Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/3 nk. 29-31
  • Okosanzola Yehova?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okosanzola Yehova?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tósanzola Nzambe na kosakoláká nsango malamu
  • Lisungi ezali
  • Tósalisa bana ete básanzola Yehova
  • Boyokani ya seko elongo na Yehova
  • Batyami pembeni lokola basanzoli na esengo kati na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bilenge, bósanzola Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tósanzola Yehova, Nzambe na biso!
    Tóyembela Yehova
  • Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!
    Tóyembela Yehova na esengo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/3 nk. 29-31

Okosanzola Yehova?

“Ɛ NJAMBE, kosanjola na yɔ epalangani tee kino nsuka na mokili, lokola nkombo na yɔ.” Wana ezali maloba mauti na nzembo moko ya esakweli oyo bana ya Kola bayembaki. (Njembo 48:10) Lelo oyo, etuluku moko ya nguya ya bayembi, bamilió ya Batatoli ya Yehova, bazali kosanzola Nzambe mpe bazali kolakisa nkombo na ye epai na bato na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi. Na kosaláká bongo kati na mikili mpe bisanga 232 ya mai monene mpe na nkótá koleka 300, bazali mpenza kokóma kino na “nsuka na mokili.”

Eloko nini ezali kopusa bato ya mimeseno, ezalela ya bomoi mpe minoko mikeseni ete basanzola Yehova? Ntina monene ezali bongo botɔ́ndi oyo bazali na yango mpo na boyebi ya sikisiki oyo bazwi ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Solo ya elimo esikolaki bango na biyambayamba mpe na bindimeli ya mangomba lokola oyo ya konyokwama ya seko, bindimeli oyo etyaka bato kati na boombo. (Yoane 8:32) Solo ezali kosalisa bango ete bamona bizaleli kitoko ya Nzambe, na ndakisa bolingo, nguya, mayele, mpe boyengebene oyo esangisami na motema mawa. Kokóma na boyebi ya likambo oyo ete Nzambe apesaki mwana na ye bobele moko, Yesu Klisto, lokola mbeka ya lisiko mpo na mokili, ezali kopusa bato ya sembo ete básanzola mpe bákumisa Yehova.

Engebene mokanda ya Emoniseli, oyo ezwami na Biblia, limpinga ya bayembi na likoló bangangaki ete: “Nkolo mpe Njambe na biso, obɔngi kojua nkɛmbɔ, na lokumu, na nguya, mpɔ ete yɔ ojalisaki bilɔkɔ yɔnsɔ; mpe mpɔ na mokano na yɔ bijali mpe bisili kojalisama.” (Emɔnisɛli 4:11) Kosanzola wana ezali kosalema te mpo ete ezali bobele lisɛngi. Ezali nde mpo na botosi mozindo epai na Yehova.

Tósanzola Nzambe na kosakoláká nsango malamu

Wana moto azali kosanzola Yehova, azali bongo komekola ndakisa monene ya Yesu Klisto, mosanzoli ya liboso ya Nzambe. Kolanda ndakisa ya Yesu elimboli mpe kosangana na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 4:17, 23; 24:14) Mosala oyo ya kosakola esili kokóma mosala eleki monene mpo na kosanzola Yehova na mokili mobimba.

Mosala oyo ya kosakola ezali na ntina mingi na boye ete Biblia ezali komonisa yango polele ete elimboli mpenza lobiko. Baloma 10:13-15 elobi ete: “Moto na moto oyo akobeela nkombo na [Yehova] akobika. Na njela nini bakobelela ye soki bandimi tɛ? Na njela nini bakondima ye oyo bayoki mpɔ na ye tɛ? Bakoyoka na njela nini soki bajangi mosakoli? Bakosakola na njela nini soki batindami tɛ? Pelamɔkɔ ekomami ete, Kitɔkɔ boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!”

Bobele na mbula oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova bapesaki bangonga koleka miliare moko kati na mosala ya kosakola. Mpe mosala wana ya kosanzola Yehova ebimisaki mpenza matomba malamu! Soko bato 314 000 bakɔtaki na eutuluku ya basanzoli na komonisáká elembo ya komipesa na bango epai ya Yehova na nzela na batisimo ya mai.

Nzokande, tokoki koloba nini mpo na bato 12 288 917 oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, oyo esalemaki na 1994? Kati na bango ezali na bato koleka 7 000 000 oyo bazali naino te kosanzola Yehova lokola basakoli ya nsango malamu. Kasi, kozala na bango kati na libaku wana ya ntina mingi ekoki kobota mbuma oyo ete bamilió mosusu ya bato bakokɔta kati na etuluku ya baoyo bazali kosanzola Nzambe. Eloko nini tokoki kosala mpo na kosalisa bato wana oyo bazali komonisa bosepeli ete bákóma basanzoli ya Yehova?

Lisungi ezali

Bato mingi oyo bazali kosepela bakoki kozala na mposa ya kosanzola Yehova kasi bazali kokanisa ete bakoki kokokisa masɛngami te. Ebongi malamu ete bamikundola maloba oyo ya mokomi ya Nzembo: “Nakonɛtɔla miso na ngai epai na ngomba. Kosunga na ngai mpenja ekouta wapi? Kosunga na ngai ekolongwa na [Yehova], oyo asalaki lola mpe mokili.” (Njembo 121:1, 2) Na ntembe te, mokomi na Nzembo atombolaki miso mpo na kotala epai na bangomba ya Yelusaleme epai kuna tempelo ya Yehova mpe efandelo ya boyangeli ya teokrasi awa na mabelé ezalaki. Mpo na yango tokoki koloba na bosembo nyonso ete lisungi oyo esɛngami mpo na kosanzola Nzambe mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe eutaka bobele epai na Yehova mpe lisangá na ye.​—Njembo 3:4; Danyele 6:10.

Lelo oyo, baoyo balingi kosanzola Yehova bakoki komizela kozwa lisungi oyo etondi na bolingo kati na lisangá na ye oyo ezali awa na mabelé. Na ndakisa, Batatoli ya Yehova bazali kopesa lisungi na kotambwisáká boyekoli ya Biblia elongo na bato oyo bazali kosepela na solo. Ebongiseli wana ya koteya esuki te bobele na koyekola mateya ya Biblia. Ezali kosalisa moyekoli ete akólisa bosepeli mpo na makambo oyo azali koyekola mpe mpo na lisangá oyo Yehova azali kosalela.

Na boyokani na likambo yango, Motatoli oyo azali kotambolisa boyekoli ya Biblia azali kosala makasi mpo ete makambo ya solo oyo moyekoli auti komona sika esimba bobele bɔɔngɔ́ na ye te, kasi lisusu motema na ye. Mpe ye oyo azali kolakisa akomipekisa te na komonisa moyekoli lolenge nini Yehova azali kosalela lisangá na ye mpo na kokokisa mokano na ye awa na mabelé. Mwa búku Ba Témoins de Jéhovah​—Basangani mpo na kosala mokano ya Nzambe na mokili mobimba mpe kaseti video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation ezali kosalisa bato mingi mpo na kokokisa likambo yango.

Makita ya boklisto ekokisaka mpe mokumba monene mpo na kosunga baoyo bakoki kokóma basanzoli ya Yehova. Na ebandeli mpenza ya boyekoli ya Biblia, moyekoli akoki kobyangama ete aya koyangana na makita ya boklisto. Na nsima, akoya koyeba ntina ya koyangana mbala na mbala mpe kosangana na makita nyonso ya lisangá. (Baebele 10:24, 25) Bakɛngɛli bakoki kopesa lisungi monene epai na bandimi mosusu mpe baoyo bakoki kokóma basanzoli ya Yehova na kobongisáká makita oyo ezali kotonga na elimo mpe ezali kopesa makanisi mabongi mpenza.

Tósalisa bana ete básanzola Yehova

Bana bazali kati na ebele oyo bakoki kokóma basakoli ya nsango malamu na mikolo oyo mizali koya mosika te. Ezali mpenza batata nde bazali na mokumba oyo epesameli bango uta na Biblia mpo na kobokola bana na bango kati na “mateyo mpe mpamela na [Yehova].” (Baɛfɛsɛ 6:4) Soki babokwami malamu epai na baboti oyo bazali kobanga Nzambe, ata bana mike mpenza bakoki kokólisa mposa ya kosanzola Yehova.

Na boumeli ya basanza mingi, mwana moko ya moke ya mwasi, na Argentine, azalaki kokende mbala na mbala epai na bankulutu ya lisangá, mpo na kosɛnga lisungi na ntina ete akokisa masɛngami ya kokóma mosakoli ya Bokonzi. Na nsima, baboti na ye mpe bankulutu bandimaki kopesa ye nzela ete akóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Asilaki kobanda koteya nsango ya Bokonzi na lolenge lobongi mpenza na bandako ya bato. Atako mwana ya moke wana ya mwasi azali bobele na mibu mitano mpe ayebi kotánga te, asilá kokanga mikapo misusu ya Biblia na motó. Nsima ya komona mokapo, akosɛnga na molobani na ye ete ete atánga yango, mpe na nsima ye akopesa ndimbola na yango.

Ezali polele ete bankulutu mpe baboti, bango banso, bakoki kosala malamu mingi na kolendisáká mpe na kosungáká baoyo bazali kokóla mpo na kokóma basanzoli ya Yehova.​—Masese 3:27.

Boyokani ya seko elongo na Yehova

Nzokande, ezali boni soki yo moko ozali koyangana elongo na Batatoli ya Yehova esili koleka mwa ntango kasi osangani naino na bango te kati na mosala na bango ya kosakola? Ekoki kozala malamu ete yo moko omituna mituna oyo, ‘Nandimisami ete nasili komona solo mpe ete Yehova azali Nzambe bobele moko ya solo? Nandimisami mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali mwango bobele moko oyo ekosilisa mikakatano ya bato? Nasili kotika mangomba nyonso ya lokuta mpe mimeseno nyonso ya mokili oyo ezali kotuka Yehova? Nazali na bolingo mozindo mpo na Nzambe mpe mpo na masɛngami na ye ya sembo?’ (Nzembo 97:10) Soki okoki na bosembo nyonso koyanola ee na mituna oyo nyonso, eloko nini ezali kopekisa yo ete osanzola Yehova te?​—Kokanisá na Misala 8:36.

Kosanzola Yehova esuki bobele te na kosakola nsango malamu. Soki osili kozwa boyebi ya sikisiki, ozali na kondima ya solo, mpe ozali koyokanisa bomoi na yo na mitindá ya Nzambe, osengeli koyeisa makasi boyokani na yo elongo na Nzambe. Lolenge nini? Na komipesáká epai na ye kati na mabondeli mpe na nsima, na komonisáká yango na nzela ya batisimo ya mai. Yango etali mpenza libaku na yo ya kozwa bomoi ya seko. Na yango, salá sikawa engebene toli oyo ya Yesu: “Boingela na ekuke ya nkaka. Jambi ekuke ejali monɛnɛ mpe njela ejali na esika monɛnɛ oyo ekoleka kino libebi. Bajali mingi baoyo bakoingela na yango. Mpɔ ete ekuke ejali na nkaka mpe njela ekangani oyo ekoleka na bomɔi mpe baoyo bakomɔna yango bajali mingi tɛ.”​—Matai 7:13‚ 14.

Na ebongiseli ya biloko oyo ekómi pene ya nsuka na yango ya nsɔmɔ, oyo ezali ntango ya kokakatana te. Salá nokinoki matambe oyo ekokamba yo mpo na kosala boyokani ya seko elongo na Yehova. Ya solo, sikawa ezali ntango ya koyanola ee na motuna oyo ete: Okosanzola Yehova?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto