Litomba nini okoki kozwa na kosolola na ntina na lingomba?
BABOTI bazelaka na motema likoló maloba ya liboso ya mwana na bango. Soki bayoki kozongelama ya liloba moko, mbala mosusu “Mama” to “Papa,” mitema na bango mitondaka na esengo. Nokinoki bakoyebisa nsango yango epai na baninga to na bato ya pembeni. Liloba ya liboso ya mwana moke lizali solo nsango malamu oyo ezali kopesa esengo.
Mingongo, bililingi mpe nsolo oyo esili kokɔta kati na biyokeli ya mwana moke bizali kopusa ye na kosala likambo. Ya solo, mitindo oyo bana mike bakosala ekeseni. Kasi soki, nsima ya mwa ntango, mwana moke azali kosala eloko te, baboti bakoki na bosembo nyonso komitungisa ete bokóli ya mwana na bango esili kobeba.
Bana mike basepelaka mingi na bato oyo bango bayebi. Wana mama azali kobondela mwana, mbala mingi yango ebimisaka bosepeli monene. Nzokande, soki ndeko moko oyo ayei kotala libota ameki kosimba ye, yango ekotinda ye ete alela, mpe akoboya ete ndeko yango amema ye. Bandeko mingi oyo bakutanaka na likambo motindo yango balɛmbaka te. Ntango mwana akomesana na bango, bakosepela mingi ete mwana akómi koyeba bango, mpe malɛmbɛmalɛmbɛ akobanda komonisa bosepeli na ye.
Bobele bongo, mikóló mingi bakakatanaka mpo na kolobela polele bindimeli na bango ya lingomba elongo na moto oyo bameseni na ye te uta kala. Ekoki kozala ete bazali koyeba te mpo na nini mopaya akoki kosepela kosolola elongo na bango likambo oyo litali bomoi ya moto ye moko—lingomba. Bazali bongo kosala ete epekiseli moko ekabola bango na baoyo balingi kosolola elongo na bango na ntina na Mozalisi. Baboyaka nkutu kosolola na ntina na likambo litali kosambela, oyo ezali bongo mposa oyo bato babotamaka na yango.
Ya solo, tosengeli kosepela koyekola makambo na ntina na Mozalisi na biso, mpe kosolola elongo na bato mosusu ekopesa biso likoki ya koyekola. Ezali bongo mpamba te kobanda kala Nzambe amonisami lokola moto oyo alingaka kosolola. Tiká tómona lolenge asalaka yango.
‘Koyoka mpe koyekola’
Kosolola ya liboso oyo Nzambe asalaki elongo na moto ezalaki elongo na Adama kati na elanga ya Edene. Nzokande, nsima wana Adama mpe Eva basalaki lisumu, baponaki komibomba ntango Nzambe abéngaki bango, wana elingaki ye kosolola lisusu elongo na bango. (Genese 3:8-13) Atako bongo, Biblia ezali kolobela mingi na ntina na mibali mpe basi mosusu oyo bayambaki na esengo mingi makambo oyo mautaki epai na Nzambe.
Nzambe asololaki elongo na Noa na ntina na koya ya kobomama ya mokili mabe oyo ezalaki na mikolo na ye, na ntina na likambo yango Noa akómaki “mosakoli na boyɛngɛbɛnɛ.” (2 Pɛtɛlɔ 2:5) Lokola azalaki molobeli ya Nzambe epai na bato ya ntango na ye, Noa amonisaki te bobele kondima kati na boyokani ya Nzambe elongo na bato, kasi amonisaki lisusu polele ete ye moko azalaki na ngámbo ya Yehova. Bato basalaki nini liboso na maloba ya Noa? Na mawa nyonso, ntalo monene ya bato na ntango na ye “bayebaki likambo tɛ kino eyaki mpela mpe elongolaki bango yɔnsɔ.” (Matai 24:37-39) Kasi likambo ya esengo mpo na biso, basangani nsambo ya libota ya Noa bayokaki, batosaki malako ya Nzambe mpe babikaki na Mpela ya mokili mobimba. Bato banso oyo bazali na bomoi lelo bazali bakitani na bango.
Na nsima, Nzambe asololaki elongo na bato ya libota moko mobimba, Yisraele ya kala. Na nzela ya Mose, Nzambe apesaki bango Mibeko Zomi mpe mibeko misusu 600 oyo misengelamaki mpe kotosama. Yehova azalaki kozela ete Bayisraele bátosa yango nyonso. Mose apesaki etindá ete nsima ya mbula nsambo nyonso, na boumeli ya Elambo ya Mingombo oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, Mibeko ya Nzambe misengelaki kotángama na mongongo makasi. Apesaki etindá ete: “Yanganisa bato, mibali mpe basi mpe bana, mpe mopaya na kati na mboka na yɔ.” Na mokano nini? “Ete bayoka mpe bayekola komɛmisa [Yehova] Njambe na bino, mpe basɛnjɛla ete batosa maloba yɔnsɔ na mobeko oyo.” Banso basengelaki koyoka mpe koyekola. Kanisá esengo oyo basengelaki kozala na yango na kosolola na ntina na oyo bayokaki!—Dutɛlɔnɔmɛ 31:10-12.
Koleka bikeke mitano na nsima, Yosafata, mokonzi ya Yuda abongisaki bankumu mpe Balevi mpo na kosala milende ya kozongisa losambo ya pɛto ya Yehova. Mibali wana batambolaki bipai nyonso kati na bingumba ya Yuda mpo na kolakisa bafandi na yango mibeko ya Yehova. Na kosaláká ete mibeko yango milimbolama polele, mokonzi amonisaki molende na ye mpo na losambo ya solo. Mpo na oyo etali bato na ye, basengelaki koyoka mpe koyekola.—2 Ntango 17:1-6, 9.
Kopesa litatoli na masoló
Nzambe atindaki Yesu, Mwana na ye, awa na mabelé mpo ete azala Molobeli na Ye. (Yoane 1:14) Ezalaki bayekoli misato ya Yesu kotala ye ntango abongwanaki liboso na bango, bayokaki mongongo mpenza ya Nzambe koloba ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi. Boyoka ye.” (Matai 17:5) Bazalaki kotosa na bolingo nyonso.
Bobele bongo, Yesu atindaki bantoma na ye ete básakola mikano ya Nzambe epai na bato mosusu. Kasi ntango atikalaki soko na sanza motoba ya mosala awa na mabelé, Yesu amonisaki ete mosala ya kosakola Bokonzi ya makoló mozalaki monene mpe esengelaki ete bayekoli bázala mingi. Alakisaki bayekoli 70 kati na bango lolenge ya kosolola na ntina na Bokonzi ya Nzambe elongo na bato oyo bayebaki bango te mpe bongo atindaki bango kopalanganisa polele nsango yango. (Luka 10:1, 2, 9) Mwa ntango moke liboso ete azonga epai na Tata na ye na likoló, Yesu alendisaki bayekoli na ye na kobanda kosolola elongo na basusu na ntina na nsango yango, nkutu apesaki bango etindá ete: “Boye bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, . . . kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Lelo oyo, kati na mokili mobimba, baklisto ya solo bazali kokokisa etindá wana ya kosolola na ntina na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe elongo na bazalani na bango. Masoló wana mazali kopesa bango nzela ya kopesa litatoli na ntina na solo likoló na Yehova, Mozalisi.—Matai 24:14.
Masoló ya kolendisa, oyo masalemi na kimya
Lolenge nini bayekoli ya Yesu basengelaki kolobela bindimeli na bango epai na bato mosusu? Basengelaki te kosilikisa batɛmɛli na bango, to basengelaki te koswanisa batɛmɛli na bango. Nzokande, basengelaki koluka baoyo bazalaki kosepela na nsango malamu, mpe na nsima, komonisa bilembeteli ya Makomami mpo na kondimisa yango. Ezali solo ete, Nzambe azalaki komona bizaleli ya bato liboso na bayekoli ya Mwana na ye, lokola Yesu alobaki yango: “Ye oyo akoyamba bino ajali koyamba ngai; mpe ye oyo akoyamba ngai ajali koyamba motindi na ngai.” (Matai 10:40) Oyo nde mawa mingi wana ntalo monene ya bato ya ntango na Yesu babwakaki nsango na ye!
Paulo, ntoma moklisto apesaki toli ete: “Ebɔngi tɛ ete moombo na Nkolo aswanaka.” Kasi, “ajala na boboto liboso na bato yɔnsɔ, ajala molakisi malamu, ajala na motema pɛtɛɛ, apamela batɛmɛli na ye na bopɔlɔ. Sɔkɔ nde Njambe akopɛsa bango kobongwa na mitema ete bakoma kosɔsɔla makambo na sɔlɔ.” (2 Timɔtɛ 2:24, 25) Lolenge oyo Paulo asakolaki nsango malamu epai na bato ya Atene, engumba ya Bagreke, ezali ndakisa moko kitoko. Asosolaki elongo na Bayuda kati na eyanganelo na bango. Mokolo na mokolo na esika ya zando azalaki kosolola elongo na “bango bakutani na ye.” Na ntembe te, atako basusu balingaki bobele koyoka makanisi ya sika, Paulo asololaki na bango polele kasi na boboto nyonso. Asololaki elongo na bayoki na ye na ntina na nsango ya Nzambe, oyo ezalaki kolendisa bango ete bábongola mitema. Ezaleli na bango ekokani mpenza na oyo ya bato ya ntango na biso. “Bamosusu basɛki, nde bamosusu balobi ete, ‘Tokoyoka yɔ lisusu na ntina na likambo oyo.’” Paulo asɛngaki na makasi te ete apesamela lisusu ntango mpo na kolanda lisoló. Esilaki ye kosakola nsango na ye, “abimi bongo na bango.”—Misala 17:16-34.
Na nsima, Paulo ayebisaki basangani ya lisangá ya boklisto na Efese ete ‘abangaki te kosakwela bango makambo makoki kosunga bango, mpe kolakisa bango na kati na koyangana mpe na ndako na ndako.’ Lisusu, ‘atatolaki na Bayuda, mpe na Baɛla, likambo na kobongola mitema epai na Nzambe, mpe na kondimela Nkolo na biso Yesu.’—Misala 20:20, 21.
Bandakisa wana ya Makomami emonisi lolenge oyo basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kosolola na ntina na lingomba. Bobele bongo, lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosolola elongo na bazalani na bango na ntina na lingomba.
Masoló oyo mazali kobota mbuma mingi
‘Yoká Liloba ya Nzambe.’ ‘Tyá likebi na mibeko na ye.’ Bilendiseli motindo wana bizongelami mbala na mbala kati na Biblia! Okoki kotosa etindá wana ya Biblia ntango Batatoli ya Yehova bakoya lisusu kosolola elongo na yo. Tyá likebi na nsango ya Biblia oyo bazali komemela yo. Nsango yango ezali ya politiki te, kasi ezali kolobela boyangeli ya likoló ya Nzambe, Bokonzi na ye. Yango nde ezali mwango oyo Nzambe abongisi mpo na kosilisa bantina ya matáta oyo mazali komonana lelo. (Danyele 2:44) Na nsima, bokonzi wana oyo ekotambwisama na Nzambe uta na likoló ekobongisa mabelé mobimba mpo ete yango ebongwana paladiso lokola elanga ya Edene.
Moto moko, oyo kala azalaki polisi ya bolukiluki azalaki koboya koyoka ntango Batatoli ya Yehova balukaki kosolola elongo na ye na ntina na Biblia. Kasi na ntina na bokóli ya mobulu oyo azalaki kokutana na yango, abulunganaki na ntina makambo oyo amonaki kati na bomoi. Yango wana ayebisaki na Motatoli oyo ayaki lisusu kotala ye ete alingi koluka koyeba bosolo ya nsango ya Biblia. Masoló oyo malandani malamu mabandaki. Atako polisi yango abongolaki bifandelo na ye mbala mingi, na esengo nyonso Batatoli balukaki ye na efandelo na ye ya sika mpo na kolanda masoló elongo na ye. Na nsuka, mokonzi wana ya bapolisi andimaki ete: “Elembeteli oyo nazalaki koluka ezalaki ntango nyonso kati na Makomami Mosantu. Soki Batatoli wana balendendelaki te mpo na kosolola elongo na ngai, mbɛlɛ nalingaki ntango nyonso komituna soki ntina ya bomoi ezali nini. Ya solo, nasili koyeba solo, mpe nakolekisa mikolo oyo mitikali na bomoi na ngai mpo na koluka bato mosusu oyo bazali koluka Nzambe motindo moko lokola nazalaki kosala yango.”
Bayoki oyo bazali na bosepeli bazali mpenza na mposa ya koluka koyeba makambo mingi. Bazali na lotómo ya koluka bantina ya bindimeli oyo bilakisami. (1 Petelo 3:15) Motindo moko lokola mwana akotunaka baboti na ye ebele ya mituna mpe akomizelaka ete báyanola na yango, yo mpe ozali na lotómo ya komizela kozwa biyano ya malamu epai na Batatoli. Okoki kondimisama ete bakozala na esengo ya kozongela yo mpo na kosolola na mozindo nsango ya Biblia elongo na yo.
Mbala mosusu osili koyeba mwa ndambo ya makambo na ntina na Biblia. Okoki kososola ete makambo oyo Nzambe azali kozela epai na yo ekosɛnga ete osala mbongwana kati na bomoi na yo. Atako mitindá ya Nzambe mikosɛnga ete osala mbongwana makasi, kokakatana te mpo na kolanda yango. Yango ekomemela yo mpenza bolamu ya solo. Okokanga ntina na yango malamu wana ozali kokóla mokemoke.
Liboso na nyonso, luká koyeba Yehova soki azali nani, nini oyo azali kosɛnga epai na yo, mpe alingi kopesa yo nini. Tuná Batatoli ete bámonisa yo oyo Biblia elobi na ntina yango. Luká oyo bazali koloba kati na Biblia na yo moko. Koyebáká ete Batatoli bazali na makambo makasi te kati na solo ya Biblia oyo bazali kosakola na ntina na lingomba, na ntembe te, okolinga koluka lisusu mozindo na ntina na makambo mingi ya kitoko oyo bakoki koyebisa yo kati na Makomami.—Masese 27:17.
Obyangami ete omona Batatoli na Ndako ya Bokonzi, esika na bango ya makita, epai ofandi. Kuna okoyoka masoló ya kopesa litomba oyo mauti na Liloba ya Nzambe. Okomona lolenge bayangani bazali kosepela kosolola moko na mosusu na ntina na mikano ya Nzambe. Pesá Batatoli yango nzela ya kosalisa yo ete oyekola solo na ntina na mokano ya Nzambe mpo na mikolo na biso. Monisá bosepeli na libyangi ya Nzambe mpo na kosolola na ntina na losambo ya solo mpe okozwa ngɔlu na ye, ee bomoi ya seko kati na Paladiso.—Malaki 3:16; Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 5]
Noa alobaki polele na ntina na mokano ya Nzambe
[Bililingi na lokasa 7]
Lokola Paulo asalaki yango na ntango ya kala, Batatoli ya Yehova bazali koteya solo ya Biblia epai na basusu