Lisolo ya bomoi
Bondeko na biso na mokili mobimba elendisaki ngai
YA THOMSON KANGALE
Na mokolo ya 24 Aprili 1993, babengisaki ngai na likita ya kofungola filiale ya sika oyo ezali na bandako minene 13, na Lusaka, na ekólo Zambie. Lokola nazalaki na mokakatano mpo na kotambola, ndeko mwasi moko moklisto oyo azalaki kotambwisa biso mpo na kotala bandako yango atunaki ngai na boboto mpenza ete: “Olingi namemela yo kiti ya kofanda mpo opemaka ntango mosusu?” Nazali moto moindo mpe ye azali mondɛlɛ, kasi azalaki komona bokeseni wana te. Likambo yango esimbaki mpenza motema na ngai, napesaki ye matɔndi, mpamba te mpo na boboto na ye, natalaki bandako nyonso ya sika ya filiale.
MAKAMBO ya ndenge wana oyo nakutanaki na yango na boumeli ya bambula ezalaki kosepelisa ngai, endimisaki ngai mpenza ete bolingo ya solosolo oyo Klisto alobaki ete ekomonisa bayekoli na ye, ezali na kati ya lisangá ya Batatoli ya Yehova. (Yoane 13:35; 1 Petelo 2:17) Tiká naino nayebisa bino ndenge oyo nayebaki baklisto yango na 1931, mbula oyo bamonisaki polele mposa na bango ya koyebana na nkombo ya Batatoli ya Yehova, nkombo oyo euti na Biblia.—Yisaya 43:12.
Ebandeli ya mosala na Afrika
Na sanza ya Novɛmbɛ 1931, nazalaki na mbula 22 mpe nazalaki kofanda na Kitwe, na etúká ya Copperbelt na ekólo Rhodésie du Nord (lelo oyo Zambie). Moninga moko oyo tozalaki kobɛta na ye ndembo alakisaki ngai epai ya Batatoli. Nakendaki na makita na bango mpe natindaki mokanda na biro ya filiale na engumba Cap, na Afrika ya Sudi, mpo na kosɛnga mokanda La harpe de Dieu.a Mokanda yango ezalaki na Lingelesi, mpe ezalaki mpasi mpo nakanga ntina ya makambo yango mpamba te nayebaki monɔkɔ yango malamu te.
Bato mingi bazalaki kouta na bitúká mosusu mpo na kosala na bakompanyi ya kwivre na etúká ya Copperbelt, na ntaka ya kilomɛtrɛ 240 na sudi-wɛsti ya Laki Bangweulu, pene na esika oyo nakolaki. Batatoli mingi bazalaki kokutana wana mbala na mbala mpo na koyekola Bibia. Mwa moke na nsima, nalongwaki na Kitwe mpo na kokende na engumba ya Ndola oyo ezalaki pene wana, mpe nabandaki koyangana na Batatoli oyo bazalaki kuna. Na ntango yango, nazalaki kapiteni ya ekipi moko ya ndembo oyo bazalaki kobenga yango Prince de Galles. Nazalaki mpe kosala na ndako ya mondɛlɛ moko oyo azalaki mokonzi na kompanyi moko (African Lakes Corporation) oyo ezalaki na ebele ya magazini na bamboka mingi na Afrika ya Ntei.
Natángaki kelasi mingi te mpe nayekolaki mwa Lingelesi moke epai ya mindɛlɛ oyo nazalaki kosala epai na bango. Atako bongo, nazalaki na mposa mpenza ya kotánga lisusu kelasi mpe nasɛngaki nakɔta na eteyelo moko na Plumtree, na Rhodésie du Sud (lelo oyo Zimbabwe). Kasi, na ntango yango, natindaki mokanda mpo na mbala ya mibale na biro ya filiale na engumba Cap. Nayebisaki bango ete nazwaki mokanda La harpe de Dieu mpe nazali na mposa ya kosalela Yehova mosala ya ntango nyonso.
Nakamwaki ntango nazwaki eyano na bango, mpe balobaki boye: “Tosepeli mingi na mposa na yo ya kosalela Yehova. Tolendisi yo ete obondelaka mpo na likambo yango, mpe Yehova akosalisa yo oyeba solo malamumalamu, mpe akosalela yo na mikolo ezali koya na lisangá na ye.” Nsima ya kotánga mokanda yango mbala ebele, natunaki Batatoli mingi eloko nini nasengeli kosala. Bayebisaki ngai boye: “Soki ozali mpenza na mposa ya kosalela Yehova, landá koyekola mpe salá yango nokinoki.”
Na boumeli ya pɔsɔ mobimba, nazalaki kobondela Yehova mpo na likambo yango mpe na nsima nazwaki ekateli ya kotika makambo ya kotánga kelasi mpe nakobaki na boyekoli na ngai ya Biblia na Batatoli. Na mbula oyo elandaki, na Yanuali 1932, nazwaki batisimo na mai mpo na kolakisa ete namipesaki na Yehova Nzambe. Na nsima ya kolongwa na Ndola nakendeki na engumba Luanshya oyo ezalaki mosika te, nakutanaki na Jeanette, ndeko mwasi moko mondimi mpe tobalanaki na Sɛtɛmbɛ 1934. Ntango tobalanaki, Jeanette azalaki na mwana moko ya mobali mpe mwana moko ya mwasi.
Nakolaki na elimo mokemoke mpe na 1937, nabandaki kosala mosala ya ntango nyonso. Mwa moke na nsima, naponamaki lokola ministre-motamboli, lelo oyo mokɛngɛli ya zongazonga. Bakɛngɛli ya zongazonga batalaka masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kolendisa bango na elimo.
Mosala ya kosakola na bambula ya ebandeli
Na Yanuali 1938, batindaki ngai nakende kotala nkumu ya mboka moko, nkombo na ye Sokontwe, ye asɛngaki ete Batatoli ya Yehova bákende kotala ye. Natambolaki na velo mikolo misato mpo na kokóma na esika oyo nkumu yango azalaki. Ntango nayebisaki ye ete biro ya filiale ya engumba Cap nde etindaki ngai mpo na eyano ya mokanda oyo atindaki, moto yango amonisaki botɔndi mingi.
Nakendaki na ndako mokomoko ya bato ya mboka na ye mpe nabengisaki bango na insaka (ndako ya makita ya mboka). Ntango bayanganaki, nasalaki lisolo liboso ya bato nyonso. Yango wana, bato mingi babandaki koyekola Biblia. Nkumu ya mboka mpe kalaka na ye bazalaki bato ya liboso oyo bakómaki bakɛngɛli ya masangá oyo esalemaki kuna. Lelo oyo, ezali na masangá koleka 50 na mboka wana, oyo eyebani lelo na nkombo ya etúká ya Samfya.
Banda 1942 tii 1947, nasalaki na etúká oyo ezali zingazinga ya Laki Bangweulu. Nazalaki kolekisa mikolo zomi na lisangá mokomoko. Lokola babuki mbuma ya elimo bazalaki moke na ntango wana, tozalaki koyoka lokola Nkolo na biso Yesu Klisto, ntango alobaki ete: “Ɛɛ, bambuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Na yango, bósɛnga na Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma ete atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Matai 9:36-38, NW) Na ntango wana, kosala mobembo ezalaki mpasi, yango wana, mbala mingi Jeanette na bana bazalaki kotikala na Luanshya ntango ngai nazalaki kotala masangá. Ngai na Jeanette tobotaki bana mibale, kasi moko akufaki ntango akokisaki sanza zomi.
Mituka ezalaki mingi te, banzela mpe ezalaki mingi te. Mokolo moko, nasalaki mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 200 na velo ya Jeanette. Na bantango mosusu, soki nalingi kokatisa mongala moko, nazalaki komema velo na mapeka, nasimbi yango na lobɔkɔ moko, mpe nazalaki kobɛta mai na lobɔkɔ mosusu. Mpe, Batatoli bakómaki ebele na Luanshya, na 1946, bato 1 850 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
Tokutanaki na botɛmɛli na mosala na biso
Mokolo moko, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya etúká ya Kawambwa abengaki ngai mpe alobaki boye: “Nalingi otika kosalela mikanda ya Société Watch Tower mpamba te sikoyo epekisami. Kasi nakoki kopesa yo babuku mosusu oyo okoki kosalela mpo na kokoma mikanda mosusu ya kosalela na mosala na yo.”
Nalobaki boye: “Mikanda na biso ekoki na ngai mpo na mosala na ngai. Nazali na mposa ya mikanda mosusu te.”
Alobaki na ngai: “Yo oyebi bato ya Amerika te!” (Mikanda na biso ezalaki kouta na États-Unis). “Bakobungisa yo nzela.”
Nazongiselaki ye boye: “Te, baoyo nasanganaka na bango bakobungisa ngai nzela te.”
Na nsima atunaki boye: “Okoki te kolendisa masangá na bino ete bápesaka mbongo mpo na kopesa Leta mabɔkɔ na bitumba ndenge mangomba mosusu bazali kosala?
Napesaki eyano ete: “Wana ezali mosala ya basali ya Leta.”
Alobaki ete: “Omoni boni soki okei kokanisa likambo yango na ndako?”
Napesaki ye eyano ete: “Na mokanda ya Exode 20:13 mpe 2 Timote 2:24, Biblia ezali kosɛnga biso ete tóboma te mpe tóbunda te.”
Atako atikaki ngai nakende, kasi na nsima, mokonzi ya etúká na engumba Fort Rosebery, oyo ekómá lelo oyo Mansa, abengaki ngai lisusu. Mokonzi yango alobaki na ngai boye: “Nabengi yo awa mpo na koyebisa yo ete guvɛrnɛma epekisi mikanda na bino.”
Nalobaki ete: “Ɛɛ, nayokaki likambo yango.”
“Sikoyo osengeli kokende na masangá na bino nyonso mpe koyebisa bato oyo bosambelaka na bango ete báya na mikanda nyonso awa. Oyoki?”
Napesaki ye eyano ete: “Wana ezali mosala na ngai te, ezali mokumba ya basali ya Leta.”
Bokutani oyo ebotaki mbuma
Nsima ya etumba, tokobaki kosakola. Na 1947, nasilisaki kotala lisangá moko na mboka Mwanza mpe nalukaki koyeba esika nini nakoki komɛla tii. Balakisaki ngai ndako ya Monsieur Nkonde, esika ezalaki na mwa ndako oyo balambaka tii. Monsieur Nkonde na mwasi na ye bayambaki ngai na esengo mpenza. Natunaki Monsieur Nkonde soki akolinga kotánga mokanda “Que Dieu soit reconnu pour vrai” na mokapo oyo ezalaki na motó na likambo ete “Lifelo, esika ya kopema mpo na bakufi” ntango ngai nazali komɛla tii.
Ntango nasilisaki komɛla tii, natunaki ye: “Na ndenge otángi, lifelo ezali nini? Makambo atángaki ekamwisaki ye mpe, abandaki koyekola Biblia na Batatoli mpe na nsima azwaki batisimo ye na mwasi na ye. Atako azalaki lisusu Motatoli te, mwasi na ye mpe bana na ye mosusu bazalaki kaka Batatoli. Kutu, mwana na bango moko na nkombo Pilney azali tii lelo oyo kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Zambie. Lisusu, atako mama ya Pilney akómi mobange sikoyo, azali kaka Motatoli ya sembo.
Tolekisaki mwa ntango na Afrika ya Ɛsti
Biro ya filiale na biso oyo ezalaki na Rhodésie du Nord, oyo bafungolaki yango na ebandeli ya 1948 na Lusaka, etindaki ngai nakende kosala na ekólo Tanganyika (lelo oyo Tanzanie ). Motatoli mosusu akendaki kotika ngai na mwasi na ngai na mobembo oyo totambolaki na makolo na banzela ya ngombangomba. Tosalaki mikolo misato na mobembo mpe yango elɛmbisaki biso mingi. Namemaki liboke ya mikanda, mwasi na ngai amemaki bilamba na biso, mpe Motatoli wana mosusu amemaki babulangiti na biso.
Na sanza ya Marsi 1948, ntango tokómaki na Mbeya, mosala ezalaki monene mpo na kosalisa bandeko bákoka kolanda mpenza mateya ya Biblia. Ya liboso, kuna bazalaki kaka kobenga biso bato ya Watchtower. Atako bandeko bandimaki nkombo ya Batatoli ya Yehova, bazalaki koyebisa bato nkombo yango te. Lisusu, Batatoli mosusu bazalaki naino kolanda mimeseno mosusu oyo ezalaki na boyokani losambo ya bakufi. Kasi, nakanisi ete mbongwana oyo elekaki mpasi mpo na bandeko mingi ezalaki ya kokomisa mabala na bango na buku ya Leta mpo ezala na lokumu na miso ya bato nyonso.—Baebele 13:4.
Na nsima, nazwaki libaku ya kosala na bamboka mosusu na Afrika ya Ɛsti mpe na Ouganda. Nalekisaki pɔsɔ soki motoba na Entebbe mpe na Kampala epai nasalisaki bato mingi mpo báyeba mateya ya solo ya Biblia.
Babengi ngai na New York
Nsima ya kosala na Ouganda mpo na mwa ntango, nakendaki na Dar es-Salaam, mboka-mokonzi ya ekólo Tanganyika na ebandeli ya 1956. Kuna, nakutaki mokanda moko batindelaki ngai, eutaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Na kati, ezalaki na malako mpo na kobanda komibongisa mpo na kokende na liyangani oyo esengelaki kosalema na New York, oyo bato bakouta na mikili ndenge na ndenge, banda mokolo ya 27 Yuli tii mokolo ya 3 Augusto 1958. Nasepelaki mingi na likanisi ya kokende kuna.
Ntango mikolo ya kokende ekokaki, ngai na Ndeko Luka Mwango, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli, tokɔtaki na mpɛpɔ oyo ememaki biso longwa na Ndola tii na Salisbury (lelo oyo Harare), na Rhodésie du Sud, mpe nsima tokendaki na engumba Nairobi, na ekólo ya Kenya. Kolongwa wana, tokendaki na Londres, na Angleterre, mpe kuna bayambaki biso na esengo mpenza. Na butu ya mokolo oyo tokómaki na Angleterre, ntango tokendaki kolala, tozalaki na esengo mingi mpe tozalaki kolobela ndenge mindɛlɛ bayambaki biso bato ya Afrika malamu mpenza. Makambo yango elendisaki biso mingi mpenza.
Nsukansuka, tokómaki na New York, epai liyangani esalemaki. Mokolo mosusu na liyangani, napesaki lapolo ya mosala ya Batatoli ya Yehova ya Rhodésie du Nord. Mokolo yango, bato pene na 200 000 bayanganaki na mabanda ya masano ya Polo Grounds mpe ya Yankee Stadium, na engumba New York. Nakokaki kolala te na butu wana mpamba te nazalaki kokanisa libaku malamu oyo nazwaki.
Makambo malamu eumelaka te, tokómaki na nsuka ya liyangani mpe tozongaki na mboka na biso. Na mobembo na biso mpo na kozonga na mboka na biso, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali na Angleterre bayambaki biso lisusu malamu. Na boumeli ya mobembo yango, tomonaki mpenza bomoko ya basaleli ya Yehova, bázala bato ya loposo nini to ya ekólo nini mpe tokokaki kobosana yango te.
Mosala ya ntango nyonso mpe mikakatano
Na 1967, nakómaki mosaleli ya etúká—ministre oyo atambolaka na zongazonga moko na moko. Na ntango wana, Batatoli ya Yehova na Zambie balekaki 35 000. Na nsima, lokola nzoto ezalaki lisusu kolɔngɔnɔ mpenza te, nakómaki lisusu kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga na etúká Copperbelt. Nsukansuka, Jeanette abɛlaki mpe akufaki na sanza ya Desɛmbɛ 1984. Azalaki sembo epai na Yehova tii liwa na ye.
Na nsima ya liwa ya Jeanette, natungisamaki mingi ntango bandeko na ye balobaki na ngai ete nabomaki ye na bondɔki. Kasi, bato mosusu oyo bayebaki maladi ya Jeanette mpe basololaki na monganga oyo azalaki kosalisa ye, balimbolelaki bandeko ya Jeanette ndenge makambo elekaki mpenza. Na nsima, mokakatano mosusu ebimaki: bandeko na bango mosusu balingaki ete nasala ukupyanika, ndenge basalaka na bonkɔkɔ na etúká na biso, momeseno yango esɛngaka ete ntango molongani moko akufi, oyo atikali na bomoi asangisa nzoto na ndeko moko ya molongani oyo akufi. Kasi, naboyaki.
Nsukansuka, motungisi ya bandeko yango ya Jeanette esilaki. Nazongisaki matɔndi epai ya Yehova mpo ete asalisaki ngai nakoka kozonga nsima te. Sanza moko na nsima ya kokunda mwasi na ngai, ndeko moko ya mobali alobaki na ngai ete: “Ndeko Kangale, na liwa ya mwasi na yo, olendisaki biso mpenza mpamba te osalaki ata momeseno moko te ya bonkɔkɔ ya mabe. Tolingi kopesa yo matɔndi mingi mpenza.”
Mosala kitoko ya kobuka mbuma
Ekoki sikoyo mbula 65 kobanda nazali Motatoli ya Yehova oyo nazali kosala mosala ya ntango nyonso. Nazalaki na esengo mpenza ya komona ete na boumeli ya bambula wana, masangá mingi esalemi mpe Bandako ya Bokonzi mingi etongami na bamboka oyo nasalaká mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga! Na 1943, na Zambie, Batatoli bazalaki 2 800, sikoyo basakoli ya Bokonzi bakómi mingi koleka 122 000. Na mbula eleki, bato koleka 514 000 bayanganaki na Ekaniseli ya Nkolo na ekólo yango oyo bato bazali ata milio 11 te.
Sikoyo, Yehova azali kobatela ngai malamu. Ntango nazali na mposa ya kozwa nkisi ya monganga, ndeko moklisto moko ya mobali amemaka ngai na lopitalo. Kino lelo oyo, babengisaka ngai na masangá mpo na kosala masukulu, mpe yango elendisaka ngai. Na lisangá na biso, bázwa ebongiseli mpo ete bandeko basi baklisto bábongisaka ndako na ngai, moto na moto na ngala na ye, mpe bandeko mibali ya bolingo malamu bákendaka kotika ngai na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Nayebi ete soki nasalelaki Yehova te, mbɛlɛ nalingaki kozwa lisalisi ya bolingo motindo yango te. Nazali kopesa ye matɔndi na ndenge azali kaka kosalela ngai na mosala ya ntango nyonso mpe mpo na ebele ya mikumba oyo nazali na makoki ya kokokisa kino lelo oyo.
Miso na ngai emonaka lisusu malamu te, mpe ntango na natambolaka mpo na kokende na Ndako ya Bokonzi, nasengeli kopema mbala mingi na nzela. Mikolo oyo, nakómi koyoka sakosi na ngai ya mikanda kilo mingi; yango wana, mpo ezala pɛpɛlɛ, nalongolaki mikanda mosusu oyo nasalelaka na makita te. Mosala na ngai ya kosakola etikalá kaka ya koyekola Biblia na bato oyo bayaka kotala ngai na ndako. Kasi, nazalaka na esengo mingi soki nakanisi bambula oyo eleká mpe ntango nakanisaka bokoli ya kokamwa oyo esalemi. Nasali mosala na mboka oyo maloba ya Yisaya 60:22 ekokisami mpenza. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Oyo moke akokoma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota na makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango yango, nakoyeisa yango mbango.” Ya solo, namoni ete maloba yango ekokisami, na Zambie kaka te, kasi na mokili mobimba.b
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi babimisaka yango lisusu te.
b Likambo ya mawa ezali ete, Ndeko Kangale akufaki ntango lisolo oyo ezalaki kobongisama. Azalaki sembo tii na liwa na ye.
[Bililingi na lokasa 24]
Thomson mpe biro ya filiale ya Zambie na nsima
[Elilingi na lokasa 26]
Filiale ya Zambie lelo oyo