Boyei malamu na liyangani ya etúká “Bobangi Nzambe”!
YA SOLO, ntango ebelemi mpo na mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova mpo na mobu 1994. Kobanda Yúni 1994 kino Yanuáli 1995, manáka ya mikolo misato ya liyangani ekolandama na bingumba mingi na mokili—liboso na Amerika ya Nɔ́rdi, na nsima na Mpótó ya Ɛ́sti mpe na Mpótó ya Wɛ́sti, na Azia, na Amerika ya Kati mpe na Amerika ya Súdi, na Afrika, na Australie, mpe na bisanga bizali na Mai monene.
“Bobangi Nzambe”—Oyo nde motó ya likambo oyo ezali kolamwisa makanisi! Yango ezali te bobangi oyo moto azalaka na yango ntango bomoi ezali na likámá, kasi bobangi ya Nzambe, bobangi oyo ezali kopesa kimya na makanisi mpe esengo. Lisese ya Biblia liyebisi ete: “Litomba ya komikitisa mpe ya kobanga Yehova ezali bozwi mpe nkembo mpe bomoi.” (Masese 22:4, NW) Lolenge nini kobanga Nzambe ezali kopesa “bozwi mpe nkembo mpe bomoi”? Yango ekomonana polele wana motó ya likambo ya liyangani ekolimbolama na boumeli ya mikolo misato ya makambo mingi elongo na masukúlu, masoló, bilakiseli, mpe lisano-liteya moko.
Ntoma Paulo akomaki ete tosengeli te ‘kotika koyangana elɔngɔ mɔkɔ.’ (Baɛbɛlɛ 10:25) Batatoli ya Yehova bazali kotalela yango na motuya mingi, na koyanganáká mbala misato na poso mpo na boyekoli mpe losambo ya lisangá. Nzokande, liyangani ya etúká ya mbula na mbula ezali na ntina mingi mpenza. Bazali kolobela yango liboso ete ebanda mpe bazali kolobela yango basanza mingi na nsima. Tobyangi yo na esengo nyonso, atako ozali na lingomba na yo, ete ósangana na bango na liyangani wana mpe ózwa litomba na boninga ya boklisto ya esengo mingi mpe na mateya ya elimo ya ntina mingi. Mosangani moko na lisangá ya Batatoli ya Yehova akosepela koyebisa yo epai wapi mpe ntango nini liyangani likosalema pene na mboka oyo yo ofandi.