Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/3 nk. 8-9
  • Batatoli ya Yehova kati na mokili Zambie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova kati na mokili Zambie
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Babweta ya kokamwisa
    Lamuká!—2004
  • Bondeko na biso na mokili mobimba elendisaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Sida na Afrika​—Elikya nini bato bazali na yango mpo na mbula nkóto ya sika?
    Lamuká!—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/3 nk. 8-9

Batatoli ya Yehova kati na mokili Zambie

BISOBE minene likoló na ngomba patatálú ya bamɛtɛlɛ 1200​—wana ezali Zambie, mboka oyo ezali na ntéi ya súdi ya Afrika. Na nɔ́rdi-ɛ́sti, bangomba Muchinga etombwani kino bamɛtɛlɛ 2100. Ebale monene Zambèze, oyo ezali konguluma na makɛlɛlɛ monene na boéta ya Victoria oyo eyebani na mokili mobimba, ezali ndelo na eteni monene ya súdi ya mboka wana oyo ezingelami te na mai monene. Ezali na bato ndenge na ndenge, bato na bikólo koleka 70. Balobaka nkótá minene mwambe na mboka wana, kasi ezali na ebele na nkótá mosusu.

Na 1911, lokótá mosusu ya sika ebandaki kokɔta mpe kopalangana na Zambie. Batámboli bakɔtisaki babúku Etudes des Ecritures, mpe kobanda wana Batatoli ya Yehova basili kosala milende mpo na kopalanganisa “monɔkɔ ya pɛto” ya solo ya Biblia na Zambie. (Sofoni 3:9, NW) Mikakatano minene oyo bazali kokutana na yango mizali bongo bindimeli oyo biyokani na Makomami te na ntina na ezalela ya bakufi. Ntango bato bazali koyekola solo mpe bazali kososola ete biyambayamba bikómisaki bango baombo, bopusi ya solo ezali mpenza kosikola bango!​—Yoane 8:32.

Na ndakisa, ndeko mwasi moko ya sembo alobi ete: “Ntango noko na ngai akufaki na mbalakaka, mama na ngai, mosangani ya molende ya Eglise Unie ya Zambie, abulunganisamaki. Nsima ya milulu ya bokundi oyo eumelaki pɔ́sɔ mobimba, nazongaki na mboka mpo na kotala soki azali malamu. Ntango nakómaki, namonaki mobali moko mobangé kati na ndako, mpe ntango akendaki, natunaki nkɔ́kɔ ya mwasi soki mobali yango azalaki nani. Alobaki ete ye azalaki nganga-nkísi. Mama akanaki kofuta ye mbongo mpo ete abékola kufa ya ndeko na ye ya mobali na mokano ete molimo na ye mokoka kozwa bopemi. Akanisaki, engebene maloba ya mama, ete na ntango wana molimo na ye ‘mozalaki bobele koyengayenga.’

“Nkɔ́kɔ-mwasi alimbwelaki ngai lisusu ete boyei na ngai ezalaki lipamboli mpamba te libota lizalaki koluka mosolo ya kofuta nganga-nkísi yango. Asɛngaki ngai ete napesa mosolo, kasi na mayele nyonso nalimbwelaki ye ete, lokola nazali moklisto, nakokoka te kosangana na yango. Nasololaki elongo na ye likoló na Nzembo 146:4, oyo ezali komonisa ete bakufi bazali na makanisi te​—mpo na yango molimo moko te ‘mozali koyengayenga.’ Totalelaki mpe Baloma 12:19, oyo emonisi ete kobékola ezali likambo ya Yehova kasi likambo na biso te. Nsima na yango, nayebisaki mama elikya ya lisekwa oyo Yesu alobelaki, lokola ekomami na Yoane 5:28, 29. Akamwaki mingi na ntina na kondima makasi oyo nazalaki na yango kati na bilaka ya Nzambe. Kozanga koumela, abandaki koyekola elongo na Motatoli moko mpe asalaki bokóli ya nokinoki. Akataki boyokani nyonso elongo na lingomba na ye ya kala mpe amonisaki komipesa na ye epai na Nzambe na nzela ya batisimo ya mai. Sikawa azali Motatoli ya Yehova.”

Ndeko mwasi mosusu alobi ete: “Nakendaki na matángá ya mwasi ya noko na ngai. Ntango nakómaki, nakutaki noko mpe mwana na ye bazali na nzala makasi. Balyaki eloko te kobanda mokolo mwasi ya noko akufaki. Ntango natunaki mpo na nini balyaki te, bayanolaki ete engebene bonkɔ́kɔ, bapesameli nzela te ya kopelisa mɔ́tɔ mpo na kolamba. Nasɛngaki ete nalambela bango, kasi basangani mosusu ya libota babangaki ete soki nakobuka momeseno wana ya bapakano, bato nyonso bakozwa ligboma!

“Nalobaki ete lokola nazali Motatoli ya Yehova, nasengeli kotosa oyo Biblia elobi na Levitike 18:30 mpe nasengeli te kolanda mimeseno oyo ezali kobuka mitindá ya Makomami. Na nsima, nalakisaki bango mwa búku Bilimu ya bakufi. Ntango bamonaki bongo motema na bango ekitaki, mpe nakóbaki mpe nalambelaki noko mpe bato mosusu bilei. Bandeko ya mowei bakamwaki na mpiko na ngai mpe bandimaki koyekola makambo mingi mosusu kati na Biblia. Bazali sikawa basakoli oyo bazwi naino batisimo te, mpe libota mobimba lizali na elikya ete mosika te bakozwa batisimo.”

oyo nde esengo tozali na yango wana monɔkɔ ya pɛto ya solo ezali kolónga mobulungano ya mangomba ya lokuta, mingimingi makanisi mapikami makasi oyo mazali kotya bato na motema sembo na boombo! Na lipamboli ya Yehova, monɔkɔ ya pɛto mozali kopalanganisama na Zambie, motindo moko yango ezali kapalanganisama na mokili mobimba.​—2 Bakolinti 10:4.

[Etanda na lokasa 9]

MAKAMBO MATALI EKÓLO WANA

Mbula ya mosala 1994

MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 82926

BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 107

MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 363372

MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 10713

MWAYENE YA BOYEKOLI YA BIBLIA: 108948

MOTUYA YA BABATISAMI: 3552

MOTUYA YA MASANGÁ: 2027

FILIALE: LUSAKA

[Elilingi na lokasa 9]

Bandako ya filiale ya Watch Tower penepene ya Lusaka

[Elilingi na lokasa 9]

Mosala ya kosakola na Shimabala, na súdi na Lusaka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto