Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/4 nk. 10-14
  • Monyati mikanda oyo tokoki kobosana ye te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monyati mikanda oyo tokoki kobosana ye te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Vulgate oyo ebongisami
  • Monyati na mokanda epai na mokonzi
  • Sorbonne eboi Mbongwana
  • Botɛmɛli ya Sorbonne
  • Bateolojié bapekisi Babiblia na ye
  • Afundamaki ete azalaki mopɛngwi
  • Monyati-mikanda na mboka mopaya
  • Ozali Komikundola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nani akabolaki Biblia na mikapo mpe bavɛrsɛ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Boyekoli nimero 6—Makomi ya Greke ya boklisto kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/4 nk. 10-14

Monyati mikanda oyo tokoki kobosana ye te

ESILÁ naino te kokómela yo ete olingi koluka mokapo moko kati na Biblia kasi okoki komikundola lisusu te epai omonaki yango? Nzokande, na komikundoláká bobele liloba moko, okokaki komona yango na kosaleláká concordance biblique. To ozalaki mbala mosusu kati na liyangani moko ya baklisto epai kuna bankámá, to ata mpe ebele ya bankótó ya bato oyo bayanganaki wana bayebi kofungola Biblia bobele na mwa ba sɛgɔ́nde mpo na kotánga mokapo moko nsima wana epesami.

Na likambo moko to mosusu, ezalaki bongo mpo na lisalisi ya moto moko oyo mbala mosusu oyebi ye te. Asalaki ete boyekoli na yo ya Biblia ezala pɛtɛɛ, akokisaki mpe mokumba monene na kosaláká na boye ete lelo oyo tókoka kozwa Babiblia oyo ezali sikisiki. Azalaki mpe na bopusi likoló na lolenge oyo Biblia ezali lelo oyo.

Moto yango ezalaki bongo Robert Estienne.a Azalaki monyati-mikanda, tata na ye mpe azalaki monyati-mikanda, na engumba Paris, na France, pene na ebandeli ya ekeke ya 16. Ezalaki na eleko oyo babéngaka Renaissance mpe ya Mbongwana. Masini ya bonyati mikanda ekómaki esaleli mpo na kopalanganisa makambo wana mibale. Henri Estienne, tata na Robert, azalaki monyati-mikanda oyo ayebanaki mingi, asalaki mikanda misusu ya kitoko oyo ebimaki na eleko ya Renaissance. Mosala na ye esangisaki mpe bobimisi mikanda ya bato ya mayele mpe mikanda ya makambo matali Biblia mpo na Eteyelo monene ya Paris mpe kelasi na yango ya teoloji​—Sorbonne.

Kasi tiká tótya likebi mingi likoló na Robert Estienne, mwana na ye. Makambo matali bakelasi oyo ye akɔtaki eyebani mpenza te. Kasi, uta na bomwana mpenza, ayekolaki Latin malamu mpe mosika te ayekolaki mpe Greke mpe Liebele. Ayekolaki mosala ya konyata mikanda epai na tata na ye. Na ntango akitanaki tata na ye Henri, na mobu 1526, Robert Estienne asilaki koyebana lokola nganga mayele oyo ayebaki malamu mitindá mitombwani ya kokoma nkótá. Atako abimisaki mikanda ya Latin oyo ezalaki na bandimbola mpe mikanda mosusu ya bato ya mayele, kasi eloko oyo azalaki kosepela na yango mingi koleka ezalaki bongo Biblia. Lokola azalaki na mposa makasi ya kosala mpo na Biblia ya Latin makambo motindo moko na oyo esilaki kosalema liboso mpo na mikanda ya Latin ya kala, Estienne abandaki kobongisa lisusu makomi ya Biblia ya Vulgate Latine, asalaki nyonso mpo ete ekoka kokokana mpenza na oyo ya ebandeli, oyo Jérôme abimisaki na ekeke ya mitano.

Vulgate oyo ebongisami

Jérôme abongolaki uta na Liebele mpe na Greke ya ebandeli ya Biblia, kasi na mikolo ya Estienne, Vulgate esilaki koumela mibu nkótó. Mabunga mpe mbeba ebandaki kokɔtisama mokemoke na boumeli ya bileko mingi oyo eyaki na nsima, wana bazalaki kokoma bakopi mosusu ya Vulgate. Lisusu, na boumeli ya eleko oyo babéngi Moyen Âge, maloba ya Biblia mapemami na Nzambe ezipamaki na ebele ya masapo ya eleko ya Moyen Âge, basalelaki maloba mosusu na esika ya maloba oyo ezalaki kati na mikapo, mpe babakisaki makambo ya lokuta. Nyonso wana esanganaki mpenza na makomi ya Biblia na boye ete ekómaki kondimama lokola makomi mapemami.

Mpo na kolongola makambo nyonso oyo babakisaki kobakisa, Estienne asalelaki mwango ya kotalela makomi na mozindo, lokola ezalaki kosalema mpo na koyekola mikanda ya kala. Alukaki mpe amonaki bamaniskri ya kala mpe ya malamu mingi oyo ezalaki. Amonaki bamaniskri mingi ya kala na babliotɛki oyo ezwami na Paris mpe na zingazinga na yango, mpe na bisika lokola Évreux mpe Soissons, moko na yango emonanaki lokola ete ekomamaki uta na ekeke ya motoba. Na bokɛngi nyonso, Estienne akokanisaki mikanda mikeseni oyo ekomamaki na Latin na kotaleláká mokapo moko na moko, aponaki bobele mikapo oyo ezalaki mpenza ya sikisiki koleka nyonso mosusu. Mokanda oyo abimisaki nsima na mosala oyo, Biblia ya Estienne, ebimisamaki liboso na 1528 mpe ezalaki litambe monene mosusu oyo esalemaki mpo na kozongisa lisusu bosolo ya makomi ya Biblia. Bablia ya Estienne oyo ebongisami malamu ebandaki na nsima. Liboso na ye, basusu bamekaki kosembola Biblia Vulgate, kasi oyo ya ye ezalaki ebimeli ya liboso ya kobimisa esaleli oyo ebongi mpenza. Na pembenipembeni ya nkasa na yango, Estienne azalaki komonisa epai wapi alongolaki biteni mosusu oyo amonaki ete ezangaki bosikisiki to eteni oyo ekokaki kobimisa bongolabongola. Amonisaki bamaniskri oyo epesaki ye nzela na kokɔtisa kosembolama wana.

Estienne akɔtisaki makambo mosusu mingi oyo ezalaki ya sika mpo na ekeke ya 16. Asalaki bokeseni kati na babúku oyo epemami te mpe Liloba ya Nzambe. Atyaki mokanda ya Misala na nsima ya Baevanzile mpe liboso ya mikanda ya Paulo. Na likoló ya nkasá nyonso, atyaki mwa maloba ya moboko mpo na kosalisa motángi ete amona mikapo ya sikisiki. Wana ezalaki ndakisa ya liboso ya kokoma motó ya likambo likoló na lokasa moko na moko kati na búku. Na esika ete asalela monkomá monene ya Gothique, to monkomá ya kiló, oyo ebandaki na Allemagne, Estienne azalaki moko na bato ya liboso ya konyata Biblia mobimba na makomi ya Baloma oyo ezalaki pɛpɛlɛ mpe ezalaki mpasi te mpo na kotánga yango, oyo ezali kosalema mingi lelo oyo. Abimisaki mpe bilembo mingi bitindaka motángi ete atala na liloba boye to mokapo boye mpe bandimbola mpo na koyeisa mikapo mosusu polele.

Bato minene mingi mpe bakonzi ya mangomba basepelaki mpenza na Biblia ya Estienne, mpamba te ezalaki malamu koleka ebimeli nyonso mosusu ya Vulgate. Mpo na kitoko na yango, mosala malamu, mpe litomba na yango, ebimeli na ye ekómaki elakiseli ya bato banso mpe mosika te bakómaki komekola yango kati na mikili nyonso ya Mpótó.

Monyati na mokanda epai na mokonzi

Masese 22:29 elobi ete: “Omɔni moto oyo ajali na etingya na mosala na ye? Ye akotɛma liboso na mikonji.” Makoki ya Estienne ya kobimisa makambo ya sika mpe boyebi na ye mingi ya nkótá eyebanaki epai na François 1er, mokonzi ya France. Estienne akómaki konyata mikanda ya Latin, ya Liebele, mpe ya Greke mpo na mokonzi. Na yango, Estienne abimisaki oyo ezali kino lelo ndambo na misala mileki kitoko oyo mibimisamaki na France na mwango oyo ebéngami typographie. Na 1539, abandaki kobimisa Biblia eleki kikoto mpe ya mobimba na Liebele mpe enyatamaki na France. Na 1540 atyaki bililingi kati na Biblia na ye ya Latin. Kasi na esika ete asalela bililingi euti na makanisi mpamba na ntina etali masoló ya Biblia, na lolenge ezalaki kosalema mingi na eleko ya Moyen Âge, Estienne asalelaki bililingi oyo ekoki koteya oyo ezwaki moboko na yango na bilembeteli ya archéologie, to mwango ya komeka bamɛtɛlɛ mpe na bandimbola oyo ezwami kati na Biblia yango moko. Bisaleli ya konyata bilembo, oyo esalemi na mabaya, ezalaki koyema na polele biloko lokola sanduku ya kondimana, bilamba ya nganga monene, hema, mpe tempelo ya Salomo.

Na kosaleláká bisaleli ya balɛtɛlɛ ya Greke oyo asɛngaki ete bápesa na ye mpo na konyata bamaniskri ya mokonzi, Estienne abimisaki ebimeli ya liboso ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo ezali na bandimbola kati na yango. Atako bibimeli mibale ya liboso ya Estienne ezalaki malamu mingi te lokola oyo ya Dedier Erasme, kati na ebimeli ya misato na 1550, Estienne abakisaki kosangisama mpe biutelo ya makambo oyo azwaki na bamaniskri pene na 15, kati na yango mpe Codex Bezae ya ekeke ya mitano T.B. mpe Biblia la Septante. Ebimeli wana ya Estienne endimamaki na bato mingi na boye ete na nsima eyaki kokóma moboko ya oyo ebéngamaki Textus Receptus, to Mokanda Mozwami oyo, na nsima, mabongoli mingi mosusu ezwaki moboko likoló na yango, na ndakisa libongoli ya King James oyo ebimaki na mobu 1611.

Sorbonne eboi Mbongwana

Lokola makanisi ya Luther mpe bato mosusu oyo bakɔtisaki Mbongwana mazalaki kopalangana kati na mikili nyonso ya Mpótó, Lingomba ya Katolike elukaki koyangela makanisi ya bato na kotyáká mibeko na ntina etali mikanda oyo bato bazalaki kotánga. Na 15 Yúni 1520, Pápa Léon X abimisaki mokanda moko na kopesáká etindá oyo ete mokanda moko te oyo ezali na “mateya ya lipɛngwi” kati na yango esengeli konyatama, kotekisama, to kotángama kati na mikili ya Lingomba ya Katolike mpe na kosɛngáká ete bakonzi ya Leta bátosisa yango kati na bitando na bango. Na Angleterre, Mokonzi Henry VIII atikaki mokumba ya kotalatala mikanda na mabɔkɔ ya Cuthbert Tunstall, episkopo ya Katolike. Nzokande, na mikili mingi ya Mpótó, soki tolongoli pápa, etuluku oyo ezalaki na nguya monene kati na makambo matali mateya ya lingomba, ezalaki bongo kelasi ya teoloji, na Eteyelo monene ya Paris​—Sorbonne.

Sorbonne ezalaki molobeli mpo na kopalanganisa mateya ya lingomba ya Katolike. Na boumeli ya bikeke mingi, etalelamaki lokola esika makasi ya kondima ya Bakatolike. Bato ya Sorbonne oyo bazalaki kotalatala mikanda bazalaki kotɛmɛla bibimeli nyonso ya Vulgate oyo ezalaki na bandimbola kati na yango mpe mabongoli na yango na nkótá mosusu, kotaleláká yango bobele te lokola ete “ezangaki ntina, kasi lisusu ete ezalaki koyeisa mikakatano kati na lingomba.” Yango ezalaki likambo ya kokamwa te, mpamba te na ntango wana bato oyo bakɔtisaki Mbongwana bazalaki kotya ntembe likoló na mateya, milulu, mpe mibeko ya lingomba oyo ezalaki na moboko te likoló na Makomami. Nzokande, bateolojié mingi na Sorbonne bazalaki kotalela mateya ya lokumu ya lingomba lokola ete ezalaki na ntina mingi koleka boyekoli ya sikisiki ya Biblia yango moko. Moko na bateolojié wana alobaki ete: “Na nsima ya kozwa mateya, Makomami makómi lokola ebuteli oyo elongolami nsima wana efelo esili kotongama.” Mingi kati na kelasi wana bayebaki Liebele mpe Greke te, kasi bazalaki kotyola mikanda ya Estienne mpe ya banganga mayele ya eleko ya Renaissance, baoyo bazalaki kosala bolukiluki, kati na bandimbola na nkótá ya ebandeli oyo esalelami kati na Biblia. Molakisi moko na Sorbonne alobaki nkutu ete “kopalanganisa boyebi ya Greke mpe Liebele elingaki kobebisa lingomba mobimba.”

Botɛmɛli ya Sorbonne

Atako bibimeli ya liboso ya Vulgate ya Estienne elekaki epai na batáli mikanda ya eteyelo wana, yango ezangaki te kobimisa ntembe. Na ebandeli ya ekeke ya 13, Vulgate etyamaki lokola Biblia oyo endimami na bato banso kati na eteyelo monene yango, mpe mpo na bato mingi, makomi na yango mazalaki na libunga te. Kelasi yango ekweisaki nkutu Erasme, nganga mayele ya lokumu mingi, mpo na mosala oyo asalaki na ntina na Vulgate. Likambo oyo ete monyati-mikanda oyo azalaki teolojié te amonisaki mpiko ya kosembola mokanda oyo endimami na bato banso ezalaki koswa basusu na motema.

Mbala mosusu ezalaki makambo oyo Estienne akomaki pembenipembeni ya nkásá nde ebangisaki mpenza batelojié koleka eloko nyonso mosusu. Makambo yango ekɔtisaki ntembe likoló na bosolo ya makomi ya Vulgate. Mposa oyo Estienne azalaki na yango ya kongengisa mikapo mosusu ememaki ye ete afundama ete amikɔtisaki kozanga lotɔ́mo kati na makambo ya teoloji. Aboyaki kondima efundeli wana na kolobáká ete makambo oyo ye akomaki pembeni ya nkasá ezalaki bobele maloba mazongelemi na bokuse to ezalaki mpo na kopesa ndimbola ya eutelo ya maloba. Na ndakisa, maloba na ye likoló na Genese 37:35 epesaki ndimbola oyo ete liloba “lifelo” [na Latin, infernum] ekokaki te kotalelama ete ezali esika oyo bato mabe bazali kozwa etumbu. Eteyelo yango efundaki ye ete awanganaki liteya ya kozanga kokufa ya molimo mpe nguya oyo “basantu” bazali na yango ya kolobela bato epai na Nzambe.

Nzokande, Estienne azwaki ngɔlu mpe abatelamaki na mokonzi. François 1er azalaki kosepela mingi na mikanda oyo ezalaki kobima na eleko ya Renaissance, mingimingi babúku na ye oyo azalaki konyanta mikanda epai na mokonzi. Elobamaki nkutu ete François 1er azalaki kokende kotala Estienne mpe mokolo mosusu, wana Estienne azalaki kotya mwa kosembolama ya nsuka kati na mokanda moko, mokonzi azalaki kozela ye na motema kokita. Na lisungi ya mokonzi, Estienne atɛlɛmaki ngwi liboso na botɛmɛli ya Sorbonne.

Bateolojié bapekisi Babiblia na ye

Kasi na 1545, makambo malamwisaki nkanda makasi ya kelasi ya Sorbonne likoló na Estienne. Komonáká litomba ya kosangana elongo na ngambo moko mpo na kotɛmɛla baoyo bakɔtisaki Mbongwana, Biteyelo minene ya Bakatolike ya Cologne (Allemagne), Louvain (Belgique), mpe ya Paris bayokanaki ete bátalelaka na bozindo mateya oyo mayokani te na oyo ya lingomba. Na ntango bateolojié ya Louvain bakomelaki baoyo ya Sorbonne ete bakamwaki na komona ete Babiblia ya Estienne ezalaki te kati na molɔngɔ́ ya babúku oyo epekisamaki na Paris, Sorbonne ebukaki lokuta na kozongisáká eyano ete mbɛlɛ balingaki mpenza kokweisa yango soki bamonaki yango. Sikawa banguna ya Estienne kati na kelasi wana bandimisamaki ete nguya esangisami ya biteyelo ya Louvain mpe ya Paris ekokoka mpo na kondimisa François 1er na ntina na mabunga ya monyati na ye ya mikanda.

Liboso na yango, lokola basilaki kokebisa ye na ntina na mikano oyo banguna na ye bazalaki na yango, Estienne azalaki moto ya liboso ya kokende epai na mokonzi. Estienne ayebisaki ye ete soki bateolojié bakobimisa molɔngɔ́ ya mabunga oyo bamonaki, akozala pene ya konyata yango esika moko na kosembolama ya bateolojié mpe kokɔtisa yango kati na Biblia nyonso oyo etekamaki. Mokonzi andimaki likanisi yango. Asɛngaki na Pierre Du Chastel, motángeli na ye, ete atalela likambo yango. Na Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu 1546 eteyelo yango etindaki nkomá epai na Du Chastel, kolobáká na botɛmɛli nyonso ete Babiblia ya Estienne ezalaki “bilei mpo na baoyo bazali koangana kondima na biso mpe bazali kopesa lisungi . . . na mateya ya lipɛngwi oyo” mpe ezalaki na mabunga mingi na boye ete ebongaki na “kobebisama mpe kolimwisa yango nyonso.” Lokola andimisamaki te, sikawa mokonzi ye moko apesaki etindá ete kalasi yango ebimisa mabunga oyo bango bamonaki mpo ete enyatama esika moko na Babiblia ya Estienne. Balakaki ete bakosala bongo, kasi basalaki nyonso mpo ete bábimisa te molɔngɔ́ ya mabunga yango oyo bazalaki kolobela.

François 1er akufaki na Mársi 1547, mpe Estienne abungisaki moninga makasi ya etumba mpo na kotɛmɛla nguya ya Sorbonne. Ntango Henri II azwaki bokonzi, azongelaki lisusu etindá oyo tata na ye apesaki, ete eteyelo wana ebimisa mabunga oyo bango bamonaki. Nzokande, na komonáká lolenge bankumu ya Allemagne bazalaki kosalela Mbongwana mpo na mikano ya politiki, Henri II azalaki komibanzabanza te mpo na matomba ya malamu to ya mabe ya Babiblia ya monyati-mikanda ya mokonzi, azalaki nde kolinga kobatela France ete ezala bobele mokili ya Katolike mpe ezala na bomoko na nsé ya mokonzi na yango ya sika. Na 10 Dɛsɛ́mbɛ, 1547, likita ya bapesi toli na mokonzi ezwaki ekateli ete Babiblia ya Estienne esengelaki kotekama te kino batelojié basengelaki kobimisa mabunga oyo bango bamonaki.

Afundamaki ete azalaki mopɛngwi

Kelasi yango elukaki sikawa mwango mpo na komema likambo ya Estienne na esambiselo moko ya ntina mingi oyo eutaki kosalema sika mpo na kosambisa makambo matali lipɛngwi. Estienne ayebaki malamu likámá oyo ezalaki liboso na ye. Na boumeli ya mbula mibale ya kosalema na yango, esambiselo yango ekómaki kobéngama chambre ardente, to “ndako ya mɔ́tɔ.” Pene na bato 60 oyo bakangamaki bakakisamaki na nzete, kati na bango ezalaki mpe na banyati mikanda mpe batekisi mikanda oyo batumbaki bango wana bazalaki naino na bomoi, na esika babéngi Place Maubert, bobele mpembeni ya ndako ya Estienne. Mbala na mbala bazalaki koya kosala bolukiluki kati na ndako ya Estienne mpo na koluka ata mwa elembeteli moke oyo bakokaki kofunda ye na yango. Batunaki mituna epai na bato koleka 80 mpo na kopesa litatoli. Balakaki epai na bafúndi ete balingaki bakopesa bango ndambo minei ya biloko ya Estienne soki bakokaki bamona mpenza elembeteli oyo elakisaki ete azalaki mopɛngwi. Nzokande, elembeteli sé moko oyo bamonaki epai na ye ezalaki bobele makambo oyo Estienne abimisaki polele kati na Babiblia na ye.

Mokonzi apesaki lisusu etindá ete molɔngɔ́ ya mabunga oyo kelasi wana emonaki esengelaki komemama na likita ya bapesi toli na mokonzi. Lokola ezalaki na lolendo mingi, kelasi yango ezongisaki eyano ete ‘bateolojié bazalaka te na momeseno ya kokoma kati na mikanda bantina oyo mpo na yango bazali kokweisa likambo moko ete ezali ya lipɛngwi kasi bayanolaka bobele na maloba, oyo bosengeli kondima yango, soki te makambo ya kokoma ekozala na nsuka te.’ Henri andimaki yango. Epekiseli ya nsuka etyamaki. Pene na babúku nyonso ya makambo matali Biblia, oyo Estienne abimisaki, ekweisamaki. Atako abikaki na kotumbama na mɔ́tɔ na Place Maubert, azwaki ekateli ya kolongwa na France wana Babiblia na ye nyonso epekisamaki mpe likámá ya minyoko oyo elingaki mpenza koyela ye na nsima.

Monyati-mikanda na mboka mopaya

Na Novɛ́mbɛ 1550, Estienne akendeki kofanda na engumba Génève, na Suisse. Kelasi wana ekómisaki likambo ya kobimisa Babiblia mosusu na France, longola bobele oyo ya Vulgate, lokola likambo oyo liyokani na mobeko te. Sikawa akómaki na bonsomi ya kobimisa mikanda oyo alingaki, Estienne anyataki lisusu “Kondimana ya Sika” na Greke na mobu 1551, elongo na mabongoli mibale na Latin (oyo ya Vulgate mpe oyo ya Erasme) na milɔngɔ́ mibale mikeseni esika moko. Na 1552, alandisaki yango na libongoli ya Lifalansé ya Makomami mosantu ya Greke mpe makomi ya Erasme na Latin, na milɔngɔ́ mibale mikeseni esika moko. Na bibimeli wana mibale, Estienne akɔtisaki mwango ya kokabola makomi ya Biblia na milɔngɔ́ ya kotánga oyo etyami mitángo​—mwango oyo esalelami mpe lelo oyo kati na mokili mobimba. Atako liboso basusu bamekaki myango mikeseni mpo na kokabola milɔngɔ́ ya kotánga kati na makomi ya Biblia, oyo ya Estienne ekómaki oyo endimamaki na bato banso. Biblia na ye ya Lifalansé oyo abimisaki na 1553 ezalaki Biblia ya liboso ya mobimba oyo kati na yango ezalaki na kokabolama wana ya milɔngɔ́ ya kotánga mityamaki na Estienne.

Biblia ya Estienne ya mabongoli mibale ya Latin, oyo ya 1557, ebongi mpe na kobenda likebi mpamba te esalelaki nkombo mpenza ya Nzambe, Jehova, kati na Makomami ya Liebele. Na mopanzi ya mokapo ya mibale ya mokanda ya Nzembo, amonisaki ete kokitana ya liloba ʼAdho·naiʹ na esika ya lɛtɛlɛ minei ya Liebele (יהוה) ezwaki moboko na yango bobele likoló na biyambayamba ya Bayuda mpe esengelaki kobwakama. Kati na ebimeli oyo, Estienne asalelaki makomi malalisami mpo na komonisa maloba ya Latin oyo ebakisamaki mpo na koyeisa polele ndimbola ya maloba ya Liebele. Na nsima, lolenge wana ya kosala endimamaki kati na Babiblia mosusu, libula oyo mbala mingi ekamwisaka batángi ya mikolo na biso oyo bameseni komona makomi malalisami lolenge ezali kosalelama na mikolo na biso mpo na kobeta nsɛ́tɛ likoló na likambo moko.

Lokola azalaki na ekateli makasi ya kosalela mayele na ye mpo ete bato mosusu mpe bázwela yango litomba, Estienne apesaki bomoi na ye mobimba mpo na kobimisa Makomami Mosantu. Baoyo bazali lelo kopesa motuya na Liloba ya Nzambe bakoki kozala na botɔ́ndi mpo na milende na ye mpe mpo na mosala makasi ya basusu oyo, na bokɛngi nyonso, basalaki milende mpo na kozongisa maloba ya Biblia lokola ekomamaki uta na ebandeli. Mosala oyo bango babandaki ezali kokóba wana tozali kozwa lisusu boyebi ya sikisiki koleka na ntina na nkótá ya kala mpe wana tozali komona bamaniskri mosusu ya kala mpe ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe. Mwa moke liboso ya kufa na ye (1559), Estienne azalaki kosala mpo na kobimisa libongoli moko ya sika ya Makomami ya Greke. Batunaki ye ete: “Nani akosomba yango? Nani akotánga yango?” Ayanolaki na elikya nyonso ete: ‘Bato nyonso ya mayele oyo bazali na bobángi Nzambe.’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ayebani mpe na nkombo na ye ebéngami na Latin, Stephanus, mpe na Lingelesi, Stephens.

[Elilingi na lokasa 10]

Milende ya Robert Estienne esalisi bayekoli ya Biblia ya bileko mingi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bibliothèque Nationale, Paris

[Elilingi na lokasa 12]

Bililingi ya Estienne, emekolamaki na boumeli ya bileko mingi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Bibliothèque Nationale, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto