Liyangani ya Etúká “Tókumisa Nzambe na esengo nyonso”—Okozala wana?
ESENGO! Liloba wana lizali nde komonisa eloko moko oyo eyebani malamu te, oyo ezali nkutu mopaya, na eleko oyo etondi na mobulu? Na ntembe te, bazulunalo epesaka mpenza bantina mingi te ya kozala na esengo. Bitumba kati na bato ya bikólo bikeseni, kopalangana ya nzala, kozanga mosala, likámá ya kobeba ya ezingelo, yikiyiki ya politiki, mobulu—ezali te makambo oyo makotondisa motema na esengo, boye te?
Ntalo monene ya bato bazali komibwaka likoló na bosepeli ya motindo nyonso oyo bakoki kozwa na bomoi. Bongo esengo? Balobelaki esengo lokola “ezalela ya bolamu; bosepeli.” Ezali na bato mingi te oyo basili kozwa esengo ya solosolo, mpe wana bazwi yango, ezalaka mbala mingi bobele mpo na ntango mokuse.
Nzokande, kokanisáká mpo na mikolo na biso, Biblia esakolaki ete: ‘Bongo, Nkolo [Yehova] alobi ete: “Tala! Baombo na ngai bakosepela. Tala! Baombo na ngai bakoyemba mpɔ na esɛngɔ na motema.”’ (Yisaya 65:13, 14) Lolenge nini yango ekoki kosalema?
Mpo na kozwa eyano, tozali kobyanga yo ete óyangana na moko ya mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ekosalema na 1995. Motó na likambo ya mayangani yango ezali “Tókumisa Nzambe na esengo nyonso,” mpe okofuta mosolo te mpo na kokɔta. Manáka ya mikolo misato ya liyangani ekozala na masukúlu ya Biblia, bilakiseli, masoló mpe makambo mosusu mingi. Na boumeli ya liyangani mobimba, motó ya likambo esengo ekolobelama mingi.
Mayangani yango makobanda na Etats-Unis na Yúni mpe makolandana na bingumba mingi kati na mokili mobimba kino na ebandeli ya 1996. Mbala mosusu, moko na yango ekosalema penepene na esika ofandaka. Mpo na nini te kotuna Batatoli ya Yehova oyo bazali na kartyé na bino? Tozali kobyanga yo na esengo nyonso ete ozala wana.