Tosengeli kotya likebi mingi na mabondeli oyo mazwami kati na Biblia
MWASI moko oyo atungisamaki, mokonzi moko mpe Mwana mpenza ya Nzambe nde basalaki mabondeli oyo tokotalela sikawa na mozindo. Moko na moko na mabondeli yango epusamaki na ezalela ya makambo oyo ekeseni. Nzokande, ezalela ya makambo motindo yango ekoki mpe kozala lelo oyo na bopusi likoló na bomoi na biso. Makambo nini tokoki koyekola na bandakisa wana?
“Sɔkɔ okotala nsɔni na moombo na yɔ”
Ozali kobunda na mokakatano moko oyo ezali koumela? To ozali kooka bozito ya motungisi moko? Boye okokani na Hana, liboso ete abota Samwele, mwana na ye ya liboso. Ye azalaki na mwana te mpe azalaki kotyolama na mwasi mosusu. Ya solo, mitungisi mpe mikakatano ya Hana mizalaki mpenza kolɛmbisa ye na boye ete azalaki kokoka kolya te. (1 Samwele 1:2-8, 15, 16) Alelaki epai na Yehova mpe asalaki lilɔmbɔ oyo ete:
“[Yehova] na bibele, sɔkɔ okotala nsɔni na ngai, moombo na yɔ, mpe sɔkɔ okokanisa ngai mpe okobosana moombo na yɔ tɛ nde okopɛsa moombo na yɔ mwana mobali, ngai nakopɛsa ye epai na [Yehova] mikɔlɔ yɔnsɔ na bomɔi na ye mpe lotɛbu ekokata nsuki na ye tɛ.”—1 Samwele 1:11.
Tomoni ete Hana alobaki likambo ya sikisiki. Amonisaki epai na Yehova lisɛngi ya sikisiki (ya mwana mobali) mpe asangisaki yango na ekateli moko makasi (ya kopesa mwana yango mpo na mosala ya Nzambe). Yango ezali koteya biso likambo nini?
Wana tokutani na mikakatano, tosengeli kosala libondeli ya sikisiki. Atako mikakatano na yo mizali nini—mikakatano na libota, kozala yo moko to kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto—bondelá Yehova mpo na yango. Lobelá ye mpenza mokakatano ozali na yango mpe lolenge ozali kooka. Mwasi moko mokufeli mobali na nkombo Louise alobi ete: “Na mpokwa nyonso napesaka mikakatano na ngai nyonso epai na Yehova. Na bantango mosusu, nazalaka na mikakatano mingi, kasi nalobelaka moko na moko na yango polele.”
Koloba epai na Yehova na maloba ya sikisiki epesaka matomba. Kosala bongo ekosalisa biso na kolimbola polele mokakatano na biso, oyo ekoki mbala mosusu na nsima komonana ete ezalaki monene mingi te. Kosala mabondeli ya sikisiki ekolongola biso na mitungisi. Ata liboso ete azwa eyano na libondeli na ye, Hana alendisamaki, mpe “mawa emɔnanaki lisusu na elongi na ye tɛ.” (1 Samwele 1:18) Lisusu, koloba na bosikisiki nyonso ekosunga biso na kotya likebi na eyano oyo ekopesama na libondeli na biso. Bernhard, moklisto moko oyo azali na Allemagne alobi ete: “Soki nasali mabondeli na ngai na maloba ya sikisiki, biyano na yango bizalaka mpe polele.”
“Ngai bobɛlɛ mwana mokɛ”
Nzokande, moto moko akoki kozala na motungisi ya lolenge mosusu soki apesameli mikumba oyo azali kooka ete eleki makoki na ye. Mbala mosusu omonaka ete mokumba oyo Yehova apesi yo moleki makoki na yo? To bato mosusu bazali komona ete okoki te na mokumba oyo epesameli yo? Elenge Salomo akutanaki na likambo wana ntango apakolamaki lokola mokonzi ya Yisraele. Bato mosusu ya lokumu balingaki ete moto mosusu nde apesamela bokonzi. (1 Mikonzi 1:5-7, 41-46; 2:13-22) Na ebandeli ya bokonzi na ye, Salomo amonisaki lisɛngi oyo kati na libondeli na ye:
“[Yehova], Njambe na ngai, otii moombo na yɔ na bokonji . . . ata ngai bobɛlɛ mwana mokɛ; nayebi to kobima tɛ to kokɔta tɛ. . . . Bongo, pɛsa moombo na yɔ motema na mayɛlɛ mpɔ na kobɔngisa bato na yɔ ete nayeba kokata epai na mabe mpe malamu.”—1 Mikonji 3:7-9.
Salomo asalaki ete boyokani na ye elongo na Yehova, mokumba oyo epesamaki na ye, mpe makoki na ye ya kokokisa malamu mokumba na ye ezala moboko ya libondeli na ye. Bobele bongo, ntango nyonso oyo tozwi mokumba oyo tokanisi ete eleki makoki na biso, tosengeli kobondela Nzambe ete abongisa biso mpo na mosala yango. Tótalela bandakisa oyo elandi:
Eugene alimboli ete: “Ntango bapesaki ngai mokumba moko monene na biro ya filiale ya la Société Watch Tower, naokaki ete nakokoka soko moke te. Ezalaki na bandeko mosusu oyo bazalaki na makoki mingi koleka ngai mpe bazalaki na eksperianse mingi. Nalalaki malamu te na boumeli ya butu mibale oyo elandaki, kolekisáká ntango mingi kati na libondeli, yango epesaki ngai makasi mpe makoki oyo nasengelaki na yango.”
Basɛngaki na Roy ete apesa lisukúlu ya bokundi nsima wana moninga na ye moko oyo ayebanaki mingi akufaki liwa ya mbalakaka mpe ya nsɔ́mɔ. Ebele na bato balingaki kozala wana. Roy asalaki nini? “Naino nabondelá bongo mpenza mbala mingi te mpo na kozwa nguya mpe makoki ya kosalela maloba mabongi mpo na kobimisa makanisi ya kolendisa mpe ya kobɔndisa.”
Lokola Mozalisi azali ‘koyeisa makambo mbangu’ mpe lokola lisangá na ye lizali sé kokóla, ezali kosala ete basaleli na ye mingi bazali kozwa mikumba. (Yisaya 60:22) Soki bapesi yo mokumba monene, osengeli kondimisama ete Yehova akosunga yo esika ozangi eksperianse, esika obongisami naino te to esika ozali na makoki mingi te. Lobelá Nzambe motindo moko lokola Salomo asalaki, mpe akobongisa yo ete okoka kolónga kati na mokumba yango.
“Ete yɔnsɔ bajala mɔkɔ”
Motindo ya misato ya ezalela ya makambo oyo ezali kobima lelo oyo etali likambo ya kobyangama mpo na kosala libondeli mpo na etuluku moko ya bato. Wana tobyangami mpo na komonisa bato mosusu kati na libondeli, tosengeli kosɛnga nini? Tótalela libondeli ya Yesu oyo lizwami kati na Yoane mokapo 17. Asalaki libondeli wana liboso na bayekoli na ye na butu ya nsuka oyo alekisaki lokola moto. Malɔmbɔ ya lolenge nini amonisaki epai na tata na ye ya likoló?
Yesu alobelaki mingi mikano mpe elikya ya baoyo bazalaki wana. Alobelaki kokumisama ya nkombo ya Nzambe mpe kosala ete Bokonzi eyebana. Yesu alobelaki mingi motuya ya boyokani kati na Tata mpe Mwana, oyo ezalaki na moboko likoló na boyebi ya Makomami. Alobelaki likambo ya komikabola na mokili, oyo elingaki kobongisa bayekoli na ye liboso na botɛmɛli. Klisto asɛngaki lisusu na Tata na ye ete abatela bayekoli na ye mpe asangisa bango kati na losambo ya solo.
Ee, Yesu alobelaki mingi bomoko. (Yoane 17:20, 21) Na mpokwa ya mokolo wana, bayekoli babandaki kowelana oyo ezalaki komonisa kozanga bokóli. (Luka 22:24-27) Nzokande, kati na libondeli, Klisto alukaki te kotyola kasi kosangisa. Bobele bongo, mabondeli oyo masalemi kati na libota to kati na lisangá masengeli kokólisa bolingo mpe koluka kosilisa matáta kati na bato. Baoyo bamonisami kati na libondeli basengeli kobendana na kosangana kati na bomoko.—Nzembo 133:1-3.
Bomoko yango ekomonisama wana baoyo bayokaki libondeli balobi na nsuka ete, “Amen,” oyo elimboli “Ezala sé bongo.” Mpo ete ezala bongo, basengeli kokanga ntina mpe kondima makambo nyonso oyo mayebisami. Na yango, ekobonga te kolobela kati na libondeli likambo oyo liyebani te na bato mosusu oyo bazali wana. Na ndakisa, nkulutu moko oyo azali komonisa lisangá kati na libondeli akoki kosɛnga lipamboli ya Yehova likoló na ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo azali na bokɔnɔ makasi. Kasi ekozala malamu mingi soki asali yango wana ntalo monene ya baoyo bazali koyoka bayebi moto yango mpe basili koyoka nsango ya bokɔnɔ na ye.
Tomoni lisusu ete, Yesu atandaki te molɔngɔ́ molai ya bamposa ya mosangani moko na moko ya etuluku. Kosala bongo elingaki kosɛnga ete alobela makambo mosusu oyo mayebanaki bobele na basangani mosusu. Mikakatano ya moto na moto mizali likambo oyo ebongi na libondeli ya moto ye moko, oyo ekoki koumela mpe kosangisa makambo mingi lokola elingi ye.
Lolenge nini moto akoki komibongisa mpo na komonisa lisangá monene ya bandimi kati na libondeli? Moklisto moko oyo ameseni mingi na kobondela alimboli ete: “Natalelaka liboso makambo oyo mabongi na kopesa botɔ́ndi, masɛngi oyo bandeko bakoki kozala na yango mposa, mpe malɔmbɔ oyo nakoki kosala mpo na bango. Nabongisaka makanisi, maloba ya masanzoli, na molɔngɔ́ malamu kati na elimo na ngai. Yambo ete nabondela liboso na bato, nabondelaka na nsé ya motema, kosɛngáká lisalisi mpo na komonisa bandeko na motindo oyo mobongi.”
Ata soki ezalela ya makambo na yo ezali nini, kozanga ntembe okomona kati na Biblia libondeli moko oyo esalemaki na moto moko oyo azalaki na ezalela ya makambo lokola oyo ya yo. Ebele na mabondeli oyo mazali kati na Makomami ezali elembo ya motema boboto ya Nzambe. Kotánga mabondeli wana mpe komanyola likoló na yango ekosalisa yo na kobongisa lisusu mabondeli na yo.
[Etanda na lokasa 5]
MABONDELI MINENE OYO MAZALI KATI NA BIBLIA
Basaleli ya Yehova basalaki mabondeli kati na ezalela ya makambo ndenge na ndenge. Okoki komimona kati na ezalela moko to makambo mingi oyo mazali awa?
Ozali na mposa ya litambwisi ya Nzambe, lokola Ɛliɛsɛlɛ?—Genese 24:12-14.
Ozali pene na likámá moko monene, lokola Yakobo?—Genese 32:9-12.
Olingi koyeba Nzambe malamumalamu, lokola Mose?—Exode 33:12-17.
Ozali kokutana na mitungisi ya batɛmɛli, lokola Eliya?—1 Mikonzi 18:36, 37.
Mosala ya kosakola mozali mpasi mpo na yo, lokola ezalaki mpo na Yilimia?—Yilimia 20:7-12.
Ozali na mposa ya koyambola masumu mpe koluka bolimbisi, lokola Danyele?—Danyele 9:3-19.
Ozali kokutana na minyoko, lokola bayekoli ya Yesu?—Misala 4:24-31.
Talá lisusu Matai 6:9-13; Yoane 17:1-26; Bafilipi 4:6, 7; Yakobo 5:16.
[Etanda na lokasa 6]
TOKOSƐNGA NINI NA LIBONDELI WANA TOZALI KOBUNDISA MOMESENO OYO EKƆTELÁ BISO MAKASI
Ozali kobundisa bolɛmbu moko oyo ezongelaka yo mbala na mbala? Lolenge nini mabondeli oyo mazali kati na Biblia makoki kopesa yo litomba? Tótalela ndakisa ya Davidi, oyo abondelaki na bantango ekeseni na ntina na bolɛmbu na ye.
Davidi ayembaki ete: “Meka ngai, ɛ Njambe, mpe yeba motema na ngai; sɔsɔla ngai mpe yeba kobanja na ngai.” (Njembo 139:23) Mposa ya Davidi ezalaki ete Yehova aluka koyeba bamposa, maoki to mikano ya mabe oyo ezalaki kati na ye. Na elobeli mosusu, Davidi alingaki kozwa lisalisi ya Yehova mpo na kopɛngola masumu.
Kasi bolɛmbu ya Davidi elóngaki ye, mpe asalaki lisumu moko monene. Awa lisusu, libondeli lisalisaki ye—na mbala oyo mpo na kozongisa boyokani na ye elongo na Nzambe. Engebene Njembo 51:2, Davidi alelaki ete: “Sukola ngai malamu kolongola mabe na ngai, pɛtɔla ngai na masumu na ngai.”
Biso mpe tokoki, na komikitisa nyonso, kobondela mpo na kozwa lisungi ya Yehova mpo na kotɛmɛla bamposa mabe na biso. Yango ekolendisa biso na kolónga bolɛmbu oyo esilá kokɔtela biso makasi mpe ekoki kosalisa biso na kopɛngola masumu. Soki ekómi ete tokwei lisusu, tosengeli kobɛlɛma epai na Yehova na malɔmbɔ ete ásalisa biso na kolanda kobunda.
[Bililingi na lokasa 7]
Mabondeli oyo masalemi mpo na etuluku moko masengeli kolobela mingi bilikya mpe mikano ya elimo ya baoyo nyonso bazali koyoka yango