Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/4 nk. 2-6
  • Solo na makambo ya losambo ekoki komonana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo na makambo ya losambo ekoki komonana?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Filozofi mpe solo
  • Tozali na mposa ya Emoniseli ya solo?
  • Lingomba mpe solo
  • ‘Nganu mpe matiti mabe’
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mpo na nini koluka solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tómekola Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Solo ekosikola bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/4 nk. 2-6

Solo na makambo ya losambo ekoki komonana?

NA Suède, moto moko oyo azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi ya elimo, kati na engumba Uppsala, epai kuna eteyelo moko monene ezali, azwaki ekateli ya koyekola bindimeli ya mangomba ndenge na ndenge oyo ezwami kati na engumba na ye, azalaki nkutu kokende kotala bisika ya losambo ya mangomba yango. Azalaki koyoka lolenge bakonzi na bango ya mangomba bazalaki koteya, mpe atunaki mituna epai na basangani mosusu na yango. Amonaki ete bobele Batatoli ya Yehova nde bamonanaki ete bazalaki na endimeli makasi ete basili “komona solo.” Na kotalela ete makanisi na ntina na mangomba mazali ebele, amitunaki soki mpo na nini Batatoli bakokaki koloba bongo.

Yo mpenza okanisi ete likoki ezali ya komona solo mpo na oyo etali mangomba? Likoki ezali ata mpe ya koyeba oyo ekoki kobéngama ete solo monene?

Filozofi mpe solo

Baoyo bayekoli filozofi basili kokóma na likanisi oyo ete bato bakoki te komona solo monene. Mbala mosusu oyebi ete filzofi elimbolami ete ezali “zébi oyo esalaka makasi mpo na kolimbola soki biloko nyonso mpe bomoi ebandaki lolenge nini.” Nzokande, na ndenge ezali mpenza komonana, filozofi esalaka bongo te. Kati na búku Filosofins Historia (Lisoló ya makambo ya filozofi) Alf Ahlberg, ye mokomi na babúku mpe mobotama wa ekólo Suède, akomaki ete: “Mituna mingi oyo makambo ya filozofi ebimisaka ezalaka ya mindondo, na boye te ete biyano na yango ezalaka ya sikisiki te. . . Bato mingi bakanisaka ete zébi ya koyeba ndenge nini mpe mpo na nini biloko bibandaki kozala [oyo ezali na boyokani na mitindá ya moboko ya biloko] ezali kati na etuluku oyo. . .”

Na yango, baoyo balukaka kozwa biyano na mituna ya ntina kati na makambo ya bomoi na nzela ya filozofi basukaka mingimingi na kozanga bosepeli to na kozwa mpasi na makanisi. Kati na búku na ye, Tankelinjer och trosformer (Makanisi mpe kondima ya mangomba), Gunnar Aspelin, mokomi na babúku mpe mobotama wa ekólo Suède, alobaki ete: “Tozali komona likambo moko oyo ete biloko bizalisami bitalelaka lisusu bato te koleka lolenge bitalelaka lipekapeka mpe ngungi . . . Tozangi makasi, tozali na makasi soko moke te liboso na nguya ya biloko bizalisami oyo bisalaka mosala na yango kati na ezingelo mpe kati na mokili na biso mpenza. Wana ezali makanisi na ntina na bomoi, yango nde emonanaka mingi kati na mikanda pene na nsuka ya ekeke oyo kati na yango bato basili kotya kondima na bango kati na bokóli mpe bazali kolɔ́ta ete mikolo mizali koya mikozala malamu.”

Tozali na mposa ya Emoniseli ya solo?

Emonani polele ete bobele na milende na bango moko, bato balóngi te komona solo na ntina na bomoi, emonani mpe ete bakolónga soko moke te. Na yango, tozali na bantina malamu ya koloba ete tosengeli kozwa emoniseli moko oyo euti na Nzambe. Oyo bato mingi babéngaka ete búku ya biloko bizalisami esili kopesa mwa emoniseli yango. Atako ezali komonisa na bosikisiki te lolenge bomoi ebandaki, nzokande ezali mpenza komonisa ete ezali na likambo moko oyo ekoki kosepelisa mingi koleka bandimbola oyo bato bapesaka na ntina na bomoi, bandimbola oyo etalelaka bobele biloko oyo bikoki komonana na miso. Lititi oyo ezali kokóla lipusami na mibeko oyo mikeseni na mibeko oyo mitalelaka maboke ya mabanga oyo ezali kati na libulu oyo ezali kobukana. Biloko ya bomoi bikomitongaka mpe bikomibongisaka na lolenge oyo biloko bizangi bomoi bikosalaka yango te. Moyekoli moko ya mibeko mpe ya makambo matali lingomba, oyo ayebanaki mingi, azalaki na ntina malamu ya koloba ete: “Makambo na ye [Nzambe] majangi komɔnana, yango nguya na ye na seko mpe bonjambe na ye, asili koyebisa yango polele epai na makanisi na bato kati na misala na ye.”​—Baloma 1:20.

Kasi mpo na koyeba ye oyo azali mobandisi ya kotongama mpe kobongisama wana, tozali na mposa ya emoniseli mosusu. Tosengeli komizela ete emoniseli motindo yango ezala, boye te? Ebongi na biso komizela ete Ye oyo abandisaki bomoi awa na mabelé amimonisa epai na bikelamu na ye, boye te?

Biblia emilobi na ntina na yango moko ete ezali emoniseli yango. Kati na zulunalo oyo tomonisaka mbala mingi bantina malamu ya kondimela likambo yango, mpe bato mingi oyo bayebi kokanisa malamu bazali kondima yango. Likambo oyo ete bato oyo bakomaki Biblia bazalaki na mposa ya komonisa polele ete bazalaki te bankolo ya makambo oyo bakomaki, yango ezali mpenza kobenda likebi. Mbala koleka 300, tozali kokuta ete basakoli oyo balobelami kati na Biblia bazali kosalela maloba lokola, “[Yehova] alobi boye.” (Yisaya 37:33; Yilimia 2:2; Nahumu 1:12) Ekoki mpenza kozala ete oyebi ete mibali mpe basi oyo bakomaka babúku to masoló na bazulunalo balingaka mingi kotya nkombo na bango. Nzokande, baoyo bakomaki Biblia bamibombaki; mbala mosusu ezalaka mpasi mpo na koyeba soki nani akomaki eteni boye to eteni boye ya Biblia.

Likambo mosusu etali Biblia, oyo ekoki kobenda likebi na yo ezali bongo boyokani oyo ezali kati na mikanda na yango nyonso. Ezali mpenza kokamwisa na kotalela ete mikanda 66 ya Biblia ekomamaki katikati na ntáká ya bambula 1 600. Tókamata ndakisa ete okei na ndako ya Leta na ebombelo ya mikanda mpe okamati mikanda 66 ya makambo matali lingomba, oyo ekomamaki katikati na ntáká ya bikeke 16. Mpe na nsima osɛngi ete mikanda yango nyonso misangisama esika moko mpo ete ekóma bobele búku moko. Okoki komizela ete búku yango oyo esalemi na mikanda ebele ezala na motó ya likambo bobele moko mpe na bansango oyo ezali nyonso na boyokani? Soko moke te. Ekozala mpenza likamwisi soki esalemi bongo. Nzokande, tálela naino likambo oyo: Mikanda nyonso ya Biblia mizali mpenza na motó ya likambo bobele moko, mpe mizali na boyokani kati na yango. Yango ezali komonisa ete ezali mpenza na ye oyo aleki bato banso na mayele, to nkolo-mokanda, oyo akambaki makambo oyo bakomi ya Biblia bakomaki.

Nzokande, okomona elembo oyo ezali komonisa ete Biblia eutaki mpenza epai na Nzambe. Bisakweli​—makambo makomami liboso na ntina na oyo ekobima mpenza na mikolo mizali koya. “Na mokolo yango” mpe “ekojala ete na mikɔlɔ na nsuka” esalelami bobele kati na Biblia. (Yisaya 2:2; 11:10, 11; 23:15; Ezekiele 38:18; Hosea 2:21-23; Jekalia 13:2-4) Bambula mingi liboso ete Yesu abotama awa na mabelé, bisakweli bizwami kati na Makomami ya Liebele eyebisaki makambo ya sikisiki na ntina na bomoi na ye​—kobanda na kobotama na ye kino na kokufa na ye. Likambo mosusu ekoki kolobama te, bobele oyo ete Biblia ezali liziba ya solo na ntina na bomoi. Yesu ye moko andimisi yango na maloba oyo: “Liloba na yɔ ejali sɔlɔ.”​—Yoane 17:17.

Lingomba mpe solo

Ata baoyo bamilobaka ete bandimelaka Biblia bakanisaka ete solo ya monene ekoki komonana te. John S. Spong, ye azali moko na bakonzi ya mangomba na Etats-Unis, ayebisaki ete: “Tosengeli . . . kotika kokanisa ete tozali na solo mpe basusu basengeli kokóma na likanisi lolenge moko na biso; mpe koyeba ete moto moko te akoki komona solo ya sikisiki.” Christopher Derrick, mokomi na babúku ya Lingomba ya Katolike ya Loma, apesi ntina moko mpo na yango likanisi wana ya mabe epesami mpo na oyo etali komona solo: “Likanisi nyonso ya ‘solo’ ya makambo matali lingomba ezali kopesa likanisi ya kozala na lotómo ya koyeba . . . Olingi koloba ete moto mosusu akoki mpenza kozala na elónga te; mpe yango ekoki kondimama soko moke te.”

Nzokande, lokola ozali moto oyo ayebi kokanisa malamu, ekozala malamu mpo na yo ete otalela mituna misusu ya ntina. Soki solo ekoki komonana te, mpo na nini Yesu Klisto alobaki ete: “Bokoyeba sɔlɔ, mpe sɔlɔ ekosikola bino”? Mpe mpo na nini moko na bantoma ya Yesu alobaki ete “bato yɔnsɔ babika mpe ete bakóma na boyebi koyeba sɔlɔ”? Mpo na nini liloba “solo” esalelami mbala koleka nkámá na boyokani na kondima kati na Makomami ya Greke ya boklisto? Ee, mpo na nini bongo, soki solo ekoki komonana te?​—Yoane 8:32; 1 Timɔtɛ 2:3, 4.

Ya solo, Yesu asukaki te bobele na komonisa biso ete solo ekoki komonana, kasi amonisaki mpe ete mpo na komona yango esengeli ete losambo na biso endimama epai na Nzambe. Na ntango mwasi Mosamalia moko atunaki soki losambo ya solo ezalaki oyo wapi​—losambo oyo Bayuda bazalaki kosala na Yelusaleme to oyo Basamalia bazalaki kosala na Ngomba Gelizimi​—Yesu ayanolaki te na kolobáká ete solo ekoki komonana te. Nzokande, alobaki ete: “Ntango ekoya, ɛɛ ejali sasaipi, wana basambeli na sɔlɔ bakosambela Tata [na elimo, “NW”] mpe na sɔlɔ.”​—Yoane 4:23, 24.

Bato mingi balobaka ete, ‘Biblia ekoki kolimbolama na mitindo mikeseni, na yango moto moko te akoki mpenza koyeba soki solo ezali nini.’ Kasi ezali solo ete Biblia ekomamaki na lolenge ya mobulu na boye ete okoki te koyeba sikisiki lolenge nini kososola yango? Ezali solo ete, elobeli mosusu ya esakweli mpe ya elilingi ekoki kozala mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Na ndakisa, Nzambe ayebisaki mosakoli Danyele ete mokanda na ye, oyo ezalaki na maloba mingi ya esakweli, esengelaki kososolama nyonso te liboso ete “ntango na nsuka” eya. (Danyele 12:9) Mpe ezali polele ete masese mosusu mpe bililingi mosusu esengelaki kolimbolama.

Nzokande, ezali polele ete mpo na oyo etali mateya ya moboko ya boklisto mpe mibeko ya bizaleli malamu oyo ezali na ntina mpo na kosambela Nzambe na solo, Biblia ezali koloba na bosembo nyonso. Ezali kopesa nzela te na bandimbola ya bongolabongola. Kati na mokanda oyo etindamaki epai na Baefese, elobami na ntina na kondima ya boklisto ete ezali bobele “moko,” komonisáká ete kondima esengeli kozala ebele te. (Baefese 4:4-6) Mbala mosusu okoki komituna ete, ‘Soki Biblia ekoki te kolimbolama na mitindo mikeseni, mpo na nini mangomba ya “boklisto” ezali mingi?’ Tokoki kozwa eyano soki totaleli lisusu ntango oyo ezalaki mwa moke nsima wana bantoma ya Yesu bakufaki mpe lipɛngwi libandaki kati na kondima ya boklisto ya solo.

‘Nganu mpe matiti mabe’

Yesu asakolaki lipɛngwi wana kati na lisese ya nganu mpe matiti mabe. Yesu ye moko alimbolaki ete “nganu” ezali bongo elilingi ya baklisto ya solo; “matiti mabe” nde ezalaki elilingi ya baklisto ya lokuta, to bapɛngwi. Yesu alobaki ete “wana ejalaki bato kolala, moyini” alónaki matiti mabe kati na elanga ya nganu. Kolónama yango ebandaki nsima wana bantoma balalaki mpɔngi kati na kufa. Lisese yango emonisi ete mobulungano wana kati na baklisto ya solo mpe ya lokuta esengelaki kokóba kino “nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.” Na yango, na boumeli ya bikeke mingi, ezalaki mpasi mpo na koyeba baklisto ya solo mpamba te elanga na makambo matali lingomba eyangelamaki na baoyo bazali baklisto ya nkombo mpamba. Nzokande, na “nsuka ya ebongiseli ya biloko,” mbongwana esengelaki komonana. “Mwana na moto” asengelaki “kotinda baanzelu na ye” mpo na kokabola baklisto ya lokuta na baklisto ya solo. Yango elimbolaki ete elingaki kozala mpasi te mpo na koyeba lisangá ya boklisto, esengelaki kozala lolenge moko na oyo ezalaki na eleko ya bantoma.​—Matai 13:24-30, 36-43.

Esakweli ya Yisaya mpe ya Mika ezali kosakola koyanganisama lisusu ya basambeli ya solo “na mikɔlɔ na nsuka.” Yisaya alobi ete: “Ekojala ete na mikɔlɔ na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likolo koleka ngomba yɔnsɔ, ekotombwa likolo na nkeka; mpe mabota yɔnsɔ bakokɛnda wana. Bikolo mingi bakokɛnda mpe bakoloba ete, Yakani, tobuta na ngomba na [Yehova] epai na ndako na Njambe na Yakobo, ete alakisa biso njela na ye mpe ete totambola na bipai bikokɛnde ye.” Botaleli malamu ya makambo wana ezali komonisa ete esakweli ya Yisaya ezali kokokisama na ntango na biso.​—Yisaya 2:2, 3; Mika 4:1-3.

Atako bongo, bokóli ya lisangá ya boklisto ezali kosalema te mpo na milende ya bato. Yesu asakolaki ete ‘akotinda baanzelu na ye’ mpo na kosala mosala ya koyanganisa. Ayebisaki mpe ntina ya sikisiki mpo na yango: “Bayɛngɛbɛni bakongɛnga lokola moi kati na Bokonji na Tata na bango.” (Matai 13:43) Yango emonisi ete kongɛngisama, to mosala ya koteya, esengeli kokokisama na lisangá ya boklisto kati na mokili mobimba.

Batatoli ya Yehova bazali komona kokokisama ya bisakweli wana kati na mosala ya koteya oyo bazali kokokisa lelo oyo na mikili 232. Na kokokanisáká bindimeli, mitindá ya etamboli malamu, mpe ebongiseli ya Batatoli na Biblia, bato oyo bazali sembo bazali komona polele ete nyonso wana ezali na boyokani na oyo ya lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso. Batatoli balobaka ete kondima na bango ezali “solo” kasi ezali te mpo ete bapusami na makanisi ya lolendo oyo ete baleki basusu. Nzokande, bazali koloba bongo mpo ete bayekolaka na mozindo Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe batosaka yango lokola etindá bobele moko oyo na nzela na yango lingomba ekoki kotalelama na bosembo nyonso.

Baklisto ya liboso bazalaki koloba ete kondima na bango ezalaki “solo.” (1 Timoté 3:15; 2 Petelo 2:2; 2 Yoane 1) Oyo ezalaki solo mpo na bango esengeli mpe kozala solo mpo na biso lelo oyo. Mpo ete bato bandimisama na likambo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kobyanga bango ete báyekola Biblia. Tozali kolikya ete na kosaláká bongo, bokozwa esengo, bobele te mpo ete bosili komona lingomba oyo eleki mangomba mosusu kasi mpo ete bosili komona solo!

[Etanda na lokasa 5]

MITINDO MOSUSU YA FILOZOFI OYO EZALI NA BOTƐMƐLI NA SOLO

POSITIVISME: Likanisi oyo ete makambo manso oyo matali lingomba mazali bolɛma oyo ekoki koyebana te mpe ete mokano ya filozofi ezali bongo ya kosangisa zébi nyonso ya malamu mpo ete ekóma liboke moko.

EXISTENTIALISME: Bakumisi na yango bapusamaki mingi na nsɔ́mɔ oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimisaki mpe na yango bakómaki na makanisi ya kozanga elikya mpo na bomoi. Etalelaka mingi ezalela ya mpasi ya makanisi oyo moto azalaka na yango liboso ya liwa mpe kozanga ntina ya bomoi. Jean-PauI Sartre, ye oyo azalaki mokomi na babúku mpe moko na bakúmisi ya filozofi oyo, alobaki ete, lokola Nzambe azali te, moto asundolami mpe azali kati na ezingelo oyo ezali mpenza komibanzabanza mpo na ye soko moke te.

SCEPTICISME: Elobaka ete na kotala mpamba mpe na kokanisa, moto akoki te kokóma na boyebi oyo ebongi, oyo endimami na bato banso​—ata likambo nini ya solo​—na ntina na bomoi.

PRAGMATISME: Ezali komeka motuya ya solosolo ya bindimeli na biso na bopusi oyo ezali na yango likoló na matomba ya bato, na ndakisa na kozaláká na bopusi likoló na kelasi, na mitindá ya bizaleli malamu mpe na politiki. Etalelaka te solo yango moko lokola ete ezali mpenza na ntina.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Page 3: Second from left: Courtesy of The British Museum; Right: Sung Kyun Kwan University, Seoul, Korea

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto