Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/10 nk. 3-4
  • “Solo ekosikola bino”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Solo ekosikola bino”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nzambe azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini koluka solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tómekola Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/10 nk. 3-4

“Solo ekosikola bino”

Mokolo moko Yesu azalaki koteya bato na tempelo na Yelusaleme, ayebisaki bango ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Bantoma ya Yesu bazalaki na mpasi te mpo na koyeba ete mateya na ye ezalaki mateya ya solo. Makambo mingi emonisaki bango ete molakisi na bango autaki epai ya Nzambe.

KASI, lelo oyo, bato mosusu bakoki komona ete ezali mpasi mpo na koyeba solo oyo Yesu alobelaki. Lokola ezalaki na mikolo ya mosakoli Yisaya, lelo oyo bato mosusu “bakobyangaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe, baoyo bakotyaka molili mpo na pole mpe pole mpo na molili; baoyo bakotyaka bololo mpo na elɛngi mpe elɛngi mpo na bololo.” (Yisaya 5:20) Na kotalela makanisi ndenge na ndenge, bafilozofi, mpe mitindo ndenge na ndenge ya bomoi oyo ezali kolendisama na mikolo na biso, bato mingi bazali komona ete bakoki kobɛtɛla makambo nyonso ntembe mpe bazali kokanisa ete solo ezali te.

Ntango Yesu ayebisaki bato ete solo ekosikola bango, bayanolaki ete: “Tozali bana na Abalayama; kino lelo oyo tozalaki baombo na moto te. Mpo na nini bozali koloba ete, Bokozala basikwi?” (Yoane 8:33) Bamonaki te mpo na nini moto to eloko moko esikola bango. Kasi, na nsima Yesu alobaki ete: “Solo solo nalobi na bino ete, Moto na moto oyo akosalaka masumu azali moombo na masumu.” (Yoane 8:34) Solo oyo Yesu alobelaki ekoki kosikola bato na boombo ya masumu. Yesu alobaki: “Soko nde Mwana akosikola bino, bokozala basikwi na solo.” (Yoane 8:36) Boye, solo oyo esikolaka bato ezali solo oyo etali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Moto akoki kosikwama na lisumu mpe na liwa bobele soki andimi mbeka ya bomoi ya Yesu, moto ya kokoka.

Mokolo mosusu Yesu alobaki ete: “Bulisá bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Liloba ya Nzambe oyo ezali na Biblia, yango nde solo oyo ekoki kosikola bato na biyambayamba mpe na losambo ya lokuta. Biblia ezali koteya solo mpo na Yesu Klisto, solo oyo ezali komema bato na kondimela ye mpe ezali kopesa bango elikya kitoko mpo na mikolo mizali koya. Koyeba solo ya Liloba ya Nzambe ezali likambo ya malamu mpenza!

Koyeba solo ezali mpenza na ntina nini? Lelo oyo, mangomba mingi malobaka ete malandaka Biblia, nzokande mingi ekɔtisá filozofi mpe bonkɔkɔ ya bato na mateya na yango. Mingimingi, bakonzi ya mangomba bamitungisaka te mpo na koyeba soki mateya na bango mazali mpenza na bosolo. Mposa na bango ezali se ete bato bándima bango. Basusu bakanisaka ete Nzambe asepelaka na losambo nyonso; likambo ya ntina ezali kaka kozala sembo. Kasi Yesu Klisto alobaki ete, “Ntango ekoya, ɛɛ ezali [sikawa], wana basambeli na solo bakosambela Tata na [elimo, NW] mpe na solo.”​—Yoane 4:23.

Soki tolingi ete Nzambe andima losambo na biso, tosengeli koyeba solo. Ezali likambo ya ntina mingi. Yango nde ekopesa biso bolamu ya seko. Yango wana, moto na moto asengeli komituna ete, ‘Nzambe andimaka losambo na ngai? Nasepelaka mpenza koyekola solo ya Liloba ya Nzambe? To nabangaka noki te bolukiluki mozindo ekoki komonisa ngai makambo oyo nakanisaki te?’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto