“Botala malamu mpɔ na mfulu na Bafalisai mpe Basadukai”
NTANGO Yesu Klisto alobaki maloba oyo esili koleka bikeke 19, azalaki kokebisa bayekoli na ye na ntina na mateya mpe misala mabe ya mangomba. (Matai 16:6, 12) Lisoló oyo ezwami na Malako 8:15 elobi na sikisiki ete: “Bokeba na mfulu na Bafalisai mpe na mfulu na Elode.” Mpo na nini alobeli mpe Elode? Ezali mpo ete Basadukai mosusu bazalaki bato ya Elode, bazalaki etuluku ya politiki.
Mpo na nini likebisi wana ya sikisiki ezalaki na ntina mingi? Bafalisai mpe Basadukai bazalaki bango nyonso batɛmɛli monene ya Yesu, boye te? (Matai 16:21; Yoane 11:45-50) Ee, bango nyonso bazalaki batɛmɛli. Nzokande, na nsima, bamoko kati na bango balingaki kokɔta kati na boklisto ya solo mpe na nsima komeka kokɔtisa makanisi na bango moko na makasi kati na lisangá ya boklisto.—Misala 15:5.
Likámá mosusu ezalaki oyo ete bayekoli bango moko mpe bakokaki komekola bakonzi wana ya mangomba mpamba te babokwamaki na mateya na bango. Na bantango mosusu, bobele mateya oyo bautaki na yango na lingomba wana ezalaki epekiseli mpo ete bákoka te kosimba ntina ya mateya ya Yesu.
Nini esalaki ete mateya ya Bafalisai mpe ya Basadukai ezala mpenza likámá? Soki totaleli mwa moke ezalela ya makambo ya losambo na eleko ya Yesu tokozwa likanisi.
Kozanga bomoko kati na makambo ya losambo
Mpo na oyo etali etuluku ya Bayuda na ekeke ya liboso T.B., Max Radin, mokomi na makambo ya kala, akomaki ete: “Lipandá ya masangá ya Bayuda moko na mosusu ezalaki mpenza likambo ya solo, mpe nkutu elobelamaki mingi. . . . Mingimingi, wana bazalaki kolobela makasi mpenza na ntina etali kopesa limemya mozindo mpo na tempelo mpe engumba mosantu, koyina makasi ekokaki komonana mpo na baoyo bazalaki bakonzi baleki likoló kati na mboka ya bankɔ́kɔ.”
Oyo nde ezalela ya mawa na makambo ya elimo! Wapi mwa makambo oyo ebimisaki ezalela wana? Bayuda nyonso te nde bazalaki kofanda na Palestine. Bopusi ya mimeseno ya Bagreke, oyo kati na yango banganga bazalaki batambwisi ya lingomba te ezalaki kati na makambo oyo elongolaki botosi epai na ebongiseli ya Nzambe mpo na oyo etali bonganga. (Exode 28:29; 40:12-15) Lisusu, tosengeli te kobosana ete ezalaki na bandimi batángá mingi, mpe bakomeli.
Bafalisai
Nkombo Bafalisai, to Peru·shimʹ, ekoki mpenza kozala ete elimboli “baoyo batyami pembeni.” Bafalisai bazalaki komiloba ete bazalaki bayekoli ya Mose. Basalaki lisangani na bango moko (na Liebele, chavu·rahʹ). Mpo na kondimama lokola moko na basangani ya lisangani yango, moto asengelaki kolapa ndai liboso na basangani misato ya libota yango ete akobatela makasi bopeto ya Mibeko ya Mose, akoboya kosangana na ba ʽam-ha·ʼaʹrets (ebele ya bato oyo batángá te), mpe akopesa ndambo na zomi na molende nyonso. Malako 2:16 ezali koloba na ntina na “Bakomeli na Bafalisai.” Bamoko kati na Bafalisai bazalaki bakomeli mpe balakisi ya mibeko, nzokande basusu bazalaki bakonzi te kati na lingomba.—Matai 23:1-7.
Bafalisai bazalaki kondima ete Nzambe azalaka bisika nyonso. Bazalaki koloba ete lokola “Nzambe azalaka bisika nyonso, bakokaki kosambela Ye ezala na kati ya Tempelo to na libandá na yango, mpe basengelaki kobelela ye bobele na bambeka te. Na yango, bakómisaki biyanganelo esika ya losambo, ya boyekoli, mpe ya kobondela, mpe batombolaki yango mpo na kokómisa yango esika ya mobɔko mpe ya ntina mingi kati na bomoi ya bato, balingaki kokómisa esika yango lokola Tempelo.”—Encyclopaedia Judaica.
Bafalisai bazangaki limemya mpo na tempelo ya Yehova. Yango ekoki komonana kati na maloba ya Yesu ete: “Mawa na bino, bakambi bakufi miso, baoyo bakolobaka ete, Sɔkɔ nani akokata ndai na Tempelo ajali na likambo tɛ nde sɔkɔ nani akokata ndai na wɔlɔ oyo ejali kati na Tempelo, ndai ekokanga ye. Bino bilema mpe bakufi miso! Jambi nini eleki monɛnɛ, sɔkɔ wɔlɔ, sɔkɔ Tempelo oyo ekobulisa wɔlɔ? Bokolobaka mpe ete, Sɔkɔ nani akokata ndai na etumbelo-na-mbɛka ajali na likambo tɛ nde sɔkɔ akokata ndai na likabo lijali likolo na etumbelo, ndai ekokanga ye. Bino bakufi miso! Jambi nini eleki monɛnɛ, sɔkɔ likabo, sɔkɔ etumbelo-na-mbɛka oyo ekobulisa likabo? Ye nani ajali kokata ndai na etumbelo, ajali kokata ndai na yango mpe na yɔnsɔ likolo na yango.”—Matai 23:16-20.
Mpo na nini lolenge ya kokanisa ya Bafalisai ebebaki? Bazangaki kotalela likambo nini? Tótala oyo Yesu alobaki na nsima. “Mpe ye nani ajali kokata ndai na Tempelo, ajali kokata ndai na yango mpe na Oyo afandi kati na yango.” (Matai 23:21) Mpo na oyo etali mokapo oyo, nganga-mayele E. P. Sanders alobaki ete: “Tempelo ezalaki bulɛɛ bobele te mpo ete Nzambe oyo azali bulɛɛ akumisami wana, kasi ezalaki mpe mpo ete azalaki wana.” (Judaism: Practice and Belief, 63 BCE—66 CE) Nzokande, kozala mpenza ya Yehova na kati ya tempelo ezalaki na ntina mingi te mpo na baoyo bazalaki kokanisa ete azalaki bisika nyonso.
Bafalisai bazalaki mpe kondima likambo oyo ete bomoi ya moto na moto esilá kokanama mpe ete moto azali na likoki ya kopona oyo alingi kosala. Na maloba mosusu, “likambo nyonso esilá kokanama, nzokande topesameli mpe bonsomi ya kopona oyo tolingi.” Kasi bazalaki mpe kokanisa ete etángamaki ete Adama mpe Eva bakosala lisumu mpe ete ata mwa mpota moke na mosapi esilaki kokanama liboso.
Ekoki kozala ete Yesu akanisaki na ntina na makanisi wana ya mabe na ntango alobaki na ntina na kokwea ya ndako molai oyo ebomaki bato 18. Atunaki ete: “Bokanisi ete bango [baoyo bakufaki] baleki bato yɔnsɔ bafandi na Yelusaleme na mabe?” (Luke 13:4) Lokola esalemaka kati na makámá mingi oyo ekokweaka, likámá yango ebimaki mpo na “ntango mpe makambo makanami te,” kasi ezalaki te ete ekanamaki liboso, lokola Bafalisai bazalaki kokanisa. (Mosakoli 9:11, NW) Lolenge nini bato oyo bazalaki komikumisa ete bazalaki na boyebi bakokaki kosalela mitinda ya makomami?
Bakɔtisaki makambo ya sika kati na lingomba
Bafalisai bazalaki koloba ete bateyi ya eleko moko na moko nde basengelaki kolimbola mitinda ya Makomami na boyokani na bokóli oyo esalemaki kati na makanisi ya bato. Na yango, Encyclopaedia Judaica elobi ete “bazalaki na mokakatano te mpo na koyokanisa mateya ya Torah na bokóli ya makanisi na bango, to komona ete makanisi na bango ezali kati na maloba ya Torah.”
Mpo na oyo etali Mokolo ya Mbondi oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, nguya oyo nganga monene azalaki na yango mpo na kopetola masumu bapesaki yango epai na mokolo yango moko. (Levitike 16:30, 33) Na molulu ya Elekeli, bapesaki motuya mingi na kozongeláká mateya oyo ezwami na mokanda ya Exode wana ezalaki bango komela vinyo mpe kolia mampa mazangi mfulu koleka na mwana mpate ya elekeli.
Na nsima, Bafalisai bakómaki na bopusi makasi kati na Tempelo. Babandisaki makambo ya kosala molɔngɔ́ mpo na kokende kotóka mai kati na libulu ya Siloam mpe, komwangisama ya mai yango ezalaki kosalema na Elambo na kolɔkɔta, mpe kobɛta banzete babéngi saules likoló na etumbelo na nsuka ya elambo, mpe mabondeli ya mokolo na mokolo, oyo ezali na mobɔko te kati na Mibeko.
Búku The Jewish Encyclopedia elobi ete “Makambo ya sika oyo Bafalisai bakɔtisaki na boyokani na mokolo ya Sabata” ezalaki “mpenza na ndimbola monene.” Mwasi ya libala basengelaki kosepela na mokolo ya Sabata na kopelisáka miinda. Soki ekokaki kosalema ete mwa misala mike mikokaki komema na misala makasi oyo epekisami na mibeko, Bafalisai bazalaki kopekisa yango. Balekisaki ndelo kino kotya mibeko na makambo matali kosalisa bato ya maladi mpe bamonisaki nkanda na bango mpo na lolenge Yesu abikisaki bato na mokolo ya Sabata. (Matai 12:9-14; Yoane 5:1-16) Nzokande, bato yango oyo bazalaki na momeseno ya kokɔtisa makambo ya sika basukaki te bobele na kobandisa bibongiseli ya sika mpo na komeka kotya efelo mpo na kobatela mibeko oyo mizwami kati na makomami.
Bazalaki kolongola mibeko
Bafalisai bazalaki koloba ete bazalaki na lotómo ya kolongola mibeko ya Makomami. Lolenge na bango ya kokanisa emonani polele kati na lisese oyo ezwami na Talmud: “Ebongi nkutu malamu ete mobeko moko elongolama kasi te ete bato babosana Torah na mobimba na yango.” Na ndakisa, batikaki kokumisa Yubile mpo na kobanga noki bakobungisa lotómo na bango, wana eleko yango ezalaki kobɛlɛma, moto moko te akokaki kondima kodefisa mobola.—Levitike, mokapo 25.
Bandakisa mosusu ezali bongo kolongolama ya kosambisama ya mwasi oyo akanisamaki ete asalaki ekobo mpe kati na likambo ya moto oyo abomamaki, kasi eyebani te soki nani abomaki ye, kolongolama ya mwango ya kopetola. (Mituya 5:11-31; Deteronome 21:1-9) Etikalaki moke ete Bafalisai bálongola lisɛngi ya Makomami na ntina etali kosunga baboti oyo bazali na bosenga.—Exode 20:12; Matai 15:3-6.
Yesu apesaki likebisi oyo ete: “Keba mpɔ na mfulu na Bafalisai, oyo ejali bokosi.” (Luka 12:1) Mateya ya Bafalisai, elongo na bizaleli na yango oyo ezalaki ya teokrasi te, ezalaki bobele bokosi—esengelaki soko moke te kokɔtisama kati na lisangá ya boklisto. Nzokande, mikanda ya mayele ya Bayuda ezali komonisa Bafalisai lokola ete bazalaki mwa malamu koleka Basadukai. Tika tótalela sikawa etuluku oyo ezalaki na makambo makasi koleka.
Basadukai
Ekoki mpenza kozala ete nkombo Basadukai eutaki na nkombo ya Sadoko, ye oyo azalaki nganga monene na eleko ya Salomo. (1 Mikonzi 2:35) Basadukai bazalaki etuluku moko ya bato oyo bazalaki komonisa matomba ya tempelo mpe ya bonganga. Na kokesena na Bafalisai, baoyo bazalaki koloba ete bazalaki na bokonzi mpo na ezaleli kitoko ya koyekola mpe mpo na kobanga Nzambe, Basadukai bazalaki koloba ete bokonzi na bango ezwaki mobɔko na yango likoló na kolandana ya libota mpe etelemelo. Bazalaki kotɛmɛla makambo ya sika oyo Bafalisai bazalaki kokɔtisa kino na ntango oyo tempelo ebebisamaki na mobu 70 T.B.
Longola likambo ya koboya liteya oyo ete bomoi ya moto na moto esilá kotángama libela, Basadukai bazalaki lisusu koboya kondima mateya nyonso oyo elobelami polele te kati na Pantateki, ata soki ekokami na eteni mosusu ya Liloba ya Nzambe. Ya solo, bazalaki ‘komona ete kowelana na ntina na makambo wana ezalaki ezalela moko malamu.’ (The Jewish Encyclopedia) Yango ezali kokundwela biso libaku oyo babetelaki Yesu ntembe na ntina etali lisekwa.
Nsima ya kosalela lisese ya mwasi oyo asilaki kokufela mibali nsambo, Basadukai batunaki ete: “Kasi na lisekwa akojala nde mwasi na nani?” Ya solo, mwasi wana ya lisese ya Basadukai akokaki mpe kozala mwasi ya mibali 14 to 21. Yesu apesaki ndimbola oyo ete: “Na lisekwa bakobalana tɛ.”—Matai 22:23-30.
Lokola ayebaki ete Bafalisai bazalaki koboya Makomami mapemami, longola bobele oyo ya Mose, Yesu apesaki elembeteli na ye na kosaleláká mokanda ya Pantateki. Alobaki ete: “Mpɔ na likambo na kosekwa na kufa, bino bosili kotánga buku na Mose tɛ na likambo na njete mokɛ, na motindo Njambe alobi na ye ete, Ngai najali Njambe na Abalayama mpe Njambe na Yisaka mpe Njambe na Yakobo? Ye Njambe na bakufi tɛ kasi Njambe na bomɔi.”—Malako 12:26, 27.
Banyokoli ya Yesu mpe ya bayekoli na ye
Basadukai bazalaki kotya motema na kosalela myango ya politiki kati na boyokani na bango elongo na bamboka mosusu na esika ya kozela Masiya—soki mpenza bakokaki kondima na ntina na boyei na ye. Balingaki kotambwisa misala ya tempelo na boyokani na boyangeli ya Loma, mpe balingaki te ete Masiya abima noki akobebisa mikano na bango. Lokola bamonaki ete Yesu azalaki likámá mpo na etelemelo na bango, basanganaki elongo na Bafalisai mpo na koluka nzela ya koboma ye.—Matai 26:59-66; Yoane 11:45-50.
Lokola bamipesaki mingi na makambo ya politiki, Bafalisai babimisaki ntembe na ntina etali bosembo epai na Loma mpe bangangaki ete: “Tojali na mokonji tɛ bobɛlɛ kaisala.” (Yoane 19:6, 12-15) Nsima ya liwa mpe kosekwa ya Yesu, ezalaki Basadukai nde basalaki molende makasi mpo na koluka kopekisa bokóli ya boklisto. (Misala 4:1-23; 5:17-42; 9:14) Na nsima ya kobebisama ya tempelo na mobu 70 T.B., etuluku yango ekufaki.
Ntina ya kosɛnzɛla ntango nyonso
Emonanaki ete likebisi ya Yesu ebongaki mpenza! Ya solo, tosengeli ‘kotala malamu mpɔ na mfulu na Bafalisai mpe Basadukai.’ Tokoki komona mbuma na yango ezala kati na lingomba ya Bayuda mpe ezala kati na boklisto ya nkombo mpamba.
Nzokande, na kokesena, bankulutu baklisto ya makoki kati na masangá koleka 75 500 ya Batatoli ya Yehova kati na mokili mobimba bazali ‘komisɛnjɛla bango mɔkɔ mpe mateyɔ na bango.’ (1 Timɔtɛ 4:16) Bandimaka Biblia na mobimba na yango ete epemami na Nzambe. (2 Timɔtɛ 3:16) Na esika ete bakɔtisaka makanisi na bango moko mpe babimisa myango na bango moko ya losambo, bazali kosala na bomoko na nsé ya litambwisi ya lisangá oyo ezwi moboko na yango kati na Biblia, oyo ezali kosalela zulunalo oyo lokola esaleli na yango ya ntina mingi mpo na koteya.—Matai 24:45-47.
Yango ebimisi litomba nini? Bamilió ya bato kati na mokili mobimba bazali kotombwama na elimo wana bazali kokóma na boyebi ya Biblia, wana bazali kosalela yango kati na bomoi na bango, mpe bazali koteya yango epai na basusu. Mpo na komona lolenge yango ezali kokokisama, mpo na nini te kokende na lisangá ya Batatoli ya Yehova oyo ezali pene na esika ofandi to kotinda nkomá epai na babimisi ya zulunalo oyo?
[Etanda na lokasa 26]
YESU AZALAKI KOTALELA MPOSA YA BAYOKI NA YE
YESU KLISTO ateyaki na polele nyonso, azalaki kotalela makanisi ya bayoki na ye. Na ndakisa, asalaki bongo na ntango asakolaki epai na Mofalisai Nikodeme na ntina na likambo litali “kobotama” lisusu. Nikodeme atunaki ete: “Moto akoki kobotama lisusu boni wana esili ye kokoma mobange? Akokoka koingela na libumu na mama na ye mbala na mibale mpe kobotama?” (Yoane 3:1-5) Mpo na nini Nikodeme abulunganisamaki makasi, nzokande Bafalisai bazalaki kondima ete moto asengelaki kobotama lisusu liboso ete akoka kokóma mosangani ya lingomba ya Bayuda, mpe balakisi ya mibeko bazalaki kokokanisa moto oyo abongwani na lingomba ya Bayuda na “mwana oyo abotami sika”?
Búku A Commentary on the New Testament From the Talmud and Hebraica, oyo ekomami na John Lightfoot, epesi makanisi oyo: “Likanisi ya Bayuda mingi na ntina na makoki ya Moyisraele . . . ezali naino kati na bɔɔngɔ́ ya Mofalisai yango,” oyo akoki te “kolongola makanisi mabe na ye ya liboso na pɛtɛɛ nyonso . . . : ‘Wana Bayisraele . . . bazalaki na lotómo ya kondimama kati na bokonzi ya Masiya; na yango, na maloba na yo olingi nde koloba ete moto nyonso asengeli kokɔta mpo na mbala ya mibale kati na libumu ya mama na ye na boye ete akoka kokóma Moyisraele oyo azongisami sika?’”—Kokanisá na Matai 3:9.
Atako ayebaki ntina ya kobotama lisusu mpo na oyo etali bato oyo bobongwanaki na lingomba ya Bayuda, Nikodeme atalelaki likambo yango lokola ete ekokaki kosalema te mpo na Bayuda bango moko mpenza—na elobeli ya elilingi, kozonga lisusu na libumu ya mama.
Na libaku mosusu, bato mingi babulunganisamaki na ntango Yesu alobaki na ntina na ‘kolia mosuni na ye mpe komela makila na ye.’ (Yoane 6:48-55) Nzokande, Lightfood amonisi polele ete “ezalaki kosalelama mingi kati na biteyelo ya Bayuda ete bazongela maloba ‘kolia mpe komela’ na elobeli ya elilingi.” Amonisi mpe ete Talmud elobelaki “kolia Masiya.”
Na yango, emonani polele ete makanisi ya Bafalisai mpe ya Basadukai ezalaki na bopusi monene likoló na makanisi ya Bayuda mingi ya ekeke ya liboso. Nzokande, na lolenge lobongi mpenza, Yesu azalaki kotalela boyebi ya bayoki na ye mpe makambo oyo basilaki komona yango liboso. Wana ezali moko na makambo oyo masalaki ete azala Moteyi Monene.