Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/4 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • “Bóyoka kosamba na ngai”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • “Botala malamu mpɔ na mfulu na Bafalisai mpe Basadukai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Bóyekola epai na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Bayanganisaki Sanedrina”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/4 lok. 31

Mituna ya batángi

Paulo awanganaki nde ete azali moklisto ntango alobaki liboso ya Sanedrina ete: “Nazali Mofalisai”?

Mpo na kokanga ntina ya maloba ya Paulo oyo ezali na Misala 23:6, tosengeli kotalela lisolo wana mobimba.

Ntango Bayuda batombokelaki Paulo na Yelusaleme, na nsima azwaki libaku ya koloba liboso ya ebele ya bato. Alobaki na bango ete ‘atángá kelasi na [Yelusaleme] na makolo ya Gamaliele, alakisamá engebene bokasi ya Mibeko ya bankɔkɔ.’ Atako ebele ya bato wana bayokaki ye mwa moke ntango azalaki kolimbola bango makambo na ye, kasi ntango nkanda na bango engalaki lisusu, mokonzi ya basoda atindaki bákɔtisa ye na lopango ya basoda. Ntango balingaki kobɛta ye fimbo, Paulo alobaki boye: “Mibeko epesi nde bino nzela ete bóbɛta fimbo na moto oyo azali Moloma mpe oyo akweisami likambo te?”​—Misala 21:27–22:29.

Mokolo oyo elandaki, mokonzi ya basoda amemaki Paulo liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda. Paulo atalaki bazuzi ya Sanedrina na likebi mpenza mpe amonaki ete bamosusu bazalaki Basadukai mpe bamosusu Bafalisai. Na nsima alobaki boye: “Mibali, bandeko, nazali Mofalisai, mwana ya Bafalisai. Nazali kosambisama mpo na elikya ya lisekwa ya bakufi.” Maloba na ye ekabolaki Bafalisai ná Basadukai, “mpo Basadukai balobaka ete lisekwa ezali te mpe anzelu azali te mpe elimo ezali te, kasi Bafalisai balobelaka makambo nyonso wana polele.” Bato mosusu oyo bazalaki na lingomba ya Bafalisai balobaki makasi ete: “Tomoni ata mabe moko te epai ya moto oyo.”​—Misala 23:6-10.

Lokola bato nyonso bayebaki ye ete Paulo azali moklisto ya molende, akokaki te koloba na bazuzi ya Sanedrina ete azali mondimi ya Lingomba ya Bafalisai bongo bango mpe bándima ye. Bafalisai oyo bazalaki wana bakokaki te kondima moto oyo azalaki koboya mateya na bango mosusu ete azali na lingomba na bango. Na bongo, maloba ya Paulo ete azali Mofalisai esengelaki kozala na ndimbola moko boye, mpe Bafalisai oyo bazalaki wana bakangaki ntina ya maloba ya Paulo na ndimbola wana.

Ntango Paulo alobaki ete bazali kosambisa ye mpo na elikya ya lisekwa ya bato oyo bakufá, ezali polele ete alingaki koloba na likambo wana, azalaki lokola Bafalisai. Soki ntembe moko ebimaki na likambo wana, Paulo alingaki kozala na ngámbo ya Bafalisai, kasi ya Basadukai te, baoyo bazalaki kondima lisekwa te.

Lokola Paulo azalaki moklisto, bindimeli na ye na makambo lokola lisekwa, baanzelu, mpe makambo mosusu ya Mibeko ekeseneki te na oyo ya Bafalisai. (Bafilipi 3:5) Na bongo, na makambo wana, Paulo akokaki komitya na ngámbo ya Bafalisai, mpe ezali kaka na ndimbola wana nde bato oyo bazalaki na Sanedrina bakangaki ntina ya maloba na ye. Na bongo, alobelaki lingomba na ye ya kala mpo na kosamba malamu na tribinale monene ya Bayuda, oyo bazuzi na yango bazalaki kokanisela ye mabe.

Kasi, likambo oyo emonisi polele ete Paulo awanganaki te ete azali moklisto, ezali ete Yehova atikaki ye te. Nsima ya koloba maloba yango, na butu oyo elandaki, Yesu alobaki na ye boye: “Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yelusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Loma.” Lokola Nzambe atikaki Paulo te, tokoki koloba te ete awanganaki ete azali moklisto.​—Misala 23:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto