama ezalaki feti ya lolenge mosusu mpenza. Kati na búku na ye The Battle for Christmas (Etumba mpo na Eyenga ya Mbotama), Stephen Nissenbaum, oyo azali profesere ya Istware, akomi ete: “Eyenga ya Mbotama . . . ezalaki ntango ya komela masanga mingi mpo ete mibeko ya etamboli ya bato mityamaki pembeni mpo na mwa ntango mpo na kotika nzela na ‘carnaval,’ to mikolo ya bosepeli na sanza ya Desɛ́mbɛ.”
Mpo na baoyo bakumisaka Eyenga ya Mbotama na limemya ya losambo, ndimbola oyo ekoki kobulunganisa bango. Mpo na nini kosambwisa eyenga oyo elobelami ete ezali mpo na kokanisa mbotama ya Mwana ya Nzambe? Eyano ekoki kokamwisa yo.
Moboko mabe
Uta ebandeli na yango na ekeke ya minei, Eyenga ya Mbotama ebimisaka ntembe ntango nyonso. Na ndakisa, ezalaki likambo ya mokolo ya kobotama ya Yesu. Lokola Biblia eyebisi mokolo to sanza te oyo Yesu abotamaki, bato bapesaki badati ndenge na ndenge. Na ekeke ya misato, etuluku moko ya bato ya teoloji na Ezipito batyaki yango na mwa 20 Máí, nzokande bato mosusu baponaki badati ya mwa mosika, lokola 28 Mársi, 2 Apríli, to 19 Apríli. Na ekeke ya 18, bakómaki kokanisa mbotama ya Yesu na basanza nyonso ya mobu! Na bongo, lolenge nini nsukansuka dati ya 25 Desɛ́mbɛ eponamaki?
Banganga-mayele mingi bandimaka ete 25 Desɛ́mbɛ etyamaki na Lingomba ya Katolike lokola dati ya mbotama ya Yesu. Mpo na nini? Búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete: “Ekoki mpenza kozala mpo ete baklisto ya kala balingaki ete dati yango ekokana na dati ya feti ya bopakano ya Loma oyo ezalaki kokumisa ‘mbotama ya moi oyo ekoki kolóngama te.’” Kasi mpo na nini baklisto oyo banyokolamaki makasi na bapakano na boumeli ya bikeke koleka mibale na ndambo bandimaki makanisi ya banyokoli na bango na mbalakaka boye?
Libebi likɔtisami
Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akebisaki Timoté ete “bato mabe mpe bakosi” bakokɔta kati na lisangá ya boklisto mpe bakozimbisa bato mingi. (2 Timoté 3:13) Lipɛngwi yango monene ebandaki nsima ya liwa ya bantoma. (Misala 20:29, 30) Nsima ya “kobongwana” ya Constantin, na ekeke ya minei, bapakano mingi bakɔtaki na lolenge ya boklisto oyo ekólaki mingi na eleko wana. Ebotaki mbuma nini? Búku Early Christianity and Paganism (Boklisto ya ebandeli mpe bopakano) elobi ete: “Etuluku moke ya bandimi ya solosolo elimwaki kati na ebele monene ya baklisto ya nkombo mpamba.”
Maloba ya Paulo makokisamaki mpenza! Ezalaki lokola ete boklisto ya solosolo emelamaki na libebi ya bopakano. Mpe libebi yango emonanaki mingi mpenza na bokumisi biyenga.
Elambo bobele moko oyo baklisto basɛngisami ete bákanisaka ezali bongo Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. (1 Bakolinti 11:23-26) Na ntina na losambo ya bikeko oyo esanganaki na bafeti ya Baloma, baklisto ya ebandeli bazalaki kosangana na yango te. Mpo na yango, bapakano ya ekeke ya misato bapamelaki baklisto, kolobáká na bango ete: “Bokendaka kotala bilakiseli te; masano ya bato nyonso etali bino te; bozali koboya bilambo ya bato nyonso, mpe bozali koyina bitumba ya bulɛɛ.” Epai mosusu bapakano bamikumisaki na kolobáká ete: “Biso tosambelaka banzambe na nsai, na bafeti, na banzembo mpe na masano.”
Na katikati ya ekeke ya minei, bifundeli ya bapakano ekitaki. Lolenge nini? Lokola baklisto ya nkombo mpamba bazalaki kobakisama, makanisi ya lipɛngwi makómaki mingi. Yango epesaki nzela na kondima makanisi ya Baloma. Kolobeláká likambo yango, búku The Paganism in Our Christianity (Bopakano kati na boklisto na biso) elobi ete: “Ekómaki momeseno ya boklisto ya kozwa bafeti ya bopakano oyo bato balingaki mingi engebene bonkɔkɔ mpe kokómisa yango ya boklisto.” Ɛɛ, lipɛngwi monene ezalaki mpenza kobebisa. Mposa ya komekola bilambo ya bapakano oyo baklisto ya nkombo mpamba bazalaki na yango ekómaki sikawa kondimama kati na lisangá. Mosika te, baklisto bakómaki na bafeti mingi lolenge moko na bapakano. Likambo ya kokamwa ezali te ete Eyenga ya Mbotama ezalaki na esika ya liboso kati na bafeti yango.
Feti ya mikili mingi
Lokola motindo wana ya boklisto epalanganaki na Mpótó, Eyenga ya Mbotama epalanganaki nzela moko na yango. Lingomba ya Katolike endimaki likanisi oyo ete kokóba kosala feti ya esengo mpo na kokumisa mbotama ya Yesu ezalaki likambo libongi mpenza. Yango wana, na mobu 567 T.B., likita monene ya Lingomba ya Katolike oyo esalemaki na engumba Tours “esakolaki ete mikolo 12 kobanda na Eyenga ya Mbotama kino na mwa 6 Yanuáli ekozala eleko ya bulɛɛ mpe ya biyenga.”—The Catholic Encyclopedia for School and Home.
Mosika te Eyenga ya Mbotama ekómaki na mimeseno mingi ya bafeti ya bobuki mbuma oyo ezalaki kosalema na Mpótó ya Nɔ́rdi. Komipesa na bisengo ezalaki komonana mingi koleka bobangi Nzambe wana bato bamipesaki na kolunda mpe komela mingi. Na esika ya kokweisa etamboli mabe yango, lingomba endimaki yango. (Kokanisá na Baloma 13:13; 1 Petelo 4:3.) Na mobu 601, Pápa Grégoire I atindaki nkomá epai ya Mellitus, oyo azalaki ntoma na ye na ekólo Angleterre. Arthur Weigall, oyo azaláká mokɛngɛli-mokonzi ya biloko ya kala mpo na guvernemá ya ekólo Égypte, alobi ete kati na nkomá yango pápa ayebisaki Mellitus ete “apekisa te bafeti wana ya bapakano, kasi ayokanisa yango na milulu ya Lingomba, bobele na kobongoláká ntina na yango, ete elongwa bafeti ya bopakano mpe ekóma bafeti ya boklisto.”
Na boumeli ya Moyen-Âge, bato oyo balingaka mbongwana bamonaki ete basengeli kotɔndɔla makambo ya kolekisa ndelo oyo ekómaki na kati. Babimisaki mibeko mingi mpo na kopekisa “bisengo oyo eleki ndelo na Eyenga ya Mbotama.” Kati na búku na ye Christmas in America—A History (Lisoló ya Eyenga ya Mbotama na Amerika), Dr. Penne Restad alobi ete: “Bakonzi mosusu ya lingomba balobaki na etingya ete bato ya kozanga kokoka bazali na mposa ya komisepelisa mpe kolekisa ndelo na bantango mosusu, kasi yango esengeli kosalema na litambwisi ya boklisto.” Likanisi yango eyaki bobele kobakisa lisusu mobulungano. Kasi, yango ebongolaki makambo te mpamba te mimeseno ya bapakano misilaki kokɔtisama mpenza na Eyenga ya Mbotama na boye ete bato mingi balingaki te kotika yango. Mokomi Tristram Coffin alobeli yango boye: “Bato mingi [bazalaki] kosala bobele makambo oyo bameseneki kosala liboso mpe bazalaki mpenza kotya likebi te na ntembe kati na bato oyo batyaka mibeko na etamboli ya bato.”
Na eleko oyo bato ya Mpótó bakómaki kokende kofanda na Amerika, Eyenga ya Mbotama esilaki koyebana mingi. Kasi, Eyenga ya Mbotama endimamaki te na bitúká (colonies) ya Amerika ya Nɔ́rdi. Ba puritains oyo balingaki mbongwana batalelaki feti yango ete eutaki na bopakano mpe bapekisaki yango na etúká ya Massachusetts banda mobu 1659 kino mobu 1681.
Nsima wana epekiseli elongolamaki, bakómaki kokumisa mingi Eyenga ya Mbotama na bitúká yango, mingi mpenza na etúká ya Nouvelle Angleterre. Nzokande, na kotalela lisoló ya feti yango, tokoki kokamwa te ete bato mosusu bamibanzabanzaki mingi na bisengo na bango mpenza na esika ya kokumisa Mwana ya Nzambe. Kolangwa ezalaki mingi mpenza momeseno moko ya mobulu na Eyenga ya Mbotama. Bituluku ya bilenge ya mobulu bazalaki kokɔta na bandako ya bato ya kartyé na bango oyo bazali na bozwi mpe bazalaki kosɛnga bilei mpe masanga na makasi. Soki nkolo ndako aboyi, mbala mingi bazalaki kofinga ye, mpe mbala mosusu bazalaki kobebisa biloko ya ndako na ye.
Na bambula ya 1820, makambo mabebaki mingi na boye ete, engebene Profesere Nissenbaum “mobulu na Eyenga ya Mbotama” ekómaki “likámá monene mpo na kimya ya bato.” Na bingumba lokola New York mpe Philadelphie, bankolo bandako oyo bazali na bozwi bakómaki kozwa bakɛngɛli mpo na kobatela bandako na bango. Kútu elobamaka ete engumba New York esalaki limpinga na yango ya liboso ya bapolisi na ntina na mobulu makasi oyo esalemaki na eleko ya Eyenga ya Mbotama na mibu 1827-1828!
Eyenga ya Mbotama ebongwani
Ekeke ya 19 ememaki mbongwana mingi oyo esalemaki naino liboso te na bomoi ya bato. Mibembo ya bato mpe kotambola ya bansango ekómaki kosalema na lombangu mpamba te banzela ya mituka mpe bingbunduka ekómaki kosalelama. Lokola baizini ekómaki mingi, yango esalaki ete bamilió ya bato bázwa misala, mpe baizini ezalaki kobimisa ebele ya biloko mpe na lombangu. Kosalema ya baizini ebimisaki mpe mokakatano mosusu na efandelo ya bato, oyo nsukansuka esalaki bopusi likoló ya lolenge ya kokumisa Eyenga ya Mbotama.
Kala, bato bazalaki kosalela biyenga lokola mwango ya kokólisa boyokani kati na mabota, mpe ezalaki bongo mpo na Eyenga ya Mbotama. Na kobongoláká mimeseno mosusu ya kala ya Eyenga ya Mbotama, babandisi na yango babongolaki Eyenga ya Mbotama kolongoláká makambo na yango ya bisengo mpe bakómisaki yango eyenga ya libota.
Kútu, na nsuka ya ekeke ya 19, Eyenga ya Mbotama ekómaki kotalelama lokola nkisi mpo na mikakatano ya bomoi ya bato ya Amerika na mikolo na biso. Dr. Restad alobi ete: “Kati na biyenga nyonso, Eyenga ya Mbotama ezalaki mwango malamu mpenza mpo na komema losambo mpe mposa ya kosambela kati na libota mpe mpo na kosembola makambo ya kolekisa ndelo mpe mbeba epai ya bato.” Abakisi ete: “Kopesana makabo, kosalisa baoyo bazali na bosɛnga, ata mpe kotombelana eyenga malamu mpe kobongisa mpe kokembisa nzeté moko oyo nkasa na yango ekaukaka te na kati ya ndako, na nsima, ndako ya eteyelo ya Lomingo, esangisaki basangani ya libota bamoko na bamosusu, na lingomba, mpe na bato nyonso.”
Lolenge moko, lelo oyo bato mingi basepelaka Eyenga ya Mbotama lokola mwango ya komonisana bolingo mpe mpo na kosala ete bomoko ya libota ebatelama. Kozanga kobosana makambo ye elimo. Bamilió ya bato basepelaka Eyenga ya Mbotama mpo na kokumisa kobotama ya Yesu. Ekoki kozala ete bakendaka mísa na ndakonzambe na mokolo yango, babongisaka bililingi ya kobotama ya Mwana Yesu na bandako na bango, to mpe basalaka mabondeli ya kozongisa matɔ́ndi epai ya Yesu ye moko. Kasi lolenge nini Nzambe atalelaka makambo yango? Asepelaka nde na makambo yango? Tótalela oyo Biblia elobi mpo na yango.
“Bólinga solo mpe kimya”
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nzambe azali [elimo, NW], mpe ekoki na basambeli na ye ete básambela ye na [elimo, NW] mpe na solo.” (Yoane 4:24) Yesu atosaki maloba yango na bomoi na ye. Azalaki ntango nyonso koloba solo. Amekolaki Tata na ye, “[Yehova] Nzambe na solo” na lolenge ya kokoka mpenza.—Nzembo 31:5; Yoane 14:9.
Kati na Biblia, Yehova amonisi polele ete ayini lolenge nyonso ya bokosi. (Nzembo 5:6) Mpo na yango, ezali likambo ya kokamwa ete makambo mingi oyo matali Eyenga ya Mbotama matondi na bokosi, boye te? Na ndakisa, kanisá naino lisapo ya Saint Nicolas. Osilá komeka kolimbwela mwana moke ntina oyo Saint Nicolas asepelaka kokɔta na ndako na nzela ya tiyó ya milinga na esika ya kokɔta na ekuke, lokola ekanisamaka na bato ya mikili mingi? Mpe lolenge nini Saint Nicolas asalaka mpo na kotambola na bamilió ya bandako na mpokwa moko? Ezali boni mpo na nyama na nkombo renne oyo ezali kopumbwa? Ntango mwana akoya koyeba ete bazalaki kokosa ye na kondimisáká ye ete Saint Nicolas azali moto ya solo, akotika kotyela baboti na ye motema, boye te?
Búku The Catholic Encyclopedia elobi mpenza ete: “Mimeseno ya bapakano . . . mizingelaki Eyenga ya Mbotama.” Boye, mpo na nini Lingomba ya Katolike mpe mangomba mosusu ya boklisto mazali kokóba eyenga oyo mimeseno na yango miuti na boklisto te? Yango ezali komonisa ete bazali kondima mateya ya bapakano, boye te?
Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu alendisaki bato te ete básambela ye. Yesu ye moko alobaki ete: “Okokumbamela [Yehova] Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.” (Matai 4:10) Bobele bongo, nsima wana Yesu azwaki nkembo ya Bokonzi na likoló, anzelu moko ayebisaki ntoma Yoane ete ‘asambela Nzambe,’ komonisáká ete makambo mabongwanaki te na oyo etali losambo. (Emoniseli 19:10) Yango ebimisi motuna oyo: Yesu andimaka losambo oyo ezali kopesama epai na ye, kasi epai ya Tata na ye te, na eleko ya Eyenga ya Mbotama?
Na bosolo mpenza, makambo masalemaka na Eyenga ya Mbotama na mikolo na biso mazali malamu te. Mingi mpenza ezali feti oyo bato bango moko basali mpe ezali komonisa makambo mingi ya mabe oyo mazalaki kosalema kala. Na yango, mpo na kobatela lisosoli malamu, bamilió mingi ya baklisto basilá kozwa ekateli ya kokumisa Eyenga ya Mbotama te. Na ndakisa, elenge moko na nkombo Ryan alobi na ntina na Eyenga ya Mbotama ete: “Bato bazali kosepela mpo na mikolo mibale mpamba kati na mbula mobimba wana libota lisangani mpe bato nyonso bazali na esengo. Kasi likambo nini ya sika ezali wana? Baboti na ngai bapesaka ngai makabo ezala ata mokolo nini kati na mbula!” Elenge mosusu ya mibu 12 alobi ete: “Namiyokaka te ete nazangi eloko. Nazwaka makabo ezala mokolo nini kati na mbula, bobele na mokolo moko te oyo esilá kobongisama oyo bato bamiyokaka ete basɛngisami kosomba makabo.”
Mosakoli Zekalia alendisaki bandeko na ye Bayisalaele ete ‘bálinga solo mpe kimya.’ (Zekalia 8:19) Soki biso mpe, lokola Zekalia mpe bato mosusu ya sembo na ntango ya kala, ‘tolingi solo,’ tokoboya kokumisa eyenga ya lingomba nyonso ya lokuta oyo ezali kobebisa lokumu ya “Nzambe ya bomoi mpe ya solo,” Yehova, boye te?—1 Batesaloniki 1:9, NW.
[Elilingi na lokasa 7]
“Namiyokaka te ete nazangi eloko. Nazwaka makabo ezala mokolo nini kati na mbula”